Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 1/1 nk. 4-6
  • Bolingo ya Nzambe esangisi bango

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bolingo ya Nzambe esangisi bango
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nini esangisaki bandimi mpo bázala liboke moko?
  • Bomoko ebatelami
  • Bato oyo bazali kosambela Nzambe na bomoko na mikolo na biso
  • Bomoko na bango ezali kobenda bato mosusu
  • Libota ya Yehova lizali na bomoko kitoko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Bomoko ezali elembo ya losambo ya solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Bomoko ya bokristo epesaka Nzambe nkembo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Tóbatela bomoko na mikolo oyo ya nsuka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 1/1 nk. 4-6

Bolingo ya Nzambe esangisi bango

NTANGO lisangá ya boklisto esalemaki na ekeke ya liboso ya ntango na biso (T.B.), atako bandimi na yango bazalaki bato ya bikólo ndenge na ndenge, moko ya makambo oyo ezalaki komonana mpenza na kati na bango ezalaki bomoko. Basambeli yango ya Nzambe ya solo bazalaki bato ya Azia, ya Mpoto mpe ya Afrika. Bazalaki bato ya lolenge nyonso: banganga-nzambe, basoda, baombo, bato bakimá mboka, bato ya mombongo mpe bongo na bongo. Bamosusu bazalaki Bayuda, bamosusu bato ya bikólo. Mingi kati na bango bazalaki liboso bato ya ekobo, bato oyo bazalaki kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi, balangwi ya masanga, miyibi to babɔtɔli. Kasi, ntango bakómaki baklisto, batikaki makambo na bango nyonso ya mabe mpe bango nyonso bakómaki na bomoko na kati ya kondima.

Ndenge nini lingomba ya boklisto ya ekeke ya liboso elongaki kosangisa bato nyonso wana? Mpo na nini kimya ezalaki na kati ya bato yango mpe bazalaki na kimya na bato mosusu? Mpo na nini bazalaki te kosangana na bato oyo bazalaki kotombokela bakonzi to kokɔta na bitumba? Mpo na nini lingomba ya boklisto ya ekeke liboso ekesani mpenza na mangomba minene ya lelo oyo?

Nini esangisaki bandimi mpo bázala liboke moko?

Likambo ya libosoliboso oyo esangisaki bandimi na ekeke ya liboso ezalaki bolingo na bango mpo na Nzambe. Baklisto yango babosanaki te mokumba na bango ya libosoliboso ya kolinga Yehova, Nzambe ya solo, na motema na bango mobimba, na molimo na bango mobimba mpe na makanisi na bango nyonso. Na ndakisa, Yehova asɛngaki ntoma Petelo, oyo azalaki Moyuda, akende na ndako ya moto moko oyo azalaki Moyuda te, moto oyo akokaki kokóma moninga na ye te. Soki andimaki etinda wana, ezalaki libosoliboso mpo alingaki Yehova. Lokola Petelo ná baklisto mosusu ya ekeke ya liboso bayebaki malamumalamu bomoto ya Nzambe, makambo oyo alingaka mpe oyo alingaka te, bakómaki baninga na Ye mpenza. Na nsima, basambeli nyonso ya Yehova basosolaki ete mokano na Ye ezalaki ete bázala “liboke moko mpenza na makanisi kaka moko mpe na motindo ya kokanisa kaka moko.”​—1 Bakolinti 1:10; Matai 22:37; Misala 10:1-35.

Lisusu, bandimi bakómaki na bomoko mpamba te bango nyonso bandimelaki Yesu. Bazalaki na mposa ya kolanda mpenza ndakisa na ye. Alobaki na bango boye: “Bólinganaka bino na bino; ndenge ngai nalingaki bino . . . Na ndenge wana bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.” (Yoane 13:34, 35) Bolingo yango esengelaki te kozala ya likolólikoló, kasi bolingo oyo ezali kotinda moto amipesa mpenza mpo na basusu. Yango esengelaki kobota mbuma nini? Yesu abondelaki mpo na bato oyo bazali kondimela ye ete: ‘Nazali kosɛnga . . . mpo bango nyonso bázala moko, ndenge yo, Tata, ozali na bomoko elongo na ngai mpe ngai nazali na bomoko elongo na yo, mpo bango mpe bázala na bomoko elongo na biso.’​—Yoane 17:20, 21; 1 Petelo 2:21.

Yehova atindelaki basaleli na ye ya solo elimo santu. Elimo yango etyaki bomoko na kati na bango. Efungolaki bango mayele ya kososola mateya ya Biblia mpe masangá nyonso ezalaki koteya yango ndenge moko. Basambeli nyonso ya Yehova bazalaki kosakola nsango kaka moko, elingi koloba kosantisama ya nkombo ya Yehova na nzela ya Bokonzi ya Nzambe oyo ekotambwisama na Masiya; Bokonzi yango ezali guvɛrnema ya likoló oyo ekoyangela mabelé mobimba. Baklisto ya liboso bayebaki malamu ete basengelaki kozala ‘bato ya mokili oyo te.’ Yango wana, ntango bato bazali kowelana na mboka to bitumba ezali kobima na kati ya bikólo, baklisto bazalaki kokɔta na makambo yango te. Bazalaki koluka kozala na kimya na bato nyonso.​—Yoane 14:26; 18:36; Matai 6:9, 10; Misala 2:1-4; Baloma 12:17-21.

Moklisto mokomoko ayebaki ete azali na mokumba ya koluka bomoko. Na ndenge nini? Bazalaki kosala nyonso mpo na kotosa mitinda ya Biblia. Yango wana, ntoma Paulo akomelaki baklisto ete ‘bálongola bomoto ya kala oyo eyokani na etamboli na bango ya liboso,’ mpe ‘bálata bomoto ya sika.’​—Baefese 4:22-32.

Bomoko ebatelami

Bandimi ya ekeke ya liboso bazalaki bato ya kozanga kokoka, mpe makambo oyo ekokaki kotya bokabwani na kati na bango ezalaki kozanga te. Na ndakisa, Misala 6:1-6 elobi ete mwa koimaima ebimaki epai ya Bayuda oyo bazalaki koloba monɔkɔ ya Grɛki mpo na baoyo bazalaki koloba monɔkɔ ya Liebele. Baoyo bazalaki koloba monɔkɔ ya Grɛki bamonaki ete bazalaki kobosana bango na makambo mosusu. Kasi, ntango bantoma bayokaki likambo yango, basilisaki yango nokinoki mpe na bosembo. Na nsima, ntembe moko ebimaki na likambo etali makambo oyo baklisto oyo bazalaki Bayuda te basengelaki kokokisa na kati ya lisangá. Bakataki likambo yango na kolanda mitinda ya Biblia, mpe bato nyonso na kati ya lisangá bandimaki.​—Misala 15:1-29.

Bandakisa wana emonisi ete na lisangá ya boklisto na ekeke ya liboso, atako ntango mosusu baklisto bazalaki na likanisi moko te na makambo mosusu, yango esalaki te ete bákabwana mpo bakesani bikólo to mpo bayokani te na mateya mosusu. Mpo na nini? Mpamba te ezalaki na makambo oyo ezalaki kosangisa bango mpe kotya kimya kati na bango: Balingaki Yehova, bazalaki kondimela Yesu Klisto, bolingo ya komikaba mpe komipesa mpo na bandeko, bazalaki kotika elimo santu etambwisa bango, bazalaki na bososoli ndenge moko ya mateya ya Biblia mpe bazalaki kondima kobongola bizaleli na bango.

Bato oyo bazali kosambela Nzambe na bomoko na mikolo na biso

Lelo oyo mpe bomoko ya ndenge wana ekoki komonana? Makambo oyo esangisaki baklisto ya liboso ekoki mpe lelo oyo kosangisa bato ya lingomba moko mpe kosalisa bango bázala na kimya elongo na bandeko na bango, bázala mindɛlɛ to baindo, ata soki bafandi na mboka nini? Ɛɛ! Batatoli ya Yehova bazali libota oyo ezali na bomoko mpe esangisi bato ya mikili koleka 230. Kaka makambo oyo esangisaki baklisto ya ekeke ya liboso nde ezali kosangisa bango lelo oyo.

Likambo ya libosoliboso oyo ezali kosangisa Batatoli ya Yehova ezali komipesa na bango epai ya Yehova Nzambe. Yango elingi koloba ete basalaka nyonso mpo na kotikala sembo epai na ye, ezala na ntango ya mpasi to na ntango ya bisengo. Batatoli ya Yehova bandimaka mpe Yesu Klisto ná mateya na ye. Baklisto yango bamipesaka mpo na bandeko na bango ya lisangá mpe basakolaka nsango malamu kaka moko ya Bokonzi ya Nzambe na mikili nyonso oyo bazali kosala mosala na bango. Basepelaka kosakola Bokonzi yango epai ya bato ya mangomba nyonso, ya mikili nyonso, mindɛlɛ to baindo. Batatoli ya Yehova bakɔtaka mpe na makambo ya mokili te; yango wana makambo oyo ezali kokabola bato na mokili oyo, elingi koloba makambo ya politiki, bonkɔkɔ, makambo ya nkita mpe bongo na bongo, ezali kokabola bango te. Batatoli nyonso batosaka mitinda ya Biblia mpo na kobatela bomoko.

Bomoko na bango ezali kobenda bato mosusu

Mbala mingi, bomoko ya Batatoli ebendaki likebi ya bato oyo bazalaki Batatoli te. Na ndakisa, Ilsea azalaká mamelo na Allemagne. Nini esepelisaki ye epai ya Batatoli ya Yehova? Ilse alobaki boye: “Namoná naino bato malamu lokola bango te. Bakɔtaka na bitumba te, basalaka moto mabe te. Balukaka kosalisa bato bázala na bomoi ya esengo na paladiso oyo ekozala awa na mabelé, na boyangeli ya Bokonzi ya Nzambe.”

Tozali mpe na ndakisa ya Günther; ye azalaká na kati ya basoda ya Allemagne oyo batindaki na France na ntango ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Mokolo moko, pastɛrɛ moko ya Lingomba ya Protesta azalaki kobondela mpo na basoda ya limpinga oyo Günther azalaki. Pastɛrɛ yango abondelaki mpo Nzambe apambola bango, abatela bango mpe asalisa bango bálonga. Nsima ya libondeli, Günther akendaki kotɛlɛma na esika na ye ya mokɛngɛli. Ntango Günther azalaki kotala na manɛti oyo bamonaka na yango mosika (jumelles), amonaki pastɛrɛ moko azali kobondela mpo na banguna na bango. Nsima ya bambula, Günther alobaki boye: “Na ntembe te, pastɛrɛ wana mpe azalaki kobondela mpo Nzambe apambola banguna na biso, abatela bango mpe asalisa bango bálonga. Nabandaki komituna ndenge nini mangomba ya boklisto ekokaki kokɔtela basoda ya ngámbo nyonso mibale ya etumba moko.” Makanisi wana etikalaki na bɔɔngɔ ya Günther. Na nsima, ntango Günther akutanaki na Batatoli ya Yehova, bato oyo bakɔtaka na bitumba te, ye mpe akɔtaki na libota yango ya bandeko oyo bazali na mokili mobimba.

Ashok ná Feema bazalaki liboso na lingomba moko ya Azia. Na ndako na bango, bazalaki na esika mosantu mpo na nzambe moko. Ntango babɛlaki maladi moko ya makasi, batalelaki lisusu malamumalamu lingomba na bango. Ntango bazalaki kosolola na Batatoli ya Yehova, Ashok ná Feema basepelaki mingi na mateya ya Biblia mpe na bolingo oyo bamonaki na kati ya Batatoli. Lelo oyo bazali basakoli ya molende ya nsango malamu ya Bokonzi ya Yehova.

Ilse, Günther, Ashok mpe Feema bazali lelo na kati ya libota ya bamilio ya Batatoli ya Yehova ya mokili mobimba. Bandimaka mpenza elaka ya Biblia oyo elobi ete mosika te makambo oyo ezali kosangisa bango lelo na losambo ya solo ekosangisa bato ya botosi na mokili mobimba. Na ntango wana, kobomana, konyokolana, kozanga boyokani mpe bokabwani na nkombo ya Nzambe ekozala lisusu te. Bato ya mokili mobimba bakobanda kosambela kaka Yehova, Nzambe ya solo.​—Emoniseli 21:4, 5.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Topesi bango bankombo mosusu.

[Bililingi na lokasa 4]

Baklisto ya liboso bazalaki na bomoko atako bautaki na bikólo ndenge na ndenge

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto