Nsango malamu ezali kobota mbuma na Sao Tomé-et-Principe
NA NTEMBE te, bato mingi bayoká naino te nkombo Sao Tomé-et-Principe. Mikanda ya piblisite ya bisika malamu ya kolekisa konje elobelaka bisanga yango mingi te. Na karte ya mokili, emonanaka lokola mwa matɔnɔ na golfe ya Guinée, na bokula ya wɛsti ya Afrika; nzela ya moi (équateur) eleki na Esanga Sao Tomé mpe Esanga Principe ezali mwa moke na nɔrdi na yango. Lokola ezali mokili ya moi makasi mpe bambula mingi, bazamba na yango ezali na banzete minene oyo ezipi bangomba milai ya mɛtrɛ koleka 2 000.
Bisanga yango ezali mikili ya molunge mpe mabongo na yango ya mai ya bule ezali na banzete ya mbila pembenipembeni; bato ya bisanga yango bazali na boboto mpe lokola bankɔkɔ na bango bautá na Afrika mpe na Mpoto, bazali na makambo kitoko oyo esangisi mimeseno ya mikili wana. Bato 170 000 ya bisanga yango basalaka mingimingi mombongo ya cacao na bikólo mosusu, to mosala ya bilanga mpe ya koboma mbisi. Banda mwa bambula, kozwa ata bilei ya mokolo na mokolo ezali mpasi mpenza.
Kasi, na nsuka ya bambula ya 1900, likambo moko esalemaki oyo ebongolaki bomoi ya ebele ya bato na bisanga yango. Na sanza ya Yuni 1993, Lingomba ya Batatoli ya Yehova ekomisamaki na mikanda ya Leta ya Sao Tomé-et-Principe, mpe yango esukisaki eleko molai ya mpasi mpo na Batatoli ya Yehova na bisanga yango.
Mbóto elonami na ntango ya mpasi
Ekoki mpenza kozala ete Motatoli ya liboso akómaki na bisanga yango na ebandeli ya bambula ya 1950, ntango bato ya bolɔkɔ oyo bautaki na mikili mosusu ya Afrika oyo Portugal ezalaki koyangela batindamaki kuna mpo na kosala na bakáa ya misala. Motatoli yango, mobongisi-nzela moko moto ya Afrika, autaki na Mozambique mpe batindaki ye kuna mpo azalaki kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Atako Motatoli yango azalaki kaka ye moko, akangaki mabɔkɔ te mpe, nsima ya sanza motoba, bato mosusu 13 bakómaki mpe kosakola nsango malamu. Na nsima, Batatoli mosusu oyo bakangaki na Angola batindamaki mpe kuna. Ntango bazalaki na bolɔkɔ yango, basalelaki mabaku nyonso mpo na kosakola nsango malamu epai ya bato ya mboka yango.
Na 1966 bandeko nyonso oyo bazalaki na bakáa ya misala na Sao Tomé bazongaki na Afrika. Mwa basakoli ya Bokonzi oyo batikalaki kuna bakobaki kosakola na mpiko. Bazalaki konyokola bango, kobɛta bango, mpe kotya bango na bolɔkɔ mpo bazalaki koyangana mpo na koyekola Biblia, mpe moto moko te akokaki kokende kotala bango to kolendisa bango. Portugal epesaki ekólo yango lipanda na 1975, mpe malɛmbɛmalɛmbɛ, mbóto ya solo ya Bokonzi ekómaki kobota mbuma.
Bokoli mpe mosala ya kotonga
Na sanza ya Yuni 1993, ntango lisangá ekomamaki na mikanda ya Leta, basakoli bazalaki 100. Na mbula yango, babongisi-nzela monene, oyo bautaki na Portugal, bayaki. Milende oyo basalaki mpo na koyekola monɔkɔ ya mboka (créole portugais) esalaki ete bana-mboka básepela na bango mingi. Na nsima, bakómaki na mposa ya kozwa esika mpo na kotonga Ndako ya Bokonzi. Ntango ndeko-mwasi moko na nkombo Maria ayokaki likambo yango, apesaki ndambo ya lopango na ye oyo ezalaki kaka na mwa ndako moko oyo azalaki kofanda. Esika yango ekokaki mpenza mpo na kotonga Ndako ya Bokonzi ya monene. Maria ayebaki te ete, lokola azalaki na bandeko te, bato ya misala ya kotonga bandako bazalaki kolula lopango yango. Mokolo moko, moto moko ya mbongo mingi ayaki kosolola na Maria.
Alobaki na ye boye: “Nayoki likambo moko ya malamu te. Nayoki ete okabi lopango na yo. Oyebi te ete, lokola ezali mpenza na kati ya vile, okoki kozwela yango mbongo mingi?”
Maria atunaki ye ete: “Soki natɛki yango epai na yo, okopesa ngai ntalo boni?” Lokola moto yango apesaki ye eyano te, Maria abakisaki ete: “Ata soki opesi ngai mbongo nyonso ya mokili, ekokoka te, mpo mbongo ekoki kosomba bomoi te.”
Moto yango atunaki ye ete: “Ozali na bana te, boye te?”
Mpo na kokata lisolo yango, Maria alobaki na ye boye: “Lopango yango ezali ya Yehova. Adefisaki ngai yango bambula ebele, sikoyo nazongiseli ye yango. Nazali na mposa ya bomoi ya seko.” Na nsima atunaki moto yango: “Yo okopesa ngai bomoi ya seko?” Moto yango alobaki lisusu ata eloko te, abalukaki mpe akendaki.
Nsukansuka, batongaki ndako kitoko ya etaje na lisalisi ya bandeko oyo bautaki na Portugal oyo bayebi mpenza mosala ya kotonga. Ezali na ndako monene na nse ya mabelé, Ndako ya Bokonzi moko ya monene, mpe bandako ya kolala. Ezali mpe na bandako ya kelasi mpo na biteyelo ya bankulutu, ya basaleli na misala, mpe ya babongisi-nzela. Masangá mibale esalaka makita na ndako yango; na ndenge yango, ezali esika mpenza ya losambo ya solo na engumba-mokonzi.
Engumba Mé-Zochi ezalaki na lisangá moko ya basakoli ya molende 60. Lokola bazalaki kosala makita na bango na Ndako ya Bokonzi moko ya bongobongo kaka, na kati ya elanga ya makemba, bakómaki mpenza na mposa ya Ndako ya Bokonzi ya malamu. Basololaki na bakonzi ya engumba, mpe bakonzi ya boboto balakisaki bandeko lopango moko kitoko na balabala monene ya engumba. Na lisalisi ya bandeko oyo bautaki na Portugal, batongaki Ndako ya Bokonzi kitoko na sanza mibale. Likambo yango ekamwisaki mpenza bato ya mboka. Ingénieur moko, moto ya Suède, oyo ayaki kotonga bandako na engumba yango akamwaki na komona ndenge bandeko bazali kosala. Alobaki boye: “Oyo nde likambo ya kokamwa! Batatoli ya Yehova, awa na Mé-Zochi, bayebi mayele ya kotonga nokinoki! Esengeli ete tósala mosala na biso ndenge yango.” Likita ya bofungoli Ndako ya Bokonzi yango esalemaki mokolo ya 12 Yuni 1999, mpe bayangani bazalaki 232. Ndako yango ekómá esika oyo bapaya mingi bakendaka kotala na engumba Mé-Zochi.
Liyangani moko monene
Likambo moko oyo Batatoli ya Yehova ya Sao Tomé-et-Principe bakobosana te ezali liyangani ya etúká “Mateya mauti na Nzambe” oyo eumelaki mikolo misato, na sanza ya Yanuali 1994; ezalaki liyangani ya liboso na bisanga yango. Esalemaki na ndako ya makita oyo eleki kitoko na engumba yango. Kanisá esengo oyo basakoli ya Bokonzi 116 bazalaki na yango ya komona bayangani 405 mpe ntango, mpo na mbala ya liboso, balandaki drame mpe bazwaki mikanda oyo ebimi na liyangani! Na liyangani yango, bato 20 bazwaki batisimo na libongo moko ya mbu.
Likambo oyo bato ya mboka yango bamoná naino te mpe ebendaki likebi na bango ezalaki bamakarɔ oyo bayangani balataki. Liyangani yango ezalaki lokola liyangani oyo esangisaka bato ya mikili ndenge na ndenge, mpamba te bapaya 25 bautaki na Portugal mpe na Angola. Na mwa ntango moke, bandeko balinganaki makasi kati na bango, mpe mingi batangisaki mpisoli mokolo ya nsuka ntango bazalaki kopesana mbote mpo na kokabwana.—Yoane 13:35.
Bapanzi-nsango ya radio ya Leta balandaki yango mpe batunaki mokɛngɛli ya liyangani mituna. Balekisaki mpe mwa biteni ya masukulu mingi na radio. Ezalaki mpenza likambo monene mpe esalisaki Batatoli yango ya sembo, oyo bakokaki kokutana na bandeko ya mikili mosusu te ebele bambula, bámimona ete bazali mpenza na kati ya ebongiseli ya Yehova.
Bazali kobota mbuma mpo na nkembo ya Yehova
Ntango nsango ya Bokonzi eboti mbuma epai ya bato, bakómaka na etamboli malamu oyo ekumisaka Yehova. (Tito 2:10) Elenge mwasi moko azalaki kosepela na mateya ya Biblia oyo azalaki koyekola pɔsɔ na pɔsɔ. Kasi, tata na ye apekisaki ye koyangana na makita ya lisangá. Mokolo ayebisaki tata na ye na limemya mpenza ntina ya makita mpe mposa na ye ya koyanganaka na makita yango, tata na ye abenganaki ye na ndako. Akanisaki ete mwana yango akosala likambo oyo bilenge mingi basalaka: komikɔtisa libala epai ya mobali moko oyo akobanda kosalisa ye. Ntango tata na ye ayokaki ete mwana yango azalaki na etamboli malamu, azalaki komitambwisa lokola moklisto ya solosolo, azongisaki ye na ndako mpe atikaki ye asalela Yehova.
Ndakisa mosusu ezali ya mokambi ya lisangá moko ya baalangá-nzembo. Amonaki ete bomoi ya mbindo oyo azalaki na yango ezali na litomba moko te. Ntango azalaki koluka koyeba ntina ya bomoi, akutanaki na Batatoli. Ntango akómaki kotosa mibeko ya Biblia, lisolo na ye ekómaki na minɔkɔ ya bato nyonso na engumba. Mosika te, amonaki ete asengeli kotika baninga nyonso ya mabe. (1 Bakolinti 15:33) Na nsima, asalaki likambo moko ya ntina mingi: azwaki batisimo mpo na komonisa ete amipesi na Yehova.
Etuluku moko ya bilenge bazalaki koluka lingomba ya solo. Yango ememaki bango na kosolola na bapastɛrɛ ya mwa mangomba mingi, kasi masolo yango ezalaki kobakisa bango mobulu na motó. Nsukansuka, bakómaki bafazɛrɛ, bazalaki kosala mobulu, mpe babandaki kotyola makambo ya Nzambe.
Mokolo moko, misionɛrɛ moko Motatoli ya Yehova azalaki kokende koyekola Biblia na moto moko mpe alekaki esika bilenge yango bazalaki. Bazalaki na mwa mituna mpe balingaki ete misionɛrɛ yango apesa bango biyano; bamemaki ye na nsima ya ndako mpe bapesaki ye ebonga. Na nsima, babandaki kotuna ye ebele ya mituna na makambo lokola molimo, lifelo, bomoi na likoló, mpe nsuka ya mokili. Motatoli yango asalelaki kaka Biblia oyo mokonzi ya etuluku yango apesaki ye mpo na koyanola na mituna nyonso oyo batunaki ye. Nsima ya ngonga moko, mokonzi na bango, nkombo na ye Law, alobaki na misionɛrɛ yango boye: “Ntango tobengaki yo oya kopesa biso biyano na mituna na biso, tolingaki nde kotyola yo ndenge tosalaka bato ya mangomba mosusu. Tozalaki kokanisa ete moto moko te akoki koyanola na mituna yango. Kasi, yo opesi biso biyano, mpe biyano yango euti na Biblia! Yebisá ngai nini nasala mpo nayeba Biblia?” Law akómaki koyekola Biblia, mpe mwa moke na nsima, akómaki koyangana na makita. Mosika te, atikaki baninga na ye mpe atikaki mobulu. Nsima ya mbula moko, amipesaki na Yehova mpe azwaki batisimo. Lelo oyo azali mosaleli na misala.
Momeseno moko oyo epalangani mingi na mboka yango ezali libala ya makango. Mingi bafandi bongo banda bambula mpe babotá bana. Ezali mpasi mpenza mpo na bango kondima likanisi ya Nzambe na likambo yango. Ezali esengo mpenza komona ndenge Liloba ya Nzambe esalisaki moto moko alonga mokakatano wana.—2 Bakolinti 10:4-6; Baebele 4:12.
Antonio asosolaki ete asengeli kokomisa libala na ye na buku ya Leta mpe akanaki kosala yango nsima ya kobuka masango, ntango akozala na mwa mbongo mpo na fɛti ya libala. Mokolo moko na butu, liboso bábanda kobuka masango, bayibaki masangu na ye nyonso. Azwaki ekateli ya kozela mbula oyo ekolanda, kasi na mbala wana lisusu bayibaki ye. Ntango Antonio amonaki ete molende oyo asalaki lisusu mpo na kozwa mbongo ya libala ekei na mai, asosolaki nani oyo azalaki kobimisela ye mindɔndɔ. Alobaki ete: “Satana akosakana na ngai lisusu te. Nsima ya sanza moko na ndambo, tokobalana ata soki tokosala fɛti te!” Esalemaki mpe bongo, mpe bakamwaki komona ete baninga na bango bayaki na bansɔsɔ, mabata, mpe ntaba moko mpo na fɛti ya libala. Nsima ya kokomisa libala na bango na buku ya Leta, Antonio ná mwasi na ye mpe bana na bango motoba bazwaki batisimo mpo na komonisa ete bamipesi na Nzambe.
Na esanga Principe
Na bambula eleki, bakɛngɛli-batamboli mpe babongisi-nzela ya Sao Tomé bazalaki mbala na mbala kokende na esanga Principe oyo ezali na bato 6 000. Bato ya esanga yango bazalaki koyamba Batatoli malamu mpe bazalaki kosepela mpenza na mateya na bango. Ntango mobali moko atángaki trakte oyo batikelaki ye, mokolo oyo elandaki alukaki babongisi-nzela mpe alingaki kosalisa bango na kokabola batrakte. Babongisi-nzela bayebisaki ete wana ezali mosala na bango, kasi mobali yango atyaki mbamba ete akenda na bango na bandako nyonso bakokɔta mpo alendisa bankóló-ndako ete báfungola matoi mpo na koyoka bango. Nsukansuka, mobali yango atikaki babongisi-nzela, kasi liboso na yango apesaki bango longonya mpo na mosala ya ntina oyo bazalaki kosala.
Na 1998, babongisi-nzela mibale oyo bautaki na Sao Tomé bakendaki na Principe, mpe mwa moke na nsima, bakómaki koyekola Biblia na bato 17. Mosala ekobaki kokola, mpe mosika te bato soki 16 bazalaki koyangana na etuluku ya boyekoli ya mokanda, mpe bato koleka 30 bazalaki koyangana na lisukulu ya bato banso. Bandeko bayebisaki bakonzi ya engumba ete bazali koluka esika mpo na kotonga ndako ya makita mpe, likambo ya esengo, bapesaki bango lopango mpo bátonga Ndako ya Bokonzi. Bandeko ya Sao Tomé bamipesaki mpo na kotonga mwa Ndako ya Bokonzi oyo ezali mpe na bashambre mpo na babongisi-nzela monene mibale.
Emonani mpenza ete nsango malamu ezali kobota mbuma mpe kokende liboso na bisangá yango oyo ezali mosika. (Bakolose 1:5, 6) Na sanza ya Yanuali 1990, basakoli bazalaki 46 na Sao Tomé-et-Principe. Na mbula ya mosala 2002, basakoli ya Bokonzi bakómaki 388! Basakoli ntuku mibale likoló ya mokama (20%) bazali na mosala ya ntango nyonso, mpe bato soki 1 400 bazali koyekola Biblia. Bato 1 907 bayanganaki na Ekaniseli ya 2001. Ya solo, na bisanga yango ya mikili ya moi makasi, liloba ya Yehova ezali kokende liboso na lombangu mpe ezali se kozwa nkembo.—2 Batesaloniki 3:1.
[Etanda/Elilingi na lokasa 12]
Baemisyo na Radio ya Leta
Bato mingi ya bisanga yango basepelaka na buku Mituna oyo bilenge batunaka—biyano bibongi.a Nsima ya pɔsɔ mibale mibale, emisyo moko ya miniti 15 oyo babengaka na nkombo ya buku yango elekaka na radio ya Leta. Ezalaka mpenza esengo koyoka mopanzi-nsango azali kotuna ete, “Bilenge, ndenge nini koyeba soki ezali bolingo ya solo to bilingelá?” mpe na nsima abandi kotánga mwa maloba ya buku yango! (Talá mokapo 31.) Emisyo mosusu ya ndenge yango elobelaka makambo oyo bazwaka na buku Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota.b
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
b Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Elilingi na lokasa 9]
Ndako ya Bokonzi ya liboso na Sao Tomé na 1994
[Bililingi na lokasa 10]
1. Ndako ya Bokonzi oyo etongamaki nokinoki na Mé-Zochi
2. Liyangani ya etúká esalemaki na ndako ya makita oyo
3. Bandeko oyo bazwaki batisimo na liyangani ya etúká
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 8]
Mabelé: Mountain High Maps® Copyright © 1997 Digital Wisdom, Inc.