Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 1/10 nk. 14-19
  • Koyikela minyoko mpiko ekumisaka Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Koyikela minyoko mpiko ekumisaka Yehova
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Sembo na ntango ya komekama
  • “Bózongisa mabe na mabe na moto te”
  • Esengo ya kosantisa nkombo ya Yehova
  • Tozali konyokwama mpo na boyengebene
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Okoki koyikela minyoko mpiko
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Ndenge nini tosengeli kotalelaka komekama?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Tikalá penepene na ebongiseli ya Yehova
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 1/10 nk. 14-19

Koyikela minyoko mpiko ekumisaka Yehova

“Soki, ntango bozali kosala malamu mpe bozali konyokwama, bozali kokangela yango motema, yango ezali likambo malamu epai ya Nzambe.”​—1 PETELO 2:20.

1. Lokola baklisto ya solo balingaka kozala na bomoi oyo eyokani na komipesa na bango, motuna nini tosengeli kotalela?

BAKLISTO bamipesi na Yehova mpe balingaka kosala mokano na ye. Mpo na komonisa ete bamipesi, basalaka nyonso oyo bakoki mpo na kolanda matambe ya Yesu Klisto, Ndakisa na bango, mpe kotatola mpo na solo. (Matai 16:24; Yoane 18:37; 1 Petelo 2:21) Kasi, Yesu mpe bato mosusu ya sembo bakufaki liwa ya martiru mpo na kondima na bango. Yango elingi nde koloba ete baklisto nyonso basengeli kokufa mpo na kondima na bango?

2. Ndenge nini baklisto batalelaka komekama mpe minyoko?

2 Biso baklisto tolendisami ete tózala sembo tii na liwa, kasi kaka te na kokufa mpo na kondima na biso. (2 Timote 4:7; Emoniseli 2:10) Yango elingi koloba ete atako tondimaka konyokwama mpo na kondima na biso​—mpe ata kokufa soki esengeli​—tosepelaka na likambo yango te. Monyoko to mpasi to kosambwisama epesaka biso esengo te. Kasi, lokola toyebi ete komekama mpe minyoko ekoki koyela biso, tosengeli kotalela malamumalamu ndenge oyo tokoki kosala soki tokutani na makambo yango.

Sembo na ntango ya komekama

3. Tángá mwa bandakisa ya bato oyo balongaki minyoko oyo Biblia elobeli. (Talá etanda “Ndenge balongaki minyoko,” na lokasa oyo elandi.)

3 Biblia ezali na ebele ya masolo oyo ezali komonisa ndenge oyo basaleli ya Nzambe na ntango ya kala basalaki ntango bakutanaki na mikakatano. Makambo ndenge na ndenge oyo basalaki ezali kolakisa baklisto ya lelo ndenge oyo bango mpe bakoki kosala ntango bakutani na makambo ya ndenge wana. Talelá masolo oyo ezali na etanda “Ndenge balongaki minyoko,” mpe kanisá mateya oyo okoki kozwa.

4. Tokoki koloba nini mpo na ndenge oyo Yesu ná basaleli mosusu ya sembo ya Nzambe basalaki ntango bamekamaki?

4 Atako Yesu mpe basaleli mosusu ya Nzambe basalaki ndenge moko te liboso ya minyoko na kotalela makambo oyo moto na moto akutanaki na yango, ezali polele ete batyaki bomoi na bango na likama mpambampamba te. Bazalaki na mpiko liboso ya makama, kasi bazalaki mpe na bokɛngi. (Matai 10:16, 23) Mokano na bango ezalaki ete mosala ya kosakola ekende ntango nyonso liboso mpe bátikala sembo epai ya Yehova. Ndenge oyo basalaki liboso ya makambo ndenge na ndenge oyo bakutanaki na yango ezali ndakisa mpo na baklisto oyo bazali kokutana na komekama mpe minyoko lelo oyo.

5. Na bambula ya 1960, minyoko nini ebimaki na Malawi mpe Batatoli basalaki nini?

5 Na ntango na biso, mbala mingi basaleli ya Yehova bakutanaki na mikakatano mpe batikalaki mabɔkɔ mpamba mpo na bitumba, bipekiseli, to mpe minyoko. Na ndakisa, na bambula ya 1960, banyokolaki Batatoli ya Yehova makasi na Malawi. Bandako ya Bokonzi, bandako na bango, biloko na bango ya kolya, mpe mimbongo na bango​—na mokuse, biloko na bango nyonso​—ebebisamaki. Bazalaki kobɛta bango mpe kopunza biloko na bango. Bandeko yango basalaki nini? Ebele bakimaki bamboka na bango. Mingi bakɔtaki na bazamba, mpe bamosusu bakendaki kofanda na Mozambique na boumeli ya mwa bambula. Atako bandeko mingi ya sembo bakufaki, bamosusu bamonaki malamu bálongwa na bisika oyo bomoi na bango ezalaki na likama, ekateli oyo emonani ete ezalaki malamu na kotalela makambo oyo bazalaki kosala bango. Na ndenge yango, bandeko balandaki ndakisa ya Yesu ná Paulo.

6. Makambo nini Batatoli ya Malawi batikaki te atako bazalaki konyokwama makasi?

6 Atako bandeko ya Malawi bazalaki kokima na bisika mosusu to komibomba, bazalaki koluka malako ya ebongiseli ya Teokrasi mpe kolanda yango, mpe na kobombana, bazalaki kokoba misala na bango ya boklisto na ndenge oyo bakokaki kosala yango. Litomba nini emonanaki? Liboso mosala ya kosakola epekisama na ekólo yango na 1967, basakoli bakómaki 18 519. Atako epekiseli ezalaki naino makasi mpe bandeko mingi bakimaki na Mozambique, na 1972, basakoli bakómaki 23 398. Moto mokomoko azalaki kosala ngonga koleka 16 na mosala ya kosakola sanza na sanza. Na ntembe te, misala na bango esanzolaki Yehova, mpe Yehova azalaki kopambola bandeko yango ya sembo na ntango wana ya mpasi mingi.a

7, 8. Mpo na nini bato mosusu baponaka kotikala na ekólo na bango, ata soki bazali kotɛmɛla bango?

7 Nzokande, na mikili oyo bazali kotɛmɛla bango, bandeko mosusu bakoki kopona kotikala na ekólo na bango, atako bazali na likoki ya kokende na mboka mopaya. Kokende na mboka mopaya ekoki kosilisa mikakatano mosusu, kasi ebimisaka mpe mikakatano mosusu. Na ndakisa, bakozala nde na likoki ya koyangana na bandeko mosusu mpe kozwa bilei ya elimo? Bakokokisa nde misala na bango ya elimo ntango bazali kobunda mpo na komesana na bomoi ya sika, mbala mosusu na mokili ya bozwi to na mokili oyo bazali na likoki ya kokóma na biloko mingi ya mokili?​—1 Timote 6:9.

8 Bandeko mosusu baponaka kotikala na ekólo na bango mpo bamibanzabanzaka mpo na bolamu ya elimo ya bandeko na bango. Baponaka kotikala mpe kondima mpasi mpo bákoba kosakola na ekólo na bango mpe kolendisa baninga na bango bandimi. (Bafilipi 1:14) Na ndenge yango, bamosusu bapesaki mabɔkɔ mpo na kolongisa lotomo na biso ya losambo liboso ya batribinale ya bikólo na bango.b

9. Moto oyo azali kokutana na minyoko asengeli kotalela makambo nini ntango azali kozwa ekateli ya kotikala na ekólo na ye to kokende na ekólo mosusu?

9 Ekateli ya kotikala na ekólo to kokende na ekólo mosusu ezali likambo ya moto na moto. Kasi, bikateli ya ndenge wana esengeli kozwama se nsima ya koluka malamumalamu litambwisi ya Yehova na libondeli. Nzokande, ezala toponi kosala nini, tosengeli kobosana te maloba ya ntoma Paulo oyo: “Mokomoko na biso akozongisa monɔkɔ mpo na ye moko epai ya Nzambe.” (Baloma 14:12) Lokola tomonaki yango liboso, Yehova azali kosɛnga kaka ete mosaleli na ye mokomoko atikala sembo na makambo nyonso. Basaleli na ye mosusu bazali kokutana na komekama mpe minyoko lelo oyo; bamosusu bakoki kokutana na yango lobi. Bango nyonso bakomekama ata na ndenge nini, mpe moto moko te akoki kokanisa ete minyoko ekoyela ye te. (Yoane 15:19, 20) Lokola tozali basaleli ya Yehova oyo bamipesi, tokoki te kokima likambo monene ya kosantisama ya nkombo ya Yehova mpe kolongisama ya bokonzi na ye.​—Ezekiele 38:23; Matai 6:9, 10.

“Bózongisa mabe na mabe na moto te”

10. Ndakisa nini ya ntina Yesu ná bantoma bapesaki biso na oyo etali kolonga mikakatano mpe botɛmɛli?

10 Ndenge oyo Yesu ná bantoma basalaki na ntango ya mpasi ezali mpe koteya biso likambo mosusu ya ntina: kozongisela bato oyo bazali konyokola biso mabe ata mokolo moko te. Biblia elobi ata na esika moko te ete Yesu to bayekoli na ye balukaki kotomboka to kobunda na bato oyo bazalaki konyokola bango. Kutu, ntoma Paulo apesaki baklisto toli ete: “Bózongisa mabe na mabe na moto te. . . . Bózongisa bino moko te mabe na oyo asali bino mabe, balingami, kasi bótikela nde nkanda esika; mpo ekomamá ete: ‘Kozongisa mabe ezali likambo na ngai; ngai nakozongisa, Yehova alobi bongo.’” Lisusu, “komitika te ete mabe elonga yo, kasi kobá kolonga mabe na kosaláká malamu.”​—Baloma 12:17-21; Nzembo 37:1-4; Masese 20:22.

11. Moto moko ya mayele na makambo ya kala alobaki nini na ndenge oyo baklisto bazalaki kotalela bakonzi ya Leta?

11 Baklisto ya ekeke ya liboso balandaki toli yango. Na buku na ye (The Early Church and the World), Cecil Cadoux, moto ya mayele ya makambo ya kala, alobeli ndenge oyo baklisto bazalaki kotalela Leta na bambula 30 tii 70 ya ntango na biso (T.B.). Akomaki boye: “Tozali ata na eloko moko te oyo ezali komonisa biso ete baklisto ya ntango wana basalaki likambo moko na makasi mpo na kotɛmɛla minyoko. Bazalaki kaka kosuka na kolobela na nguya nyonso mabe ya bakonzi na bango to kokima bango. Kasi, mbala mingi ntango bazali konyokola baklisto, bazalaki kosuka kaka na koboya na mpiko nyonso kotosa mitindo ya guvɛrnema soki eyokani te na botosi na bango epai ya Klisto.”

12. Mpo na nini eleki malamu koyikela minyoko mpiko na esika ya kozongisa mabe na mabe?

12 Kozongisa mabe te ndenge wana ezali mpenza malamu? Tokanisi ete soki moklisto azali kozongisa mabe te, yango ezali nde komonisa bolɛmbu na ye liboso ya bato oyo bazali na ekateli ya kosukisa basaleli ya Nzambe? Eleki nde malamu ete abunda mpo na komibatela? Na makanisi ya bato, ekoki komonana ete ezali mpenza bongo. Kasi, biso basaleli ya Yehova tozalaka na elikya ete na makambo nyonso, kolanda makanisi ya Yehova nde eleki malamu. Tobosanaka te maloba ya Petelo ete: “Soki, ntango bozali kosala malamu mpe bozali konyokwama, bozali kokangela yango motema, yango ezali likambo malamu epai ya Nzambe.” (1 Petelo 2:20) Tondimaka mpenza ete Yehova ayebi malamu makambo nyonso mpe akotika te ete makambo etikala bongo libela na libela. Nini endimisaka biso yango? Yehova alobaki na bato na ye oyo bazalaki baombo na Babilone ete: “Ye oyo azali kosimba bino, azali kosimba mbuma ya liso na ngai.” (Zekalia 2:8, NW) Tokanisi mpenza ete Yehova akoki kotikela moto ntango asimbaka mbuma ya liso na ye? Yehova akobikisa biso na ntango oyo ebongi. Tozalaka na ntembe te mpo na yango.​—2 Batesaloniki 1:5-8.

13. Mpo na nini Yesu atikaki banguna bákanga ye?

13 Na likambo yango, tokoki kotalela ndakisa ya Yesu. Na elanga ya Getesemane, soki atikaki banguna na ye bákanga ye, ezali te mpo akokaki kosala eloko te. Kutu, alobaki na bayekoli na ye ete: ‘Bokanisi nde ete nakoki te kosɛnga Tata na ngai apesa ngai sikoyo mampinga koleka zomi na mibale ya baanzelu? Bongo, ndenge nini Makomami ekokokisama ete yango esengeli kosalema bongo?’ (Matai 26:53, 54) Mpo na Yesu, kokokisama ya mokano ya Yehova ezalaki na ntina koleka, ata soki yango esɛngaki ete ye anyokwama. Azalaki kotya elikya mobimba na esakweli ya nzembo ya Davidi: “Okotika molimo na ngai na esika ya bakufi te; okotika mondimi na yo komona kopola te.” (Nzembo 16:10) Bambula mingi na nsima, ntoma Paulo alobaki mpo na Yesu ete: “Mpo na esengo oyo etyamaki liboso na ye ayikelaki nzete moko ya mpasi mpiko, kotyoláká nsɔni, mpe afandi na lobɔkɔ ya mobali ya kiti ya bokonzi ya Nzambe.”​—Baebele 12:2.

Esengo ya kosantisa nkombo ya Yehova

14. Esengo oyo elendisaki Yesu na ntango ya komekama ezalaki nini?

14 Esengo nini elendisaki Yesu na minyoko makasi oyo akutanaki na yango? Na kati ya basaleli nyonso ya Yehova, Satana alekaki mpenza kokanela nde Yesu, Mwana ya Nzambe. Na bongo, mpo na Yesu, kotikala sembo na komekama ezalaki eyano monene epai ya Satana oyo azali kotumola Yehova. (Masese 27:11) Kanisá esengo oyo Yesu azalaki na yango ntango asekwaki! Kanisá esengo oyo ayokaki ntango amonaki ete akokisaki mokumba oyo bapesaki ye​—moto ya kokoka​—ya kolongisa bokonzi ya Yehova mpe kosantisa nkombo na Ye! Lisusu, kofanda “na lobɔkɔ ya mobali ya kiti ya bokonzi ya Nzambe” na ntembe te ezali lokumu monene mpe esengo oyo eleki nyonso mpo na Yesu.​—Nzembo 110:1, 2; 1 Timote 6:15, 16.

15, 16. Minyoko nini ya nsɔmɔ Batatoli bayikelaki mpiko na Sachsenhausen, mpe nini epesaki bango makasi ya kosala bongo?

15 Na ndakisa ya Yesu, mpo na baklisto mpe, koyikela komekama mpe minyoko mpiko mpo na kozwa libaku ya kosantisa nkombo ya Yehova, ezali ntina ya esengo. Ndakisa moko malamu ezali ya Batatoli oyo banyokwamaki na kaa ya bakangami ya Sachsenhausen mpe oyo basalaki mobembo molai oyo babengaka mobembo ya liwa na nsuka ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Na mobembo yango, bankóto ya bato ya bolɔkɔ bakufaki mpo na malili, maladi, nzala, to mpe basoda ya Nazi babomaki bango na nzela. Batatoli ya Yehova nyonso 230 oyo bazalaki kati na bango babikaki mpamba te basimbanaki makasi mpe basalisanaki ata soki mpo na kosala yango moto asengelaki kotya bomoi na ye na likama.

16 Nini epesaki Batatoli yango nguya ya koyikela minyoko makasi wana mpiko? Ntango kaka balongwaki na likama, bamonisaki esengo mpe botɔndi na bango epai ya Yehova na mokanda moko oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Ekateli ya Batatoli ya Yehova 230 ya bikólo motoba, oyo bayangani na zamba moko pene ya Schwerin na Mecklenburg.” Na mokanda yango balobaki boye: “Touti na eleko molai ya komekama makasi mpe baoyo babiki, lokola bato oyo balongoli bango na mɔtɔ makasi, bazali ata na nsolo ya mɔtɔ te. (Talá Danyele 3:27.) Nzokande, batondi na makasi mpe na nguya oyo euti na Yehova mpe bazali kozela na mposa makasi mitindo ya sika ya Mokonzi mpo na kotombola matomba ya Teokrasi.”c

17. Komekama ya motindo nini basaleli ya Nzambe bazali kokutana na yango lelo oyo?

17 Ndenge moko na bandeko wana ya sembo 230, kondima na biso mpe ekoki komekama, atako tokómi naino te ‘kobunda tii na makila.’ (Baebele 12:4) Kasi, komekama ekoki kozala ndenge ebele. Baninga ya kelasi bakoki kosɛka biso, to baninga na biso bakoki kotinda biso na kosala pite to ekobo to makambo mosusu ya mabe. Lisusu, ekateli na biso ya koboya makila, ya kobala kaka na kati ya Nkolo, ya koteya bana na biso solo soki molongani na biso azali mosambeli ya Yehova te, ekoki ntango mosusu kobimisela biso mikakatano mpe komekama.​—Misala 15:29; 1 Bakolinti 7:39; Baefese 6:4; 1 Petelo 3:1, 2.

18. Nini ezali kopesa biso elikya ete tokoki koyikela komekama makasi mpiko?

18 Kasi, ezala komekama nini ekómeli biso, toyebi ete tozali konyokwama mpo tozali kotya Yehova mpe Bokonzi na ye na esika ya liboso mpe, kosala bongo ezali lokumu mpe esengo mpo na biso. Maloba ya Petelo ezali kopesa biso makasi: “Soki bozali kolobelama mabe mpo na nkombo ya Klisto, bozali bato ya esengo, mpamba te elimo ya nkembo, ɛɛ elimo ya Nzambe, ezali kofanda likoló na bino.” (1 Petelo 4:14) Elimo ya Yehova ezali kopesa biso nguya ya koyikela komekama makasi mpiko, mpe nyonso wana mpo na nkembo mpe lokumu na ye.​—2 Bakolinti 4:7; Baefese 3:16; Bafilipi 4:13.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Makambo oyo esalemaki na bambula ya 1960 ezalaki kaka ebandeli ya minyoko makasi mpe ya nsɔmɔ oyo Batatoli ya Malawi bazwaki na boumeli ya mbula pene na 30. Mpo na koyeba lisolo na bango malamu, talá Annuaire des Témoins de Jéhovah 1999, nkasa 171-212.

b Talá lisolo “Tribinale monene ya ‘mokili ya Alalata’ elongisi losambo ya solo,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Aprili 2003, nkasa 11-14.

c Ekateli yango mobimba ezali na Annuaire des Témoins de Jéhovah 1974, nkasa 208-209. Lisolo ya bomoi ya moko ya bandeko wana ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuali 1998, nkasa 25-29.

Okoki kolimbola?

• Ndenge nini baklisto batalelaka bampasi mpe minyoko?

• Liteya nini tokoki kozwa na ndenge oyo Yesu mpe bato mosusu ya sembo basalaki ntango bamekamaki?

• Mpo na nini ezali bwanya te kozongisa mabe na mabe ntango bazali konyokola biso?

• Esengo nini elendisaki Yesu ntango amekamaki, mpe yango ekoki koteya biso nini?

[Etanda/Bililingi na lokasa 15]

Ndenge balongaki minyoko

• Liboso basoda ya Elode bákóma na Beteleme mpo na koboma bana mibali nyonso oyo bazalaki na mbula mibale tii na nse, anzelu ayebisaki Yozefe ná Malia bákamata mwana Yesu mpe bákima na ye na Ezipito.​—Matai 2:13-16.

• Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, mbala mingi banguna na ye balukaki koboma ye mpo azalaki kotatola polelepolele. Yesu azalaki mbala nyonso kokima bango.​—Matai 21:45, 46; Luka 4:28-30; Yoane 8:57-59.

• Ntango basoda mpe bakonzi bakendaki kokanga Yesu na elanga ya Getesemane, amimonisaki polele, mbala mibale mobimba alobaki na bango ete: “Ezali ngai.” Kutu, ayebisaki bayekoli na ye básala matata te mpe atikaki ebele ya bato wana bákanga ye.​—Yoane 18:3-12.

• Na Yelusaleme, Petelo mpe bato mosusu bakangamaki, babɛtamaki fimbo, mpe bayebisaki bango bátika kolobela nkombo ya Yesu. Kasi, ntango kaka batikaki bango “balongwaki . . . , mpe mikolo nyonso na kati ya tempelo mpe na ndako na ndako, kozanga kotika, bakobaki koteya mpe kosakola nsango malamu oyo etali Klisto, Yesu.”​—Misala 5:40-42.

• Ntango Saulo, oyo akómaki ntoma Paulo, ayokaki ete Bayuda ya Damasi basaleli ye likita mpo na koboma ye, bandeko batyaki ye na ekɔlɔ mpe bakitisaki ye na butu na lidusu moko oyo ezalaki na efelo ya engumba, mpe akimaki.​—Misala 9:22-25.

• Bambula mingi na nsima, Paulo aponaki kosamba liboso ya Kaisala, atako Guvɛrnɛrɛ Fesitusi mpe Mokonzi Agilipa bamonaki ye na “likambo moko te oyo ebongi na liwa to na minyɔlɔlɔ.”​—Misala 25:10-12, 24-27; 26:30-32.

[Bililingi na lokasa 16]

Atako bakimaki ekólo na bango mpo na minyoko makasi, bankóto ya Batatoli ya Malawi bakobaki kosala mosala ya Bokonzi na esengo

[Bililingi na lokasa 17]

Esengo ya kosantisa nkombo ya Yehova elendisaki bandeko oyo ya sembo na mobembo ya liwa mpe na bakaa ya bakangami ya Banazi

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Mobembo ya liwa: KZ-Gedenkstätte Dachau, na ndingisa ya USHMM Photo Archives

[Bililingi na lokasa 18]

Komekama mpe mikakatano ekoki kozala ndenge ebele

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto