Mosala ya kosakola na monɔkɔ ya ndenge mosusu na Corée
NA MOBU 1997, etuluku moko ya bato basalaki liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova; bato yango bazalaki mpenza na esengo, kasi makɛlɛlɛ ezalaki mpenza te na esika oyo bayanganaki. Ezalaki mbala ya liboso básala liyangani ya etúká na Corée kaka mpo na bato oyo balobaka te mpe bakufá matoi. Bayangani nyonso bazalaki bato 1174. Makambo nyonso ya liyangani yango: masukulu, mituna-masolo, ná drame, esalemaki na elobeli ya bajɛstɛ ya bato ya Corée mpe ezalaki kolakisama na televizyo moko monene (écran géant) na kati ya Ndako ya Mayangani. Yango ezalaki mbuma ya mosala makasi oyo ebele ya bandeko ya bolingo basalaki banda ebele ya bambula.
Mokolo mosusu mabelé ekokóma paladiso mpe, na ntango wana, “matoi ya bato bakufá matoi ekofungwama.” (Yisaya 35:5, NW) Mpo na kokɔta na Paladiso wana, moto nyonso, ata moto oyo akufá matoi, asengeli liboso kokɔta na paladiso ya elimo, elingi koloba kozwa bomɛngo ya elimo oyo basaleli ya Nzambe bazali na yango. Yehova ye moko akolakisa moto yango mpe asengeli kokóma Motatoli ya Yehova oyo amipesi mpe azwi batisimo.—Mika 4:1-4.
Ebandaki lokola lisano
Atako babandaki kosakola nsango malamu epai ya bato bakufá matoi na bambula ya 1960, ezali kaka na bambula ya 1970 nde mwa bato moke kati na bango bakómaki koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova na Séoul, mboka-mokonzi ya Corée. Ndeko mobali moko oyo akomaka mbangumbangu azalaki kokoma na etanda moko makanisi ya ntina ya masolo mpe bavɛrsɛ oyo bazalaki kotánga na makita.
Na 1971, na engumba Taejon, Motatoli moko oyo azalaki na mwana moko akufá matoi abandaki koteya mwana yango ná baninga na ye oyo mpe bakufá matoi nsango ya Bokonzi. Mwa etuluku wana ebimisi bandeko mingi ya molende oyo basimbi masangá mingi ya bato bakufá matoi.—Zekalia 4:10.
Bilenge bamipesi
Mpo bato oyo bakufá matoi báyeba Yehova ná Yesu mpe na bongo, bákɔta na nzela ya bomoi, esengelaki bandeko mosusu ya bolingo malamu básala milende mingi. (Yoane 17:3) Yango wana, mwa ndambo ya Batatoli ya Yehova bayekolaki elobeli ya bajɛstɛ mpo na kosolola na bato bakufá matoi mpe bazwi mbano monene.
Park In-sun, elenge moko ya mbula 15, azwaki mokano ya koyekola elobeli yango. Elenge yango akómaki koyekola mosala na esika oyo bato 20 oyo bakufá matoi bazalaki kosala. Asalaki na bango esika moko sanza mwambe mpo na koyekola elobeli ya bajɛstɛ mpe ndenge oyo bato yango bakanisaka. Na mbula oyo elandaki, akómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza, mpe azalaki koyekola na etuluku ya bato bakufá matoi oyo bazalaki kosepela na solo ya Biblia. Eumelaki te, babandaki kokóma mingi, mpe nsima ya mwa ntango, bato koleka 35 bakómaki koyangana na makita na mokolo ya lomingo.—Nzembo 110:3.
Na nsima, mpo na mbala ya liboso na Séoul, basalaki etuluku moko ya bato oyo bazalaki kosala makita na elobeli ya bajɛstɛ. Ndeko Park In-sun azalaki mobongisi-nzela monene na kati ya etuluku wana oyo ezalaki se kokóma na bato ebele. Na ntango wana ayebaki elobeli ya bajɛstɛ malamu mpenza. Na basanza mosusu, azalaki koyekola Biblia na bato 28 oyo bakufá matoi. Mingi kati na bango bakolaki na elimo mpe bakómaki Batatoli ya Yehova.
Mosala ya bolingo malamu wana ebotaki mbuma: na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 1976, lisangá ya liboso ya bato bakufá matoi esalemaki na Séoul; ezalaki na basakoli 40 ná babongisi-nzela ya sanza na sanza mibale. Likambo yango elamusaki bandeko ya bingumba mosusu ya Corée. Bato mingi oyo bakufá matoi bazalaki na mposa ya koyoka nsango malamu mpe bazalaki kozela bákende kotala bango.
Kosakola epai na bato bakufá matoi
Mbala mosusu okomituna ndenge nini bazalaki kokutana na bato bakufá matoi. Mingimingi, bandeko bazalaki kokutana na bato bakufá matoi na nzela ya bato oyo bayebani na bango. Lisusu, bandeko bazalaki kokutana na bankolo ya babutiki oyo batɛkisaka loso mpe bato yango bazalaki kopesa bango bankombo mpe adresi ya bato bakufá matoi. Babiro ya misala mosusu ya Leta mpe esalisaki mingi mpo na koyeba bisika ya bato yango. Lokola bandeko bazalaki na molende ya koluka bato bakufá matoi, nsima ya bambula, masangá minei ya bato bakufá matoi esalemaki. Balendisaki bilenge mingi na koyekola elobeli ya bajɛstɛ mpo na kosolola na bato bakufá matoi.
Biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova etindaki babongisi-nzela monene oyo bayebaki elobeli ya bajɛstɛ na masangá wana. Na bambula euti koleka, bandeko oyo bakɔtaki na Eteyelo mpo na kobongisa basungi batindamaki na masangá yango mpe balendisaki yango na elimo.
Bandeko yango bakutanaka na mikakatano mingi. Mpo na kosakola epai ya bato bakufá matoi esɛngaka kosala makasi mpenza mpo na koyeba ndenge oyo bakanisaka. Bato yango bazalaka molangi-mpɛmbɛ. Ntango mosusu bato bakamwaka makambo na bango mpe yango ekoki kosala ete báyokana malamu te na bato. Lisusu, ntango Batatoli bazali koyekola Biblia na moto oyo akufá matoi, esɛngaka kosalisa ye ayeba malamu kosolola na bajɛstɛ mpe kolendisa ye amipesa mingi na kotánga mpe koyekola.
Na makambo ya mokolo na mokolo, bato bakufá matoi bakutanaka na mikakatano oyo bato mosusu bayebaka te. Ntango bayambi bango na babiro ya misala ya Leta to na balopitalo, bazalaka na mokakatano monene mpo na kolimbola makanisi na bango, ata mpe mpo na koyokana na bato mosusu ntango bazali kotɛkisa to kosomba biloko. Lokola Batatoli na masangá oyo ezali penepene ya bisika oyo bafandi bazalaki kosalisa bango, bato bakufá matoi bamonaki ete bandeko ya solosolo bazali nde na kati ya lisangá ya boklisto.—Yoane 13:34, 35.
Litatoli ya libaku malamu ezali kobota mbuma
Na Pusan, engumba oyo ezali na libongo monene ya masuwa na sudi ya Corée, Motatoli moko akutanaki na bato mibale oyo bakufá matoi; bato yango bakomaki na mwa papye ete: “Tolingi Paladiso. Tolingi koyeba bavɛrsɛ oyo ezali kolobela bomoi ya seko.” Ndeko yango azwaki adresi na bango mpe akendaki kotala bango. Ntango akómaki, akutaki ebele ya bato bakufá matoi bazali kozela mpo na koyoka nsango ya Bokonzi. Likambo yango epesaki ye mposa ya koyekola elobeli ya bajɛstɛ. Eumelaki te, lisangá ya bato bakufá matoi esalemaki na Pusan.
Ndeko mobali moko ya lisangá yango amonaki bato mibale bakufá matoi bazali kosolola na bajɛstɛ mpe alukaki kosolola na bango. Ntango ayebaki ete bautaki na ndako-nzambe, abengaki bango na Ndako ya Bokonzi na ngonga ya mibale na nsima ya midi ya mokolo yango kaka. Bakendaki, mpe babandaki mbala moko koyekola Biblia. Nsima ya mwa ntango, bango mibale ná baninga na bango 20 oyo mpe bakufá matoi bakendaki na liyangani ya etúká. Na kati na bango, mingi basili komipesa na Yehova. Mibale bazali bankulutu mpe moko azali mosaleli na misala na kati ya masangá ya bato bakufá matoi.
Molende ezwi mbano
Lokola bato mosusu oyo bakufá matoi bafandaka mosika na masangá ya bato bakufá matoi, mbala mingi esɛngaka molende mingi mpe ekateli makasi mpo na kokende koyekola na bango Biblia mpo na kolendisa bango na elimo. Na ndakisa, mobali moko ya mbula 31 oyo abomaka mbisi azalaki kofanda na esanga moko. Leki na ye ya mobali oyo asololaki na Batatoli ya Yehova ayebisaki ye nsango ya Biblia. Mpo na kokokisa mposa na ye ya elimo, mobomi-mbisi wana, oyo akufá matoi, azwaki bwato na ye mpe alúkaki na ntaka ya kilomɛtrɛ 16 tii na Tongyoung, na sudi mpenza ya Corée. Akendaki kuna mpo na kokutana na mobongisi-nzela monene oyo autaki na lisangá ya bato bakufá matoi ya engumba Masan. Mokolo nyonso ya yambo na pɔsɔ, mobongisi-nzela yango azalaki kosala mobembo ya kilomɛtrɛ 65 mpo na koyekola Biblia na mobomi-mbisi wana.
Mpo na koyangana na makita mokolo ya lomingo na Masan, mokufi-matoi yango azalaki kolúka na bwato na ntaka ya kilomɛtrɛ 16; na nsima, azalaki kozwa bisi mpo na mobembo mosusu ya kilomɛtrɛ 65. Molende na ye ezwaki mbano. Nsima ya mwa basanza, ayebaki elobeli ya bajɛstɛ malamu mpenza, ayekolaki ekomeli ya Coréen malamu, mpe likambo eleki ntina ezali ete ayekolaki ndenge ya kokóma moninga ya Yehova. Ntango akangaki ntina ya koyangana na makita mpe kopesa litatoli, alongwaki na esanga oyo azalaki kofanda mpe akendaki na mboka oyo lisangá ya bato bakufá matoi ezalaki. Kasi, yango ezalaki likambo moke te. Asengelaki kotika mosala ya koboma mbisi oyo azalaki kozwela ntango mosusu dolare 3 800 na sanza moko; atako bongo, molende na ye ememelaki ye mbano. Akolaki na elimo mpe na nsima azwaki batisimo mpe azali lelo oyo kosalela Yehova na esengo ná libota na ye.
Kobongola mikanda mpo na bato bakufá matoi
Mbala mingi, mpo na koyebisa bato nsango malamu ya Bokonzi, basakoli basololaka na bango na monɔkɔ. Kasi, mpo na koyebisa nsango ya Liloba ya Nzambe na bosikisiki, ebongi mpenza komemela bato mikanda mpe biloko mosusu oyo ezali na mateya ya Biblia, oyo bakoki kotikala na yango. Yango wana, na ekeke ya liboso, bato oyo bayebaki makambo mingi bakomaki babuku mpe mikanda. (Misala 15:22-31; Baefese 3:4; Bakolose 1:2; 4:16) Na ntango na biso, tozali kozwa ebele ya bilei ya elimo na kati ya babuku mpe mikanda mosusu. Mikanda yango ebongolami na minɔkɔ ebele, ata mpe na ndenge ya kokoma oyo ebongisamá mpo na bato bakufá matoi. Filiale ya Corée ezali na biro ya kobongola mikanda mpo na bato oyo balobaka te mpe bayokaka te. Babimisaka mpe bakasɛti-video oyo ezali na mateya mpo na bato bakufá matoi. Na ndenge yango, bato bakufá matoi oyo bazali basakoli ná bamosusu oyo bazali kosepela na solo bazali kozwa bilei ya elimo na masangá na bango na Corée mobimba.
Atako ebele ya bato bayebi sikoyo malamumalamu elobeli ya bajɛstɛ mpe bazali kopesa mabɔkɔ na kobimisa bakasɛti-video, mbala mingi babongoli ya malamu mpenza ezalaka nde bana ya bato oyo bakufá matoi. Bato yango babandá kosolola na bato bakufá matoi banda bomwana. Bajɛstɛ ya bato ya ndenge wana esukaka kaka na mabɔkɔ te, kasi basalaka mpe bajɛstɛ na elongi mpe na nzoto mobimba mpe yango esalisaka mpo makambo oyo bazali kolimbola ekɔta mpenza na makanisi ya bato bakufá matoi mpe esimba mitema na bango.
Lokola tolobaki yango, mayangani mpo na bato bakufá matoi ekómi sikoyo kosalema mbala na mbala na Corée. Esɛngaka mosala, mbongo mpe milende mingi mpo na kobongisa yango. Kasi, bayangani bazali kosepela na ebongiseli yango. Nsima ya mayangani yango, bato mingi bakendaka mbala moko te, batikalaka wana mpo na kosolola ná bandeko mpe kolobela mateya ya malamu ya elimo oyo bayokaki. Ya solo, kosakola na monɔkɔ yango ya ndenge mosusu ezali mpenza etumba, kasi mapamboli ya elimo oyo bandeko bazali kozwa ezali komonisa bango ete ezali mosala ya ntina.
[Elilingi na lokasa 10]
Bakasɛti-video mpo na bato bakufá matoi ebimisami na Corée: “Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?,” “Tósepela na libula na biso ya elimo,” “Bandakisa oyo ezali kokebisa biso lelo oyo,” mpe “Tómemya bokonzi ya Yehova”
[Bililingi na lokasa 10]
Na lobɔkɔ ya mwasi: Bazali kobimisa kasɛti-video mpo na bato bakufá matoi na filiale ya Corée; na lobɔkɔ ya mobali, na likoló: bazali kobongisa bilembo mpo na maloba mosusu oyo esalelamaka na lisangá; babongoli ya mikanda ya bato bakufá matoi; na nse: bazali kobongisa moto oyo akosala bajɛstɛ mpo na kasɛti-video