Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 1/6 nk. 8-11
  • Yekolá sɛkɛlɛ ya kosepela na oyo ozali na yango

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yekolá sɛkɛlɛ ya kosepela na oyo ozali na yango
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kosepela na oyo tozali na yango elimboli nini?
  • Bayekoli sɛkɛlɛ yango
  • Ndenge nini okoki kozala na bokatikati na makambo ya mbongo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Libombami mosantu ebimisami
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mokanda ya Biblia nimero 54—1 Timoté
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Tobatela kondima mpe lisosoli malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 1/6 nk. 8-11

Yekolá sɛkɛlɛ ya kosepela na oyo ozali na yango

Ntoma Paulo atindelaki baklisto ya Filipi mokanda moko ya kolendisa mpenza; na mokanda yango akomaki boye: “Nasili koyekola, na makambo ata ya ndenge nini, kosepela na oyo nazali na yango. . . . Na eloko nyonso mpe na makambo nyonso nasili koyekola sɛkɛlɛ ya kotonda mpe ya kozala na nzala; ya kozala na biloko mingi mpe ya kokelela.”​—Bafilipi 4:11, 12.

Sɛkɛlɛ ya Paulo ezalaki nini? Na kotalela ndenge bomoi ekómi mpasi mpe ndenge mbongo ezali se kokita valɛrɛ, ezali na ntina mingi baklisto ya solo báyekola ndenge ya kosepela na oyo bazali na yango mpo bátya ntango nyonso makanisi na bango na mosala ya Nzambe.

MWA liboso na mokanda na ye, Paulo alobelaki ndenge azalaki kokende liboso na makambo oyo azalaki kosala liboso. Alobaki boye: “Soki ezali na moto mosusu oyo akanisi ete azali na bantina ya kotya motema na mosuni, ngai nazali na yango koleka: nakatamaki ngenga na mokolo ya mwambe, moto ya ekólo ya Yisalaele, ya libota ya Benyamina, Moebele mwana ya Baebele; na oyo etali mibeko, Mofalisai; na oyo etali molende, nanyokolaki lisangá; na oyo etali boyengebene oyo euti na mibeko, namimonisaki moto azangi mbeba.” (Bafilipi 3:4-6) Lisusu, lokola Paulo azalaki na molende na losambo ya Bayuda, banganga-nzambe bakonzi na Yelusaleme bapesaki ye mokumba moko mpe balakaki ye ete bango moko bakopesa ye mabɔkɔ. Nyonso wana ezali komonisa ete Paulo akokaki kokóma moto monene mpe ya lokumu mingi na politiki, na lingomba mpe, na ntembe te, kokóma na bozwi mingi na kati ya Bayuda.​—Misala 26:10, 12.

Kasi, ntango Paulo akómaki ministre moklisto ya molende, makambo nyonso ebongwanaki. Mpo na kosakola nsango malamu, andimaki kotika mosala ya lokumu mpe makambo nyonso oyo ezalaki na ntina epai ya Bayuda. (Bafilipi 3:7, 8) Lokola atikaki nyonso wana, ndenge nini asengelaki kokokisa bamposa na ye? Basengelaki kofuta ye na mosala na ye ya ministre ya Nzambe?

Bazalaki kofuta Paulo eloko moko te mpo na mosala oyo azalaki kosala. Ntango azalaki na Kolinti, azalaki kosala bahema elongo na Akila ná Pilisila mpe asalaki makambo mosusu mpo na kokokisa bamposa na ye mpo apesa te mokumba yango epai ya bato oyo azalaki kosalisa na elimo. (Misala 18:1-3; 1 Batesaloniki 2:9; 2 Batesaloniki 3:8-10) Paulo asalaki mibembo misato ya milai na mosala ya misionɛrɛ, mpe asalaki mibembo mosusu mpo na kolendisa masangá. Lokola amipesaki mobimba na mosala ya Nzambe, azalaki na biloko mingi te. Mbala mingi, bandeko bazalaki kosunga ye mpo na kokokisa bamposa na ye. Kasi, na bantango mosusu, mpo na mikakatano mosusu, azalaki mpenza kokelela. (2 Bakolinti 11:27; Bafilipi 4:15-18) Atako bongo, Paulo azalaki komilelalela te, mpe azalaki kolula biloko ya bato te. Andimaki koboma nzoto mpo na bolamu ya bandeko na ye baklisto mpe azalaki kosala yango na esengo. Kutu, ezali Paulo moto azongelaki maloba ya Yesu oyo eyebani mingi ete: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.” Talá ndakisa malamu mpo na biso nyonso!​—Misala 20:33-35.

Kosepela na oyo tozali na yango elimboli nini?

Likambo mpenzampenza oyo ezalaki kosala ete Paulo azala na esengo ezali ete ayebaki kosepela na oyo azali na yango. Kasi, kosepela na oyo tozali na yango elimboli mpenza nini? Na mokuse, yango elingi koloba kosepela kozala kaka na biloko oyo tosengeli na yango mpenza. Mpo na yango, Paulo alobaki na Timote, moninga na ye ya mosala, ete: “Ya solo, ezali nzela ya kozwa litomba monene, ezaleli yango ya kokangama na Nzambe elongo na ezaleli ya kosepela na oyo ozali na yango. Mpo toyaki na eloko te na kati ya mokili, mpe tokoki komema eloko te. Na yango, kozaláká na bilei mpe na eloko ya kozipa nzoto, tokosepela na biloko wana.”​—1 Timote 6:6-8.

Tomoni ete Paulo alobelaki kosepela na oyo tozali na yango esika moko na kokangama na Nzambe. Andimaki ete ezaleli ya kokangama na Nzambe, elingi koloba kotya mosala ya Nzambe na esika ya liboso, nde epesaka bolamu, kasi ezali te biloko ya mokili to bomɛngo. “Bilei mpe eloko ya kozipa nzoto” ezalaki kaka kosalisa ye na kobatela ezaleli ya kokangama na Nzambe. Na bongo, mpo na Paulo, sɛkɛlɛ ya kosepela na oyo azali na yango ezalaki kotyela Yehova motema ata na bomoi ya ndenge nini.

Lelo oyo, bato mingi bazali komitungisa mpe bazali na esengo te mpo bayebi sɛkɛlɛ yango te to bazali kosalela yango te. Na esika bálona ezaleli ya kosepela na oyo bazali na yango, bazali kotya motema na bango na mbongo mpe na biloko oyo bakoki kosomba na mbongo. Bapiblisite, radio, televizyo mpe bazulunalo ezali kotinda bato na kokanisa ete mpo na kozala malamu basengeli kozala na biloko oyo ezali kobima sika mpe basengeli kozwa yango kaka sika sikoyo. Yango wana, bato mingi bazali kokwea na motambo ya komipesa na koluka mbongo mpe biloko ya mokili. Na esika bázala malamu mpe na esengo, bazali nde ‘kokwea na kati ya komekama mpe na motambo mpe bamposa mingi ya bozoba mpe oyo eyokisaka mpasi, oyo ezindisaka bato na kati ya libebi mpe na likama.’​—1 Timote 6:9, 10.

Bayekoli sɛkɛlɛ yango

Ekoki mpenza kosalema na moi ya lelo ete moto akangama na Nzambe mpe asepela na oyo azali na yango mpe na bongo, azala na bomoi ya malamu mpe ya esengo? Ɛɛ. Ezali na bamilio ya bato oyo bazali kosala yango. Bato yango bayekoli sɛkɛlɛ ya kosepela na biloko oyo bazali na yango. Bato yango ezali Batatoli ya Yehova, bango bamipesi na Nzambe, bazali kosala mokano na ye mpe bazali koteya mokano yango bipai nyonso.

Na ndakisa, tótalela Batatoli oyo bazali kondima kozwa formasyo mpo bátinda bango na mosala ya misionɛrɛ na mboka mopaya mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. (Matai 24:14) Mbala mingi, na mikili oyo bazali kotinda bango bomoi ezali malamu te lokola na mikili oyo bakolaki. Na ndakisa, ntango bamisionɛrɛ bakómaki na ekólo moko ya Azia na 1947, mpasi oyo etumba ekɔtisaki na mboka yango esilaki naino te, mpe bandako mingi ezalaki na kura te. Na mikili mingi, bamisionɛrɛ bakutaki bamasini ya kosukola bilamba te; mpo na kosukola bilamba esengeli komema yango na ebale mpe konika elamba mokomoko na mabɔkɔ to kotuta yango likoló ya libaya to ya libanga. Kasi, lokola bakendaki koteya bato solo ya Biblia, bamimesenisaki na bomoi ya bato ya bamboka wana mpe bamipesaki na mosala ya kosakola.

Batatoli mosusu bamipesi na mosala ya ntango nyonso to bakei kofanda na bisika oyo bato bayokaki naino nsango malamu te. Adulfo asalaki mosala ya ntango nyonso na boumeli ya mbula koleka 50 na bisika ndenge na ndenge ya Mexique. Alobi boye: “Lokola ntoma Paulo, ngai na mwasi na ngai tozalaki komimesenisa na makambo nyonso oyo tozalaki kokutana na yango. Na ndakisa, tokendaki kotala lisangá moko oyo ezalaki mosika mpenza na engumba mpe zando ezalaki te. Mpo na kolya, ezala na ntɔngɔ, na midi to na mpokwa, bandeko bazalaki kaka na mwa eteni ya limpa, mwa mafuta ya nyama, ná mungwa, ná kɔpɔ ya kafe. Yango nde bilei nyonso oyo bazalaki na yango: biteni misato ya limpa na mokolo. Biso mpe tomesanaki na bomoi wana. Nakutani na makambo mingi ya ndenge yango na boumeli ya mbula 54 oyo nazali kosalela Yehova na mosala ya ntango nyonso.”

Florentino abosanaka te ndenge oyo libota na bango babundaki mpo na komesana na bomoi ya mpasi oyo bakómaki na yango. Alobi makambo oyo akutanaki na yango na bomwana na ye: “Tata na ngai azalaki komelesa monene. Azalaki na mapango ebele. Nazali koyeba lisusu kɛsi ya mbongo oyo ezalaki na magazini na biso. Ezalaki na tirware moko oyo ezalaki na santimɛtrɛ 50 na bonene mpe santimɛtrɛ 20 na bozindo, mpe ekabwanaki na biteni minei. Tozalaki kotya mbongo oyo tozalaki kotɛka na mokolo mobimba na kɛsi yango. Na mpokwa, kɛsi yango ezalaki kotonda mɛkɛ na mbongo ya bibende mpe ya nkasa.

“Na nsima, mombongo na biso ekweaki na mbalakaka, tolongwaki na bomɛngo mpe tokómaki kokelela. Tobungisaki biloko nyonso, totikalaki kaka na ndako na biso. Lisusu, ndeko na ngai azwaki likama moko oyo ebebisaki ye makolo nyonso mibale. Makambo nyonso ebongwanaki. Na eleko moko boye nakómaki kotɛka bambuma ná nyama. Lisusu, nazalaki kobuka ntokia, mbuma ya vinyo, mpe luzerne, nazalaki mpe kosala mosala ya kosopa mai na bilanga. Bato mosusu bakómaki kobenga ngai moto ya misala nyonso. Mbala mingi, mpo na kokitisa biso motema, mama azalaki koloba ete lokola toyebi solo, tozali na bozwi ya elimo oyo bato mingi bazali na yango te. Na bongo, nayekolaki kozala na mingi mpe kozala na moke to mpe kotikala mabɔkɔ mpamba. Lelo oyo, nsima ya kosalela Yehova na boumeli ya mbula 25 na mosala ya ntango nyonso, nakoki koloba ete mokolo na mokolo nazalaki na esengo ya koyeba ete naponaki bomoi oyo eleki malamu: kosalela Yehova na mosala ya ntango nyonso.”

Biblia ezali koyebisa biso polele ete “makambo ya mokili oyo ezali kobongwana.” Yango wana, ezali mpe kolendisa biso ete: “[Tiká ete] baoyo bazali kosepela [bázala] lokola baoyo bazali kosepela te, mpe baoyo bazali kosomba lokola baoyo bazali na eloko te, mpe baoyo bazali kosalela mokili lokola baoyo bazali kosalela yango na makambo nyonso te.”​—1 Bakolinti 7:29-31.

Yango wana, sikoyo nde ntango ya kotalela malamu bomoi na yo. Soki ozali na bozwi te, kebá ete okóma te ntango nyonso lobɔkɔ na litama, to mpe okóma nkandankanda mpe na bilulela. Soki mpe ozali na biloko mingi ya mokili, ezali malamu otika yango na esika oyo ebongi na yango mpo okóma moombo na yango te. Ndenge oyo toli ya ntoma Paulo elobi yango, kotya elikya na yo “te na bomɛngo oyo ekoki kobunga lelo to lobi, kasi nde epai ya Nzambe oyo apesaka biso biloko nyonso beboo mpo biso tósepela.” Soki ozali kosala bongo, yo mpe okoki koloba ete oyekoli sɛkɛlɛ ya kosepela na oyo ozali na yango.​—1 Timote 6:17-19.

[Elilingi na lokasa 9]

Paulo asalaki mosala na mabɔkɔ na ye mpo apesa bato mosusu mokumba te

[Bililingi na lokasa 10]

Ebele ya bato bazali na bomoi ya esengo na ndenge bazali ‘kokangama na Nzambe elongo na ezaleli ya kosepela na oyo bazali na yango’

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto