Bato bakoki kosilisa bobola?
BATO mingi bayebi bobola te banda babotamá. Balalá naino nzala te to kozanga eloko ya kozipa nzoto na ntango ya malili. Atako bongo, mingi kati na bango bayokelaka babola mawa mpe basalaka nyonso mpo na kosalisa bango.
Nzokande, bobola ezali kaka makasi na mikili oyo ezali na bitumba, na mpela to mpe na kozanga mbula, mpe na mikakatano mosusu. Makambo nyonso wana ezali kopesa mpasi mingi na bato ya Afrika oyo babikelaka kaka na mosala ya bilanga. Bamosusu bazali kokima bamboka mpe bazali kokende kofanda na bavile to na mikili mosusu. Bato mosusu ya mboka bazali kokanisa ete soki bakei kofanda na vile, bakozala na bomoi ya malamu.
Mbala mingi, bato bazali koleka mingi na bavile yango mpe bobola ezali se kobakisama. Esika ya kosala bilanga ekómi moke to mpe ezali lisusu te. Bato bazali kozwa misala te. Lokola bazali lisusu na elikya te, mingi bazali komipesa na kosala makambo ya mabe. Bato oyo bafandi na bavile bazali kosɛnga lisalisi, kasi baguvɛrnɛma ezali kokoka te kosalisa babola nyonso wana oyo bazali se kokóma mingi. Na zulunalo moko ya Londres (The Independent), balobelaki lapolo moko oyo ONU ebimisaki na Novɛmbɛ 2003; bakomaki boye: “Nzala ezali se kobakisama na mokili.” Babakisaki boye: “Lelo oyo na mokili mobimba bato soki milio 842 bazali kolya malamu te mpe motángo yango ezali se kobakisama. Longola yango, mbula na mbula bato milio 5 bazali kokufa nzala.”
Na Afrika ya Sudi, ntango mosusu, bato oyo bazali konyokwama mpo na bobola batindaka mikanda na biro ya Batatoli ya Yehova. Na ndakisa, mobali moko oyo afandaka na engumba Bloemfontein akomaki boye: “Nazali na mosala te, mpe soki nazwi libaku ya koyiba, nayibaka. Soki nayibi te, tokolala nzala mikolo mingi mpe tokonyokwama na malili. Misala ezali te. Bato mingi bazali koyengayenga na babalabala mpo na koluka misala to mwa eloko ya kolya. Nayebi bato mosusu oyo balɔkɔtaka biloko ya kolya na fulu. Bamosusu bamibomaka. Mingi lokola ngai bazali konyokwama na makanisi mpe bazangi elikya. Elikya mpe ezali te ete makambo ekobonga. Nzambe oyo akelá biso na mposa ya kolya mpe ya kolata, azali komona makambo oyo te?”
Tokoki kozwa biyano oyo ekokitisa biso mitema na mituna nyonso wana. Ndenge lisolo oyo elandi ekomonisa yango, biyano na mituna yango ezali na Biblia, Liloba ya Nzambe.