Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 15/3 lok. 30
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Masolo mosusu
  • Babuki mbuma na mokolo na sabata
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Babuki mbuma ya blé na Sabata
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Mituna ya Batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mokanda ya Biblia nimero 9—1 Samwele
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 15/3 lok. 30

Mituna ya batángi

Lokola Davidi ná bato na ye balyaki mampa ya kolakisama, yango emonisi nde ete moto akoki kobuka mibeko ya Nzambe na ntango ya mpasi kozanga ete azwa etumbu?​—1 Samwele 21:1-6.

Levitike 24:5-9 elobi ete kaka banganga-nzambe nde bakokaki kolya mampa ya kolakisama oyo bazalaki kolongola mokolo nyonso ya Sabata. Ntina ya mobeko yango ezali ete mampa yango ezalaki biloko ya bosantu mpe, kaka bato oyo bazalaki kosala mosala ya Nzambe, elingi koloba banganga-nzambe, nde bakokaki kolya yango. Ezalaki mabe mpenza bápesa yango na moto nyonso to moto alya yango kaka mpamba. Kasi, nganga-nzambe Ahimeleke asalaki lisumu te ntango apesaki Davidi ná bato na ye mampa ya kolakisama.

Davidi azalaki kokokisa mokumba ya ntina mingi oyo Mokonzi Saulo apesaki ye. Davidi ná bato na ye bazalaki na nzala. Ahimeleke amonaki ete bazali pɛto. Atako babukaki mobeko oyo ekomamaki mpo balyaki mampa ya kolakisama, likambo oyo basalaki eyokani na ndenge oyo bakokaki kosalela mampa yango. Makambo wana epesaki Ahimeleke nzela asala likambo oyo ezalaki kosalema te. Yesu Klisto ye moko alobelaki likambo yango mpo na komonisa ete esɛngisamaki te kotosa mobeko ya Sabata na ndenge oyo Bafalisai bazalaki kolimbola yango.​—Matai 12:1-8.

Kasi, nyonso wana elingi koloba te ete moto akozwa etumbu te soki abuki mobeko ya Nzambe ntango azali na mpasi. Na ndakisa, emonani ete basoda ya Yisalaele bakutanaki na mokakatano moko ntango bazalaki kobunda na Bafilistia. Mokonzi Saulo alobaki boye: “Moto alakelama mabe oyo akolya biloko, liboso na mpokwa kino ngai nasili kobukanisa bayini na ngai.” Biblia elobi boye: “Babɛtaki Bafilistia na mokolo yango.” Lokola basoda babundaki mingi, balɛmbaki mpe bayokaki nzala, ‘nde bato babomaki banyama mpe balyaki yango na makila elongo.’ (1 Samwele 14:24, 31-33) Basalaki lisumu na ndenge babukaki mobeko ya Yehova mpo na makila. Likambo oyo basalaki eyokani te na lolenge kaka moko oyo Nzambe alobaki bakoki kosalela makila, elingi koloba “kozongisa bondeko” mpo na masumu. (Levitike 17:10-12; Genese 9:3, 4) Yehova andimaki mbeka oyo bato bapesaki mpo na kosɛnga bolimbisi mpo na lisumu oyo basalaki mpe ayokelaki bango mawa.​—1 Samwele 14:34, 35.

Yehova alingi ete tótosaka mibeko na ye ata na ntango ya mpasi. Ntoma Yoane alobaki boye: “Bolingo ya Nzambe elakisi boye, ete tótosaka bakomandema na ye.”​—1 Yoane 5:3.

[Elilingi na lokasa 30]

Mokolo nyonso ya Sabata bazalaki kotya mampa ya sika ya kolakisama na kati ya tabenakle

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto