Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 1/3 nk. 5-7
  • Balongaki minyoko

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Balongaki minyoko
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Abimi na bolɔkɔ kasi mpo na mwa ntango moke
  • Bafasiste na Hongrie
  • Bolɔkɔ na Hongrie, mosala makasi na Serbie
  • Bakoministe bakómi koyangela na Hongrie
  • Nsuka ya minyoko nyonso
  • Nayekolaki kotya elikya epai na Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mpo na nini konyokola bato mpo na lingomba na bango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Nasalelaki Yehova na motema molai uta bolenge na ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Biyano ya polele mpe oyo ebongi ya Biblia, ekamwisaki ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 1/3 nk. 5-7

Balongaki minyoko

FRIEDA JESS abotamaki na 1911 na Danemark; na nsima, ye ná baboti na ye bakendaki kofanda na Husum na nɔrdi ya Allemagne. Nsima ya bambula, azwaki mosala na engumba Magdebourg, mpe na 1930 azwaki batisimo mpe akómaki Moyekoli ya Biblia, ndenge bazalaki kobenga Batatoli ya Yehova na ntango wana. Na 1933, Hitler akómaki mokonzi mpe mpo na Frieda, yango ezalaki ebandeli ya minyoko na mabɔkɔ ya biyangeli mibale ya makambo makasi oyo elandanaki na Allemagne; mpe minyoko yango eumelaki mbula 23.

Na sanza ya Marsi 1933, guvɛrnema ya allemagne esalisaki voti. Doktɛrɛ Detlef Garbe, mokambi ya musée moko (Neuengamme Concentration Camp Memorial) oyo ezali pene na engumba ya Hambourg, alobaki boye: “Banazi balingaki kotinda ebele ya bato na makasi bápona mokonzi na bango Adolf Hitler.” Batatoli ya Yehova balandaki etinda ya Yesu ya kokɔta na makambo ya politiki te mpe ya kozala “bato ya mokili te”; yango wana, baboyaki kosala voti. Nini esalemaki? Bapekisaki mosala ya Batatoli na Allemagne.​—Yoane 17:16.

Frieda alandaki kosala mosala na ye ya kosakola na kobombana, kutu azalaki mpe kopesa mabɔkɔ na mosala ya kobimisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Alobi boye: “Bazulunalo mosusu ezalaki kokɔta na nkuku na bakaa ya bakangami epai ya bandeko na biso bandimi.” Na 1940, bakangaki ye mpe basoda ya Gestapo basambisaki ye mpe batyaki ye na esika oyo azalaki bobele ye moko na boumeli ya basanza mingi. Ndenge nini ayikaki mpiko? Alobi boye: “Libondeli nde ezalaki kolendisa ngai. Nazalaki kobanda kobondela na ntɔngɔntɔngɔ mpe kobondela mbala na mbala na mokolo. Libondeli ezalaki kopesa ngai makasi mpe ezalaki kosalisa ngai ete namitungisa mingi te.”​—Bafilipi 4:6, 7.

Babimisaki Frieda na bolɔkɔ, kasi na 1944 basoda ya Gestapo bakangaki ye lisusu. Mbala oyo, bakatelaki ye mbula nsambo ya bolɔkɔ mpe batyaki ye na bolɔkɔ ya Waldheim. Frieda alobi lisusu boye: “Bakɛngɛli ya bolɔkɔ bapesaki ngai ná basi mosusu mosala ya kosukola batwalɛti. Mbala mingi, nazalaki kosala na mwasi moko oyo autaki na Tchécoslovaquie mpe nazalaki kosolola na ye na ntina na Yehova mpe kondima na ngai. Masolo yango, esalisaki ngai mpe kondima na ngai elɛmbaki te.”

Abimi na bolɔkɔ kasi mpo na mwa ntango moke

Na sanza ya Mai 1945, basoda ya ekólo Union soviétique babimisaki bato nyonso oyo bazalaki na bolɔkɔ ya Waldheim, yango epesaki Frieda nzela ya kozonga na Magdebourg mpe kozongela kosala mosala na ye ya kosakola, kasi bonsomi na ye eumelaki te. Bakonzi ya eteni ya Allemagne oyo ezalaki na mabɔkɔ ya Union soviétique bakómaki mpe kotungisa Batatoli. Gerald Hacke, profesɛrɛ na iniversite moko (Hannah-Arendt-Institute for Research Into Totalitarianism) akomaki ete: “Batatoli ya Yehova bazali na kati ya mwa bituluku oyo banyokwamaki mingi mpenza na biyangeli nyonso mibale ya makambo makasi oyo elandanaki ntango wana na Allemagne.”

Mpo na nini minyoko ezongaki lisusu? Mbala oyo lisusu, baklisto baboyaki kokɔta na makambo ya politiki. Na 1948, basalaki voti ya kafukafu na Allemagne ya Ɛsti mpo bato bápona mokonzi oyo balingi mpe, ndenge Hacke alimboli yango, “ntina monene oyo [banyokolaki Batatoli ya Yehova] ezalaki kaka mpo baboyaki kosala voti yango.” Na sanza ya Augusto 1950, bapekisaki mosala ya Batatoli ya Yehova na Allemagne ya Ɛsti. Bakangaki Batatoli ebele, bakangaki mpe Frieda.

Frieda asambaki lisusu na tribinale mpe bakatelaki ye mbula motoba ya bolɔkɔ. Alobi boye: “Mbala oyo nazalaki esika moko na baninga mosusu bandimi mpe yango esalisaki ngai mingi.” Ntango abimaki na bolɔkɔ na 1956, akendaki kofanda na Allemagne ya Wɛsti. Frieda azali sikoyo na mbula 90, afandi na engumba Husum mpe azali kokoba kosalela Yehova, Nzambe ya solo.

Frieda anyokwamaki mbula 23 mobimba na biyangeli mibale ya makambo makasimakasi. “Banazi balukaki koboma ngai; Bakoministe balukaki kobebisa elimo na ngai. Epai wapi nazwaki makasi? Liboso bákanga ngai, nazalaki na momeseno ya koyekola Biblia mbala na mbala, kobondela ntango nyonso ngai moko, nazalaki kosepela kofanda esika moko na bandeko na ngai ya elimo mbala nyonso oyo nakokaki kokutana na bango, mpe koteya bato mosusu bindimeli na ngai na ndenge nyonso.”

Bafasiste na Hongrie

Mboka mosusu epai Batatoli ya Yehova banyokwamaki na boumeli ya bambula ebele ezali Hongrie. Bamosusu banyokolaki bango na biyangeli mabe mibale te, kasi misato. Moko na bango ezali Ádám Szinger. Ádám abotamaki na 1922, na engumba Paks, na Hongrie; mpe akolaki na Lingomba ya Protesta. Na 1937, Bayekoli ya Biblia bakendeki kosakola na ndako ya Ba-Ádám mpe asepelaki mbala moko na nsango na bango. Makambo oyo ayekolaki na Biblia endimisaki ye mpenza ete mateya ya lingomba na ye ekesanaki na oyo Biblia elobi. Yango wana, alongwaki na Lingomba ya Protesta mpe akómaki kosakola elongo na Bayekoli ya Biblia.

Bafasiste babandaki kokóma makasi na Hongrie. Mbala mingi, bapolisi bazalaki kolandalanda Ádám ntango azalaki kosakola ndako na ndako mpe bazalaki kokanga ye mpo na kotuna ye mituna. Bakómaki kotungisa Batatoli mingi, mpe na 1939, bapekisaki mosala na bango. Na 1942, bakangaki Ádám, batyaki ye na bolɔkɔ mpe babɛtaki ye makasi mpenza. Nini esalisaki ye ayika mpiko mpe andima kosala basanza ebele na bolɔkɔ atako azalaki naino kaka na mbula 19? “Ntango nazalaki naino na ndako, nazalaki koyekola Biblia na likebi mpenza, mpe nakangaki ntina ya makambo mingi oyo etali mokano ya Yehova.” Ezalaki kaka nsima ya kobima na bolɔkɔ nde Ádám azwaki batisimo mpe akómaki Motatoli ya Yehova. Azwaki batisimo na butu na sanza ya Augusto 1942, na ebale moko penepene na ndako na ye.

Bolɔkɔ na Hongrie, mosala makasi na Serbie

Na etumba ya mibale ya mokili mobimba, Hongrie esanganaki na Allemagne mpo na kobundisa Union soviétique, mpe na eleko ya ɔtɔni ya 1942, bakangaki Ádám mpo akɔta mosala ya soda. Alobi boye: “Nayebisaki bango ete makambo oyo nayekolaki na Biblia epekisi ngai nasala mosala ya soda. Nalimbwelaki bango ete nakoki kokɔta na makambo ya politiki te.” Bakatelaki ye mbula 11 ya bolɔkɔ. Kasi Ádám aumelaki na Hongrie te.

Na 1943, bakɔtisaki Batatoli ya Yehova pene na 160, oyo bautaki na bisika ndenge na ndenge, na masuwa oyo etiyolaki na Ebale Danube tii na Serbie. Ádám mpe azalaki na kati na bango. Na Serbie, bato wana ya bolɔkɔ bazalaki na mabɔkɔ ya bato ya Hitler. Batyaki bango na kaa ya bato oyo bazalaki kosala misala ya makasi na Bor mpe bazalaki kosalisa bango mosala ya koluka kwivre. Nsima ya mbula moko, bazongisaki bango lisusu na Hongrie mpe kuna, basoda ya Union soviétique babimisaki Ádám na bolɔkɔ na 1945.

Bakoministe bakómi koyangela na Hongrie

Kasi bonsomi eumelaki te. Na nsuka ya mobu 1940, Bakoministe oyo bakómaki koyangela na Hongrie bapekisaki mosala ya Batatoli ya Yehova kaka ndenge Bafasiste basalaki liboso ya etumba. Na 1952, bakangaki lisusu Ádám wana akómaki na mbula 29, abalaki mpe akómaki na bana mibale; lokola aboyaki lisusu kosala mosala ya soda, bakatelaki ye etumbu ya bolɔkɔ. Ádám alobaki na tribinale ete: “Oyo ezali mbala ya liboso te ete naboya mosala ya soda. Na ntango ya etumba, nakɔtaki bolɔkɔ, kutu bamemaki ngai tii na Serbie kaka mpo na likambo moko oyo. Nazali koboya kosala mosala ya soda mpo lisosoli na ngai ezali kondima te ete nasala yango. Nazali Motatoli ya Yehova, mpe nakɔtaka na makambo ya politiki te.” Bakatelaki Ádám bolɔkɔ ya mbula mwambe, oyo na nsima bakitisaki yango na mbula minei.

Ádám anyokwamaki tii na katikati ya bambula ya 1970, mbula 35 banda ntango oyo Bayekoli ya Biblia bakutanaki na ye mpo na mbala ya liboso na ndako ya baboti na ye. Na ntango nyonso wana, batribinale motoba ekatelaki ye bitumbu ya mbula 23 ya bolɔkɔ mpe akɔtaki na babolɔkɔ mpe bakaa zomi. Anyokwamaki makasi na biyangeli misato: Bafasiste, liboso ya etumba ya mibale ya mokili mobimba na Hongrie; Banazi na Serbie, mpe Bakoministe na ntango ya kowelana kati na mikili ya nguya (guerre froide) na Hongrie.

Ádám afandi na mboka na ye Paks, epai azali kosalela Nzambe na bosembo tii na moi ya lelo. Azalaki nde na makasi ya ndenge mosusu oyo esalisaki ye ete ayikela minyoko wana mpiko mpe atikala sembo? Te. Ye moko alobi boye:

“Koyekola Biblia, kobondela, mpe kozala esika moko na baninga mosusu bandimi ezali makambo oyo esungaki ngai mingi. Kasi nalingi kolobela makambo mosusu mibale ya ntina mingi. Ya liboso, Yehova nde apesaka makasi. Lokola nazalaki na boninga makasi na ye, yango nde ebatelaki ngai. Ya mibale, nabatelaki na makanisi na ngai mokapo ya Baloma 12 oyo elobi ete: ‘Bózongisa bino moko te mabe na oyo asali bino mabe.’ Yango wana, nazalaki kobomba nkanda na motema ata moke te. Mbala mingi, nazalaki na likoki ya kosala mpe mabe na baoyo banyokolaki ngai, kasi nasalaki yango te. Tokoki te kosalela makasi oyo Yehova azali kopesa biso mpo na kozongisa mabe na mabe.”

Nsuka ya minyoko nyonso

Frieda ná Ádám bazali sikoyo na bonsomi mpenza ya kosambela Yehova. Kasi, minyoko lokola oyo bango bakutanaki na yango ezali komonisa nini na ntina etali konyokola bato mpo na lingomba na bango? Yango emonisi ete minyoko ekoki te kobebisa bosembo ya baklisto ya solosolo. Ntango bazali konyokola Batatoli ya Yehova, bazali kobebisa ebele ya biloko mpe bazali kopesa bato mingi mpasi, kasi balongi te kokanga Batatoli monɔkɔ. Lelo oyo, Batatoli ya Yehova bazali se kokóma mingi na mikili ya Mpoto, bipai Banazi ná Bafasiste bayangelaki.

Batatoli basalaki nini ntango bazalaki konyokola bango? Ndenge lisolo ya Frieda na Ádám emonisi yango, basalelaki toli ya Biblia oyo elobi ete: “Komitika te ete mabe elonga yo, kasi kobá kolonga mabe na kosaláká malamu.” (Baloma 12:21) Malamu ekoki mpenza kolonga? Ɛɛ, soki esangani na kondima makasi epai ya Nzambe. Ndenge Batatoli ya Yehova balongaki minyoko na mikili ya Mpoto ezalaki elimo ya Nzambe mpenza nde elongaki, elakisaki ete malamu oyo euti na kondima, ezali makasi, oyo kaka elimo santu nde ekoki kopesa baklisto oyo bazali na komikitisa. (Bagalatia 5:22, 23) Na mokili oyo etondi na mobulu, yango ezali liteya monene oyo moto nyonso asengeli kozwa na motema mobimba.

[Bililingi na lokasa 5]

Frieda Jess (lelo oyo Thiele) ntango bakangaki ye mpe lelo

[Bililingi na lokasa 7]

Ádám Szinger ntango azalaki na bolɔkɔ mpe lelo oyo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto