Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 15/5 nk. 14-15
  • Mpo na nini bato mingi bazangi mayele ya bomoto?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini bato mingi bazangi mayele ya bomoto?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya kokóma na mayele ya bomoto
  • Matomba ya kozala na mayele ya bomoto
  • “Moto ya ekɛngɛ atalelaka matambe na ye”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Bwanya ya solosolo ezali se koganga makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Bokonzi ya Nzambe​—⁠Ozali kosimba ntina na yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • “Moto nyonso ya mayele akosala na boyebi”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 15/5 nk. 14-15

Mpo na nini bato mingi bazangi mayele ya bomoto?

MOBALI moko amoni moto mosusu azali kosala likambo moko; mbala moko alobi boye: “Oyo lisusu likambo nini, ayebi te ete asengeli kosala boye te?” Moto mosusu aningisi kaka motó mpe alobi na mongongo ya nse ete, “Soki moto oyo azalaki na mayele ya bomoto ata mwa moke, akokaki kosala bongo te.” Ntango mosusu, yo mpe oyoká maloba ya ndenge wana! Kasi, “mayele ya bomoto” ezali nini?

“Mayele” ezali likoki ya koyeba kotalela likambo, kokanga ntina na yango, to mpe kozala na bwanya to bososoli. Moto ya mayele azali na likoki ya kotalela likambo moko mpe kozwa ekateli ya malamu. Kozala na mayele ya bomoto esɛngaka koyeba kosalela likoki ya kokanisa. Bato mingi balingaka ete bato mosusu bákanisa na esika na bango. Mpo na kozwa bikateli, balandaka makambo oyo bamonaka na televizyo, makanisi ya baninga na bango, to ndenge bato mingi batalelaka makambo.

Makambo oyo bato bazali kosala lelo oyo etindaki moto moko aloba ete, ‘Bato mingi bazali na mayele ya bomoto ata moke te.’ Ndenge nini tokoki kokóma na mayele ya bomoto? Yango ekomemela biso matomba nini?

Ndenge ya kokóma na mayele ya bomoto

Atako kokóma na mayele mpe bososoli esɛngaka ntango, milende mpe kokanisa, moto akoki mpenza kokóma na mayele ya bomoto. Tótalela makambo misato oyo ekoki kosalisa biso tókóma na mayele ya bomoto.

Koyekola Biblia mpe kosalela batoli na yango. Lokola Biblia ekomamá na elobeli ya malamu mpe ya polele, ekoki kosalisa biso tókóma na bwanya mpe na mayele. (Baefese 1:8) Na ndakisa, ntoma Paulo apesaki baninga na ye baklisto toli oyo: “Makambo nyonso oyo ezali ya solo, makambo nyonso oyo ebongi na lobanzo, makambo nyonso ya boyengebene, makambo nyonso ya pɛto, makambo nyonso oyo ekoki kolingama, makambo nyonso oyo elobelami malamu, soki ezaleli moko ya malamu ezali mpe soki eloko moko oyo ebongi kosanzolama ezali, bókoba kokanisa makambo wana.” (Bafilipi 4:8) Soki tozali ntango nyonso kolanda toli yango, tokokóma na bososoli mpe na bwanya.

Kozwa liteya na likambo nyonso oyo tokutani na yango. Mokomi moko ya Suisse alobelaki boyokani oyo ezali kati na mayele ya bomoto mpe makambo oyo tokutanaka na yango na maloba oyo: “Mayele ya bomoto . . . esangisi makambo oyo tokutanaka na yango mpe makambo oyo tokoki komona [liboso].” Ya solo, “Moto ya zoba ayambi maloba nyonso, nde moto ya mayele akotala malamu na nzela ekokende ye.” (Masese 14:15) Moto akoki kokóma na mayele ya bomoto na kotala, na komitika ete azwa formasyo, mpe na makambo oyo azali kokutana na yango. Na mokemoke akoyekola kosala makambo malamu. Nzokande, mpo tózwa liteya na mabunga na biso, esɛngaka tózala na komikitisa. Lofundo, lolendo, mpe motó makasi oyo ezali komonana epai ya bato na mikolo oyo ya nsuka ezali komonisa ete bazali na mayele ya bomoto te.​—2 Timote 3:1-5.

Kopona baninga ya malamu. Baninga na biso bakoki kosalisa biso tókóma na bwanya to na mayele ya bomoto to mpe kopekisa biso tózwa yango. Masese 13:20 elobi boye: “Ye oyo akotambola na bato ya mayele akozala na mayele, nde motamboli elongo na bazoba akobukana.” Tosengeli te kolanda makanisi ya bato oyo batosaka Nzambe te mpe baboyaka kolanda Liloba na ye. Masese 17:12 elobi boye: “Tiká ete moto azwana na nkoi oyo abɔtɔlami bana na ye liboso na zoba kati na ebebe na ye.”

Matomba ya kozala na mayele ya bomoto

Kozala na mayele ya bomoto ezali na ntina mingi. Yango esalaka ete tósepela na bomoi mpe tóbebisa ntango mpambampamba te. Mayele ya bomoto ekoki ata kokitisa mitungisi oyo moto azwaka ntango azali kosala makambo kozanga kokanisa. Bato oyo bazali na bososoli te bamilukelaka mindɔndɔ mingi. Biblia elobi boye: “Mosala ya zoba ekolɛmbisa ye.” (Mosakoli 10:15) Bato ya ndenge wana bakoki koboma nzoto na mosala; kasi, bakosala eloko moko ya malonga te.

Biblia epesi batoli mingi ya malamu na makambo lokola bopɛto, kosolola, molende na mosala, kozala na bomoi ya mwa malamu ata soki tozali babola mpe na makambo mingi mosusu ya bomoi. Bato ebele bakoki koloba ete na bomoi na bango, soki balongaki na makambo mosusu, ezali mpo balandaki mitinda ya Biblia oyo emonisaki bango ndenge ya kozala na bwanya; soki mpe bamibendelaki mpasi, ezali mpo balandaki mitinda na yango te.

Mayele ya bomoto esalisaka mpe biso tósuka kaka te na kotosa malako to mibeko. Esalisaka biso tókokisa mikumba na biso. Nzokande, soki tozali na mayele ya bomoto, yango elingi koloba te ete tokozala na mposa ya boyebi te. Masese 1:5 elobi boye: “Moto ya mayele akoyoka mpe akofulukisa mayele.” Tosengeli mpe koyeba kotalela malamumalamu makambo oyo tozali koyekola, mpe kozwa makanisi oyo ebongi. Yango ekosalisa biso ‘tótambola na bwanya.’​—Masese 28:26, NW.

Mayele ya bomoto etambolaka nzela moko na komikitisa. Ata soki tozali na mposa ya kokokisa mikumba mingi, tosengeli kozala na bososoli mpe koyeba esika oyo makasi na biso esuki. Ntoma Paulo alendisi biso ete ‘tózalaka ntango nyonso na mingi ya kosala na kati ya mosala ya Nkolo.’ (1 Bakolinti 15:58) Kasi, mpo na kosalela toli yango malamu, tosengeli kobosana te likanisi oyo ezali na Mosakoli 9:4: “Mbwa ya bomoi aleki nkɔsi ekufi na malamu.” Soki tozali kobatela bokolɔngɔnɔ ya nzoto na biso ntango tozali kosalela Yehova, yango ekoki kosalisa biso tózala na bomoi ya molai mpe tókoba kosala mingi. Mayele ya bomoto ekoki mpe kosalisa biso tózala na bokatikati ntango tozali kosala makambo mosusu ya ntina mpe tózala ntango nyonso na esengo. Ya solo, kozala na mayele ya bomoto ezali na matomba mingi.

[Elilingi na lokasa 14]

Biblia ezali na ebele ya batoli ya malamu

[Elilingi na lokasa 15]

Moto akoki kokóma na mayele ya bomoto na kotala, na komitika ete azwa formasyo, mpe na makambo oyo azali kokutana na yango

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto