Motuna nini okolinga kotuna Nzambe?
NA MOKILI mobimba, bato bamitunaka mituna ya ntina mingi mpo na bomoi. Yo mpe omitunaka mituna yango? Bato mingi batunaki basango to bapastɛrɛ, kasi bazwi biyano ya malonga te. Bamosusu bamekaki koluka bango moko biyano na mituna yango. Basusu babondelaki mpo na kozwa biyano. Ezali mpenza solo ete Nzambe akoki kopesa yo biyano na mituna oyo ezali kotungisa yo? Mituna oyo elandi ezali na kati ya mituna oyo bato balobaka ete bakolinga kotuna Nzambe.
Nzambe, yo ozali mpenza nani?
Makanisi oyo bato bazalaka na yango na ntina na Nzambe bazwaka yango na bonkɔkɔ na bango, na mateya ya mangomba ya baboti na bango, mpe mbala mosusu na makambo oyo bango moko baponi. Mpo na bato mosusu, Nzambe azali na nkombo; nzokande, bamosusu babengaka ye kaka Nzambe. Ezali mpenza na ntina kobenga ye na nkombo? Nzambe ya solo azali kaka moko, oyo ayebisi biso soki azali nani mpe soki nkombo na ye ezali nani?
Mpo na nini mpasi etondi na mokili?
Soki moto azali kotambola ngulungulu na bomoi na ye to amipesi na pite to na misala mosusu ya mbindo, mpe na nsima yango ememeli ye maladi to ekómisi ye mobola, akomilelalela. Kasi, moto yango akoki mpe koyeba mpo na nini azali komona mpasi wana.
Nzokande, ebele ya bato mosusu bazali komona mpasi mingi atako basali mabe te. Basusu bazali na bamaladi oyo eumeli mingi. Bamosusu bazali komona mpasi mpo na mikakatano oyo ezali kosila te, lokola kozanga esika ya kofanda mpe kozanga biloko ya koleisa mabota na bango. Makambo lokola bitumba, mobulu oyo eponaka bilongi te, koningana ya mabelé, mipɛpɛ ya makasi, to mpe kozanga bosembo ya bakonzi, ezali konyokola to koboma ebele ya bato.
Tokoki kokamwa te soki bato mingi bazali komituna ete: ‘Mpo na nini makambo yango etondi na mokili? Mpo na nini Nzambe atiki ete mpasi nyonso oyo ekómela biso?’
Mpo na nini nazali awa na mokili? Ntina mpenza ya bomoi ezali nini?
Moto amitunaka mituna wana soki azali kotungisama mpo mosala oyo asalaka mokolo na mokolo ememelaka ye bolamu ya solosolo te—mpe bato ebele bazali kokutana na likambo yango. Ebele ya bato mosusu bakanisaka ete makambo oyo moto na moto akutanaka na yango na bomoi na ye etángamá na Nzambe. Ezali mpenza ndenge wana? Soki Nzambe azali mpenza na mokano moko mpo na yo, ntembe ezali te ete okozala na mposa oyeba mokano yango.
Na babuku nyonso na mokili, ezali na buku moko oyo elobaka polele ete epemami na Nzambe. Buku yango ezali na minɔkɔ mingi koleka babuku mosusu nyonso, ndenge oyo nsango ya Nzambe mpo na bato nyonso esengeli mpenza kozala. Buku yango ezali Biblia Mosantu. Na kati ya buku yango, ye moko Nzambe, Mozalisi ya likoló na nse, azali koyebisa biso soki azali nani mpe soki nkombo na ye ezali nani. Oyebi nkombo yango? Oyebi makambo oyo Biblia elobaka na ntina na bomoto ya Nzambe? Oyebi soki Biblia elobaka ete Nzambe azali kosɛnga nini epai na yo?
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]
Ngomba: Fɔtɔ ya Chad Ehlers/Index Stock