Mituna ya batángi
Soki moklisto moko mopakolami azali na maladi makasi mpe akoki te koyangana na ekaniseli ya liwa ya Nkolo, bakoki kozwa ebongiseli moko mpo na ye?
Ɛɛ. Bakoki, to tóloba mpenza ete, basengeli kozwa ebongiseli mpo na moklisto mopakolami oyo azali na maladi makasi mpe ntango mosusu akɔtá ndako mpe azali na likoki te ya koyangana na lisangá mobimba na Ekaniseli ya liwa ya Klisto. Na likambo ya ndenge wana, bankulutu bakoki kopona moko na bango to ndeko mobali moklisto mosusu oyo akɔmeli mpo amemela ndeko wana limpa mpe vinyo kaka na butu wana ya Ekaniseli, liboso ntɔngɔ etana.
Nkulutu to ndeko oyo akei kotala ye akoki kosala mwa lisolo mokuse mpe kotánga bavɛrsɛ oyo ebongi na kotalela ndenge akokuta ye. Akoki kosala ndenge oyo Yesu asalaki ntango abandisaki Elambo ya Mpokwa ya Nkolo. Na ndakisa, akoki kotánga Matai 26:26 mpe na nsima ya kosala libondeli, akopesa ye limpa oyo batye levire te. Na nsima, ndeko yango akoki kotánga Matai 26, vɛrsɛ 27 mpe 28, mpe na nsima ya kosala libondeli mosusu, akopesa ye vinyo. Ndeko yango akoki kolimbola na mokuse ntina ya limpa oyo batye levire te ná vinyo, mpe akosukisa na libondeli.
Ya solo, esengeli kosala nyonso oyo ekoki mpo na kosangana na lisangá mobimba na Bolei ya Mpokwa ya Nkolo. Kasi, ezali boni soki moklisto mopakolami moko azali na maladi makasi mpenza, akɔti lopitalo, to azali na likoki te ya kokende na Ekaniseli nsima ya kolala ya moi na mokolo ya 14 Nisana? Mopakolami yango akoki kosala likambo oyo Mibeko ya Moize elobaki mpo na Elekeli mpe akosala Ekaniseli ye moko nsima ya mikolo 30.—Mituya 9:9-14.