“Lisalisi na ngai ekouta epai ya Yehova”
Boyebi ya Nzambe ezali kosangisa mabota
NA Argentine, mobali moko ná mwasi na ye bazalaki koyokana ata moke te; yango wana batongaki efelo moko oyo ekabolaki ndako na bango na biteni mibale mpe bazalaki kobenga yango “Mur de Berlin”!
Makambo wana ezali kosalema na mabota mingi. Bato mingi ya libota moko baswanaka, mibali to basi mosusu bakosaka balongani na bango, to mpe balobanaka lisusu te. Yango ezali mawa mingi mpo libota ezali ebongiseli ya Nzambe. (Genese 1:27, 28; 2:23, 24) Yango ezali likabo ya Nzambe oyo ekoki kopesa bato nzela ya kolingana makasi mpenza. (Luta 1:9) Soki na kati ya libota, moto na moto azali kokokisa mikumba oyo Nzambe apesi ye, akopesa Yehova lokumu mpe akosepelisa basusu.a
Lokola libota ezali ebongiseli ya Nzambe, tosengeli koluka ete makanisi na ye elakisa biso ndenge oyo mabota esengeli kotambola. Liloba na ye ezali na batoli mingi oyo ekoki kosalisa mabota, mingimingi ntango mikakatano ebimi. Biblia elobeli mokumba ya mibali boye: “Mibali basengeli kolinga basi na bango lokola nzoto na bango moko.” Soki mobali alandi toli yango, mwasi akozala na esengo mpe ekozala mpasi te azala na “limemya makasi epai ya mobali na ye.”—Baefese 5:25-29, 33.
Mpo na boyokani ya baboti ná bana na bango, ntoma Paulo akomaki boye: “Batata, bósilikisaka bana na bino te, kasi bókoba kobɔkɔla bango na disipilini mpe na makebisi ya Yehova.” (Baefese 6:4) Soki baboti bazali kolanda toli yango, libota ezalaka na esengo mpe ezalaka mpasi te mpo bana bátosa baboti na bango.—Baefese 6:1.
Yango ezali kaka bandakisa ya toli malamu oyo Biblia epesi mpo na mabota. Bato mingi bazali na mabota ya esengo mpo balandaka batoli wana ya Nzambe. Tózwa ndakisa ya mobali ná mwasi oyo tolobelaki na ebandeli. Nsima ya koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova na boumeli ya sanza misato mpamba, bakómaki kosalela toli ya Biblia mpo na libala. Basalaki makasi básololaka, moto na moto atalelaka bamposa ya moninga, mpe bálimbisanaka. (Masese 15:22; 1 Petelo 3:7; 4:8) Bayekolaki komipekisa mpe kosɛnga na Nzambe asalisa bango ntango babandi kokóma motema mokuse. (Bakolose 3:19) Eumelaki te, “Mur de Berlin” ekweaki!
Nzambe akoki kosangisa mabota
Koyeba mitinda ya Nzambe mpe kosalela yango ekoki kolendisa bato ya libota moko báyikela mikakatano na yango mpiko. Yango ezali na ntina mingi, mpamba te Biblia esakolaki ete na mikolo na biso, mabota ekokutana na mikakatano mingi. Paulo asakolaki makambo mabe oyo ezali komonana na mabota mpe epai ya bato nyonso. Alobaki ete na “mikolo ya nsuka” bato bakozanga bosembo, bakozala na “bolingo ya libota” te, bana bakotosa baboti te; makambo yango ekomonana ata epai ya bato oyo “bazali na motindo moko boye ya ezaleli ya kokangama na Nzambe.”—2 Timote 3:1-5.
Mposa ya kosepelisa Nzambe ekoki kosalisa bato bálonga makambo mabe wana oyo ekoki kobebisa libota. Bato mingi bamoni ete lisalisi ya Nzambe ezali na ntina mingi mpo na kolonga ebele ya mikakatano oyo bazali kokutana na yango na mabota. Soki bato ya libota moko balingi kobatela boyokani malamu na Nzambe, basengeli libosoliboso koluka kosalela mitinda ya Biblia mpe koyeba ete “soki ezali [Yehova] te oyo akotongaka ndako, basali bakosala wana bobele mpamba.” (Nzembo 127:1) Mpo libota ezala mpenza na esengo, esengeli kotya Nzambe na esika ya liboso.—Baefese 3:14, 15.
Na Hawaii, mobali moko nkombo na ye Dennis, amonaki ete maloba wana ezali solo. Atako azalaki komibenga moklisto, azalaki koswana mingi mpe kobunda. Nsima ya kosala mosala ya soda, akómaki lisusu moto ya nkanda makasi. Alobi boye: “Nazalaki ntango nyonso kozwana matata na bato. Nazalaki koloba ete, ‘Oyo ekoya, eya,’ mpe nazalaki kobanga liwa te. Natikaki te koswana mpe kobunda. Lokola mwasi na ngai azalaki Motatoli ya Yehova, alendisaki ngai nayekola Biblia.”
Dennis aboyaki koyokela mwasi na ye. Kasi, bizaleli malamu ya mwasi na ye ekómaki kobongola makanisi na ye. Mokolo mosusu, Dennis akendaki na makita ná mwasi mpe na bana na ye. Na nsima, ndeko moko akómaki koyekola na ye Biblia mpe akolaki malamu na elimo. Atikaki komɛla likaya, ezaleli oyo aumelaki na yango mbula 28, mpe aboyaki baninga oyo bazalaki kosala makambo oyo azalaki kolinga kotika. Dennis azongisaka matɔndi mingi epai ya Yehova; alobi boye: “Libota na ngai ekómaki malamu. Tokómaki kokende na makita mpe kobima na mosala ya kosakola elongo na bana na biso. Bana na ngai mibale bazalaki kobangabanga ngai lisusu te, mpamba te nazalaki lisusu kosilika mpambampamba te to mpe kofinga. Tokómaki kofanda elongo mpe kosolola masolo ya Biblia. Soki nayekolaki solo ya Biblia te, lelo oyo mbɛlɛ nazali lisusu na bomoi te; nazalaki moto ya matata mpenza.”
Bato bakoki kozala na mabota ya esengo soki bazali kosala makasi básala mokano ya Yehova. Makambo emonisi ete ata soki moto moko na kati ya libota azali kolanda batoli ya Biblia, libota ezalaka malamu koleka soki moto ata moko te azali kolanda yango. Mpo na kokóma bato oyo balandaka mitinda ya boklisto na kati ya libota esɛngaka mosala makasi, mayele mpe ntango mingi. Baoyo bazali na mabota ya ndenge wana bazalaka na elikya ete Yehova akopambola milende oyo bazali kosala mpo na kolendisa mabota na bango. Bato wana bakoki koloba lokola mokomi ya nzembo ete: “Lisalisi na ngai ekouta epai ya Yehova.”—Nzembo 121:2, NW.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá Calendrier des Témoins de Jéhovah 2005, Mai/Yuni.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 9]
“Libota nyonso na likoló mpe na mabelé ezwi nkombo na yango” epai ya Nzambe.—BAEFESE 3:15
[Etanda na lokasa 8]
YEHOVA ALINGAKA MPENZA MABOTA
“Nzambe mpe apambolaki bango, mpe Nzambe alobelaki bango ete, Bóbotaka mpe bózala na kobota mingi, mpe bótondisa mokili.”—Genese 1:28.
“Esengo na moto na moto oyo abangaka Yehova . . . Mwasi na yo akozala lokola nzete ya vinyo oyo ezali kobota mbuma na kati mpenza ya ndako na yo.”—Nzembo 128:1, 3, NW.