Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 15/6 lok. 32
  • “Ozali mwasi malamu”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Ozali mwasi malamu”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 15/6 lok. 32

“Ozali mwasi malamu”

Balobelaki elenge mwasi moko ya mokili ya Moaba maloba wana mpo na kopesa ye longonya. Nkombo ya mwasi yango Luta, mobali na ye akufá, azalaki bokilo ya mwasi moko Moyisalaele, nkombo na ye Naomi. Azalaki kofanda na Yisalaele esili koleka mbula soki 3 000, ntango basambisi bazalaki kotambwisa mboka; Luta ayebanaki mpo na malamu mingi oyo asalaki. (Luta 3:11) Nini esalaki ete bato bákóma kosepela na ye mingi? Banani bakoki kozwa liteya na ndakisa na ye?

Luta azalaki mwasi oyo alyaka “kwanga ya gɔigɔi” te; azalaki makasi na mosala mpe azalaki na molende ya kolɔkɔta mbuma na bilanga, yango wana bapesaki ye longonya mpo na molende na ye. Ata ntango basalisaki ye mpo amona mpasi mingi te na mosala, akobaki koboma nzoto, azalaki kosala mingi koleka. Akokisaki mpenza makambo oyo Biblia elobi mpo na mwasi ya lokumu, ya makoki, mpe oyo alingaka mosala.​—Masese 31:10-31; Luta 2:7, 15-17.

Bizaleli ya Luta​—komikitisa na ye, elimo na ye ya komipimela mpe bolingo na ye ya sembo​—nde esalaki ete bato bálinga ye mingi. Atikaki baboti na ye mpe ekólo na ye mpe akangamaki na Naomi, atako azalaki na elikya te ete akozwa libala mpo afanda na kimya. Luta amonisaki mpe mposa ya kosalela Yehova, Nzambe ya bokilo na ye. Mpo na komonisa ete bazalaki kozwa ye na lokumu mpenza, Biblia elobi ete “alekaki bana mibali nsambo na malamu mpo na [Naomi].”​—Luta 1:16, 17; 2:11, 12; 4:15.

Atako bizaleli malamu ya Luta epesaki ye lokumu mingi na miso ya bato oyo bazalaki kofanda na ye, likambo oyo eleki ntina ezalaki ete Nzambe akumisaki ye mpo na bizaleli na ye mpe apesaki ye mbano moko monene: akómaki nkɔkɔ ya Yesu Klisto. (Matai 1:5; 1 Petelo 3:4) Luta azali mpenza ndakisa malamu kaka mpo na basi baklisto te, kasi mpe mpo na bato nyonso oyo basambelaka Yehova.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto