Salelá malamu mbongwana oyo ekɔti na bomoi na yo
Baklisto minei oyo: Pum, Jan, Dries mpe Otto, bazali bankulutu na masangá na Pays-Bas mpe mwa makambo mingi ya bomoi na bango ekokani. Bango nyonso minei bazali na basi ná bana. Lisusu, eleki mwa bambula, bango nyonso minei bazalaki kosala mpe bazalaki kofanda na bandako ya malamu mpenza. Kasi, bango nyonso batikaki misala yango mpe bapesaki ntango mpe makasi na bango nyonso mpo mosala ya Bokonzi ekende liboso. Nini esalisaki bango básala mbongwana yango? Bango nyonso minei bayebaki mpenza kosalela mbongwana oyo ekɔtaki na bomoi na bango.
MBONGWANA ekɔtaka na bomoi ya bato mingi kati na biso. Mbongwana mingi, na ndakisa kobala, kobota to kosalisa baboti oyo bakómi mibange, ebakiselaka moto mikumba. Nzokande, mbongwana mosusu epesaka biso lisusu ntango mingi oyo tokoki kosalela mpo na komipesa mingi lisusu na mosala ya kosakola. (Matai 9:37, 38) Na ndakisa, bana nyonso bakoli mpe bakómi kofanda epai na bango moko to mpe tozwi epaso na mosala.
Lisusu, atako mbongwana ekoki kokɔta na bomoi na biso ata soki biso moko tolingi yango te, ezali mpe na baklisto mosusu oyo basalaki mbongwana na bomoi na bango, oyo epesaki bango nzela ya komipesa mingi lisusu na mosala ya kosakola. Yango mpenza nde Pum, Jan, Dries, mpe Otto basalaki. Basalaki ndenge nini?
Ntango bana bakoli
Pum azalaki kontable na kompanyi moko oyo esalaka bankisi ya monganga. Ye ná mwasi na ye Anny, ná bana na bango mibale ya basi, bazalaki mbala na mbala kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi. Pum ná Anny bazalaki mpe kozwa bibongiseli ya kokutanaka elongo na babongisi-nzela mosusu mpo na kominanola. Balobi boye: “Yango ezalaki kobatela biso na makambo oyo ekokaki koyela biso soki tozalaki nde kokutana na baninga ya ndenge mosusu.” Ndakisa ya baboti wana elendisaki bana, yango wana, ntango kaka basilisaki kelasi ya ntei, bango nyonso mibale bakómaki babongisi-nzela ya sanza na sanza.
Ntango bana na bango bakómaki kofanda na bisika na bango moko, Pum ná Anny bamonaki ete bomoi na bango ebongwani, bakómi na ntango mingi mpe bakoki kobomba mbongo oyo bakoki kosalela mpo na kosala mibembo na bisika ya kitoko to komisepelisa na ndenge mosusu. Kasi, mobali yango ná mwasi na ye bazwaki ekateli ya kosalela mbongwana oyo ekɔtaki na bomoi na bango mpo na komipesa mingi lisusu na mosala ya kosakola. Yango wana, Pum asɛngaki patrɔ na ye ete alongola mokolo moko na mikolo na ye ya mosala na pɔsɔ. Na nsima, Pum azwaki bibongiseli mpo abandaka mosala na ngonga ya 7 na ntɔngɔ mpe asilisaka na ngonga ya 2 nsima ya midi. Kosala mosala ngonga moke elimbolaki mpe kozwa mbongo moke na nsuka ya sanza. Kasi yango esalaki bango eloko te, mpe na 1991, Pum akómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza lokola mwasi na ye.
Na nsima, basɛngaki Pum akóma mokɛngɛli-mosungi ya Ndako ya Mayangani ya Batatoli ya Yehova. Mosala wana esɛngaki ete bátika ndako oyo bafandaki mbula 30 mobimba mpe bákende kofanda na mwa ndako moko ya moke na kati ya lopango ya Ndako ya Mayangani. Bandimaki kokende kofanda na ndako yango ya moke. Ezalaki nde mpasi? Anny alobi ete soki mposa ya kozonga na ndako na bango ya kala eyeli ye, azalaki komituna: ‘Nazali nde mwasi ya Lota?’ Aboyaki ‘kotala nsima.’—Genese 19:26; Luka 17:32.
Pum ná Anny bazali komona ete ekateli oyo bazwaki ememeli bango mapamboli ebele. Na ndakisa, basepelaka mingi na mosala na bango na Ndako ya Mayangani, misala ya kobongisa esika mpo na mayangani ya etúká mpe kokutanaka na bakɛngɛli-batamboli oyo basalaka masukulu na ndako yango. Na bantango mosusu, batalaka masangá ntango Pum asalaka lokola mokɛngɛli ya zongazonga mosungi.
Nini esalisaki mobali yango ná mwasi na ye bákokisa mposa na bango ya komipesa mingi lisusu na mosala ya kosakola? Pum alobi boye: “Soki mbongwana moko monene ekɔti na bomoi na yo, osengeli kosala makasi mpo osalela yango malamu.”
Kozala na bomoi oyo ezangi mindɔndɔ
Jan ná mwasi na ye, Woth, bazali na bana misato. Lokola Pum ná libota na ye, Jan ayebaki mpe kosalela mbongwana oyo ekɔtaki na bomoi na ye. Na boumeli ya bambula mingi, Jan azalaki na mosala ya malamu mpenza na banki moko, mpe libota na ye ezalaki na bomoi ya malamu. Kasi, azalaki na mposa makasi ya kosala mingi lisusu na mosala ya kosakola. Alobi boye: “Nakómaki na botɔndi mingi mpo na solo mpe nakómaki kolinga Yehova mingi.” Yango wana, na 1986, Jan abongolaki makambo mosusu na bomoi na ye. Alobi boye: “Ntango babongisaki lisusu makambo na kompani, yango ezalaki malamu mpo na ngai mpo nakómaki kosala mikolo nyonso te na pɔsɔ mobimba. Baninga na ngai ya mosala bakamwaki mingi mpe bapesaki ngai nkombo Diwodo mpo nazalaki kosala kaka dinsdag [Mwamibale], woensdag [Mwamisato], mpe donderdag [Mwaminei]. Balongolaki mbongo mingi mpenza (40%) na oyo bazalaki kofuta ngai. Natɛkaki ndako na biso mpe nasombaki masuwa moko oyo ezalaki lokola ndako, mpo tókendaka na yango bipai mposa ya basakoli ezalaki makasi. Na nsima, nasɛngaki epaso liboso nakokisa bambula oyo nasengeli kozwa yango; balongolaki ndambo ya mbongo (20%) na oyo basengelaki kofuta ngai, mpe na 1993, nabandaki kosala lokola mobongisi-nzela ya sanza na sanza.”
Lelo oyo, Jan azali na Komite mpo na boyokani na minganga mpe mbala na mbala asalaka lokola mokɛngɛli ya liyangani. Atako Woth azali nzoto kolɔngɔnɔ mpenza te, asalaka mbala na mbala lokola mobongisi-nzela mosungi. Lelo oyo, bana na bango nyonso misato babali mpe bazali basakoli ya Bokonzi ya molende elongo na bana na bango.
Jan ná Woth basalaki ndenge nini mpo bámesana kobikela na mwa mbongo moke mpe biloko moke? Yoká eyano ya Jan: “Ntango tozalaki na bozwi mingi, tozalaki kosala nyonso mpo tómipesa te na biloko ya mosuni. Na mikolo oyo ezali mpasi mpo na kozela mwa moke liboso ya kozwa eloko moko boye, kasi mapamboli ya elimo mpe mikumba oyo tozali na yango ezali mpenza kosala ete tóbosana nyonso wana.”
Lokola Jan ná Woth, Dries ná mwasi na ye Jenny, bazwaki mpe ekateli ya kozala na bomoi oyo ezangi mindɔndɔ mpo bázala na ntango mingi mpo na mosala ya Bokonzi. Dries ná Jenny bazalaki kosala lokola babongisi-nzela ya sanza na sanza tii ntango babotaki. Na nsima, mpo na kosalisa libota na ye, Dries akómaki mokonzi na kompanyi moko ya monene. Bakonzi na ye bazalaki kosepela mingi na mosala na ye mpe baponaki ye akóma mokonzi monene. Kasi, Dries aboyaki mpo ayebaki ete soki andimi, akozala lisusu na ntango mingi te mpo na mikumba na ye ya boklisto.
Kobɔkɔla bana, bakisa mpe kosalisa mama ya Jenny oyo azalaki kobɛla, ezalaki kosɛnga mobali yango ná mwasi na ye ntango mpe makasi. Kasi, babungisaki elimo na bango ya mobongisi-nzela te. Nini esalisaki bango? Jenny alobi boye: “Tozalaki kofanda esika moko ná babongisi-nzela, tozalaki kobenga bango báya kolya elongo na biso mpe bakɛngɛli ya zongazonga bazalaki kolala epai na biso.” Dries abakisi boye: “Tozalaki na bomoi oyo ezangi mindɔndɔ mpe tozalaki koboya kokɔta banyongo. Tozwaki ekateli ya koboya kosala mimbongo ya mineneminene to kosomba ndako, mpo biloko yango ekanga biso lokola nsinga te nsima ya mikolo.”
Ekateli oyo Dries ná Jenny bazwaki ya kozala na bomoi oyo ekopesa bango ntango mingi mpo na misala ya Bokonzi epesaki bango mbano monene. Lelo oyo, bana na bango nyonso mibale bazali bankulutu mpe moko azali mobongisi-nzela elongo na mwasi na ye. Dries ná Jenny basalaki mosala ya mobongisi-nzela monene, mpe nsima Dries akómaki mokɛngɛli ya zongazonga mpe Jenny azalaki kokende na ye mpo na kolendisa masangá. Sikoyo bazali kosala na Betele, epai Dries azali na Komite ya Filiale.
Kosɛnga epaso liboso ya kokokisa mbula
Otto ná mwasi na ye Judy, bazalaki babongisi-nzela lokola Dries ná Jenny, liboso bábota bana na bango mibale ya basi. Ntango Judy azalaki na zemi ya mwana ya liboso, Otto azwaki mosala ya molakisi.
Ntango bana bazalaki kokola, Otto ná Judy bazalaki mbala na mbala koyamba babongisi-nzela na ndako na bango, mpo bana na bango bámona esengo oyo basali ya ntango nyonso bazalaka na yango. Nsima ya mikolo, mwana na bango ya mokóló abandaki mosala ya mobongisi-nzela. Na nsima, akɔtaki na Eteyelo ya Gileadi mpe azali misionɛrɛ elongo na mobali na ye na ekólo moko ya Afrika. Mwana na bango ya nsuka abandaki mosala ya mobongisi-nzela na 1987, Judy mpe asalaki lokola ye.
Ntango bomoi ya Otto ebongwanaki, yango epesaki ye nzela ya kosalaka kaka bangonga moke na eteyelo, akómaki kosala mosala ya mobongisi-nzela, mpamba te akómaki na ntango mingi. Nsukansuka, atikaki mpenza mosala na ye. Lelo oyo, Otto azali mokɛngɛli-motamboli, mpe azali kosalela mayele na ye ya molakisi mpo na kolendisa masangá na elimo.
Toli nini Otto apesi baoyo bazali kosɛnga epaso liboso bákokisa bambula oyo basengeli kozwa yango? “Soki ozwi epaso, kolinga te opema naino ata mbula moko. Nzoto eumelaka te komesana na ‘kopema.’ Okokamwa ete osí obosani mpenza mosala ya mobongisi-nzela. Omipesá mbala moko na misala ya elimo.”
Yebá kosalela mayele oyo ozwi na bomoi na yo
Ya solo, bandeko lokola Pum, Jan, Dries mpe Otto bazali lisusu te na makasi mpe mpiko oyo bazalaki na yango ntango bazalaki naino bilenge. Kasi, bakɔmeli mpenza na elimo, bayebi makambo mingi mpe bakómi na bwanya mingi. (Masese 20:29) Bayebi soki kozala tata esɛngaka nini, mpe lokola bafandi mingi na basi na bango, bayebi mpe mwa moke soki kozala mama esɛngaka nini. Bakutanaki, ná basi na bango, na mikakatano na mabota na bango mpe basalisaki bana na bango bámityela mikano ya elimo. Otto alobi boye: “Lokola nazali mokɛngɛli ya zongazonga, ntango napesaka toli na makambo oyo etali libota, makambo oyo ngai moko nakutanaki na yango na libota na ngai esalisaka ngai napesa toli ya malamu mpenza.” Ndenge moko mpe, makambo oyo Dries akutanaki na yango mpo azalaki na bana esalisaka ye azala mosungi monene mpo na Betele, oyo etondi na bilenge.
Ya solo, boyebi oyo bandeko wana bazali na yango esalisaka bango na kokokisa mikumba ndenge na ndenge na masangá. Makambo oyo bakutaná na yango na bomoi na bango esalisi bango bázala na bisaleli ya malamu, yango wana, bazali kosalela makasi na bango na lolenge oyo ezali kobota mbuma mingi. (Mosakoli 10:10) Na yango, soki totali makambo oyo bango basalaka na boumeli ya mwa ntango, eleki mpenza makambo oyo bato oyo bazali naino na makasi, kasi bayebi makambo mingi te na bomoi na bango, bakoki kosala.
Na kati ya basaleli ya Yehova, bandeko ya ndenge wana, elongo na basi na bango, bazali bandakisa malamu mpenza oyo bilenge basengeli kolanda. Bilenge bazali komona ete, mibali ya ndenge wana ná basi na bango oyo bakutaná na mikakatano mingi na bomoi na bango mpe bazwá mapamboli mingi, oyo elobelamaka na mikanda na biso. Ezali likambo ya kolendisa mpenza komona ete mibali ná basi oyo bazali komonisa elimo lokola oyo ya Kalebe, oyo atako akómaki mokóló, asɛngaki ete bápesa ye mokumba oyo, mpo na kokokisa yango, ezalaki mpasi.—Yosua 14:10-12.
Bómekola kondima na bango
Okoki nde komekola kondima mpe misala ya bato oyo tolobeli na lisolo oyo? Kobosana te ete basalaki ete solo ezala na esika ya liboso na bomoi na bango. Balonaki mposa ya kosala mosala ya mobongisi-nzela na mitema ya bana na bango. Basalaki yango, ndenge Jan alobi, “na kopesáká bango ndakisa ya bolingo mpo na Yehova mpe mpo na ebongiseli na ye, na kozwáká bibongiseli mpo na kokutana na baninga ya malamu, mpe na kolakisáká bana ndenge ya komilukela bango moko biloko ya kobikela.” Bazalaki mpe kosala misala mpe kosakana esika moko libota mobimba. Pum alobi boye: “Na ntango ya konje, libota mobimba emesanaki kobima na mosala ya kosakola na ntɔngɔ, mpe na nsima ya midi tozalaki kokende kozwa mopɛpɛ elongo.”
Lisusu, baklisto yango babongisaki makambo liboso, mpe ntango mbongwana ekɔtaki na bomoi na bango, basalelaki yango na ndenge ya malamu. Bamityelaki mikano mpe bazwaki bikateli oyo esalisaki bango báumela te kokokisa mikano na bango. Balukaki ndenge nini bakokaki kosala kaka ngonga moke na mosala ya mosuni mpe bazalaki komipesa na koluka bozwi te. (Bafilipi 1:10) Basi bazalaki mpenza kosunga mibali na bango. Bango nyonso bazalaki na mposa ya kokɔta na “ekuke monene oyo ezali komema na mosala” mpe mpo na yango, bazwaki ebele ya mapamboli ya Yehova.—1 Bakolinti 16:9; Masese 10:22.
Yo mpe ozali na mposa ya kokolisa mosala na yo ya kosakola? Soki ezali bongo, koyeba kosalela mbongwana oyo ekɔti na bomoi na yo ekoki mpenza kozala nzela mpo na kosala bongo.
[Elilingi na lokasa 20]
Pum ná Anny bazali bakɛngɛli ya Ndako ya Mayangani
[Elilingi na lokasa 20]
Jan ná Woth bazali na mosala ya kosakola
[Elilingi na lokasa 21]
Dries ná Jenny bazali kosala na Betele
[Elilingi na lokasa 21]
Otto ná Judy bazali komilɛngɛla mpo na kokende kotala lisangá mosusu