Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 15/1 lok. 31
  • ‘Moko na misala minene oyo esɛngaki mpenza mayele’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Moko na misala minene oyo esɛngaki mpenza mayele’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 15/1 lok. 31

‘Moko na misala minene oyo esɛngaki mpenza mayele’

ELEKI lelo mbula soki 3 000, ntango batongaki tempelo ya Yelusaleme na ntango ya Mokonzi Salomo, basalaki saani moko monene mpe kitoko ya kwivre mpe batyaki yango pembeni ya ekɔtelo ya tempelo. Ezalaki na bozito ya tɔni koleka 30 mpe ekokaki kokɔta litre soki 40 000 ya mai. Bazalaki kobenga yango saani monene ya ebende. (1 Mikonzi 7:23-26, NW) Albert Zuidhof, moto moko ya mayele oyo azalaki kosala na ebongiseli moko (Conseil national de recherches du Canada) akomaki na zulunalo moko (Biblical Archeologist) ete: “Ntembe ezali te ete ezalaki moko na misala minene oyo esalemá na ekólo ya Bayuda oyo esɛngaki mpenza mayele.”

Basalaki saani yango ndenge nini? Biblia elobi boye: “Mokonzi asalaki [biloko ya kwivre] na mokili ya Yaladene na mabelé ya lima.” (1 Mikonzi 7:45, 46) Zuidhof akomaki boye: “Mayele wana ya kosala biloko ya bibende ekokani na mayele oyo, tii lelo oyo, basalelaka bangonga minene ya bronzɛ.” Alobi ete: “Bazwaki mabelé mpe basalaki yango lokola saani moko monene oyo nse na yango etali na likoló, bakausaki yango mpe bapakolaki mpaka mingi zingazinga na yango mobimba . . . Na nsima, batondisaki lisusu lima likoló na yango nyonso mpe bazelaki ekauka. Na nsuka, banyangwisaki mpaka wana mpe ebimaki na nse. Na esika etikali mpamba oyo mpaka ezalaki, basopaki kwivre oyo enyangwisami na mɔtɔ makasi.”

Na kotalela bonene mpe kilo ya saani yango, na ntembe te esɛngaki mayele mingi mpo na kosala yango. Mabelé oyo basalaki lokola saani mpe esika oyo batondisaki lima esengelaki kozala makasi mpenza mpo tɔni soki 30 ya kwivre oyo enyangwisami ebuka yango te, mpe basengelaki kosopa kwivre yango na mbala moko mpo saani yango ezala na madusu to na matutu te. Na ntembe te yango esɛngaki bafulu mingi ya konyangwisa, oyo ekangisamaki nyonso na batiyo mpo na kosopa kwivre yango. Ezalaki mosala monene mpenza!

Na libondeli oyo asalaki mokolo oyo bafungolaki tempelo, Mokonzi Salomo apesaki Yehova lokumu mpo na mosala nyonso ya kotonga oyo esalemaki; alobaki boye: “Yango elobaki yo na monɔkɔ na yo, okokisi yango na lobɔkɔ na yo lelo oyo.”​—1 Mikonzi 8:24.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto