‘Nzambe afandaka te na batempelo oyo esalemi na mabɔkɔ’
NA NTEMBE te, ntoma Paulo ayebaki malamu batempelo ya Athéna mpo ezalaki na bingumba mingi oyo azalaki koleka na mibembo na ye ya misionɛrɛ. Buku moko (The Encyclopædia Britannica) elobi ete, Athéna azalaki nzambe-mwasi ya bitumba mpe ya bwanya, kasi azalaki mpe nzambe-mwasi “ya misala ya mabɔkɔ mpe misala nyonso ya ntɔki.”
Tempelo ya Athéna oyo eyebanaki mingi ezali Parthénon; ezalaki na Atene, engumba oyo bapesaki yango mpe nkombo ya nzambe-mwasi yango. Parthénon ezalaki moko ya batempelo eleki minene na ntango ya kala; ezalaki na ekeko moko ya Athéna ya mɛtrɛ 12 oyo basalaki na wolo mpe na mpɛmbɛ ya nzoku. Tempelo monene wana oyo basalá yango na mabanga ya marbre esilaki koumela mbula soki 500 ntango Paulo akómaki na Atene.
Paulo ná etuluku moko ya bato ya Atene bazalaki na esika moko oyo bazalaki komona Parthénon ntango ateyaki bango ‘Nzambe oyo afandaka te na batempelo oyo esalemi na mabɔkɔ.’ (Misala 17:23, 24) Ekoki kozala ete batempelo kitoko ya Athéna to bikeko na yango mineneminene nde ezalaki kotinda bato oyo Paulo asololaki na bango na kokanisa ete nzambe-mwasi Athéna aleki Nzambe oyo amonanaka te oyo bango bayebaki ye te. Kasi, ndenge Paulo amonisi yango, esengeli te kokanisa ete Mozalisi ya bato “azali lokola wolo to palata to libanga, lokola eloko moko oyo eyemami na . . . moto.”—Misala 17:29.
Lelo oyo, banzambe mpe banzambe-basi lokola Athéna, oyo bazalaki kokumisama mpo na batempelo mpe bikeko, bayebani lisusu te. Ekeko ya Athéna elongwaki na Parthénon na ekeke ya mitano ya ntango na biso, kaka mwa mabanga moke ya batempelo yango nde etikalá. Lelo oyo, moto moko te alukaka lisusu bwanya mpe mayele epai ya Athéna.
Yehova, “Nzambe ya seko,” oyo moto moko amoná naino te akeseni mpenza na banzambe wana. (Baloma 16:26; 1 Yoane 4:12) Bana ya Kola bakomaki ete: “Nzambe oyo azali Nzambe na biso mpo na libela, ɛɛ seko na seko. Ye moko akotambwisa biso.” (Nzembo 48:14, NW) Lolenge moko oyo Yehova Nzambe akoki kotambwisa biso ezali soki tozali kotánga Liloba na ye, Biblia, mpe kolanda toli na yango na bomoi na biso.