Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 15/12 nk. 19-22
  • Oyebi lisolo ya Safana na libota na ye?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Oyebi lisolo ya Safana na libota na ye?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Safana asimbi losambo ya solo
  • Ahikama na Gedalia
  • Gemalia na Mikaya
  • Eleasa na Yaazania
  • Safana na libota na ye
  • Liteya nini tokoki kozwa?
  • Ozali komikundola?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Okopona baninga ya lolenge nini?
    Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
  • Yosiya: Moto ya komikitisa oyo asepelisaki Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Elembo ‘ya Yukala’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 15/12 nk. 19-22

Oyebi lisolo ya Safana na libota na ye?

NA NTANGO otángaka Biblia, osilá komona bisika oyo balobeli Safana mpe bato mosusu ya libota na ye, oyo ezalaki libota moko ya lokumu? Bato yango bazalaki banani? Makambo nini basalaki? Makambo oyo basalaki ekoki koteya biso nini?

Mbala ya liboso oyo Biblia elobeli “Safana, mwana ya Asalia, mwana ya Mesulama” ezali na ntango oyo Yosiya azalaki kozongisa losambo ya solo, na mobu soki 642 liboso ya ntango na biso (L.T.B.). (2 Mikonzi 22:⁠3) Na kati ya masolo ya makambo oyo esalemaki na boumeli ya mbula 36 oyo elekaki kobanda wana tii na mobu 607 L.T.B. ntango Yelusaleme ebomamaki, balobeli bana na ye minei: Ahikama, Eleasa, Gemalia na Yaazania, mpe bankɔkɔ na ye mibale: Mikaya na Gedalia. (Talá na etanda.) Buku moko (Encyclopaedia Judaica) elobi boye: “Bato ya libota ya Safana bazalaki kosala misala minene ya Leta [na ekólo Yuda] mpe bazalaki bakomeli ya mokonzi banda ntango oyo Yosiya azalaki mokonzi tii ntango bato ya ekólo yango bakendaki na boombo.” Soki totaleli makambo oyo Biblia elobi mpo na Safana na libota na ye, tokoyeba ndenge oyo basalisaki mosakoli Yilimia mpe basimbaki losambo ya solo.

Safana asimbi losambo ya solo

Na mobu 642 L.T.B., ntango Mokonzi Yosiya azalaki na mbula soki 25, Safana azalaki sɛkrɛtɛrɛ mpe mokomeli ya mokonzi. (Yilimia 36:10) Mosala yango ezalaki kosɛnga makambo nini? Buku oyo touti kolobela elobi ete mokomeli mpe sɛkrɛtɛrɛ ya mokonzi azalaki mopesi-toli na ye, azalaki kotalela makambo ya mbongo, ayebaki malamu makambo etali boyokani na bamboka ya bapaya, ayebaki mibeko etali boyokani na bikólo mosusu, mpe boyokani na bikólo mosusu na makambo ya mombongo. Na yango, lokola Safana azalaki sɛkrɛtɛrɛ ya mokonzi, yango elingi koloba ete azalaki moko na bato minene ya ekólo.

Mbula zomi liboso, elenge Yosiya “abandaki koluka Nzambe ya Davidi, tata na ye.” Na ntembe te Safana azalaki mokóló ya Yosiya mpe na ndenge yango, abongaki mpenza kozala mopesi-toli na ye na makambo ya elimo mpe kopesa ye mabɔkɔ na ntango abandisaki mpo na mbala ya liboso mosala ya kozongisa losambo ya solo.a​—⁠2 Ntango 34:​1-8.

Ntango bazalaki kobongisa tempelo, bamonaki “mokanda ya Mibeko,” mpe Safana “atángaki yango liboso ya mokonzi.” Ntango Yosiya ayokaki makambo oyo ezalaki na mokanda yango, esalaki ye motema mpasi mpe atindaki bato oyo azalaki kotyela motema epai ya mosakoli-mwasi Huluda mpo na kotuna Yehova na ntina etali mokanda yango. Mokonzi amonisaki ete azalaki kotyela Safana na mwana na ye Ahikama motema na ndenge atyaki bango na kati ya bato oyo atindaki.​—⁠2 Mikonzi 22:​8-14; 2 Ntango 34:​14-22.

Na Makomami mobimba, kaka bavɛrsɛ wana nde eyebisi likambo moko oyo Safana asalaki. Na bavɛrsɛ mosusu ya Biblia bazali kaka kolobela ye lokola tata ya moto boye to nkɔkɔ ya moto boye. Bana ya Safana bayebanaki malamu na mosakoli Yilimia.

Ahikama na Gedalia

Ndenge touti koloba yango, mbala ya liboso oyo balobeli Ahikama, mwana ya Safana, ezali na ntango oyo batindaki bango epai ya mosakoli-mwasi Huluda. Buku moko elobi boye: “Atako Biblia eyebisi biso te mosala nini Ahikama azalaki kosala, ezali polele ete azalaki na mosala ya lokumu.”

Mbula soki 15 nsima ya likambo yango, bomoi ya Yilimia ezalaki na likama. Ntango ayebisaki bato ete Yehova akani koboma Yelusaleme, “banganga mpe basakoli mpe bato nyonso bakamataki ye, mpe bango [balobaki] ete, Okokufa kokufa solo.” Makambo nini esalemaki na nsima? Lisolo elobi boye: “Lobɔkɔ ya Ahikama, mwana ya Safana, ezalaki na Yilimia elongo ete bákaba ye na mabɔkɔ ya bato te mpo na koboma ye.” (Yilimia 26:​1-24) Yango ezali komonisa nini? Buku moko (The Anchor Bible Dictionary) elobi boye: “Likambo yango ezali komonisa biso ete Ahikama azalaki moto monene; kasi ezali mpe komonisa ete azalaki komonisela Yilimia boboto ndenge oyo bato mosusu ya libota ya Safana mpe bamoniselaki ye boboto.”

Mbula soki 20 na nsima, ntango bato ya Babilone babebisaki Yelusaleme na mobu 607 L.T.B. mpe bamemaki bato mingi na boombo, batyaki Gedalia, nkɔkɔ ya Safana mpe mwana ya Ahikama, guvɛrnɛrɛ ya Bayuda oyo batikalaki. Ye mpe asungaki nde Yilimia ndenge bato mosusu ya libota ya Safana basalaki? Biblia elobi boye: “Bongo Yilimia akendaki na Gedalia, mwana ya Ahikama epai na Misipa mpe afandaki elongo na ye.” Nsima ya mwa basanza, babomaki Gedalia , mpe Bayuda oyo batikalaki na mboka bazwaki Yilimia mpe bakendaki na ye na Ezipito.​—⁠Yilimia 40:​5-7; 41:​1, 2; 43:​4-7.

Gemalia na Mikaya

Gemalia, mwana ya Safana mpe Mikaya, nkɔkɔ ya Safana, basalaki makambo mingi oyo elobami na masolo oyo ezali na Yilimia mokapo 36. Ezalaki soki na mobu 624 L.T.B., na mbula ya mitano ya Mokonzi Yoyakimi. Baluku, sɛkrɛtɛrɛ ya Yilimia, atángaki na mongongo makasi mokanda oyo ezalaki na maloba ya Yilimia na ndako ya Yehova, “na eteni ya Gemalia, mwana ya mokomeli Safana.” Na ndenge yango, ‘Mikaya, mwana ya Gemalia, mwana ya Safana, ayokaki maloba nyonso ya Yehova na kati ya mokanda.’​—⁠Yilimia 36:​9-11.

Mikaya ayebisaki tata na ye na bankumu mosusu likambo ya rulo yango, mpe bango nyonso bakómaki na mposa báyoka makambo oyo rulo yango elobaki. Nsima ya koyoka yango basalaki nini? “Wana esili bango koyoka yango, babongwanaki moto na moto na moninga na ye na nsɔmɔ, balobaki mpe na Baluku ete, Solo, tokoyebisa mokonzi mpo na maloba oyo nyonso.” Kasi, liboso ya koyebisa mokonzi, bapesaki Baluku toli ete: “Kendá komibomba, bino na Yilimia; tiká te ete moto ayeba esika ezali bino.”​—⁠Yilimia 36:​12-19.

Se ndenge oyo bakanisaki, mokonzi aboyaki kolanda maloba yango; akatakataki rulo yango mpe atumbaki yango. Bankumu mosusu, bakisa mpe Gemalia, mwana ya Safana, “balɔmbaki mokonzi ete azikisa mokanda te; nde ayokaki bango te.” (Yilimia 36:​21-25) Buku moko (Jeremiah​—⁠An Archaeological Companion) epesi likanisi oyo: “Gemalia azali moto oyo azalaki mpenza kokɔtela Yilimia epai ya Mokonzi Yoyakimi mpe epai ya basali na ye.”

Eleasa na Yaazania

Na mobu 617 L.T.B., bato ya Babilone babɔtɔlaki bokonzi ya Yuda. Ebele ya Bayuda, “bana ya mokonzi mpe bato makasi ya etumba . . . bato nyonso ya mosala mpe batuli,” bakendaki na bango na boombo; bakisa mpe mosakoli Ezekiele. Matania, ye oyo bato ya Babilone bapesaki ye nkombo Sidikiya, akómaki mokonzi oyo azalaki koyangela na nkombo ya mokonzi ya Babilone. (2 Mikonzi 24:​12-17) Na nsima, Sidikiya atindaki etuluku moko ya bato na Babilone; mpe Eleasa, mwana ya Safana, azalaki na kati ya bato wana. Yilimia apesaki Eleasa mokanda oyo ezalaki na nsango ya ntina mingi oyo eutaki na Yehova mpo na Bayuda oyo bazalaki na boombo na Babilone.​—⁠Yilimia 29:​1-3.

Na bongo, Biblia ezali komonisa ete Safana ye moko, bana na ye misato, mpe bankɔkɔ na ye mibale, lokola bazalaki na bisika ya lokumu na ekólo, basimbaki losambo ya solo mpe basalisaki Yilimia, mosakoli ya sembo. Kasi, ezali boni mpo na Yaazania, mwana mosusu ya Safana? Ye asalaki lokola bandeko na ye te; ekoki mpenza kozala ete akɔtaki na losambo ya bikeko. Na mobu soki 612 L.T.B., ntango mosakoli Ezekiele akokisaki mbula motoba na boombo na Babilone, amonaki na emonaneli mibali 70 oyo bazalaki kotumbela bikeko mpaka ya malasi na tempelo ya Yelusaleme. Moko na mibali yango, mpe kaka ye nde batángi nkombo na ye, ezalaki Yaazania. Ekoki kozala ete azalaki na kati ya bato oyo bazalaki na esika ya liboso mpo na kosala likambo wana. (Ezekiele 8:​1, 9-12) Ndakisa ya Yaazania ezali komonisa ete moto akoki kobɔkwama na libota ya bato oyo babangaka Nzambe, kasi na nsima aboi losambo ya solo ya Yehova. Moto na moto akosamba mpo na makambo na ye.​—⁠2 Bakolinti 5:⁠10.

Safana na libota na ye

Na eleko oyo Safana azalaki na Yelusaleme, ata mpe na eleko ya bana na ye mpe bankɔkɔ na ye, bato ya ekólo Yuda bakómaki kosalela batampo. Bazalaki kobɛta tampo na mikanda mpo na kondimisa ete ezali ya solo to mpe lokola sinyatili; bazalaki kosala batampo yango na mabanga ya ntalo, na bibende, na mpɛmbɛ ya nzoku, to na talatala. Mbala mingi, bazalaki kokoma nkombo ya nkolo tampo yango, nkombo ya tata na ye, mpe ntango mosusu mosala ya moto yango.

Bato ya arkeoloji bamonaki ebele ya biloko oyo esalemi na mabele oyo babɛtá yango batampo ya Baebele. Profesɛrɛ Nahman Avigad, ye ayekolaka makomi ya kala ya Baebele, alobaki boye: “Makomi ya tampo ezali makomi se moko ya Baebele oyo ezali na bankombo ya bato oyo Biblia elobeli.” Nkombo ya Safana to bankombo ya bana mpe bankɔkɔ na ye, ezali mpe na kati ya makomi wana? Ɛɛ, nkombo ya Safana mpe ya mwana na ye Gemalia ezali na batampo oyo ezali na elilingi na nkasa 19 mpe 21.

Bato ya mayele balobaka mpe ete ekoki kozala ete bankombo ya bato mosusu minei ya libota na ye ezali na bisika oyo babɛtá tampo​—⁠Asalia, tata na Safana; Ahikama, mwana ya Safana; Gemalia, mwana ya Safana; mpe Gedalia ye oyo, ekoki kozala ete nkombo na ye ezali na makomi oyo babɛtaki na tampo oyo elobi ete azalaki “mokonzi ya Ndako.” Bakanisaka ete tampo oyo ya minei ezalaki ya Gedalia, nkɔkɔ ya Safana, atako batángi nkombo ya tata na ye Ahikama te. Mokumba na ye na makomi oyo ebɛtami na tampo ezali komonisa ete azalaki moko na bato minene ya ekólo.

Liteya nini tokoki kozwa?

Safana na libota na ye bapesi ndakisa malamu na ndenge basalelaki bisika na bango ya lokumu mpo na kosimba losambo ya solo mpe kosalisa Yilimia, moto ya sembo! Biso mpe tokoki kosalela biloko na biso mpe bisika ya lokumu oyo tokoki kozala na yango mpo na kosimba ebongiseli ya Yehova mpe kosalisa baninga oyo tozali kosambela na bango Nzambe moko.

Tokozala na esengo mpe kondima na biso ekolendisama soki tozali kosuka kaka te na kotánga Biblia mbala na mbala, kasi soki tozali mpe kokɔta na bozindo mpe koyeba malamumalamu batatoli ya Yehova na ntango ya kala lokola Safana mpe libota na ye. Bango mpe bazali na kati ya ‘lipata monene ya batatoli’ oyo tokoki kolanda ndakisa na bango.​—⁠Baebele 12:⁠1.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Esengeli mpenza kozala ete Safana azalaki mokóló ya Yosiya mpamba te Ahikama, mwana ya Safana azalaki mokoló ntango Yosiya azalaki elenge ya mbula 25.​—⁠2 Mikonzi 22:​1-3, 11-14.

[Etanda na lokasa 22]

Huluda: mosakoli-mwasi ya lokumu

Ntango Mokonzi Yosiya ayokaki makambo oyo batángelaki ye na “mokanda ya Mibeko” oyo bamonaki na tempelo, atindaki Safana na bato mosusu minei ya lokumu mpo na “kotuna [Yehova]” na ntina na mokanda yango. (2 Mikonzi 22:​8-20) Epai wapi bato yango bakokaki kozwa eyano? Yilimia, mpe mbala mosusu Nahumu mpe Sefania, bango nyonso basakoli mpe bato oyo bakomaki mikanda mosusu ya Biblia, bazalaki na Yuda na eleko wana. Kasi, bato yango bakendaki epai ya mosakoli-mwasi Huluda.

Buku moko (Jerusalem​—⁠An Archaeological Biography) elobi boye: “Oyo ezali kobenda likebi na likambo yango ezali ete bamitunaki te soki basengeli kokende epai ya mwasi to mobali. Moto moko te akanisaki ete ebongaki te etuluku ya mibali bákende na Rulo ya Mibeko epai ya mwasi mpo na koyeba makambo na yango. Ntango mosakoli-mwasi yango alobaki ete rulo yango ezalaki maloba ya Nkolo, moto moko te abɛtelaki ye ntembe. Mbala mingi bato ya mayele babosanaka likambo yango ntango bazali kotalela esika ya mwasi na Yisalaele ya kala.” Nsango oyo ayebisaki bango ezalaki mpenza nsango ya Yehova.

[Etanda/Elilingi na lokasa 21]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

Molɔngɔ ya libota ya Safana

Mesulama

↓

Asalia

↓

Safana

↓ ↓ ↓ ↓

Ahikama Eleasa Gemalia Yaazania

↓ ↓

Gedalia Mikaya

[Elilingi na lokasa 20]

Gemalia na bato mosusu babondelaki Yoyakimi ete atumba rulo ya Yilimia te

[Elilingi na lokasa 22]

Atako Yaazania azalaki na libota ya Safana, bamonaki ye na kati ya emonaneli azali kosambela bikeko

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 19]

Na ndingisa ya Israel Antiquities Authority

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 21]

Na ndingisa ya Israel Antiquities Authority

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto