Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 1/4 nk. 25-28
  • Kómisá Yehova Nzambe na yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kómisá Yehova Nzambe na yo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Abalayama “andimaki [Yehova]”
  • Tómonisa kondima lokola Abalayama lelo oyo
  • Moto oyo asepelisaki motema ya Yehova
  • Ntango tosali masumu
  • “Moto na mayoki lokola oyo ya biso”
  • Tóbunda na makanisi na biso
  • Kómisá Yehova Nzambe na yo
  • Nzambe na ye apesaki ye makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Nzambe na ye abɔndisaki ye
    Mekolá kondima na bango
  • Okozala sembo lokola Eliya?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Esí ekómela yo obanga to ozala lokola mwana ya mawa?
    Teyá bana na yo
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 1/4 nk. 25-28

Kómisá Yehova Nzambe na yo

NA NTANGO ya kala, bato mosusu bazalaki mpenza baninga na Yehova, mpe bato bakómaki kolobela ye lokola Nzambe na bango. Na ndakisa, Biblia elobeli Yehova lokola “Nzambe ya Abalayama,” “Nzambe ya Davidi,” mpe “Nzambe ya Eliya.”​—Genese 31:42; 2 Mikonzi 2:14; 20:5.

Ndenge nini bato wana bakómaki mpenza baninga ya Nzambe? Ndenge nini ndakisa na bango ekoki kosalisa biso mpe tókóma baninga ya Mozalisi mpe tóbatela boninga yango?

Abalayama “andimaki [Yehova]”

Abalayama azali moto ya liboso oyo Biblia elobi mpo na ye ete amonisaki kondima epai ya Yehova. Kondima ezali ezaleli ya libosoliboso ya Abalayama oyo esalaki ete Nzambe andima ye. Yango wana, Yehova azalaki kosepela na Abalayama mpe nsima ya mikolo amimonisaki epai ya Moize lokola “Nzambe ya Abalayama” mpe ya mwana na ye Yisaka mpe ya nkɔkɔ na ye Yakobo.​—Genese 15:6; Exode 3:6.

Ndenge nini Abalayama akómaki na kondima wana epai ya Nzambe? Ya liboso, Abalayama atongaki kondima na ye likoló ya moboko ya makasi. Ekoki kozala ete Seme mwana ya Noa, oyo amonaki na miso misala ya kobikisa ya Yehova nde ateyaki ye banzela na ye. Seme azalaki wana ntango Yehova “abatelaki Noa, mosakoli moko ya boyengebene, elongo na bato mosusu nsambo ntango ayeisaki mpela likoló ya mokili moko ya bato oyo bazalaki kotyola Nzambe.” (2 Petelo 2:5) Ekoki kozala ete Seme ayebisaki Abalayama ete soki Yehova alaki likambo, azangaka te kokokisa yango. Atako bongo, ntango Nzambe apesaki Abalayama elaka, asepelaki mpe akómaki komitambwisa na boyokani na boyebi oyo azalaki na yango ete elaka wana ekokokisama.

Eloko mosusu oyo esalaki ete kondima ya Abalayama ezala makasi ezali misala na ye. Ntoma Paulo akomaki boye: “Na kondima Abalayama, ntango abengamaki, atosaki na kobimáká mpo na kokende na esika oyo asengelaki kozwa lokola libula; mpe abimaki, atako azalaki koyeba te epai wapi azalaki kokende.” (Baebele 11:8) Botosi wana ekómisaki kondima ya Abalayama makasi lisusu koleka, yango wana moyekoli Yakobo akomaki boye: “Omoni ete kondima na ye esalaki elongo na misala na ye mpe na nzela ya misala na ye kondima na ye ekómaki ya kokoka.”​—Yakobo 2:22.

Lisusu, Yehova atikaki kondima ya Abalayama emekama mpo ekóma makasi lisusu. Paulo alobaki boye: “Na kondima Abalayama, ntango amekamaki, ekoki kolobama ete akabaki Yisaka mbeka.” Komekama ebongisaka kondima mpe ekómisaka yango makasi, mpe ekómisaka yango “na motuya monene koleka wolo.”​—Baebele 11:17; 1 Petelo 1:7.

Atako Abalayama amonaki kokokisama ya makambo nyonso oyo Nzambe alakaki ye te, asepelaki komona bato mosusu bazali kolanda ndakisa na ye. Mwasi na ye Sala mpe bato mosusu misato ya libota na ye: Yisaka, Yakobo mpe Yozefe, balobelami mpe na Biblia mpo na kondima na bango makasi.​—Baebele 11:11, 20-22.

Tómonisa kondima lokola Abalayama lelo oyo

Kondima ezali na ntina mpo na moto nyonso oyo alingi ete Yehova azala Nzambe na ye. Paulo akomaki ete “kozanga kondima likoki ya kosepelisa ye [Nzambe] mpenza ezali ata moke te.” (Baebele 11:6) Ndenge nini lelo oyo mosaleli ya Nzambe akoki kozala na kondima makasi lokola oyo ya Abalayama?

Lokola Abalayama, biso mpe tosengeli kotonga kondima na biso likoló na moboko ya makasi. Koyekola Biblia mbala na mbala mpe mikanda oyo elimbolaka yango nde ezali lolenge eleki malamu ya kosala yango. Soki tozali kotánga Biblia mpe komanyola na makambo oyo tozali kotánga, yango ekoki kotinda biso tóndima ete bilaka ya Nzambe ekokokisama mpenza. Yango ekosalisa mpe biso tóyokanisa bomoi na biso na makambo oyo tozali kozela. Botosi mpe ekoki kokómisa kondima na biso makasi. Botosi yango esɛngaka kobimaka na mosala ya kosakola mpe koyanganaka na mikita.​—Matai 24:14; 28:19, 20; Baebele 10:24, 25.

Na ntembe te, makambo lokola botɛmɛli, maladi ya makasi, liwa ya moto moko oyo alingaka, to makambo mosusu ekotya kondima na biso na komekama. Soki totikali sembo epai ya Yehova na ntango ya komekama, kondima na biso ekokóma makasi, mpe ekozala na motuya koleka wolo. Ezala tozali komona kokokisama ya bilaka nyonso ya Nzambe to te, kondima na biso ekotinda biso tópusana penepene na Yehova. Lisusu, ndakisa na biso ekolendisa bato mosusu bámekola kondima na biso. (Baebele 13:7) Ezali yango nde Ralph asalaki. Amonaki kondima ya baboti na ye mpe amekolaki yango. Alobi boye:

“Ntango nazalaki epai ya baboti na ngai, bazalaki kolendisa biso nyonso tolamukaka na ntɔngɔntɔngɔ mpo tótánga Biblia. Kosala bongo esalaki ete totánga Biblia mobimba.” Tii lelo, Ralph atángaka Biblia ntɔngɔ nyonso, mpe yango esalaka ete abanda mokolo na makanisi malamu. Azalaki kobima na mosala ya kosakola ná tata na ye pɔsɔ nyonso. “Na ntango wana nde nayekolaki ndenge ya kozongela bato oyo basepelaki mpe koyekola na bango Biblia.” Ralph azali lelo kosala na biro moko ya Batatoli ya Yehova na Mpoto. Oyo nde mbano kitoko mpo na kondima ya baboti na ye!

Moto oyo asepelisaki motema ya Yehova

Davidi, moto oyo abotamaki soki mbula 900 nsima ya Abalayama, azali ndakisa monene na kati ya bato ya Nzambe oyo Biblia elobeli. Mpo na ndenge Yehova aponaki Davidi azala mokonzi na Yisalaele, mosakoli Samwele alobaki boye: “[Yehova] asili komilukela moto oyo akosepelisa motema na ye.” Boninga ya Yehova ná Davidi ezalaki mpenza makasi, yango wana na nsima mosakoli Yisaya alobaki na Mokonzi Hizikiya boye: “[Yehova] Nzambe na tata na yo, Davidi.”​—1 Samwele 13:14; 2 Mikonzi 20:5; Yisaya 38:5.

Atako Davidi azalaki kosepelisa motema ya Yehova, na bantango mosusu azalaki kotika bamposa na ye ebungisa ye nzela. Asalaki mabunga minene mbala misato: Atikaki ete bámɛma sanduku ya kondimana na Yelusaleme na lolenge ebongi te; asalaki ekobo na Bata-seba mpe abomisaki mobali na ye Uliya; mpe atángaki motuya ya bato ya Yisalaele mpe ya Yuda atako Yehova asɛngaki ye yango te. Na makambo nyonso wana Davidi abukaki mobeko ya Nzambe.​—2 Samwele 6:2-10; 11:2-27; 24:1-9.

Nzokande, ntango bamonisaki Davidi masumu na ye, andimaki mabe na ye mpe apesaki bato mosusu foti te. Andimaki ete bamemaki sanduku ya kondimana na ndenge ebongi te mpe abakisaki ete, ‘tolukaki Yehova na nzela ekoki te.’ Ntango mosakoli Natana abimisaki polele lisumu ya ekobo oyo Davidi asalaki, Davidi alobaki boye: “Nasaleli [Yehova] lisumu.” Mpe ntango bayebisaki Davidi mabe oyo asalaki na ndenge atángaki motuya ya bato, alobaki ete: “Nasali lisumu monene mpo ete nasali likambo oyo.” Davidi asɛngaki bolimbisi mpo na masumu na ye mpe atikalaki kaka moninga ya Yehova.​—1 Ntango 15:13; 2 Samwele 12:13; 24:10.

Ntango tosali masumu

Ndakisa ya Davidi ekoki kosalisa biso wana tozali kosala milende mpo Yehova akóma Nzambe na biso. Soki moto lokola Davidi oyo azalaki kosepelisa motema ya Yehova asalaki mpe masumu ya minene ndenge wana, biso tosengeli te kolɛmba nzoto soki, atako tozali kosala milende, ntango mosusu tosalaka mabunga to masumu minene. (Mosakoli 7:20) Koyeba ete Nzambe alimbisaki Davidi ntango asɛngaki bolimbisi ekoki kolendisa biso. Ezali yango nde ekómelaki Uwea esili koleka mwa bambula.

Uwe azalaki nkulutu na lisangá moko ya Batatoli ya Yehova. Na ntango moko boye, akómaki na bamposa ya mabe mpe asalaki pite. Na ebandeli, Uwe, alukaki kobomba lisumu na ye ndenge mokonzi Davidi asalaki, akanisaki ete Yehova akobosana lisumu yango. Nsukansuka, lokola lisosoli na ye ezalaki kotungisa ye mingi, ayebisaki lisumu yango epai ya moninga na ye nkulutu mosusu mpe bibongiseli ezwamaki mpo na kosalisa ye.

Uwe asɛngaki bolimbisi mpo na masumu na ye mpe atikalaki penepene na Yehova mpe na lisangá. Asepelaki mingi na ndenge bankulutu basalisaki ye. Yango wana mwa bapɔsɔ na nsima, akomelaki bango mpo na kopesa bango botondi mpo na lisalisi na bango. Akomaki boye: “Bosalisaki ngai nalongola nsɔni likoló na nkombo ya Yehova.” Uwe abatelaki boninga ná Yehova mpe na nsima azwaki lisusu mikumba kaka na lisangá yango.

“Moto na mayoki lokola oyo ya biso”

Eliya, moto oyo azalaki na bomoi ekeke moko nsima ya Davidi, azalaki moko ya basakoli ya minene na Yisalaele. Eliya azalaki kotombola losambo ya solo na ntango oyo makambo ya mabe ezalaki mingi; atako bongo akobaki kosalela Yehova na molende. Tokoki kokamwa te ete Elisa, oyo azwaki esika ya Eliya, abengaki Yehova “Nzambe ya Eliya”!​—2 Mikonzi 2:14.

Kasi, Eliya azalaki kaka moto lokola biso. Yakobo akomaki boye: “Eliya azalaki moto na mayoki lokola oyo ya biso.” (Yakobo 5:17) Na ndakisa, ntango alongaki na ndenge ya nsɔmɔ basambeli ya Baala, Yezabele alukaki koboma ye. Eliya asalaki nini? Akómaki kobanga mpe akimaki na lisobe. Afandaki na nse ya nzete ya letama, mpe amilelaki boye: “Ekoki-e! Sasaipi, ɛ [Yehova], longola bomoi na ngai, zambi naleki batata na ngai na malamu te.” Eliya alingaki lisusu te kozala mosakoli, kasi amonaki nde malamu akufa.​—1 Mikonzi 19:4.

Kasi, Yehova amityaki na esika ya Eliya. Nzambe alendisaki ye mpe ayebisaki ye ete azali ye moko te, mpamba te ezali na bato mosusu oyo batikalaki sembo na losambo ya solo. Mpe lisusu, Yehova akobaki kotyela ye motema mpe azalaki na mosala ya kopesa ye.​—1 Mikonzi 19:5-18.

Atako Eliya atungisamaki na makanisi, yango emonisaki te ete Yehova aboyaki ye. Mbula soki 1000 na nsima, ntango Yesu klisto abongwanaki liboso ya Petelo, Yakobo ná Yoane, Yehova aponaki banani bábima esika Yesu azalaki? Moize ná Eliya. (Matai 17:1-9) Emonani mpenza ete Yehova atalelaki Eliya lokola mosakoli malamu mpenza. Atako Eliya azalaki kaka “moto na mayoki lokola oyo ya biso,” Nzambe asepelaki na mosala makasi oyo asalaki mpo na kozongisa losambo ya pɛto mpe kosantisa nkombo na Ye.

Tóbunda na makanisi na biso

Lelo, ekoki kosalema ete basaleli ya Yehova bálɛmba to bábanga. Koyeba ete Eliya amiyokaki mpe ndenge wana ekobɔndisa biso. Ezali mpenza esengo koyeba ete ndenge kaka Yehova amityaki na esika ya Eliya, amityaka mpe na esika na biso mpe ayebaka mpasi na biso.​—Nzembo 103:14.

Tolingaka Yehova mpe bazalani na biso mpe tozalaka na mposa ya kosala mosala oyo Yehova apesi biso ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi. Epai mosusu, tokoki mbala mosusu koyoka mawa mpo bato bazali kosepela te na nsango na biso to mpe tokoki kobanga minyoko ya banguna ya losambo ya solo. Nzokande, ndenge kaka Yehova alendisaki Eliya mpo akoba na mosala na ye, akolendisa mpe basaleli na ye lelo. Tózwa ndakisa ya Herbert ná Gertrud.

Herbert ná Gertrud, bazwaki batisimo mpe bakómaki Batatoli ya Yehova na 1952, na engumba Leipzig, na République Démocratique d’Allemagne. Na ntango wana, ezalaki mpasi mpo basaleli ya Nzambe basakola mpamba te mosala na bango epekisamaki. Herbert azalaki komiyoka ndenge nini ntango azalaki kosakola ndako na ndako?

“Ntango mosusu tozalaki kobanga. Ntango tozalaki kokende kosakola ndako na ndako, tozalaki koyeba te soki bakonzi bakobimela biso mbalakaka mpe bakokanga biso.” Nini esalisaki Herbert ná Batatoli mosusu bábangaka te? “Tozalaki koyekola Biblia mingi biso moko. Mpe Yehova apesaki biso makasi mpo tókoba kosakola.” Herbert akutanaki na makambo mingi ya kolendisa mpe ya kosɛkisa na mosala ya kosakola.

Herbert akutanaki na mwasi moko ya mbula soki 50 oyo asepelaki na solo. Ntango Herbert azongelaki mwasi yango mwa mikolo na nsima, mwana mobali moko azalaki wana mpe azalaki kolanda lisolo na bango. Nsima ya mwa ntango, Herbert amonaki eloko moko oyo ebangisaki ye. Amonaki ekɔti ya mokonzi moko ya basoda likoló ya kiti. Ekɔti yango ezalaki ya elenge mobali wana, oyo azalaki polisi mpe azalaki na mokano mpenza akanga Herbert.

Elenge yango alobaki ete: “Yo ozali Motatoli ya Yehova! Lakisá karte na yo.” Herbert apesaki ye karte na ye. Na nsima, likambo moko oyo amizelaki na yango te esalemaki. Mwasi yango alobaki na polisi wana boye: “Soki likambo moko ekómeli moto ya Nzambe oyo, konyata lisusu makolo na ndako oyo te.”

Mwana mobali wana akanisaki moke mpe na nsima azongiselaki Herbert karte na ye mpe atikaki ye akende. Herbert ayokaki na nsima ete polisi wana azalaki fianse ya mwana ya mwasi yango. Amonaki malamu atikala fianse ya mwana mwasi yango na esika akanga Herbert.

Kómisá Yehova Nzambe na yo

Liteya nini tokoki kozwa na masolo oyo? Na ndakisa ya Abalayama, tosengeli kozala na kondima makasi na bilaka ya Nzambe. Na ndakisa ya Davidi, tosengeli kosɛngaka Yehova bolimbisi ntango nyonso oyo tosali libunga. Mpe na ndakisa ya Eliya, tosengeli kotyela Yehova motema ete akopesa biso makasi na ntango ya mpasi. Soki tosali bongo, tokoki kokómisa Yehova Nzambe na biso banda lelo mpe libela na libela mpamba te ye azali “Nzambe moko ya bomoi, oyo azali Mobikisi ya bato ya ndenge nyonso, mingimingi mpenza ya bato ya sembo.”​—1 Timote 4:10.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Topesi ye nkombo mosusu.

[Bililingi na lokasa 25]

Botosi ekómisaki kondima ya Abalayama makasi

[Elilingi na lokasa 26]

Na ndakisa ya Davidi, tosengeli kosɛngaka bolimbisi ntango tosali lisumu

[Elilingi na lokasa 28]

Yehova akomitya na esika na biso ndenge amityaki na esika ya Eliya

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto