Kampanye ya kosakola oyo bakobosana yango te
“Moi ezali kongala. Bangomba etandani, ezali komonana lokola nde esuká te. Nsima ya kobundabunda na nzela, tokómi na esika oyo tozalaki kokende: mboka moko ya mosika mpenza. Tobosani kolɛmba oyo tozalaki na yango mpe tokómi na esengo ntango tobɛti na ndako ya liboso mpe bayambi biso malamu mpenza. Ntango tokómi na mpokwa, tosilisi kokabola mikanda nyonso oyo toyaki na yango mpe tobandi koyekola Biblia na bato ebele. Bato bamonisi mpenza mposa ya koyeba makambo mingi. Tosengeli sikoyo kozonga, kasi tolaki ete tokoya lisusu.”
ETULUKU moko ya babongisi-nzela na Mexique bakendeke kosakola na bisika ya ndenge wana mbala na mbala. Bazali kosala nyonso mpo na kokokisa etinda oyo Yesu Klisto apesaki bayekoli na ye ete: “Bokozala batatoli na ngai . . . tii na esika eleki mpenza mosika na mabelé.” (Misala 1:8) Na Mexique, basalaka bakampanye minene ya kosakola—babengaka yango kampanye ya babongisi-nzela—mpo na kopesa litatoli na bateritware oyo epesami na lisangá moko te mpe, basakolaka nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe kuna mingi te. Mbala mingi, bateritware yango ezalaka mosika to mpo na kokóma kuna ezalaka mpasi. Basalaka bakampanye yango mpe mpo na kosalisa masangá oyo ezali mosika mpe ezali na bateritware mineneminene.
Mpo na koyeba bisika oyo basengeli kosala kampanye ya babongisi-nzela, biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova etalelaka bamposa ya teritware.a Nsima na yango, bakabolelaka bituluku ya babongisi-nzela minene teritware yango mpo bákende kosakola kuna. Bapesaka bango mituka oyo ebongi mpenza mpo na banzela ya mabe. Soki esengeli, babombaka mikanda na kati ya mituka yango, balalaka mpe kaka na kati ya mituka yango.
Bazali kokakatana te mpo na kokende
Banda na Ɔkɔtɔbɛ 1996, basɛngaki mpe na basakoli mosusu ya nsango malamu ete básalisa babongisi-nzela monene na mosala yango. Basakoli ya Bokonzi mpe babongisi-nzela ya sanza na sanza oyo balingi kokende kosala na bisika oyo basakoli bazali mingi te, bazali kosangana na bakampanye yango. Batindaki basusu na masangá oyo ezali na teritware oyo bazali kosalela kampanye mpo na kozala babongisi-nzela mpe mpo na kozongelaka bato oyo basepelaki na solo. Bilenge mingi oyo bazali basakoli mpe oyo bazali babongisi-nzela bandimaki kokende mpe yango epesi bango libaku ya kokutana na makambo mingi ya kolendisa.
Na ndakisa, Abimael, elenge moklisto moko oyo azalaki na mosala ya malamu na kompanyi moko ya telefone ya mabɔkɔ, azwaki ekateli ya kokende kosala mosala ya kosakola na bamboka wana ya mosika. Ntango bakonzi na ye bayokaki ete alingi kolongwa na mosala, balakaki ye ete bakomatisa ye mpɛtɛ mpe bakobakisela ye mbongo. Baninga na ye ya mosala bazalaki kolendisa ye ete alongwa te, wana bazalaki koyebisa ye ete makambo oyo balaki ye ezali libaku moko ya malamu mpenza mpo na ye, mpe ete ekozala bozoba soki aboyi yango. Kasi, Abimael azwaki ekateli makasi ya kopesa mabɔkɔ na kampanye wana ya monene ya mosala ya kosakola mpo na sanza misato. Nsima ya kosala na kampanye yango, Abimael azwaki ekateli ya kotikala libela na teritware moko ya mosika epai bazali na mposa mpenza ya basakoli ya Bokonzi. Sikoyo azali na mwa mosala oyo bafutaka ye mbongo mingi mpenza te mpe akómi na bomoi ezangi mindɔndɔ.
Ndakisa mosusu ezali oyo ya Julissa, oyo asengelaki kosala mobembo molai ya ngonga 22 na bisi mpo na kokóma na teritware epai batindaki ye. Pene na nsuka ya mobembo na ye, akutaki bisi ya nsuka ya mokolo wana esí ekei. Kasi motuka moko oyo ememaki bato ya mosala ezalaki naino wana. Julissa azwaki mpiko mpe atunaki bango soki bakoki komema ye. Asengelaki mpenza kobanga, mpamba te azalaki kaka ye moko mwasi na kati ya ebele ya mibali. Ntango abandaki kopesa elenge mobali moko litatoli, ayaki koyeba ete mwana mobali yango azali Motatoli ya Yehova! Julissa alobi ete: “Longola wana, sofɛlɛ ya motuka yango mpe azalaki nkulutu na lisangá epai batindaki ngai!”
Mikóló mpe bazali kopesa mabɔkɔ
Nzokande, mosala yango ezali kaka mpo na bilenge te. Adela, ndeko mwasi moko mobange, azalaki ntango nyonso na mposa ya kosala mingi na mosala ya kosakola. Libaku emonanaki ntango basɛngaki ye asangana na kampanye monene wana ya mosala ya kosakola. Alobi boye: “Nasepelaki mingi na teritware oyo batindaki ngai, yango wana nasɛngaki bankulutu ya lisangá yango ete natikala kuna libela. Nazali na esengo mingi mpenza mpamba te, atako nazali mobange, Yehova akoki naino kaka kosalela ngai.”
Ndenge moko mpe na Martha, mobange ya mbula 60; botɔndi mpo na Yehova mpe bolingo mpo na bazalani na ye etindaki ye asangana na kampanye yango. Lokola amonaki ete ezalaki mpasi mpo na ye ná bandeko oyo azalaki na bango bákóma epai ya bato nyonso ya teritware oyo bapesaki bango, mpamba te bazalaki mosikamosika mpe nzela ezalaki mabe, asombaki motuka mpo na babongisi-nzela. Likabo oyo ndeko mwasi wana apesaki esalisaki bango mpo na kokende na bateritware mingi lisusu mpe koyebisa solo ya Biblia epai ya bato mingi lisusu.
Bato bazali koyamba nsango malamu na esengo
Mposa ya bato oyo bazali kosangana na bakampanye yango ya mosala ya kosakola ezali ya ‘kokómisa bato bayekoli.’ Na likambo yango, mosala na bango eboti mbuma malamu mpenza. Bato oyo bafandi na bamboka ya mosika bayambi solo ya Biblia oyo ebikisaka. (Matai 28:19, 20) Babandi koyekola Biblia na bato ebele. Basakoli oyo bafandi penepene na bisika yango to basakoli mosusu oyo batikalaki na teritware yango bazali kokoba koyekola na bato yango. Na bisika mosusu, bazalaki kotinda mwa bituluku ya basakoli, kasi na bisika mosusu mpe mwa masangá ya mike ebotamaki.
Magdaleno ná baninga na ye bakendeki na teritware oyo batindaki bango na bisi. Na nzela, bapesaki sofɛlɛ ya bisi litatoli. “Mobali yango ayebisaki biso ete na pɔsɔ oyo elekaki, Batatoli balekaki na ndako na ye, kasi ye moko azalaki te. Ntango azongaki, mwasi na ye ná bana bazalaki ntango nyonso koyebisa ye makambo oyo bayokaki. Toyebisaki ye ete tozali bato ya mboka wana te kasi touti mosika, na bitúká ndenge na ndenge, mpo na kosangana na kampanye monene ya kosakola oyo ezali kosalema na etúká wana, mpe ete moto na moto azali kosalela mbongo na ye moko. Sofɛlɛ yango akamwaki mingi mpe alobaki ete, kaka na pɔsɔ wana, akokɔta mpe na boyekoli ya Biblia oyo libota na ye babandaki. Kutu, amemaki biso ofele, yango nde likabo na ye mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya kosakola.”
Magdaleno akamwaki mpe na ndenge oyo bato ya bangomba ya Chiapas bayambaki nsango malamu. “Ngai ná mwasi na ngai tozwaki libaku ya kosakola nsango ya Bokonzi epai ya bilenge 26 oyo bazalaki kosambela na Lingomba ya Presbytérien. Bango nyonso balandaki biso na likebi mpenza na boumeli ya miniti 30. Babimisaki Babiblia na bango mpe topesaki bango litatoli malamumalamu mpo na mikano ya Yehova. Mingi na kati na bango bazali na Babiblia na bango moko na monɔkɔ ya Tzeltal.” Mingi babandaki mbala moko koyekola Biblia mpe bazalaki kokola malamu mpenza.
Botɛmɛli elɛmbi
Koleka mbula mibale mobimba, nsango ya Biblia ezalaki kokóma te na mboka moko na etúká ya Chiapas, mpamba te bato mosusu ya mboka yango bazalaki kotɛmɛla solo. Teresa, mobongisi-nzela moko, amonaki ete Batatoli mosusu bazalaki kobanga kokende kosakola na mboka yango. “Biso nyonso tokamwaki komona ete bato yango bazalaki na mposa ya koyoka nsango malamu. Ntango tosilisaki kosakola, mbula ebandaki kobɛta makasi. Lokola tozalaki koluka esika ya kokima mbula, tokendaki na ndako ya Sebastián, moto moko ya boboto; akɔtisaki biso na ndako mpe tozwaki esika ya kokima mbula. Ntango tozalaki na kati ya ndako yango, natunaki ye soki Batatoli basilá koya kotala ye. Ntango alobaki ete naino te, nabandaki mbala moko kopesa ye litatoli mpe nabandaki boyekoli ya Biblia na ye na buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko.b Ntango tosilisaki, Sebastián abondelaki biso na mai na miso ete tózongela ye mpo na kokoba koyekola na ye.”
Etuluku mosusu ya babongisi-nzela oyo bakendaki kosakola na Chiapas balobaki boye: “Na lisalisi ya Yehova, mosala na biso ebotaki mbuma ya malamu mpenza. Na pɔsɔ ya liboso, tobandaki koyekola na bato 27; na pɔsɔ ya mibale, tobengaki bato yango báya kotala kasɛti-video oyo ezali na motó ya likambo ete La Bible: une force dans votre vie (Biblia ekoki kobongola bomoi na yo). Bato 60 bayaki kotala kasɛti-video yango. Bango nyonso basepelaki na yango. Na nsuka, tosɛngaki bango tóbanda koyekola Biblia na bango nyonso esika moko. Likambo ya kokamwa, bituluku mibale ya boyekoli esalemaki na mboka yango.
“Ntango tosilisaki kopesa litatoli na bateritware nyonso oyo bapesaki biso, tozongaki lisusu na mboka yango mpo na kolendisa bato oyo basepelaki na solo mpe mpo na kotala ndenge bituluku yango mibale ezalaki koyekola. Tobengaki bango báya kolanda lisukulu ya bato nyonso mpe Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Kasi, esika ya monene epai tokokaki kosala makita yango ezalaki te. Moto oyo andimaki ete etuluku moko ya boyekoli bayekolaka na ndako na ye alakisaki na mosapi na nsima ya ndako na ye mpe alobaki ete: ‘Makita ekoki kosalemaka na nsima ya ndako.’”
Na wikende wana, babongisi-nzela oyo bayaki kopesa litatoli na mboka yango ná bato oyo bazalaki koyekola Biblia bazalaki na esengo ya kopesa mabɔkɔ mpo na kobongisa esika yango mpo na makita. Bato 103 bayanganaki na likita ya liboso. Lelo oyo, bato 40 bazali koyekola Biblia na mboka yango.
“Libaku moko malamu”
Longola mbuma malamu oyo mosala ya kosakola ebimisaki, baoyo basanganaki na mosala monene yango ya kopesa litatoli bazwelaki yango matomba mingi. Mpo na komonisa esengo oyo ayokaki, María, elenge moko mobongisi-nzela oyo asanganaki na bakampanye yango, alobi boye: “Ezalaki libaku moko malamu mpo na ntina mibale. Nakómaki lisusu na esengo mingi mpo na mosala ya kosakola, mpe boninga na ngai na Yehova ekómi makasi. Mokolo mosusu, ntango tozalaki komata ngomba moko, tolɛmbaki mingi. Nsima ya kobondela ete Yehova asalisa biso, tomonaki mpenza kokokisama ya maloba ya Yisaya 40:29-31 (NW) oyo elobi ete: ‘Baoyo batyelaka Yehova motema bakozwa lisusu makasi.’ Tokómaki epai tozalaki kokende mpe toyekolaki Biblia na bato ya mboka yango oyo bayambaki biso malamu mpenza.”
Claudia, elenge mobongisi-nzela mosusu ya mbula 17, ayebisi biso ete: “Nazwi matomba mingi. Nakómi na makoki mingi na mosala ya kosakola mpe yango epesi ngai esengo mingi mpe etindi ngai namityela mikano ya elimo. Nakoli mpe na elimo. Na ndako, mama azalaki kosalela ngai makambo nyonso. Sikoyo, lokola nayebi mwa makambo mingi, nakoli mpe na makanisi. Na ndakisa, nazalaki koponapona biloko ya kolya. Kasi sikoyo, lokola nameseni na makambo ndenge na ndenge, namitungisaka lisusu te mpo na biloko ya kolya. Lolenge wana ya mosala ya kosakola esalisi ngai nakóma na baninga ya malamu ebele. Tosalelaka biloko na biso nyonso esika moko mpe tosalisanaka.”
Tozali kobuka mbuma na esengo
Matomba nini mosala wana ebimisi? Na ebandeli ya mobu 2002, babongisi-nzela soki 28 300 basanganaki na bakampanye ya babongisi-nzela. Bayekolaki Biblia na bato koleka 140 000 mpe balekisaki ngonga koleka milio mibale na mosala ya kosakola. Mpo na kosalisa bato báyekola solo ya Biblia, bakabolaki babuku pene na 121 000 mpe bazulunalo pene na 730 000. Ezali lisusu likambo ya kokamwa te komona babongisi-nzela mosusu bazali koyekola Biblia na bato 20 to koleka.
Bato oyo bazali komonisela bango boboto ya ndenge wana bazali na botɔndi mingi mpo na milende ya solosolo oyo ezali kosalema mpo nsango ya Biblia ekómela bango. Atako bazali babola, mingi na kati na bango babondelaka basakoli ete bándima makabo na bango. Mobange moko ya mbula 70, oyo azali mobola mpenza, akabelaka babongisi-nzela mwa eloko mbala nyonso oyo bakendaki kotala ye. Soki baboyi, azalaki kolela. Libota moko oyo bazali mpenza na eloko te bayebisaki babongisi-nzela ete mwa makei oyo nsoso eboti ezali mpo na bango mpe babondelaki bango bázwa yango.
Oyo eleki nyonso, bato yango ya bosembo bamonisaka ete bazali solo mpenza kosepela na makambo ya elimo. Na ndakisa, elenge mwasi moko atambolaka nzela molai ye moko ngonga misato mobimba na ndambo mpo na koyangana na makita ya boklisto mpe azangisaka ata likita moko te. Mobange moko ya mwasi oyo ayekolaka Biblia, asalaki mobembo ya ngonga mibale mobimba atako azali na mpasi na mabɔlɔngɔ mpo na koyoka mateya ya Biblia ntango mokɛngɛli ya zongazonga ayaki. Bato mosusu oyo batángá kelasi te bayokaki mposa ya koyekola kotánga mpe kokoma mpamba te bazalaki na mposa ya koyeba mateya ya Biblia malamumalamu. Milende na bango ebotaki mbuma ya malamu mpenza.
Na mokanda ya Misala, Luka alobeli emonaneli moko oyo ntoma Paulo amonaki na maloba oyo: “Moto moko ya Masedonia atɛlɛmaki mpe azalaki kobondela ye mpe koloba ete: ‘Leká na Masedonia kosalisa biso.’” Paulo andimaki kokende. Lelo oyo, na Mexique, oyo ezali ekólo moko monene, ebele ya bato bamonisi mpe elimo ya ndenge wana, mpe bamipesi mpo na kokende kosakola nsango malamu “tii na esika eleki mpenza mosika na mabelé.”—Misala 1:8; 16:9, 10.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na mbula moko eleki, mwa ndambo ya teritware na Mexique (koleka 8%) epesamaki na masangá te oyo esengelaki kosakolaka kuna mbala na mbala. Elingi koloba bato koleka 8 200 000 oyo bafandi na bisika ya mosika epai basakoli bakómaka mpenza te.
b Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Elilingi na lokasa 9]
Batatoli mingi ya ekólo Mexique basanganaki na kampanye moko monene ya mosala ya kosakola