Bazali na esika ya mpasi, kasi bazali na elikya—Liyangani na kaa ya bato bakimá mboka
NA NƆRDI ya Kenya, pembeni ya Soudan, ezali na kaa moko ya bato bakimá mboka; babengaka yango kaa ya Kakuma. Bato koleka 86 000 bafandi na kaa yango. Na esika yango mabelé ekauká makasi mpe ntango mosusu na moi, molunge ekómaka na 50°C. Mobulu ebimaka mingi na kati ya bato ya bamboka ndenge na ndenge oyo bafandi na kaa yango. Mpo na bato mingi, kaa yango ezali esika ya mpasi. Nzokande, bato mosusu oyo bafandi kuna bazali na elikya.
Bato mosusu bakimá mboka oyo bafandi kuna bazali Batatoli ya Yehova mpe bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi na molende. Bazali basakoli ya lisangá ya Lodwar, mboka oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ 120 na sudi ya kaa yango. Mpo na komona lisangá mosusu esengeli kotambola ngonga mwambe na motuka.
Lokola bato oyo bafandi na kaa bazali na ndingisa ya kobima te, bandeko mingi bazalaka na likoki te ya kokende na mayangani. Yango wana, bibongiseli ezwamaki mpo básala liyangani ya mokolo moko na kati ya kaa.
Mobembo na nɔrdi
Batatoli 15 ya engumba Eldoret, oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ 480 na sudi ya kaa, bandimaki kosala mobembo ya makama mingi na mokili ekauká ya nɔrdi mpo na kokende kosala liyangani yango; bakendaki na moyekoli moko ya Biblia oyo apesaki bisi na ye ná sofɛlɛ mpo na kokumba bandeko. Mposa na bango ezalaki bákende kolendisa bandeko na bango.
Balongwaki ntɔngɔntɔngɔ na mboka na bango oyo ezali na bangomba na wɛsti ya Kenya. Nzela ya mabulumabulu mpe ya ngomba eleki na baferme mpe bazamba, nsima ekiti na esobe ya moi makasi. Nzelanzela bazalaki komona bitonga ya bantaba mpe bakamela bazali kolya matiti na mwa zamba ekauká. Bazalaki mpe komona bato ya mboka bazali kotambola balati na modɛlɛ ya mboka na bango, mingi bazalaki na banzete, matimbo, mpe bambanzi. Nsima ya kosala mobembo ya ngonga 11, Batatoli yango bakómaki na Lodwar, mboka ya moi makasi mpe etonda na mputulu; bato soki 20 000 bafandaka na mboka yango. Bandeko ya mboka wana bayambaki bapaya na esengo mpe na nsima, bapaya bakendaki kopema mpo bázala na makasi ya kosala makambo nyonso oyo bakanaki.
Mokolo oyo elandaki, bapaya bakendaki kotambola mpo na kotala bisika kitoko oyo ezali pembeni ya engumba yango. Bazalaki na mposa ya komona mingimingi Laki Turkana, laki oyo eleki monene na Kenya mobimba. Laki yango ezali na kati ya esobe moko monene, ezali na bangando ebele koleka na esika mosusu nyonso na mokili. Mwa bato oyo bafandaka na mabongo na yango basalelaka mai na yango oyo ezali na mungwa mingi. Na nsima ya midi, bakendaki na makita mpo na kolanda Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpe Likita ya mosala. Bandeko bazali na Ndako ya Bokonzi moko kitoko oyo etongamaki na 2003 na ebongiseli ya kotonga bisika ya losambo na mikili ya bobola.
Mokolo ya liyangani
Liyangani esalemaki mokolo ya lomingo. Bandeko ya lisangá ya Lodwar ná bapaya bazwaki ndingisa ya kokɔta na kaa kobanda na ngonga ya 8 na ntɔngɔ. Batatoli bazalaki na mposa ya kobanda liyangani na ntɔngɔ. Nzela oyo ekei na kaa yango eleki na mokili ekauká pembeni ya ndelo ya Soudan. Pembenipembeni ya nzela yango ezali na mwa bangomba. Na kaa ya Kakuma nde moto akoki komona ata bisika oyo ezali mosika. Mbula ebɛtaki, mpe na kati ya kaa, mai etɛlɛmakitɛlɛmaki na bisika mosusu na nzela ya mabelé. Bandako mingi ezali na babrike ya mabelé mpe likoló bazipá manzanza to kapɔ. Bato ya Éthiopie, ya Somalie, ya Soudan, mpe ya bikólo mosusu bafandaka bato na bato na kartye na bango. Bato oyo bafandaka na kaa bayambaki bapaya na esengo mpenza.
Liyangani esalemaki na esika moko oyo batángisaka bato. Bifelo ya esika yango ezali na mayemi oyo ezali komonisa makambo ya nsɔmɔ oyo bato bakimá mboka bakutanaki na yango, kasi bato oyo bazalaki na esika yango mokolo wana batondaki na elikya. Masukulu nyonso esalemaki na Lingelesi mpe ezalaki kobongolama na Swahili. Balobi mosusu oyo bayebi minɔkɔ yango mibale, bazalaki kobongola bango moko. Ndeko moko autá na Soudan, oyo afandaka na kaa yango asalaki lisukulu ya liboso; motó ya likambo na yango ezalaki, “Tótalela motema na biso ya elilingi.” Bandeko oyo bazalaki bapaya basalaki masukulu mosusu.
Na liyangani nyonso, likambo oyo bato mingi bazelaka ezalaka ntango ya batisimo. Na nsuka ya lisukulu ya batisimo, kandida kaka moko oyo asengelaki kozwa batisimo atɛlɛmaki mpe bayangani nyonso bazalaki kotala ye. Gilbert akimaki etumba na ekólo na bango elongo na tata na ye na 1994. Liboso, bakanisaki ete bakoki kofanda na kimya na Burundi, kasi bamonaki ete bazalaki kaka na likama. Gilbert akendaki na Zaïre, mpe na nsima na Tanzanie; ntango mosusu azalaki kobombana na zamba, mpe nsukansuka akómaki na Kenya. Bato mingi batangisaki mpisoli ntango molobi atombelaki ye boyei malamu na lisangá. Gilbert atɛlɛmaki liboso ya bayangani 95 mpe, na mituna mibale oyo molobi atunaki ye, ayanolaki na mongongo makasi ete “Ndiyo!”—elingi koloba “Ɛɛ” na Swahili. Ye ná bandeko mosusu batimolaki mwa libulu na mabɔkɔ mpe batyaki kapɔ oyo liboso ezalaki kozipa mwa ndako na ye. Lokola azalaki mpenza na mposa ya kozwa batisimo, na ntɔngɔ ya mokolo ya liyangani ye moko atondisaki libulu yango na mai oyo azalaki kotɔka na katini!
Eteni mosusu ya ntina mingi na programɛ ya nsima ya midi ezalaki masolo etali bomoi ya Batatoli na kaa. Ndeko moko alobaki ete asololaki na mobali moko oyo azalaki kopema na nse ya nzete.
Atunaki ye boye: “Moto akoki kozwa likama te soki afandi na nse ya nzete ata na ntango nini?”
Mobali yango azongisaki ete: “Ɛɛ.” Na nsima abakisaki, “Kasi, na butu te.”
Ndeko wana atángelaki ye Mika 4:3, 4: “Bakofanda mpe na nse, moto na moto na nse ya [nzete ya vinyo] na ye mpe na nzete na ye ya [figi], moto moko akobangisa bango te.” Na nsima alimbolaki boye: “Omoni, na mokili ya sika oyo Nzambe alaki, ekozala na likama te ata na ntango nini.” Mobali yango andimaki kozwa mokanda moko oyo elimbolaka Biblia.
Ndeko mwasi moko oyo azalaki na liyangani na kaa ya Kakuma autaki kokufela bandeko misato. Alobaki boye mpo na elimo ya bandeko na kaa: “Awa mikakatano ezali mingi; kasi, bazali kobatela kondima na bango makasi. Bafandi na esika oyo esengo ezali te, kasi bazali kosalela Yehova na esengo. Bazali na kimya elongo na Nzambe. Makambo namonaki elendisaki ngai mpo nakoba kobatela kimya mpe kosalela Yehova. Nazali komitungisa mpo na likambo moko te!”
Nzokande, makambo malamu eumelaka te, liyangani yango ekómaki na nsuka. Na lisukulu ya nsuka, molobi amonisaki ete bandeko oyo bafandi na kaa yango bauti na bikólo mwambe. Motatoli moko oyo afandaka na kaa yango alobaki ete liyangani yango emonisaki bomoko mpe bolingo oyo Batatoli ya Yehova bazali na yango na mokili oyo ekabwani. Baklisto yango bazali mpenza bandeko ya solosolo.—Yoane 13:35.
[Etanda/Elilingi na lokasa 25]
BILENGE YA SOUDAN OYO BABUNGANÁ NA BABOTI NA BANGO
Banda ntango etumba ebandaki na Soudan na 1983, bato milio mitano bakimá bamboka na bango. Na kati na bango, ezalaki na bana soki 26 000, oyo babunganá na baboti mpe bandeko na bango. Mingi kati na bango bakendaki na bakaa ya bato bakimá mboka na Éthiopie, mpe bafandaki kuna soki mbula misato. Lokola makambo esɛngaki bákima lisusu, batambolaki mbula mobimba, bazongaki lisusu na Soudan, mpe na nsuka bakendaki kofanda na nɔrdi ya Kenya epai basoda mpe babandi babomaki bango mingi; bamosusu mpe bakufaki na maladi to balyaki bango na banyama ya zamba. Kaka katikati ya bana yango babikaki na mibembo wana oyo etondaki na makama mpe bango nde bato ya liboso bafandaki na kaa ya Kakuma. Bato oyo basalaka na bibongiseli oyo esalisaka bato bakimá mboka babengaka bana yango bilenge ya Soudan oyo babunganá na baboti na bango.
Lelo oyo, bato bakimá bitumba na Soudan, na Somalie, na Éthiopie, mpe bikólo mosusu bafandaka na kaa ya Kakuma. Ntango moto oyo akimi bitumba akómi na kaa, bapesaka ye bisaleli mpo na kotonga ndako mpe kapɔ mpo na kozipa yango. Mbala mibale na sanza, bapesaka moto mokomoko kilo 6 ya farini, kilo moko ya madesu, mwa mafuta ná mungwa. Mingi na bango batɛkaka ndambo ya biloko oyo bapesaka bango mpo na kosomba biloko mosusu oyo bazali na yango mposa.
Bilenge mingi bakutanaki lisusu na baboti na bango mpe bamosusu bakendaki na mikili mosusu. Nzokande, biro oyo esalisaka bato bakimá mboka mpo bázwa ndingisa ya kofanda na mboka mosusu emonisi ete “bankóto kati na bango bazali naino na Kakuma, kaa oyo etondá na mputulu mpe banzinzi, epai bazali kokelela bilei mpe kobunda mpo na kotánga kelasi.”
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Na ndingisa ya Refugees International
[Karte na lokasa 23]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
KENYA
Kaa ya Kakuma
Laki Turkana
Lodwar
Eldoret
Nairobi
[Elilingi na lokasa 23]
Bomoi ezali mpasi na kaa
[Elilingi na lokasa 23]
Na kaa ya Kakuma, bakabolelaka bato mai
[Elilingi na lokasa 23]
Batatoli ya Kenya basalaki mobembo ya makama tii na nɔrdi mpo na kolendisa bandeko na bango
[Elilingi na lokasa 24]
Misionɛrɛ azali kobongola lisukulu ya mobongisi-nzela monene
[Elilingi na lokasa 24]
Libulu mpo na batisimo
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 23]
Bazali kokabola mai mpe kaa ya Kakuma: Na ndingisa ya Refugees International