Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 15/6 nk. 17-22
  • Tólukaka makambo malamu epai ya bato nyonso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tólukaka makambo malamu epai ya bato nyonso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Na mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli
  • Na kati ya libota
  • Na kati ya lisangá
  • Tóluka makambo malamu epai ya bato nyonso
  • Bolamu—Ndenge nini tokoki kokolisa ezaleli yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Tomonisa “nyonso oyo ezali malamu”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Malamu mingi na Jéhovah
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Tótika te komonisa motema malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 15/6 nk. 17-22

Tólukaka makambo malamu epai ya bato nyonso

“Nzambe na ngai, kanisá ngai mpo na malamu.”​—NEHEMIA 13:31.

1. Na ndenge nini Yehova asalelaka bato nyonso malamu?

SOKI mapata ezipaki likoló mwa mikolo, bato basepelaka mingi ntango moi ebimi makasi mpe likoló ekómi polele. Bato bayokaka malamu mpe bakómaka na esengo. Ndenge moko mpe, soki moi makasi elandani mikolo mwa mingi, bato bayokaka malamu ntango mbula, ezala ya moke to ya makasi, ebɛti mpamba te epesaka mwa mpiɔ oyo ekitisaka bango mitema. Yehova, Mozalisi na biso oyo atondi na bolingo akelá mokili mpe abongisá ete bileko ebongwanaka. Yesu alobelaki bokabi ya Nzambe ntango ateyaki boye: “Bókoba kolinga banguna na bino mpe kobondela mpo na baoyo bazali konyokola bino; mpo bómimonisa bana ya Tata na bino oyo azali na likoló, mpo asalaka ete moi na ye ebima likoló ya bato mabe mpe bato malamu mpe asalaka ete mbula enɔka likoló ya bayengebene mpe bato bazangi boyengebene.” (Matai 5:43-45) Ya solo, Yehova asalelaka bato nyonso malamu. Basaleli na ye basengeli kosala makasi bálanda ndakisa na ye mpe bálukaka makambo malamu epai ya bato nyonso.

2. (a) Yehova atalelaka nini mpo na kosala malamu? (b) Yehova azali komona nini ntango azali kotala ndenge tomonisaka botɔndi mpo na malamu na ye?

2 Yehova atalelaka nini mpo na kosala malamu? Kobanda Adama asalá lisumu, Yehova alukaka ntango nyonso makambo malamu epai ya bato. (Nzembo 130:3, 4) Mokano na ye ezali ete bato ya botosi báfanda na Paladiso. (Baefese 1:9, 10) Na ngɔlu na ye atindaki Momboto oyo alakaki mpe, na nzela na ye, apesi biso elikya ya kolongwa na lisumu mpe na ezaleli ya kozanga kokoka. (Genese 3:15; Baloma 5:12, 15) Kondima ebongiseli ya lisiko ezali kofungola nzela ya kokóma lisusu bato ya kokoka. Sikoyo miso ya Yehova ezali likoló ya mokomoko na biso mpo na komona makambo ndenge na ndenge oyo tosalaka, na ndakisa, ndenge totalelaka bokabi na ye. (1 Yoane 3:16) Yehova azali komona likambo nyonso oyo tozali kosala mpo na komonisa botɔndi na biso mpo na malamu na ye. Ntoma Paulo akomaki boye: “Nzambe azali te moto oyo azangi boyengebene mpo abosana mosala na bino mpe bolingo oyo bomonisaki mpo na nkombo na ye.”​—Baebele 6:10.

3. Motuna nini ebongi mpenza tótalela?

3 Na bongo, ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Yehova na oyo etali koluka makambo malamu epai ya bato? Tótalela biyano na motuna yango na makambo minei ya bomoi na biso: (1) na mosala ya kosakola, (2) na kati ya libota, (3) na kati ya lisangá, mpe (4) na boyokani na biso na bato mosusu.

Na mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli

4. Na ndenge nini kosakola ezali mpe lolenge ya koluka makambo malamu epai ya bato?

4 Ntango bayekoli ya Yesu batunaki ye ndimbola ya lisese ya blé mpe matiti mabe, alobaki na bango ete: “Elanga ezali mokili.” Biso bayekoli ya Klisto lelo oyo tomonisaka ete alobaki solo ntango tobimaka na mosala ya kosakola. (Matai 13:36-38; 28:19, 20) Mosala na biso ya kosakola esɛngaka mpe koyambola kondima na biso liboso ya bato nyonso. Lokola bato mingi bayebi ete Batatoli ya Yehova basakolaka ndako na ndako mpe na babalabala, yango ezali komonisa ete tozali na molende mpo na koluka bato nyonso oyo babongi koyoka nsango ya Bokonzi. Yesu alobaki ete: “Na engumba nyonso to mboka nyonso bokokɔta, bóluka nani kati na yango abongi.”​—Matai 10:11; Misala 17:17; 20:20.

5, 6. Mpo na nini tolɛmbaka te kozongela bato na bandako na bango?

5 Ntango tozali kokómela bato na bandako na bango, totalaka ndenge bayambaka nsango na biso. Ntango mosusu tomonaka ete moto moko asepeli koyoka biso, kasi okoyoka moto mosusu na kati ya ndako alobi ete, “Tozali na mposa ya koyoka bino te,” mpe akati lisolo na biso. Epesaka biso mpenza mawa ete moto oyo asepeli te apekisa biso kosolola na moto oyo asepeli! Tokoki kosala nini mpo tókoba koluka makambo malamu epai ya bato nyonso?

6 Soki tokei lisusu kosakola na teritware wana, ntango tokómi na ndako yango, tokoki kozwa libaku ya kosolola mbala moko na moto oyo akataki lisolo na biso. Soki tobosani te likambo oyo elekaki na mbala ya liboso, yango ekosalisa biso tómibongisa. Ekoki kozala ete moto oyo aboyaki asalaki yango na motema mabe te, akanisaki mbala mosusu ete asengeli kopekisa moto oyo alingi koyoka nsango ya Bokonzi. Ekoki kozala ete bayebisá ye makambo ya lokuta mpo na biso, yango wana atalelaka biso ndenge wana. Kasi, yango ekopekisa biso te tózonga lisusu kosakola nsango malamu ya Bokonzi na ndako yango; tokosalela mayele mpo na kolongola makanisi mabe oyo moto wana azali na yango. Tolukaka kosalisa bato nyonso bákoka koyeba Nzambe malamumalamu. Ntango mosusu Yehova akoki kobenda moto yango epai na ye.​—Yoane 6:44; 1 Timote 2:4.

7. Nini ekoki kosalisa biso tóbungisa elikya te ntango tozali kokutana na bato?

7 Ntango Yesu apesaki bayekoli na ye malako, abosanaki te ete bamosusu bakotɛmɛla bango na bandeko na bango. Alobaki boye: “Nayaki kotya bokabwani, moto akotɛmɛla tata na ye, mpe mwana mwasi akotɛmɛla mama na ye, mpe elenge mwasi ya libala akotɛmɛla mama-bokilo na ye.” Mpe abakisaki ete: “Banguna ya moto bakozala bato ya ndako na ye moko.” (Matai 10:35, 36) Kasi bomoi ya moto mpe makanisi na ye ekoki kobongwana. Moto akoki kozwa maladi ya mbalakaka, ndeko na ye akoki kokufa, makama ekoki kosalema na esika oyo afandi, akoki kokóma na mitungisi, mpe makambo mosusu ya ndenge na ndenge ekoki kobongola ndenge na ye ya kotalela nsango oyo tozali kosakola. Soki tozali kaka kokanisa ete bato oyo tozali komemela nsango bakoyoka te, tokoki mpenza koloba ete tozali koluka makambo malamu epai na bango? Ebongi malamu tózonga kotala bango na libaku mosusu. Ekoki mpe kosalema ete na mbala wana báyamba biso malamu. Ntango mosusu ezali kaka te maloba na biso kasi ezali mpe elobeli na biso nde ekoki kotinda moto ayoka biso. Soki tozali kobondela Yehova makasi liboso tóbanda kosakola, ekosalisa biso tóbungisa elikya te mpe tóyebisa bato nyonso nsango ya Bokonzi na ndenge oyo ekosepelisa bango.​—Bakolose 4:6; 1 Batesaloniki 5:17.

8. Nini ekoki kosalema ntango baklisto bazali koluka makambo malamu epai ya bandeko na bango oyo bazali bandimi te?

8 Na masangá mosusu, bandeko mingi ya libota moko basalelaka Yehova. Mbala mingi, likambo oyo esepelisaki bilenge na kati ya mabota yango mpe etindaki bango bámemya makambo ya Yehova ezali kolendendela ya mokóló moko na kati ya libota, oyo boyokani malamu na ye ná bandeko na ye mpe ná molongani na ye etindaki bango bábongola motema. Baklisto mingi oyo bazali basi ya mabala balandaki toli ya ntoma Petelo mpe bazwaki mibali na bango “kozanga liloba.”​—1 Petelo 3:1, 2.

Na kati ya libota

9, 10. Ndenge nini Yakobo ná Yozefe balukaki makambo malamu epai ya bato ya libota na bango?

9 Likambo mosusu oyo tokoki kotalela mpo na koluka makambo malamu epai ya basusu ezali bolingo oyo ezalaka kati na bandeko ya libota moko. Na ndakisa, tótalela makambo ya Yakobo ná bana na ye. Na Genese mokapo 37, vɛrsɛ 3 ná 4, Biblia elobi ete Yakobo alingaki Yozefe mingi. Bandeko ya Yozefe bakómaki koyokela ye zuwa mpe nsukansuka bayokanaki báboma ndeko na bango. Kasi, tótala elimo oyo Yakobo ná Yozefe bamonisaki na nsima. Bango mibale balukaki makambo malamu epai ya bato ya libota na bango.

10 Ntango Yozefe akómaki mokɛngɛli ya biloko ya kolya na Ezipito na ntango oyo nzala makasi ekɔtaki na ekólo yango, ayambaki malamu bandeko na ye oyo bakendaki kuna. Atako amiyebisaki na bango mbala moko te, asalaki nyonso mpo básalisa bango mpe bázwa bilei mpo na komemela tata na bango oyo akómaki mobange. Tomoni ete atako bayinaki Yozefe, ye alukaki bolamu na bango. (Genese 41:53–42:8; 45:23) Ndenge moko mpe, liboso Yakobo akufa, likoló ya mbeto na ye apambolaki bana na ye nyonso na maloba oyo ezalaki mpe bisakweli. Atako misala mabe na bango ezangisaki bango mapamboli mosusu, moko te kati na bango azangaki libula na mokili ya ndaka. (Genese 49:3-28) Na likambo yango Yakobo amonisaki mpenza bolingo ya solosolo!

11, 12. (a) Esakweli nini ezali na ndakisa oyo emonisi ntina ya koluka makambo malamu epai ya bato ya libota? (b) Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya tata na lisese ya mwana ya kilikili oyo Yesu alobaki?

11 Motema molai oyo Yehova amoniselaki ekólo ya Yisalaele oyo etikalaki sembo te ezali mpe kosalisa biso na koyeba ndenge oyo alukaka makambo malamu epai ya basaleli na ye. Yehova asalelaki makambo oyo elekaki na libota ya mosakoli Hosea mpo na komonisa bolingo na ye ya solosolo. Gomele, mwasi ya Hosea, asalaki ekobo mbala na mbala. Atako bongo, Yehova alobaki na Hosea ete: “Kende lisusu, lingá mwasi oyo moninga alingi mpe asalaka ekobo, lokola na bolingo oyo Yehova azali na yango mpo na bana Yisalaele, atako bango bazali kolanda banzambe mosusu mpe bazali kolinga mikate ya mbuma ya vinyo ekauká.” (Hosea 3:1, NW) Mpo na nini atindaki ye asala likambo ya ndenge wana? Yehova ayebaki ete na kati ya ekólo oyo eboyaki kotosa ye, ezalaki na bato oyo bazalaki komona ete motema molai na ye ezali kopesa bango libaku malamu ya kobongwana. Hosea alobaki ete: “Nsima bato ya Yisalaele bakozonga mpe bakoluka [Yehova], Nzambe na bango, mpe Davidi mokonzi na bango; bakotosa [Yehova] mpe malamu na ye na mikolo ya nsima.” (Hosea 3:5) Tosengeli mpenza kokanisa ndakisa malamu wana ntango tokutani na mikakatano na kati ya libota na biso. Soki ozali ntango nyonso koluka makambo malamu epai ya bato mosusu ya libota, motema molai na yo ekoki kozala ndakisa malamu mpo na bango.

12 Lisese ya mwana ya kilikili oyo Yesu alobaki ezali mpe kosalisa biso na koyeba ndenge oyo tokoki koluka makambo malamu epai ya bato mosusu ya libota na biso. Mwana oyo ya leki atikaki bomoi na ye ya kilikili mpe azongaki na ndako. Tata na ye ayokelaki ye mawa mpe ayambaki ye. Ntango mwana oyo ya mokóló, oyo atikalaki na ndako, amonisaki ete asepeli te, tata alobaki na ye nini? Alobaki na ye boye: “Mwana na ngai, ozalaka ntango nyonso elongo na ngai, mpe biloko na ngai nyonso ezali ya yo.” Tata alobaki na ye mabe te mpo na kopamela ye, kasi amonisaki ye kaka ete alingaka ye. Abakisaki ete: “Esengeli kaka tósepela mpe tózala na esengo, mpamba te ndeko na yo oyo akufaki mpe azongi na bomoi, mpe abungaki mpe amonani.” Biso mpe tokoki koluka ntango nyonso makambo malamu epai ya bato mosusu.​—Luka 15:11-32.

Na kati ya lisangá

13, 14. Wapi lolenge moko ya kotosa mobeko ya mokonzi oyo etali bolingo na kati ya lisangá?

13 Biso baklisto tozalaka na mokano ya kolanda mobeko ya mokonzi oyo etali bolingo. (Yakobo 2:1-9) Ya solo, tokoki koyokana malamu na bandeko mosusu ya lisangá na biso oyo tokeseni na bango na oyo etali bozwi ya mokili oyo. Kasi tozali nde ‘kokabola bato na bituluku’ na kolanda mposo, ekólo, to mpe mangomba na bango ya kala? Soki ezali bongo, ndenge nini tokoki kosalela toli ya Yakobo?

14 Tokomonisa ete tozali na ezaleli ya koyamba bato soki tozali kosepela na moto nyonso oyo ayei na makita. Ntango tozali kosolola na bato oyo bazali koya sika na Ndako ya Bokonzi, mwa nsɔni to mwa kobanga oyo bakokaki kozala na yango ekosila. Kutu, bato mosusu oyo bayaka na makita mpo na mbala ya liboso balobaka ete: “Bato nyonso bazalaki na boboto. Namonaki lokola nde bango nyonso bayebaki ngai. Namimonaki lisusu mopaya te.”

15. Na kati ya lisangá, ndenge nini tokoki kosalisa bilenge bátyelaka mikóló likebi?

15 Na masangá mosusu, nsima ya makita, bilenge mosusu basalaka mwa etuluku ya bango na bango na kati to na libándá ya Ndako ya Bokonzi mpe balingaka kosolola na mikóló te. Tokoki kosala nini mpo na kosilisa ezaleli wana? Libosoliboso esengeli ete baboti básololaka na bana na bango na ndako, báteya bango liboso ya kokende na makita. (Masese 22:6) Bakoki kopesa bango mokumba ya kobongisa mikanda mpo moto nyonso amema mikanda oyo akosalela na makita. Lisusu, baboti nde babongi mpo na kolendisa bana na bango básololaka na mikóló mpe bibɔsɔnɔ na Ndako ya Bokonzi. Bana bakoyoka esengo soki bazali kosolola mwa masolo ya ntina na bandeko wana.

16, 17. Ndenge nini mikóló bakoki koluka makambo malamu epai ya bilenge na kati ya lisangá?

16 Mikóló mpe basengeli kotyelaka bilenge ya lisangá likebi. (Bafilipi 2:4) Bakoki kobandela bilenge mwa masolo ya kolendisa. Mbala mingi tosimbaka mwa makanisi ya ntina na masolo oyo esalemaka na makita. Mikóló bakoki kotuna bilenge soki basepeli na masolo oyo esalemi na makita mpe soki ezali na mwa makanisi oyo basepeli na yango mingi mpe oyo bakoki kosalela. Bilenge bazali mpe bandeko na kati ya lisangá; yango wana esengeli kokumisa bango mpo na likebi na bango mpe kopesa bango longonya ntango bapesi biyano, basali lisolo, to basali elakiseli. Lolenge oyo bilenge bazali koyokana na mikóló na kati ya lisangá mpe ndenge oyo bazali kosala misala mikemike na ndako, ekoki komonisa ete nsima ya bambula bakoki kokokisa mikumba ya minene.​—Luka 16:10.

17 Bilenge mosusu, ntango bazali kondima mikumba ya mikemike, bakolisaka bizaleli ya elimo oyo epesaka bango nzela ya kozwa mikumba ya minene. Kozala na makambo ya kosala ekoki mpe kosalisa moto aboya etamboli ya mabe. (2 Timote 2:22) Mikumba yango ekoki ‘komeka mpo na koyeba makoki’ ya bandeko mibali oyo balingi kokóma basaleli na misala. (1 Timote 3:10) Ntango bilenge bazali kosepela kopesa biyano na makita mpe bazali na molende na mosala ya kosakola, mpe ntango bazali kosepela na moto nyonso na kati ya lisangá ekosalisa bankulutu bámona makoki na bango ntango bazali kotalela bango mpo na kopesa bango mikumba mosusu.

Tóluka makambo malamu epai ya bato nyonso

18. Na oyo etali kosambisa, motambo nini esengeli kokima, mpe mpo na nini?

18 Masese 24:23 (NW) elobi ete: “Kopona bilongi na ntango ya kosambisa ezali malamu te.” Bwanya ya Nzambe ezali kosɛngisa bankulutu báponaka bilongi te ntango bazali kosambisa makambo na kati ya lisangá. Yakobo alobaki boye: “Bwanya oyo euti na likoló ezali libosoliboso pɛto na bizaleli, na nsima kimya, makambo makasimakasi te, esepelaka kotosa, etondi na motema mawa mpe na bambuma ya malamu, eponaka bilongi te, ezalaka na bokosi te.” (Yakobo 3:17) Ezali polele ete ntango bazali koluka makambo malamu epai ya bato mosusu, bankulutu basengeli kokeba ete boninga to kosepela na moto ebebisa mitema na bango te. Asafa, mokomi ya nzembo, akomaki boye: “Nzambe azali kotɛlɛma na kati ya koyangana ya Nzambe; ye azali kosambisa kati na banzambe [to “bato oyo babengami banzambe,” elingi koloba bazuzi]. Kino ntango nini bino bokosambisa na mabe mpe [kopona] bilongi na bato mabe?” (Nzembo 82:1, 2) Yango wana, bankulutu baboyaka kokɔtela ata mwa moke baninga to bandeko na bango ntango basengeli kotalela makambo na bango. Na ndenge yango, babatelaka bomoko ya lisangá mpe batikelaka elimo ya Yehova nzela ya kosala mosala na yango.​—1 Batesaloniki 5:23.

19. Ndenge nini tokoki koluka makambo malamu epai ya bato mosusu?

19 Ntango tozali koluka makambo malamu epai ya bandeko na biso na kati ya lisangá, tomonisaka makanisi oyo Paulo azalaki na yango ntango akomelaki lisangá ya Tesaloniki. Alobaki boye: “Lisusu, tondimi mpenza na kati ya Nkolo mpo na bino, ete bozali kosala mpe bokokoba kosala makambo oyo tozali kotinda.” (2 Batesaloniki 3:4) Soki tozali koluka makambo malamu epai na baninga na biso, tokokakatana te kolimbisa mabunga na bango. Tokoluka epai na bango makambo oyo ekotinda biso tópesa bango longonya, mpe na ntembe te tokoboya kolandela mabunga na bango. Paulo akomaki ete: “Eloko oyo balukaka epai ya bakapita ezali ete moto amonana moto ya sembo.” (1 Bakolinti 4:2) Ezali te kaka bosembo ya bakɛngɛli na kati ya lisangá, kasi ya bandeko na biso baklisto nyonso nde etindaka biso tólinga bango. Na ndenge yango, topusanaka lisusu penepene na bango, mpe tolendisaka boninga na kati na biso na bango. Tokómaka kotalela bango ndenge Paulo azalaki kotalela bandeko ya ntango na ye. Bandeko bazali ‘baninga ya mosala mpo na bokonzi ya Nzambe’ mpe bazali ‘lisalisi oyo ezali kopesa biso makasi.’ (Bakolose 4:11) Na ndenge yango, tomonisaka elimo ya Yehova.

20. Baoyo balukaka makambo malamu epai ya bato nyonso bakozwa mapamboli nini?

20 Na ntembe te tozali kozongela ndenge Nehemia abondelaki ete: “Nzambe na ngai, kanisá ngai mpo na malamu.” (Nehemia 13:31) Tozali mpenza na esengo lokola Yehova alukaka makambo malamu epai ya bato! (1 Mikonzi 14:13) Biso mpe tósala ndenge yango na boyokani na biso ná bato mosusu. Kosala bongo ekopesa biso elikya ya kobikisama mpe kozwa bomoi ya seko na mokili ya sika oyo ezali koya.​—Nzembo 130:3-8.

Okopesa eyano nini?

• Yehova atalelaka nini mpo na kosalela bato nyonso malamu?

• Ndenge nini tokoki koluka makambo malamu epai ya basusu

• na mosala ya kosakola?

• na kati ya libota?

• na kati ya lisangá?

• na boyokani na biso na bato mosusu?

[Elilingi na lokasa 18]

Atako bandeko ya Yozefe bayinaká ye, ye alukaki bolamu na bango

[Elilingi na lokasa 19]

Koboya koyoka biso epekisaka biso te koluka kosalisa bato nyonso

[Elilingi na lokasa 20]

Atako bana ya Yakobo basalaká mabe, bango nyonso bazwaki mapamboli

[Elilingi na lokasa 21]

Tósepela na bato nyonso na makita

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto