Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 15/10 nk. 19-21
  • Ntango ya esengo na mikili ya Balkans

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ntango ya esengo na mikili ya Balkans
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Mosala ya Nzambe ekei liboso na mikili ya Balkans
  • Makambo ya esengo mpo na basaleli ya Yehova
  • Mosala moko monene
  • Mokolo ya esengo mingi
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 15/10 nk. 19-21

Ntango ya esengo na mikili ya Balkans

Na 1922, Batatoli ya Yehova​—⁠na ntango wana bazalaki kobenga bango Bayekoli ya Biblia​—⁠basalaki likita moko na engumba Innsbruck, na ekólo Autriche. Franz Brand, elenge mobali moko, azalaki na kati ya bato oyo balandaki likita yango; ye autaki na engumba Apatin, na etúká ya Vojvodine, na Serbie. Ntango kaka molobi atángaki nkombo ya Nzambe, Yehova, ebele ya bato babandaki kosala makɛlɛlɛ; akokaki lisusu kokoba na lisolo na ye te mpe likita ekatanaki. Atako bongo, makambo oyo elenge Franz ayokaki esimbaki motema na ye mpe abandaki kosakola nsango malamu ya Bokonzi. Ezali na ndenge yango nde mosala ya kosakola ebandaki mokemoke na ekólo moko ya Balkans, mpe na nsima ekolaki mpe ebotaki mbuma mingi.

BATO mingi lelo oyo, soki bayoki nkombo Yougoslavie, bakanisaka mbala moko bitumba oyo elekaki kuna mpe ndenge oyo ebele ya bato babomamaki. Bamonaka lisusu ndenge ya nsɔmɔ oyo babomaki bato, ndenge oyo bato bazalaki kokima mboka na bango kasi bayebi epai ya kokende te, ndenge oyo babɔmbi mpe masasi ebebisaki bandako, mpe ndenge bana bitike banyokwamaki. Maloba ezali te mpo na kolimbola mpasi mpe bwale oyo bato bayokaki na bitumba oyo esalemaki na mikili ya Balkans banda 1991 tii 1995; bitumba yango elongolaki bato elikya nyonso ete bato bakoki kosala makambo ya malamu mpo na mikolo oyo ezali koya. Bitumba ebimisaki mikakatano ya mbongo mpe bobola oyo bato ya mikili oyo ezalaki na kati ya ekólo Yougoslavie bazali kobunda na yango tii lelo oyo.a

Moto akoki kokanisa ete na kati ya bampasi ya ndenge wana, likoki ya komona bato ya esengo ezali te. Kasi, likambo ya kokamwa, bato ya esengo bazali. Kutu, bato yango balekisaki mokolo moko ya esengo mingi na pene na nsuka ya ekeke ya 20. Franz Brand, elenge mobali oyo tolobelaki na ebandeli, asalaki nini oyo nsukansuka ebotaki esengo wana?

Mosala ya Nzambe ekei liboso na mikili ya Balkans

Franz Brand asepelaki mingi nsima ya koyoka solo mpe azwaki ekateli ya kopalanganisa nsango malamu. Akendaki na Maribor, engumba moko ya ekólo Slovénie oyo ezali mosika te na ndelo ya ekólo Autriche, mpe kuna azwaki mosala ya kokata bato nsuki; abandaki kosakola epai ya bakiliya na ye oyo bazalaki kofanda kimya mpe koyoka ye ntango azali kokata bango nsuki. Mosala na ye ebotaki mbuma, mpamba te na nsuka ya bambula ya 1920, mwa etuluku ya basakoli ya Bokonzi esalemaki na Maribor. Bazalaki kosala masukulu na restora moko oyo ekómaki kobengama Restora ya mbisi ya mai monene Novi svet (Mokili ya Sika).

Na nsima, bakómaki kopalanganisa nsango malamu na ekólo mobimba. “Fɔtɔ-Drame ya Bozalisi” esalaki mosala monene mpo na kopalanganisa nsango yango (filme ya ngonga mwambe; ezalaki na bililingi oyo ezali kotambola, bililingi oyo ezali kotambola te mpe na mingongo ya bato). Na nsima, na bambula ya 1930, ntango bakómaki konyokola Batatoli ya Yehova na Allemagne, Batatoli bakómaki mingi na Yougoslavie mpamba te babongisi-nzela ya Allemagne, oyo bakimaki mboka na bango, bakómaki kofanda na Yougoslavie. Bato yango baboyaki koluka bomoi ya malamu, bakendaki kosakola na bamboka oyo ezali mosika mpe likoló ya bangomba. Liboso, emonanaki ete bato bazalaki mpenza kosepela na nsango na bango te. Na ebandeli ya bambula ya 1940, basakoli oyo bapesaki lapolo na bango ya mosala bazalaki kaka 150.

Na 1941, babandaki konyokola bango makasi, mpe minyoko yango eumelaki tii na 1952. Nsukansuka, basepelaki mpamba te, na mokolo ya 9 Sɛtɛmbɛ 1953, Lingomba ya Batatoli ya Yehova ekomamaki na mikanda ya Leta; na ntango wana, Général Tito azalaki mokonzi ya ekólo mpe atyaki boyangeli ya Bakoministe! Basakoli ya nsango malamu bazalaki 914 na mbula yango, mpe banda wana, bazalaki se kobakisama. Na 1991, basakoli bakómaki 7 420 mpe bato 16 072 bazalaki na Ekaniseli.

Banda mokolo ya 16 tii 18 Augusto 1991, liyangani ya liboso ya bato oyo bautaki na mikili ndenge na ndenge esalemaki na engumba Zagreb, na Croatie. Bato 14 684 oyo bautaki na ekólo yango mobimba mpe na mikili mosusu bazalaki na liyangani yango. Liyangani monene yango epesaki basaleli ya Yehova makasi mpo na kobunda na mikakatano mosusu oyo ezalaki liboso na bango. Mituka oyo ememaki bato ya Serbie oyo bautaki na liyangani yango ezalaki na kati ya mituka ya nsuka oyo elekaki ndelo oyo ekaboli Croatie na Serbie. Ntango kaka bisi ya nsuka ekatisaki, bakangaki nzela mpe etumba ebandaki.

Makambo ya esengo mpo na basaleli ya Yehova

Batatoli ya Yehova bamekamaki makasi na bambula oyo etumba ezalaki na mikili ya Balkans. Atako bongo, bakoki kosepela, mpamba te Yehova asalisi basaleli na ye na mikili yango ete bákóma ebele. Kobanda 1991, basakoli ya Bokonzi babakisami mingi (koleka 80 %) na mikili oyo ezalaki kala na ekólo Yougoslavie. Na 2001, bakómaki 13 472.

Ntango mikili nyonso wana ezalaki ekólo moko oyo babengaki Yougoslavie, babiro ya Batatoli ya Yehova ezalaki na Zagreb mpe na Belgrade (Serbie). Lokola basakoli bakómaki mingi mpe lokola bamboka ekabwanaki, esɛngaki kofungola babiro mosusu na Ljubljana (Slovénie), mpe Skopje (Macédoine), mpe koluka babiro ya sika na Belgrade mpe na Zagreb. Lelo oyo, bato soki 140 bazali kosala na babiro yango. Mingi bazali bilenge ya molende oyo balingi mpenza Yehova. Na kati na bango, mingi basalaka mosala ya kobongola mikanda oyo elimbolaka Biblia na monɔkɔ ya Croate, Macédonien, Serbe, mpe Slovène. Ezali esengo na komona ete, atako babongolaka makambo oyo ezali na Lingelesi mpo na kotya yango na minɔkɔ wana, bazulunalo mpe mikanda mingi ya Batatoli ya Yehova na minɔkɔ yango ezali kobima nzela moko na mikanda ya Lingelesi! Mikanda yango ezali kobɔndisa ebele ya bato mpe ezali kopesa bango elikya.

Likambo mosusu ya esengo ezali ete ebele ya basakoli ya ntango nyonso oyo bauti na mikili mosusu bazali mpe kopesa mabɔkɔ na mosala ya kosakola nsango malamu. Na bambula euti koleka, Bandako ya Bokonzi ya sika mpe ya kitoko etongami; yango mpe ezali kobakisela bandeko esengo. Kasi, ezali na likambo mosusu ya esengo oyo ezalaki kozela bango. Likambo nini?

Mosala moko monene

Basakoli mingi bazalaki komituna mbala na mbala ete, ‘Mokolo mosusu tokozala mpenza na Libongoli ya Mokili ya Sika na monɔkɔ na biso?’ Mbula na mbula bazalaki kolikya koyoka liyebisi mpo na Biblia yango na liyangani ya etúká. Kasi, ndenge nini mosala monene wana ekokaki kosalema soki okanisi ete elekaki bambula mingi te banda mosala ya kobongola mikanda na minɔkɔ yango ebandaki mpe babongoli bazalaki mpenza mingi te?

Nsima ya kotalela makambo malamumalamu, Lisangani ya Mikóló-Bakambi endimaki ete babongoli ya monɔkɔ ya Croate, Macédonien, mpe Serbe bábanda kosala mosala yango elongo mpo bápesanaka makanisi. Babongoli ya monɔkɔ ya Croate nde basengelaki kobanda.

Mokolo ya esengo mingi

Batatoli ya Yehova ya mikili ya Balkans bakobosana mokolo ya 23 Yuli 1999 te. Mayangani ya etúká oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Liloba ya esakweli ya Nzambe” esalemaki nzela moko na Belgrade, Sarajevo (Bosnie-Herzégovine), Skopje, mpe Zagreb. Mwa basanza liboso, bandeko bazalaki koyeba mpenza te soki na Belgrade liyangani ekokaki kosalema, mpamba te, ntango bampɛpɔ ya OTAN ezalaki kobwaka babɔmbi, bakonzi ya Leta bazalaki kopesa nzela te ete bato básala makita minene. Na nsima, bandeko bazalaki na esengo mingi ntango bayokaki ete liyangani ekoki kosalema! Kasi, makambo oyo bayokaki na liyangani yango, elekaki mpenza oyo bakanisaki.

Mokolo ya mitano na nsima ya midi, liyebisi moko epesamaki na bisika minei oyo mayangani ezalaki kosalema. Bayangani 13 497 bafungolaki matoi malamumalamu mpo na koyoka likambo yango. Na nsuka, ntango molobi alakisaki Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Grɛki ya boklisto na monɔkɔ ya Croate mpe na monɔkɔ ya Serbe mpe ayebisaki ete mosala ya kobongola ezali kokende malamu na monɔkɔ ya Macédonien, bayangani bakokaki lisusu kokanga motema te. Babandaki kobɛta mabɔkɔ makasi liboso kutu molobi asilisa maloba oyo azalaki na yango na monɔkɔ. Na liyangani ya Sarajevo, bayangani nyonso bafandaki naino nyɛɛ, mpamba te bamonaki yango lokola ndɔtɔ. Na nsima nde babɛtaki mabɔkɔ mposa bátika te. Na Belgrade, bato mingi batangisaki mpisoli ya esengo, mpe bazalaki kokata molobi mpo na kobɛta mabɔkɔ liboso asilisa kopesa liyebisi. Bato nyonso bazalaki na esengo nsuka te!

Bandeko bazwaki lokola makabo mibale, mpamba te Batatoli ya Yehova bazwaki ndingisa ya kobimisa Biblia na monɔkɔ ya Croate mpe mosusu ya monɔkɔ ya Serbe, oyo bato mosusu babongolá. Yango wana, na minɔkɔ yango mibale, babimisaki Babiblia oyo esangisaki Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Grɛki ya boklisto na Makomami ya Liebele ya Biblia oyo bazwaki ndingisa ya kobimisa. Lisusu, Biblia ya monɔkɔ ya Serbe ebimisamaki na alfabɛ Romain mpe na alfabɛ Cyrillique.

Basaleli ya Yehova na mikili ya Balkans bazali na botɔndi mpo na mapamboli mpe toli nyonso oyo bazwaki, yango wana bazali koloba lokola Davidi ete: “Ata natamboli na libulu ya molili ya kufa, nakobanga mabe te; zambi yo [Yehova] ozali na ngai elongo.” Atako bazali se kokutana na ebele ya mikakatano, bazali na ekateli makasi ya kosala ete ‘esengo ya Yehova ezala nguya na bango.’​—⁠Nzembo 23:4; Nehemia 8:⁠10.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Yougoslavie ezalaki lisangá ya bikólo motoba oyo: Bosnie-Herzégovine, Croatie, Macédoine, Monténégro, Serbie, na Slovénie.

[Elilingi na lokasa 20]

Basakoli ya liboso na Maribor, na Slovénie, bazali kosakola na bamboka oyo ezali mosika

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto