Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 1/2 nk. 3-4
  • Bomoi ezali na valɛrɛ nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bomoi ezali na valɛrɛ nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Biloko mpamba, oyo ezali na valɛrɛ ata moke te
  • “Koluka kokwa mopɛpɛ”
  • ‘Nyonso oyo esɛngami epai na moto’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Makanisi ya ntina na mokanda ya Mosakoli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Nini epesaka ntina na bomoi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Bomoi na yo​—⁠Ntina na yango ezali nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 1/2 nk. 3-4

Bomoi ezali na valɛrɛ nini?

“Lokola Nzambe akelá moto na elilingi na ye, koboma moto ezali kobebisa eloko oyo eleki na valɛrɛ mpe na bosantu na mokili oyo.”​—Buku The Plain Man’s Guide to Ethics, ya William Barclay.

YO MPE omonaka ete bomoi ezali ‘eloko oyo eleki na valɛrɛ na mokili oyo’? Soki totali bizaleli ya bato mingi, tokomona ete bomoi ezali na valɛrɛ te na miso na bango. Bato ya mobulu oyo balukaka kaka matomba na bango moko bazali koboma ebele ya bato na nko.​—Mosakoli 8:9.

Biloko mpamba, oyo ezali na valɛrɛ ata moke te

Likambo yango emonanaki mpenza na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Alan Taylor, moto moko ya mayele na masolo ya kala, alobi ete na etumba yango, mbala mingi “bazalaki kobomisa bato kaka mpamba.” Mpo na koluka lokumu, bakonzi ya basoda bazalaki kosalela basoda lokola nde biloko mpamba, oyo ezali na valɛrɛ ata moke te. Kaka na etumba ya Verdun na France, basoda koleka 700000 bakufaki. Taylor akomi boye: “Ezalaki ata na eloko moko te ya ntina oyo bazalaki kowela na engumba yango, bazalaki kobunda kaka na mposa ya koboma bato mpe ya kozwa lokumu.”​—Buku Etumba ya Liboso ya mokili mobimba (na Lingelesi).

Kozanga limemya ndenge wana mpo na bomoi ezali mpe komonana mingi lelo oyo. Kevin Bales, moto moko ya mayele, alobi ete na mikolo oyo, “bato bakómi ebele mpenza; yango wana bato mingi, atako bazali kosala, bazali babola mpe bazali na likama.” Bazali koboma nzoto na mosala bomoi na bango mobimba kaka mpo na kozwa mwa eloko ya kobikela na mokili oyo bato batye mbongo liboso ya makambo nyonso mpe “bomoi ekómi eloko mpamba.” Bales abakisi ete “baoyo bazali kolyela bato, bazali kotalela bango mpenza lokola baombo to biloko ya mosala oyo bakoki kosalela mpo na kozwa mbongo mpe na nsima babwaki yango.”​—Buku Disposable People.

“Koluka kokwa mopɛpɛ”

Ezali mpe na ebele ya bantina mosusu oyo bato mingi bazali komona ete bazali na ntina moko te mpe bazali na elikya te; bazali kokanisa ete moto moko te amibanzabanzaka mpo na bango, bákufa to bázala na bomoi. Longola bitumba mpe makambo ya nko oyo bazali kosala bango, makambo lokola kozanga mbula, nzala, bamaladi, liwa ya bandeko mpe baninga mpe bongo na bongo, ezali mpe konyokola bato lelo oyo mpe, mpo na yango, bato bakómi komituna soki bomoi ezali mpenza na ntina.​—Mosakoli 1:8, 14.

Nzokande, bato nyonso te nde bazali kokelela mpe komona mpasi. Kasi, ata bato oyo bazali konyokwama ndenge wana te bandimaka maloba ya Salomo, mokonzi ya Yisalaele, oyo atunaki boye: “Moto akozwa nini na mosala na ye nyonso mpe mpasi ya motema na ye oyo ye asalaki na yango na nse ya moi?” Ntango bato mingi bafandaka mpe bakanisaka, bamonaka mpenza ete makambo mingi oyo basalaki na bomoi na bango ezalaki se “bisalasala mpe koluka kokwa mopɛpɛ.”​—Mosakoli 2:22, 26.

Bato mingi, soki batali ndenge balekisi bomoi na bango, bamitunaka boye: “Bomoi esuki kaka boye?” Ezali na bato mingi te oyo, na nsuka ya bomoi na bango, bamonaka ete bomoi na bango ‘ezalaki ya esengo penza,’ ndenge bomoi ya Abalayama ezalaki? (Ebandeli 25:8, Bible na lingala ya lelo oyo) Bato mingi bamonaka ete bomoi ezali na ntina moko te. Nzokande, esengeli te tómona bomoi eloko mpamba. Nzambe atalelaka bomoi ya moto nyonso lokola eloko ya motuya mpe alingi ete mokomoko na biso azala na bomoi ya malamu mpenza mpe ya esengo. Ndenge nini mposa na ye wana ekokokisama? Tángá lisolo oyo elandi mpo na koyeba ndenge ekokokisama.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto