Batikali sembo mpe ngwi—Banda na batata tii na bana
Na sudi ya ekólo Pologne, penepene na ndelo na yango na ekólo Slovaquie mpe République tchèque, ezali na mwa engumba moko ya moke babengi Wisła. Atako ekoki kozala mbala na yo ya liboso ya koyoka nkombo Wisła, yebá ete engumba yango ezali na lisolo oyo baklisto ya solo bakosepela na yango mpenza. Lisolo yango etaleli bosembo mpe molende ya basambeli ya Yehova. Na ndenge nini?
ENGUMBA Wisła ezali na mokili moko kitoko ya bangomba. Mwa miluka ya mai makasi mpe mingala mibale esuki na Ebale Vistule, oyo eleki na kati ya zamba moko ya ngombangomba mpe ya mabwaku. Mpo na boboto ya bato ya engumba Wisła mpe klima na yango kitoko, bato mingi basepelaka kokende komisalisa na lopitalo kuna, bamosusu basepelaka kokende kuna mpo na kolekisa bakonje na eleko ya molunge to mpe na eleko ya malili.
Ekoki kozala ete bato ya liboso oyo bapesá engumba yango nkombo wana bayaki kofanda wana na bambula ya 1590. Bafungolaki izini moko ya kopasola mabaya na esika yango mpe, mwa moke na nsima, bato bayaki kofanda na bisika ya polele na bangomba, mpe bazalaki kobɔkɔla bangɔmbɛ ná bampate mpe kosala bilanga. Kasi, bato wana batikalaki nsima te na mbongwana monene oyo ekɔtaki na makambo ya losambo. Mbongwana monene oyo Martin Luther akɔtisaki na makambo ya losambo ekómaki tii epai na bango mpe, ndenge Andrzej Otczyk, moto moko ya mayele alobi yango, Lingomba ya Protesta ekómaki “lingomba ya Leta na ekólo na bango na mobu 1545.” Kasi, Etumba ya Mbula Ntuku Misato mpe Etumba ya Botɛmɛli-Mbongwana oyo elandaki ebongolaki mpenza makambo. Otczyk alobi lisusu boye: “Na mobu 1654, babɔtɔlaki bandako-nzambe nyonso ya Baprotesta, bapekisaki bango kosambela mpe babɔtɔlaki bango Babiblia mpe mikanda mosusu ya losambo.” Atako bongo, bato mingi ya engumba yango batikalaki kaka Baprotesta.
Mboto ya liboso ya solo ya Biblia elonami
Nzokande, mbongwana mosusu ya monene koleka na makambo ya losambo ezalaki koya. Na 1928, Bayekoli ya Biblia mibale ya molende (ndenge bazalaki kobenga Batatoli ya Yehova kala) balonaki mboto ya liboso ya solo ya Biblia na engumba yango. Na mbula oyo elandaki, Jan Gomola ayaki na Wisła na fono na ye, mpo bato báyoka mateya ya Biblia. Na nsima, akendaki kofanda na mboka moko ya pembeni wana, epai akutanaki na Andrzej Raszka, mobali moko mokuse mpe mbinga oyo asepelaki na mateya yango. Mbala moko, Raszka azwaki Biblia na ye mpo na kotala soki makambo oyo azalaki koyoka ezali mpenza bongo. Na nsima agangaki ete: “Ndeko, namoni sikoyo lingomba ya solo! Nalukaka biyano na mituna na ngai banda nazalaki soda na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba!”
Raszka asepelaki makasi mpe amemaki Gomola epai ya baninga na ye Jerzy ná Andrzej Pilch; bango mpe bayambaki nsango ya Bokonzi na esengo mpenza. Andrzej Tyrna, oyo ayekolaki solo ya Biblia na France, asalisaki mibali yango na kokolisa boyebi na bango ya Liloba ya Nzambe. Mwa moke na nsima, bazwaki batisimo. Na bambula ya 1930, bandeko ya bingumba ya zingazinga bazalaki kokende kotala mwa etuluku wana ya Bayekoli ya Biblia ya Wisła. Yango ebimisaki matomba mpenza.
Bato mingi bakómaki kosepela na solo. Mabota mingi ya Baprotesta bazalaki na momeseno ya kotánga Biblia na ndako. Yango wana, ntango bamonaki mateya ya solo oyo ezali komonisa lokuta ya mateya lokola lifelo ya mɔtɔ mpe Bosato, mingi kati na bango bafungwamaki miso. Mabota mingi etikaki mangomba oyo eteyaka lokuta. Lisangá ya Wisła ekolaki, mpe na 1939 ekómaki na basakoli soki 140. Kasi, likambo ya kokamwa, mikóló mingi ya lisangá yango bazwaki batisimo te. Helena, moko ya Batatoli yango ya liboso, alobi boye: “Yango elingi koloba te ete basakoli yango oyo bazwaki naino batisimo te bazalaki kobanga komipesa na Yehova.” Mpe abakisi boye: “Bamonisaki bosembo na bango na komekama makasi oyo eumelaki te kokómela bango.”
Ezali boni mpo na bana? Bango mpe bamonaki ete baboti na bango bazwi lingomba ya solo. Franciszek Branc alobi boye: “Ntango tata amonaki ete azwi solo, abandaki mpe koteya ngai ná yaya. Ngai nazalaki na mbula 8 mpe yaya azalaki na mbula 10. Tata azalaki kotuna biso mituna lokola: ‘Nzambe azali nani, mpe nkombo na ye nani? Yesu Klisto azali nani?’ Tosengelaki kokoma biyano na biso mpe kopesa bavɛrsɛ ya Biblia oyo ezali kondimisa yango.” Motatoli mosusu alobi boye: “Lokola baboti na ngai bandimaki nsango ya Bokonzi mpe balongwaki na Lingomba ya Protesta na 1940, na eteyelo, bakómaki konyokola mpe kobɛta ngai. Nazali kotɔnda baboti na ngai na ndenge bateyaki ngai mitinda ya Biblia. Yango esalisaki ngai mingi na bantango wana ya mpasi.”
Kondima na bango emekami
Ntango Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki mpe mboka na biso ekómaki na mabɔkɔ ya Banazi, bazalaki na mokano ya kosilisa Batatoli ya Yehova. Liboso mpenza, balobaki na mikóló—mingimingi batata—bátya nkombo na bango na liste moko mpo na komonisa ete bandimi kokóma bana-mboka ya Allemagne, mpo bázwa ntomo mosusu. Batatoli baboyaki komitya na ngámbo ya Banazi. Bandeko mingi mpe bayekoli mingi ya Biblia oyo bazalaki na mbula ya kokɔta na mosala ya soda basengelaki kopona: Kondima kokɔta na mosala ya soda to kokɔta te na kowelana ya bato ya mokili mpe kozwa bitumbu makasi mpenza. Andrzej Szalbot, oyo basoda ya Gestapo bakangaki na 1943, alobi boye: “Soki moto aboyi kokɔta na mosala ya soda bazalaki kotinda ye na kaa ya bakangami, mingimingi na Auschwitz. Nazwaki naino batisimo te, kasi nayebaki malamu maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 10:28, 29. Nayebaki ete soki nakufi mpo na Yehova, akozongisa ngai na bomoi.”
Na ebandeli ya mobu 1942, Banazi bakangaki bandeko 17 ya engumba Wisła. Na sanza misato, bandeko 15 kati na bango bakufaki na Auschwitz. Batatoli oyo batikalaki na Wisła babangaki nde? Na esika bábanga mpe bátika kosambela Yehova, likambo yango etindaki bango lisusu nde bákangama na ye makasi! Na boumeli ya sanza motoba oyo elandaki, basakoli bakómaki lisusu ebele na engumba Wisła, mbala mibale koleka ndenge bazalaki liboso. Mosika te, bakangaki bandeko mosusu. Na nyonso, basoda mabe ya Hitler banyokolaki bato 83, Batatoli, bayekoli ya Biblia mpe bana mike. Na kati na bango, bato 53 batindamaki na bakaa ya bakangami (mingimingi na Auschwitz) to na bakaa ya misala makasi ya kotimola mabanga na Pologne, na Allemagne mpe na Bohême.
Bato ya sembo mpe ya mpiko
Na kaa ya Auschwitz, Banazi bamekaki kokweisa bosembo ya Batatoli na kolaka bango bonsomi. Soda moko ya Banazi alobaki na ndeko moko boye: “Soki otye sinyatire na yo na mokanda oyo mpo na komonisa ete ozali lisusu moyekoli ya Biblia te, tokobimisa yo na bolɔkɔ mpe okozonga na mboka na yo.” Azalaki koyebisa ye bongo mbala na mbala, kasi ndeko yango atikalaki sembo epai ya Yehova. Mpo na yango, bazalaki kobɛta ye, kosambwisa ye mpe kosalisa ye misala ya makasi na Auschwitz mpe na Mittelbau-Dora, na Allemagne. Ndeko yango abikaki mpenza na liwa ntango basoda ya bikólo oyo esanganaki mpo na kobunda na Allemagne bazalaki kobwaka babɔmbi na kaa oyo azalaki liboso bábimisa bango na bolɔkɔ.
Paweł Szalbot, Motatoli moko oyo akufi kala mpenza te, alobaki boye: “Ntango basoda ya Gestapo bazalaki kosambisa ngai, bazalaki kotuna ngai mbala na mbala mpo na nini nazalaki koboya kokóma soda ya Allemagne mpe kopesa Hitler saluti.” Nsima ya kolimbolela bango ete Biblia nde ezali kosɛnga baklisto bákɔtaka na makambo ya mokili te, batindaki ye akende kosala na izini moko ya bibundeli. Yoká ye: “Nakokaki kondima mosala ya ndenge wana te, yango wana batindaki ngai nakende kosala na esika ya kotimola mabanga.” Atako bongo, atikalaki kaka sembo.
Baoyo bakangamaki te—elingi koloba basi ná bana—bazalaki kotindela bandeko oyo bazalaki na kaa ya Auschwitz biloko ya kolya. Ndeko moko oyo azalaki elenge na ntango wana alobi boye: “Na eleko ya molunge, tozalaki kolɔkɔta mbuma babengi canneberge na zamba mpe tozalaki kosombitinya yango na blé. Bandeko basi bazalaki kotumba mampa mpe bazalaki kotya yango na kati ya mafuta ya nyama. Na nsima tozalaki kotinda yango mokemoke epai ya bandeko na bolɔkɔ.”
Batatoli nyonso ya Wisła ya mikóló oyo batindamaki na bakaa ya bakangami mpe oyo basalisaki misala makasi bazalaki 53. Na kati na bango, 38 bakufaki.
Bana na bango
Bana ya Batatoli ya Yehova mpe banyokwamaki mpenza na mabɔkɔ ya Banazi. Bamosusu batindamaki elongo na bamama na bango mpo na mwa ntango na bakaa ya Bohême. Bakabolaki basusu na baboti na bango mpe batindaki bango na kaa mabe ya bilenge na Lodz.
Misato kati na bango balobi boye: “Na mbala ya liboso, basoda ya Allemagne bamemaki biso zomi, oyo tozalaki na mbula kobanda mitano tii libwa. Tozalaki kolendisana na mabondeli mpe na masolo ya Biblia. Ezalaki mokakatano makasi mpo na biso.” Na 1945, bana yango nyonso bazongaki mboka. Bazalaki na bomoi, kasi bakɔndaki makasi mpe bakómaki kotungisama na makanisi. Atako bongo, eloko moko te ebebisaki bosembo na bango epai ya Nzambe.
Nini esalemaki na nsima?
Ntango Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ekómaki na nsuka, Batatoli ya Wisła bazalaki kaka na kondima makasi mpe pene na kozongela mosala na bango ya kosakola na molende mpe na mpiko. Bandeko bazalaki kokende kotala bato tii na ntaka ya kilomɛtrɛ 40 na Wisła mpo na kosakola nsango malamu mpe kokabola mikanda oyo elimbolaka Biblia. Jan Krzok alobi boye: “Nsima ya ntango moke kaka, masangá misato ebotamaki na engumba na biso.” Kasi, bonsomi ya losambo eumelaki te.
Na 1950, Bakoministe, oyo bakómaki koyangela na esika ya Banazi, bapekisaki mosala ya Batatoli ya Yehova na Pologne. Na bongo, bandeko basengelaki koluka mayele ndenge na ndenge mpo na kosakola. Mpo na kotala bato na bandako na bango, bazalaki mbala mosusu kosala lokola nde bakei kosomba bibwɛlɛ to biloko mosusu lokola masango to loso. Makita ezalaki kosalema mingi na butu, na mwa bituluku ya mikemike. Atako bongo, bapolisi ya sirete bakangaki ebele ya basambeli ya Yehova, mpe bazalaki kokosela bango makambo ete bazali kotɛkɛla bapaya basɛkɛlɛ ya mboka. Bakonzi mosusu ya basoda balobaki na ndeko Paweł Pilch boye: “Hitler akokaki bino te, kasi biso tokosukisa bino.” Kasi, atako ndeko Paweł asalaki mbula mitano na bolɔkɔ, atikalaki kaka sembo epai ya Yehova. Ntango bilenge mosusu oyo bazalaki Batatoli baboyaki kotya sinyatire na bango na mikanda oyo ezalaki kolobela makambo ya politiki ya Bakoministe, balongolaki bango na kelasi to na misala.
Yehova atikaki bango te
Na 1989, makambo ya politiki ebongwanaki, mpe mosala ya Batatoli ya Yehova endimamaki na mibeko ya ekólo Pologne. Ndenge motángo ya babongisi-nzela emonisi yango, molende ya basambeli ya Yehova na Wisła ebakisamaki lisusu. Bandeko soki 100 ya teritware yango bakómaki babongisi-nzela. Na yango, tokokamwa te ete bakómaki kobenga engumba yango “izini ya kosala babongisi-nzela.”
Mpo na ndenge Nzambe asungaka bato na ye, Biblia elobi boye: “Soki ezalaki [Yehova] te, oyo azalaki epai na biso wana bato batɛlɛmi kobunana na biso; mbɛlɛ balyaki biso noki.” (Nzembo 124:2, 3) Na mikolo na biso, atako ezali komonana na mokili mobimba ete bato mingi bazali kosepela na makambo ya Nzambe te mpe bamipesi na misala mabe, basambeli ya Yehova na Wisła bazali kosala makasi mpo na kotikala sembo epai ya Yehova, mpe yango ezali komemela bango mapamboli mingi. Banda na batata tii na bana, Batatoli ya teritware wana bazali komona mpenza bosolo ya maloba ya Paulo oyo: “Soki Nzambe azali mpo na biso, nani akotɛmɛla biso?”—Baloma 8:31.
[Elilingi na lokasa 26]
Batindaki Emilia Krzok ná bana na ye Helena, Emilia ná Jan, na kaa ya bakangami ya Bohême, epai bazalaki kotya bato mpo na mwa ntango
[Elilingi na lokasa 26]
Ntango Paweł Szalbot aboyaki kosala mosala ya soda, batindaki ye na mosala ya kotimola mabanga
[Elilingi na lokasa 27]
Atako bandeko batindamaki na kaa ya Auschwitz mpe bakufaki kuna, mosala ya Batatoli na Wisła ezalaki se kokende liboso
[Elilingi na lokasa 28]
Bamemaki Paweł Pilch ná Jan Polok na kaa ya bakangami ya bana mike na Lodz
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 25]
Mbuma ná fololo: © R.M. Kosinscy / www.kosinscy.pl