Tribinale monene ya “Mokili ya Alalata” elongisi Losambo ya solo
Mobali moko ya Arménie, tata ya bana misato, azali kosamba na tribinale monene ya ekólo na ye. Bonsomi na ye ná ya bandimi mosusu oyo bazali na ye lingomba moko ezali kotalela ndenge oyo bakokata likambo na ye. Bazuzi bazali koyoka ye ntango azali kotánga mikapo ya Biblia mpo na kolimbola mateya ya lingomba na ye. Mpo na koyeba ndenge oyo likambo yango esukaki mpe ndenge losambo ya solo elongaki na ekólo wana, tótalela ndenge likambo yango elekaki banda ebandeli na yango.
EKÓLO Arménie ezali na ɛsti ya ekólo Turquie mpe na sudi ya bangomba ya Caucase. Ekólo yango ezali na bato koleka milio misato. Moto oyo azali na Erevan, mboka-mokonzi ya ekólo yango, akomona malamu mpenza bansɔngɛ mibale ya Ngomba Alalata, oyo balobaka ete masuwa ya Noa efandaki wana nsima ya Mpela.—Genese 8:4.a
Batatoli ya Yehova babandaki kosakola na Arménie na 1975. Na 1991, ekólo yango ezwaki lipanda mpe ekabwanaki na bikólo ya URSS; na nsima, guvɛrnema ya ekólo yango esalaki komite moko mpo na kokoma na mikanda ya Leta mangomba oyo endimami na ekólo yango. Kasi, komite yango ezalaki mbala na mbala koboya Batatoli ya Yehova, mingimingi mpo balingaka kokɔta na makambo ya politiki te. Yango wana, banda 1991, batribinale ya Arménie ekatelaki bilenge Batatoli koleka 100 bitumbu mpe mingi na bango bakɔtaki bolɔkɔ mpo bazalaki koboya kosala mosala ya soda mpo na kotosa makambo oyo bayekoli na Biblia.
Lisusu, komite yango esɛngaki ete prokirɛrɛ alandela Lyova Margaryan mpo na makambo oyo azalaki kosala mpo na losambo na ye. Moklisto yango azali nkulutu na lisangá, azali mpe avoka ya molende oyo asalaka na kompanyi moko ya kura na mboka na bango. Prokirɛrɛ afundaki Ndeko Margaryan na tribinale ete Artikle 244 ya mibeko ya mboka ezali kokweisa ye, yango ezali mobeko moko ya kalakala na ntango ya Union soviétique oyo batyaká yango ntango Khrouchtchev azalaká prezida, mpo na kozongisa nsima Batatoli ya Yehova mpe mangomba mosusu mpe nsukansuka kopekisa bango.
Mobeko yango elobi ete kosala lisangá to kozala mokambi ya lisangá oyo, na nzela ya mateya na yango, ezali ‘kobenda bilenge na koyangana na makita ya lingomba oyo Leta ayebi te’ mpe ‘oyo ezali koteya bandimi ete báboya kosala makambo oyo Leta azali kosɛnga bango, ezali kobuka mobeko.’ Mpo na komonisa ete efundeli na ye ezali solo, prokirɛrɛ akangamaki mingi na likambo oyo ete bana mike bayanganaka na makita oyo Ndeko Margaryan atambwisaka na engumba Metsamor. Prokirɛrɛ abakisaki ete Ndeko Margaryan asɛngisaki bilenge ya lisangá báboya kosala mosala ya soda.
Kosamba ebandi
Babandaki kosamba likambo yango mokolo ya mitano, mwa 20 Yuli 2001 na tribinale ya etúká oyo ezali na Armavir, mpe Manvel Simonyan azalaki zuzi-mokambi. Basambaki tii na sanza ya Augusto. Nsukansuka bato oyo prokirɛrɛ azalaki kobenga liboso ya bazuzi bandimaki ete basirete (KGB ya kala) nde bayebisaki bango makambo mosusu oyo bakomaki mpe basɛngisaki bango na makasi ete bátya sinyatire na mikanda wana mpo na kofunda Ndeko Margaryan. Mokolo mosusu, mwasi moko alobaki ete mokonzi moko ya basirete ayebisaki ye akoma ete “Batatoli ya Yehova bazali banguna ya guvɛrnema mpe ya lingomba na biso.” Mwasi yango alobaki ete ye moko ayebaki ata Motatoli ya Yehova moko te, kasi ayokaki se koyoka na televizyo makambo oyo bazalaki koloba mpo na bango.
Ntango Ndeko Margaryan azwaki maloba, amonisaki ete bana mike oyo bayanganaka na makita ya Batatoli ya Yehova bazwaka ndingisa ya baboti na bango. Alimbolaki mpe ete moto na moto nde azwaka ekateli ya koboya kosala mosala ya soda. Prokirɛrɛ alandaki kotuna ye mituna liboso ya bazuzi mikolo ebele. Ndeko Margaryan azalaki kimya mpe azalaki kotánga bavɛrsɛ ya Biblia mpo na koyanola na mituna oyo etalelaki mateya ya lingomba na ye, prokirɛrɛ mpe azalaki kolanda bavɛrsɛ na kati ya Biblia na ye moko.
Mokolo ya 18 Sɛtɛmbɛ 2001, zuzi akataki likambo ete Margaryan “azali na ekweli te,” mpe alobaki ete “abuki mibeko te” na misala na ye. Mokanda moko mpo na bapanzi-nsango (Associated Press) ezalaki na lapolo moko ya polele ya likambo yango. Lapolo yango elobaki boye: “Lelo, batiki mokambi moko ya Batatoli ya Yehova na Arménie oyo bafundaki ye ete azalaki koteya bato mpo bákɔta na lingomba ya [Batatoli ya Yehova] mpe ete azalaki kosɛngisa bilenge báboya kosala mosala ya soda. Nsima ya kosamba sanza mibale mobimba, bazuzi balobaki ete likambo mpenza ezalaki te mpo na kokatela Levon Markarian [Lyova Margaryan], mokambi yango, etumbu. Soki tribinale emonaki ete akwei na likambo, ekokaki kokatela ye etumbu ya mbula ata mitano ya bolɔkɔ. . . . Atako Constitution ya ekólo Arménie ezali kopesa moto nyonso bonsomi na makambo ya losambo, mangomba ya sika ezali na mokakatano monene mpo Leta andima yango; nzokande, mibeko ya mboka etikeli Église apostolique arménienne oyo ezali na bandimi mingi, nzela mpo na kosala misala na yango.” Mokolo ya 18 Sɛtɛmbɛ 2001, ebongiseli moko mpo na boyokani na kati ya mikili ya Mpoto (Organisation pour la sécurité et la coopération en Europe [OSCE]) epesaki bapanzi-nsango liyebisi moko oyo elobaki boye: “Atako OSCE esepeli na ndenge oyo tribinale ekati likambo yango, kasi ezali na mawa ete likambo ya ndenge wana esambisamaki na tribinale.”
Kosamba esili te
Atako bongo, baprokirɛrɛ basɛngaki ete tribinale mosusu etalela lisusu likambo yango mpe basambaki lisusu sanza minei. Na ebandeli, ntango bapesaki Ndeko Margaryan maloba, zuzi mosusu oyo azalaki zuzi-mokambi te nde atunaki ye motuna ya liboso. Ntango Ndeko Margaryan abandaki koyanola, mwasi oyo azalaki zuzi-mokambi akataki ye maloba mpe apamelaki ye. Na nsima, atikelaki lisusu Ndeko Margaryan nzela te ete asilisa maloba na ye ntango azali koyanola na mituna nyonso oyo bazalaki kotuna ye. Lisusu, mpo na ntina oyo eyebani te, na makambo oyo greffier akomaki, zuzi-mokambi yango alongolaki mituna mingi oyo avoka atunaki Ndeko Margaryan. Na ntango bazalaki kosambisa likambo, bato ya mangomba oyo balingaka Batatoli te batondaki na tribinale mpe bazalaki mbala na mbala kofinga Ndeko Margaryan. Mokolo yango na mpokwa, balobaki na televizyo makambo oyo ekeseni mpenza na ndenge makambo elekaki na tribinale; na ndakisa, balobaki ete Ndeko Margaryan ye moko andimaki ete abukaki mibeko.
Ntango bazalaki naino kosamba, mwasi oyo azalaki mokambi na kati ya bazuzi misato oyo bazalaki kosambisa likambo yango, akamwisaki bato ntango alakisaki mokanda moko ya komite ya makambo ya mangomba oyo esɛngaki na prokirɛrɛ ete akatela Ndeko Margaryan etumbu. Likambo yango etungisaki bato ya bikólo mosusu oyo bazalaki wana mpo na kolanda ndenge oyo bazalaki kosambisa likambo wana, mpamba te ntango guvɛrnema ya Arménie esɛngaki ete ekólo na bango ekɔta na lisangá moko ya mikili ya Mpoto (Conseil de l’Europe), endimaki mokumba ya “kobatela mangomba nyonso, mingimingi oyo babengaka ‘mangomba ya sika’ mpo ete bandimi na yango bázala na bonsomi ndenge moko na bandimi nyonso.”
Na bapɔsɔ oyo elandaki makambo ekómaki ndongo. Banguna bazalaki se kotungisa mpe kotumola Batatoli, ezala na kati ya tribinale to mpe na libándá. Bazalaki kobɛtabɛta Batatoli ya basi na makolo. Ntango batumolaki Motatoli moko, kasi aboyaki kozongisa, babɛtaki ye na mokɔngɔ mpe akɔtaki lopitalo.
Ntango bazalaki naino kosamba, baponaki zuzi-mokambi mosusu. Atako, na kati ya bato oyo bazalaki kolanda likambo yango na tribinale ezalaki na mwa ndambo ya bato oyo bazalaki koluka kobangisa avoka ya Ndeko Margaryan, zuzi-mokambi ya sika apekisaki mobulu; kutu asɛngaki bapolisi bábimisa mwasi moko oyo azalaki koganga mpe kokanela avoka.
Likambo ekómi na tribinale monene ya Arménie
Nsukansuka, mokolo ya 7 Marsi 2002, tribinale oyo etalelaki lisusu likambo yango ezwaki ekateli ndenge moko na tribinale ya liboso. Kasi, likambo ya kokamwa, mokolo moko liboso báyebisa ekateli yango, guvɛrnema elongolaki bato nyonso oyo bazalaki na komite ya makambo ya mangomba. Nzokande, baprokirɛrɛ balɛmbaki kaka te, basɛngaki lisusu ete tribinale oyo eleki monene na ekólo Arménie (Cour de cassation), etalela likambo yango. Na mbala yango, baprokirɛrɛ basɛngaki ete tribinale yango esambisa likambo wana mpe “endima ete moto oyo bafundaki abuki mobeko.”
Mher Khachatryan azalaki zuzi-mokambi mpe bazuzi nyonso bazalaki motoba; bango nyonso bafandaki na tribinale na mokolo ya 19 Aprili 2002 na ngonga ya 11. Prokirɛrɛ oyo azwaki maloba liboso alobaki ete azali na mpasi na motema na komona ete tribinale ya liboso oyo esambisaki likambo yango ná oyo ya mibale emonaki te ete Ndeko Margaryan azali na ekweli. Kasi, na mbala oyo, bazuzi bakataki nde prokirɛrɛ maloba mpe bazuzi minei batunaki ye mituna ya sikisiki. Zuzi moko alobelaki prokirɛrɛ polele ete azalaki koluka kotinda bazuzi básambisa na ndenge oyo esengeli te, mpamba te prokirɛrɛ afundaki Ndeko Margaryan mpo na mosala ya kosakola mpe mpo lingomba ya Batatoli ya Yehova ekomami na mikanda ya Leta te. Nzokande, na makambo yango nyonso, moko te ekweisami na Artikle 244. Na nsima, zuzi alobaki ete makambo oyo baprokirɛrɛ bazalaki kosala ekokanaki na “kofundafunda moto mpo na konyokola ye.” Zuzi mosusu alobelaki makambo ndenge na ndenge oyo tribinale ya mikili ya Mpoto (Cour européenne) ekataki mpe emonisaki ete ebongiseli ya Batatoli ya Yehova ezali “lingomba oyo eyebani” mpe, na bongo esengeli kobatelama na Boyokani ya mikili ya Mpoto mpo na ntomo ya moto (Convention européenne des Droits de l’Homme). Na ntango yango, sango moko agangaki na kati ya tribinale ete Batatoli ya Yehova bazali kokabola bana-mboka. Bazuzi balobaki na ye atika makɛlɛlɛ.
Na nsima, bazuzi babengaki Lyova Margaryan aya liboso mpo bátuna ye mituna—mbala ya liboso likambo wana esalema na tribinale monene wana. Ndeko Margaryan apesaki litatoli malamu na oyo etali makanisi ya Batatoli ya Yehova na makambo ndenge na ndenge. (Malako 13:9) Bazuzi baumelaki te mpo na kotalela likambo yango kati na bango mpe bazongaki mpo na koyebisa ete bango nyonso bamonaki mbeba te mpe ekateli na bango ezali ete “ekweli ezali te.” Emonanaki mpenza ete motema ya Ndeko Margaryan ekitaki. Ekateli ya bazuzi elobaki boye na mokanda: “Mosala [ya Lyova Margaryan] ebuki mobeko ya mboka te, mpe efundeli oyo eyokani te na Artikle 23 ya Constitution ya Arménie mpe Artikle 9 ya Boyokani ya mikili ya Mpoto mpo na ntomo ya moto.”
Matomba ya ekateli yango
Soki tribinale ekweisaki Ndeko Margaryan, yango elingaki kofungola nzela mpo na kofunda bankulutu mosusu ya masangá ya Batatoli ya Yehova na Arménie mobimba. Likambo ya esengo ezali ete ekateli ya polele oyo tribinale ezwaki elongoli mokakatano wana. Soki tribinale ekatelaka ndeko wana etumbu, mbɛlɛ ekateli yango ekómi ntina ya koboya kokoma lingomba ya Batatoli ya Yehova na mikanda ya Leta. Tozali na esengo ete tribinale endimi te ntina yango ya lokuta.
Na mikolo ekoya nde tokoyeba soki bakondima kokoma na mikanda ya Leta lingomba ya Batatoli ya Yehova oyo ezali na bandimi koleka 7 000 na ekólo yango. Kasi ata sikoyo, losambo ya solo ezali kaka mpe ezali kokende liboso na “mokili ya Alalata.”
[Maloba na nse ya lokasa]
a Yango ezali moko ya bantina oyo bato ya Arménie babengaka ekólo na bango na nkombo ya Ngomba Alalata. Kalakala, Arménie ezalaká ekólo moko monene mpe bangomba wana ezalaki mabelé ya ekólo yango. Yango wana, esika oyo Yisaya 37:38 elobeli “mokili ya Alalata,” Biblia ya Septante ebongoli yango “Arménie.” Lelo oyo, Ngomba Alalata ezali na Turquie, penepene na ndelo na yango na ɛsti.
[Elilingi na lokasa 12]
Lyova Margaryan azali kosamba na tribinale
[Elilingi na lokasa 13]
Ndeko Margaryan ná libota na ye