Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 15/3 lok. 32
  • Bobola ekosila mokolo mosusu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bobola ekosila mokolo mosusu?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 15/3 lok. 32

Bobola ekosila mokolo mosusu?

SALOMO, mokonzi ya bwanya na Yisalaele ya kala, alobaki boye: “Talá! mpisoli ya bato oyo bazali konyokwama, kasi bazalaki na mobɔndisi te; mpe epai na banyokoli na bango makasi ezali, mpe bazalaki na mobɔndisi te.” (Mosakoli 4:1, NW) Na ntembe te, bato oyo bazali konyokwama oyo Salomo alobelaki ezalaki mingimingi babola.

Kozala mobola elimboli kaka te kozanga mbongo. Lapolo ya Banque mondiale na sanza ya Yuni 2002 emonisaki ete “na 1998, na mokili mobimba, bato miliare moko na milio mibale bazalaki mokomoko kobikela na mbongo oyo ekoki ata dolare moko te na mokolo . . . mpe bato miliare mibale na milio mwambe bazalaki mokomoko kobikela na mbongo oyo ekoki ata dolare mibale te na mokolo.” Balobaki ete atako mituya yango ekitaki mwa moke na kotalela ndenge oyo ezalaki liboso “ezali komonisa ete bato oyo bazali konyokwama makasi bazali naino kaka ebele mpenza.”

Bobola ekosila mokolo mosusu? Yesu Klisto ayebisaki bayekoli na ye ete: “Bozali na babola ntango nyonso elongo na bino.” (Yoane 12:8) Kasi, yango elingi nde koloba ete bobola ná bampasi na yango nyonso ekosila lisusu te? Te, mpamba te atako Yesu alakaki bayekoli na ye te ete bango nyonso basengelaki kokóma bato ya bomɛngo, tosengeli kokanisa te ete maloba na ye ezali kopesa babola elikya moko te.

Atako bato bazali kosala makasi mpe atako bilaka oyo epesamaki ya kosilisa bobola elongi te, Biblia, Liloba ya Nzambe, endimisi biso ete etikali moke, bato oyo bazali kokelela bakozala lisusu te. Kutu, Yesu asakolaki “nsango malamu epai ya babola.” (Luka 4:18) Nsango malamu yango ezali mpe na elaka ete bobola ekosila. Yango ekosalema ntango Bokonzi ya Nzambe ekotya makambo ya malamu na mabelé.

Mokili yango ekokesana mpenza na mokili ya lelo! Yesu Klisto, Mokonzi oyo azali na likoló “akoyokela moto ya bolɔzi mpe mobola mawa; akobikisa milimo na babola.” Ya solo, “akosikola milimo na bango kati na minyoko mpe na mobulu.”​—Nzembo 72:13, 14.

Mpo na ntango wana, Mika 4:4 (NW) elobi boye: “Bakofanda mpe na nse, moto na moto na nse ya nzete na ye ya vinyo, mpe na nzete na ye ya olive, moto moko akobangisa bango te, mpo ete monɔkɔ na Yehova na bibele elobi bongo.” Bokonzi ya Nzambe ekosilisa mikakatano nyonso oyo ezali konyokola bato, ekosilisa ata maladi ná liwa. Nzambe “akosilisa kufa libela mpe [Nkolo Mokonzi Yehova] akokɔmba mpisoli na bilongi nyonso.”​—Yisaya 25:8.

Okoki kotyela bilaka yango motema mpamba te epemami na Nzambe ye moko. Mpo na nini te kotalela makambo oyo ezali komonisa ete bisakweli ya Biblia ekoki kotyelama motema?

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 32]

Fɔtɔ ya FAO/M. Marzot

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto