Bazalani nyonso bakei wapi?
“Lelo oyo bato bayebi lisusu te kofanda na bazalani na bango.”—Benjamin Disraeli, mokonzi moko ya Angleterre na ekeke ya 19.
MIBANGE ya ekólo Cuba babimisi likambo moko ya sika mpo na kozala malamu, bazali kobenga yango círculos de abuelos (lisangá ya bankɔkɔ ya kartye). Lapolo moko ebimaki na 1997 elobaki ete soki okamati mibange ya Cuba mitano, mobange moko kati na bango azali na lisangá ya ndenge yango, epai bazali kozwa baninga, bazali kobɔndisana mpe kolendisana, mpe bazali kosalisana mpo na kozala malamu na bomoi na bango. Zulunalo moko (World-Health) elobi ete: “Mbala nyonso oyo minganga ya kartye bazali na mposa ya lisalisi mpo na kosala kampanye ya kokata mangwele, bazwaka lisalisi oyo ebongi epai ya masangá yango mpo bazali motema malamu.”
Kasi, likambo ya mawa ezali ete na bisika mingi na mokili, bato oyo bafandaka kartye moko bazalaka na bibongiseli ya ndenge wana te mpo na kosalisana. Na ndakisa, tókanisa likambo ya nsɔmɔ oyo ekómelaki Wolfgang Dircks, mobali moko oyo azalaki kofanda na buludingi moko na Mpoto. Eleki mwa bambula, zulunalo moko (The Canberra Times) elobaki ete, atako Wolfgang azalaki kofanda na buludingi moko na mabota mosusu 17 mpe bango nyonso bazalaki komona ye lisusu te, “moto moko te azwaki likanisi ya kobɛta na porte na ye.” Nsukansuka ntango nkolo buludingi akendeki kuna, “akutaki mikuwa mpamba liboso ya televizyo.” Na makolo ya moto yango oyo asilá kokóma mikuwa, bamonaki mwa buku moko oyo ezalaka na programɛ ya batelevizyo, programɛ yango ebimaki mokolo ya 5 Desɛmbɛ 1993. Elekaki mbula mitano banda Wolfgang akufaki. Likambo ya mawa ndenge yango ezali komonisa mpenza ete bato oyo bafandaka penepene bamitungisaka lisusu te mpo na basusu ndenge ezalaká kala. Tokoki kokamwa te ete moto moko akomaki na zulunalo moko (The New York Times Magazine) ete esika afandaka, ndenge moko mpe na bisika mosusu ebele, ekómá “kartye oyo bato bayebanaka te bango na bango.” Makambo ezali mpe ndenge yango na esika ofandaka?
Ezali solo ete bato mosusu oyo bafandi na bamboka bayokanaka naino malamu na baninga oyo bafandi na bango esika moko mpe ete na bakartye mosusu na bingumba bazali kosala makasi mpo na kotalana mpe kosalisana. Atako bongo, bato mingi oyo bafandaka na bingumba bamiyokaka ete bazali bango moko mpe moto ya kobatela bango azali te na bisika oyo bafandi. Bayebanaka te na bato oyo bafandi na bango penepene. Na ndenge nini?
Bazali koyebana te na baoyo bafandi na bango penepene
Mingi kati na biso tozali na bato oyo bafandaka penepene na biso. Mpo na koyeba ete bato bafandi penepene na biso “bazali,” tomonaka mwinda ya televizyo, bilili ya bato oyo bazali kolekaleka na lininisa, ntango bazali kopelisa mpe koboma mwinda, makɛlɛlɛ ya mituka oyo ezali kolekaleka, makɛlɛlɛ ya bato oyo bazali kotambola na kulware, makɛlɛlɛ ntango bazali kofungola mpe kokanga ndako. Atako bongo, boninga ezalaka te ntango bato oyo bafandi esika moko bazali koyeba te banani bafandaka na lopango oyo elandi to bapesanaka ata mbote te mpo moto na moto azali kowela kokende kosala makambo na ye. Bato bakoki komona ete ntina ezali te ya kosala boninga na bato oyo bafandi na bango esika moko to ete ezali likambo na bango te ya kosalela bango ata likambo nini. Zulunalo moko ya Australie (Herald Sun) elobaki boye: “Mingimingi bato bayebanaka te na bato oyo bafandi na bango penepene mpenza, mpe na bongo bayokaka ete etali bango te kosala makambo oyo ebongi kosalela moto oyo afandaka penepene na yo. Lelo oyo, ezali mpasi te mpo na kokima moto oyo ozali na mposa ya kozala moninga na ye te.”
Likambo yango ekoki kokamwisa biso te. Na kati ya mokili oyo bato bakómi “bato oyo bamilingaka bango moko,” bakartye ebebi mpo moto na moto azali koluka kaka matomba na ye moko. (2 Timote 3:2) Yango esali ete bato mingi bámiyoka ete bazali bango moko mpe bakabwani na bato. Kokabwana epesaka bato nzela te ya kotyelana motema, mingimingi soki mobulu mpe kobomana ekɔti na mboka. Mpe na nsima, kozanga kotyelana motema elongolaka ezaleli ya motema mawa.
Ata soki makambo ezali ndenge nini na esika ofandi, okoboya te ete kozala na bato ya malamu oyo bofandi na bango penepene ezali malamu mpenza. Soki bato bazali kosala elongo mpo na kokokisa mokano moko, bakoki kosala makambo mingi. Bato ya malamu na esika oyo tofandi bakoki mpe kozala lipamboli. Lisolo oyo ekolanda ekomonisa ete ezalaka bongo.