Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 15/12 nk. 8-11
  • Baninga ya Nzambe na Bisanga ya Tonga

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Baninga ya Nzambe na Bisanga ya Tonga
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mitó ya makambo mike
  • Bazali na bomoi ya mindɔndɔ te
  • Nsango malamu ezali kokóma tii na bamboka ya mosika
  • Basaleli masuwa Quest mpo na koluka baninga ya Nzambe
  • Elikya ezali ete bato bakokóma mingi
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 15/12 nk. 8-11

Baninga ya Nzambe na Bisanga ya Tonga

Na 1932, masuwa moko ememaki momboto moko ya motuya mingi na bisanga ya Tonga. Kapitɛnɛ ya masuwa yango apesaki Charles Vete mwa buku “Bakufi bazali wapi?” (na Lingelesi). Nsima ya kotánga mwa buku yango, Charles amonaki mpenza ete azwi solo. Mwa moke na nsima, Charles asɛngaki ndingisa ya kobongola mwa buku yango na monɔkɔ ya mboka na bango mpe biro monene ya Batatoli ya Yehova endimaki. Ntango asilisaki kobongola yango, banyataki yango mpe batindelaki ye mwa babuku 1 000, mpe abandaki kokabola yango. Na ndenge wana nde nsango ya Bokonzi ya Yehova ebandaki kopanzana na bisanga ya Tonga.

SOKI otali na karte, okomona Bisanga ya Tonga na Sudi ya pasifike. Tongatapu, esanga oyo eleki monene na bisanga nyonso ya Tonga, ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 2 000 na nɔrdi-ɛsti ya engumba Auckland, na Nouvelle-Zélande. Tonga ezali na bisanga 171, kasi oyo bato bafandaka ezali 45. James Cook, moto moko ya Angleterre oyo azalaki kotambolatambola mpo na komona mokili na ekeke ya 18, abengaki bisanga yango ya mosika mpenza “bisanga ya bato ya boboto.”

Tonga ezali na bato soki 106 000 mpe bisanga na yango ekabwani na biteni misato​—bisanga oyo eleki minene ezali Tongatapu, Haapai, mpe Vavau. Na masangá mitano ya Batatoli ya Yehova oyo ezali na bisanga yango, misato ezali na bisanga ya Tongatapu oyo ezali na bato mingi, moko na Haapai mpe moko mosusu na Vavau. Mpo na kosalisa bato bákóma baninga ya Nzambe, Batatoli ya Yehova bazali na ndako moko ya bamisionɛrɛ mpe biro ya kobongola mikanda pene na Nukualofa, mboka-mokonzi.​—Yisaya 41:8.

Kobanda na bambula ya 1930, bato mingi bayebaki Charles Vete ete azali Motatoli ya Yehova, atako azwaki naino batisimo te tii na 1964. Bato mosusu mpe babandaki kopesa litatoli elongo na ye, mpe na 1966, batongaki Ndako ya Bokonzi moko oyo ezalaki na bisika ya kofanda 30. Lisangá moko ya basakoli 20 efungwamaki na Nukualofa na 1970.

Banda wana, ezali komonana polele ete maloba ya Yisaya ezali kokokisama na bisanga ya Tonga: “Bákumisa [Yehova] na nkembo, bátatola lisanzoli na ye na kati [na bisanga, NW].” (Yisaya 42:12) Mosala ya Bokonzi ekolaki, mpe yango epesaki bato mingi nzela ya kokóma baninga ya Yehova. Na liyangani ya etúká oyo esalemaki na Nukualofa na mobu 2003, bayangani bazalaki 407, mpe bato 5 bazwaki batisimo. Na mobu 2004, bato 624 bayanganaki na ekaniseli ya Nkolo, mpe yango emonisi ete bokoli ekozala lisusu.

Bazali na bomoi ya mindɔndɔ te

Mposa ya basakoli ya Bokonzi ezali makasi na bamboka oyo ezali mosika na mboka-mokonzi. Na ndakisa, bato 8 500 oyo bafandaka na bisanga ya Haapai bazali na mposa makasi ya koyoka solo ya Biblia. Bisika mingi ya bisanga ya Haapai ezali patatalu, ezali na banzete ya mbila mpe na mabongo ya zɛlɔ ya mpɛmbɛ. Moto akoki komona eloko na nse ya mai ata na ntaka ya mɛtrɛ 30, mpo mai ya mbu ezali mpɛmbɛ. Ezalaka mpenza esengo kokita na nse ya mai, kolekaleka pembeni ya mabanga mpe ya ebele ya bambisi ya langilangi. Bamboka mingi ya bisanga yango ezali mikemike. Atako bazali na bandako ya mindɔndɔmindɔndɔ te, batongá yango makasi na ndenge ete ata mopɛpɛ ya makasi ndenge nini ekoki kokweisa yango te.

Banzete ya momboya mpe ya manga esalisaka mpo na kokima moi mpe epesaka mbuma ya kolya. Bato balekisaka ntango mingi na koluka biloko ya kolya mpe na kolamba. Bato ya bisanga yango balyaka mingi ngulu mpe mbisi, na biloko mosusu ya mbu. Basalaka mpe mwa bilanga ya mbala mpe ya ndunda. Banzete ya malala ebimaka yango moko na zamba; banzete ya kokoti mpe makemba ezali beboo. Banda bankɔkɔ na bango, bayebi mpenza matiti, nkasa, mposo mpe misisa ya nzete oyo esalisaka bamaladi.

Kasi, likambo eleki malamu na Haapai ezali ete bato ya bisanga yango batondá mpenza na boboto mpe bafandaka na kimya na mboka na bango. Bomoi na bango ezali mindɔndɔ te. Mingimingi basi batongaka bikɔlɔ, bilamba babengi tapa oyo esalami na mposo ya nzete, mpe matɔkɔ. Ntango bazali kosala misala wana, bafandaka na nse ya nzete, bazali kobɛta masolo, koyemba, kosɛka, mpe mbala mingi bana basakanaka to balalaka pembeni na bango. Mpe mbala mingi, ntango mai ya mbu ekiti, basi bakendeke koluka mbɛmbɛ mpe biloko mosusu ya kolya, ata mpe matiti mosusu ya mbu oyo balyaka lokola ndunda.

Mibali mingi basalaka mosala ya bilanga, ya koboma mbisi, bikeko, babwato, mpe babongisaka minyama. Mibali, basi mpe bana na bango bakendaka na bisanga mosusu na bamasuwa mpo na kotala bandeko, komisalisa na lopitalo, mpe kotɛka to kosomba biloko.

Nsango malamu ezali kokóma tii na bamboka ya mosika

Bamisionɛrɛ mibale ná babongisi-nzela mibale bakómaki na mboka kitoko wana na eleko ya Ekaniseli ya mobu 2002. Liboso bamisionɛrɛ yango bákóma kuna, bato mosusu ya mboka yango bazwaki mwa mabaku ya koyoka nsango malamu mpe bazwaki mikanda ya Batatoli ya Yehova, bamosusu kutu bayekolaki Biblia na Batatoli.

Bateyi wana minei ya Biblia bazalaki na mikano misato: Kokabolela bato mikanda oyo elimbolaka Biblia, kobanda koyekola na bato Biblia, mpe kobengisa bato oyo bakosepela koya na Ekaniseli. Bakokisaki mikano nyonso wana. Bato 97 bayanganaki na Ekaniseli ya liwa ya Yesu. Bamosusu kati na bango basalaki mobembo na babwato na nse ya mbula mpe mipɛpɛ makasi. Lokola mipɛpɛ mpe mbula ezalaki makasi, bato mingi balalaki na esika oyo Ekaniseli esalemaki, mpe bazongaki na mokolo oyo elandaki.

Ndeko oyo asalaki lisukulu ya Ekaniseli azalaki na mosala monene. Misionɛrɛ yango alobi boye: “Ezalaki pɛtɛɛ te mpo na ngai kosala lisukulu ya Ekaniseli na monɔkɔ ya bapaya, bisika mibale na mpokwa moko. Ndenge bokoki komona, ezalaki mpenza mpasi mpo na ngai. Libondeli esalisaki ngai mingi! Maloba mosusu oyo nazalaki kobimisa na monɔkɔ na ngai, nandimaki te ete ngai moto nazali koloba yango.”

Lokola basakoki misato wana bazongaki kotala bato oyo basepelaki na nsango malamu na bisanga ya Haapai, ebotaki mbuma: mibali mibale ya bisanga yango ná basi na bango bazwaki batisimo. Moko na mibali yango akómaki kosepela na mikanda ya Batatoli ntango azalaki kolanda formasyo mpo na kokóma pastɛrɛ na lingomba na ye.

Atako mobali yango ná mwasi na ye bazalaki babola, mbula na mbula bazalaki kopesa makabo ya mbongo mingi soki babengi nkombo na bango na ntango ya kopesa mabonza. Motatoli moko oyo akendeki kotala mobali yango atángisaki ye vɛrsɛ ya 1 Timote 5:8. Ntoma Paulo akomaki boye: “Soki moto azali kokokisa bamposa ya bato na ye te, mpe mingimingi mpenza ya bato ya ndako na ye, awangani kondima mpe azali mabe koleka moto oyo azangi kondima.” Etinda wana ya Biblia esimbaki mpenza motema ya mobali yango. Amonaki ete lokola azalaki kopesa ebele ya mbongo oyo lingomba ezalaki kosɛnga, azalaki kokokisa bamposa ya libota na ye te. Na mbula oyo elandaki, na ntango ya kokɔngɔla mabonza, atako azalaki na mbongo, abosanaki te vɛrsɛ ya 1 Timote 5:8. Ntango babengaki nkombo na ye, ayebisaki pastɛrɛ polele ete asengeli liboso kokokisa bamposa ya libota na ye. Mpo na yango, na miso ya bato nyonso, bankumu ya lingomba batyolaki mpe basambwisaki mobali yango ná mwasi na ye.

Nsima ya koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova, mobali yango ná mwasi na ye bakómaki basakoli ya nsango malamu. Mobali yango alobi boye: “Solo ya Biblia ebongoli ngai. Nazali lisusu te moto ya matata mpe ya makambo makasi epai ya mwasi na ngai mpe bana na ngai. Namɛlaka lisusu mingi te. Bato ya mboka na biso bamonaka ndenge solo ebongoli ngai. Nazali kolikya ete bango mpe bakolinga solo ndenge ngai nalingi yango.”

Basaleli masuwa Quest mpo na koluka baninga ya Nzambe

Mwa basanza nsima ya Ekaniseli ya mobu 2002, masuwa mosusu ememaki biloko ya motuya na Haapai. Masuwa Quest oyo eutaki na Nouvelle-Zélande, ekendaki na bisanga ya Tonga. Gary ná Hetty mpe mwana na bango ya mwasi, Katie, nde bazalaki na masuwa yango. Bandeko mibali mpe basi libwa ya Tonga ná bamisionɛrɛ mibale basalaki mibembo mibale elongo na bango. Bandeko yango bazalaki kosalisa bango mpo na kotambwisa masuwa, ntango mosusu na bisika ya mabanga oyo elakisami na karte te. Mibembo yango ezalaki mpo na kotala mokili te. Bato oyo bazalaki na masuwa yango basalaki mobembo wana mpo na koteya solo ya Biblia. Batambolaki na bisanga 14. Ezalaki mbala ya liboso bato ya bisanga mosusu na kati ya bisanga 14 wana báyoka nsango malamu ya Bokonzi.

Ndenge nini bato bayambaki nsango yango? Mbala mingi, bato bazalaki kokamwa, kosepela mpe koyamba na boboto basakoli yango oyo bazalaki kotambola na masuwa. Ntango bato ya bisanga bazalaki koyeba ntina oyo bandeko yango bazalaki kokende kotala bango, bazalaki kosepela mingi. Batatoli yango bamonaki polele ete bato ya bisanga wana bamemyaka Liloba ya Nzambe mpe bayebi bobola na bango ya elimo.​—Matai 5:3.

Mbala mingi, bapaya yango bazalaki kofanda na nse ya banzete mpe bato bazalaki kozinga bango mpo na kotuna bango ebele ya mituna ya Biblia. Na butu, bazalaki kokoba masolo yango na bandako. Na esanga moko, ntango Batatoli balingaki kokende, bato balobaki na bango boye: “Bókende te! Soki bokei, nani akopesa biyano na mituna na biso?” Ndeko mwasi moko alobi boye: “Tozalaki koyoka motema mpasi kotika ebele ya bampate oyo bazalaki na mposa ya solo. Tolonaki mboto mingi ya solo.” Ntango masuwa Quest ekómaki na esanga moko, Batatoli bamonaki ete bato nyonso balati pili. Mwasi ya mokonzi ya mboka autaki kokufa. Mokonzi yango ye moko atɔndaki bandeko na ndenge bamemelaki bango nsango ya kobɔndisa oyo euti na Biblia.

Ezalaki mpasi mpo na kokóma na bisanga mosusu. Hetty alobi boye: “Esanga moko ezalaki na libongo ya malamu te, kaka mabanga ebimabimá na mai mpembeni ya libongo. Mpo na kokóma kuna, esengelaki tósalela mwa kano oyo tozalaki na yango. Soki tokómi pembeni ya mokili, tozalaki kobwakela bato basakosi na biso. Bongo, ntango mai ematisi kano tii na nsɔngɛ ya mabanga, biso tozalaki kopumbwa nokinoki likoló ya mabanga liboso mai ekita.”

Kasi, bato nyonso te oyo bazalaki na masuwa yango nde bamesaná kotambola na mai. Na ntina na mobembo oyo basalaki ntango bazongaki na esanga ya Tongatapu, nsima ya kotambola pɔsɔ mibale na masuwa, kapitɛni akomaki boye: “Tosengelaki kotambola ngonga 18. Tosengelaki kotɛlɛma mingi na nzela mpo bato mosusu bazalaki kokoka te koumela ntango molai na mai. Tozali na esengo mpo tozali kozonga epai na biso, kasi tozali mpe na mawa mpo tozali kotika ebele ya bato oyo bayoki sikoyo nsango ya Bokonzi. Totiki bato yango na mabɔko ya Yehova; na elikya ete elimo santu mpe baanzelu na ye bakosalisa bango bákola na elimo.”

Elikya ezali ete bato bakokóma mingi

Soki sanza motoba nsima ya kolongwa ya masuwa Quest, batindaki babongiseli-nzela minene mibale, Stephen ná Malaki, bákende kosakola na bisanga ya Haapai. Ntango bakómaki kuna, bakómaki koteya Biblia elongo na bandeko mibali mibale ná basi na bango oyo bautaki kozwa batisimo. Basakoli yango bazalaki kosolola na bato na ntina na bindimeli ya mangomba, mpe bazalaki kosalela Biblia malamu mpo na kolimbola mateya na yango.

Mokolo ya 1 Desɛmbɛ 2003, lisangá moko efungwamaki na Haapai, lisangá ya mitano na bisanga ya Tonga. Bana mingi mpe bazali koyangana na makita. Baboti na bango bateyá bango balandaka makita na likebi. Bana yango bafandaka nyɛɛ na makita mpe basepelaka kopesa biyano. Mokɛngɛli ya zongazonga alobaki ete “ndenge bana yango bayebi masolo ya Mokanda mpo na Masolo ya Biblia ezali komonisa ete baboti na bango bazali kozwa na lisɛki te mokumba na bango ya koteya bana solo ya Biblia.” Emonani polele ete mosala ya koluka baninga ya Yehova ekobota lisusu mbuma mingi na bisanga yango.

Charles Vete abongolaki mwa buku Bakufi bazali wapi? na Tongan, monɔkɔ ya mboka na ye esali sikoyo mbula koleka 70; na ntango wana ayebaki te ndenge oyo mboto ya Bokonzi ekokola na mitema ya bato ya mboka na ye. Banda na likambo oyo ezalaki lokola lisɛki, Yehova akobi kopambola mosala ya kosakola nsango malamu na mwa eteni wana ya mabelé. Lelo oyo, tokoki mpenza koloba ete Tonga ezali moko ya bisanga ya mbu ya mosika mpenza oyo ezali koya epai ya Yehova. (Nzembo 97:1; Yisaya 51:5) Bisanga ya Tonga, “bisanga ya bato ya boboto,” ezali lelo na ebele ya baninga ya Yehova.

[Elilingi na lokasa 8]

Charles Vete, 1983

[Elilingi na lokasa 9]

Mwasi azali kosala bilamba babengi tapa

[Elilingi na lokasa 10]

Basalelaki masuwa “Quest” mpo na kopalanganisa nsango malamu na Tonga

[Maloba ya kolimbola elilingi na lokasa 11]

Bandeko oyo babongolaka mikanda, na Nukualofa

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 9]

Mwasi azali kosala bilamba babengi tapa: © Jack Fields/CORBIS; bililingi na nkasa 8 mpe 9, moto azali koboma mbisi: © Fred J. Eckert

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto