“Pimi” moko emonisi bosolo ya lisolo ya Biblia
LILOBA “pimi” ezali kaka esika moko na Biblia mobimba. Na ntango ya Mokonzi Saulo, Bayisalaele basengelaki kosebisa biloko na bango ya mosala epai ya batuli oyo bazalaki Bafilistia. Biblia elobi boye: “Ntalo mpo na kosebisa ezalaki pimi moko mpo na bitimweli mpe mpo na bapikasi mpe bisaleli ya mino misato mpe mpo na bipasola mpe mpo na kobongisa etubeli ya lingenda.”—1 Samwele 13:21, NW.
Pimi yango ezalaki nini? Eyebanaki te tii na 1907 ntango bakundolaki pimi ya liboso na esika oyo engumba Gezele ezalaká; yango ezalaki libanga mpo na komeka bozito. Babongoli ya kala ya Biblia bazalaki na mokakatano mpo na kobongola liloba “pimi.” Na ndakisa, na Biblia King James Version, babongolaki 1 Samwele 13:21 boye: “Kasi bazalaki na libanga mpo na kosebisa bapikasi, mpe mpo na bitimweli, mpe mpo na bakanya, mpe mpo na bipasola, mpe mpo na kotya nsɔngɛ na bitubeli.”
Lelo oyo, bato ya mayele bayebi ete pimi ezalaki emekeli moko oyo ekokanaki na gramɛ 7,82 to pene na ndambo mibale likolo ya misato ya sɛkɛlɛ, oyo ezalaki emekeli ya Baebele. Bafilistia bazalaki kofutisa Bayisalaele pimi moko ya biteni ya palata mpo na kosebisa bisaleli na bango. Ntango bokonzi ya Yuda mpe Yelusaleme, engumba-mokonzi na yango ekweaki na mobu 607 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), bazalaki lisusu kosalela sɛkɛlɛ te. Kasi, ndenge nini pimi emonisi bosolo ya makomi ya Liebele?
Bato mosusu ya mayele balobaka ete Makomami ya Liebele, ata mpe mokanda ya liboso ya Samwele, ekomamaki na ntango ya Bagrɛki mpe ya Baloma, ekoki kozala ata na ekeke ya mibale mpe ya yambo L.T.B. Yango wana, balobaka ete “mikanda yango . . . ‘elobeli masolo ya kala te,’ ekoki te kosalisa na koyeba ‘Biblia’ to makambo ya ‘Yisalaele ya kala’; nyonso ezali kaka masolo oyo Bayuda mpe baklisto bakanisaki.”
Nzokande, mpo na pimi oyo 1 Samwele 13:21 elobeli, William Dever, profesɛrɛ ya arkeoloji mpe ya antropoloji ya Moyen-Orient, alobaki boye: “Ekoki kozala te ete bakomi oyo bazalaki na bomoi na eleko ya Bagrɛki mpe ya Baloma nde ‘bakanisaki’ yango; bankama ya bambula nsima wana emekeli yango ebungaki mpe bato babosanaki yango. Kutu, bato bakangaki ntina ya mwa likambo yango oyo makomi ya Biblia elobeli . . . kaka na ebandeli ya ekeke ya 20 T.B., ntango bato ya arkeoloji bamonaki biloko oyo bakomaki pîm na Liebele.” Profesɛrɛ yango abakisaki boye: “Soki masolo ya Biblia ezali ‘makambo oyo bato bakanisaki kokanisa’ na eleko ya Bagrɛki mpe ya Baloma, ndenge nini lisolo yango ezali na Biblia ya Liebele? Moto mosusu akoki koloba ete esika oyo balobeli pîm ezali ‘kaka likambo moke.’ Toboyi te; kasi biso nyonso toyebi ete ‘masolo ya kala ezalaka kaka makambo mikemike.’”
[Elilingi na lokasa 29]
Pimi moko ezalaki soki ndambo mibale likoló ya misato ya sɛkɛlɛ