Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 15/6 lok. 31
  • Ntango mpo na koyebisa makambo oyo ebombami

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ntango mpo na koyebisa makambo oyo ebombami
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 15/6 lok. 31

Ntango mpo na koyebisa makambo oyo ebombami

Kobomba makambo mosusu ekoki kobatela kimya na esika oyo kowelana ekokaki kozala. Kasi ezali na ntango oyo esengeli koyebisa makambo oyo ebombami? Yoká maloba oyo mosakoli Amosa alobaki na ntina etali Nzambe na ye: “[Yehova] akosala likambo te bobele ete akoyebisa mwango na ye epai na baombo na ye, bango basakoli.” (Amosa 3:7) Maloba yango ezali koteya biso likambo moko na ntina etali kobomba sɛkɛlɛ. Yehova akoki kobomba makambo mosusu na boumeli ya ntango mpe na nsima koyebisa yango epai ya bato mosusu. Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Yehova na likambo yango?

Na bantango mosusu, babateli ya mpate na kati ya lisangá ya boklisto bamonaka ete ezali malamu kotika likambo moko ebombama. (Misala 20:28) Na ndakisa, mpo na bolamu ya lisangá, bakoki kozwa ekateli ya kobomba bibongiseli mosusu to mbongwana na mikumba mosusu na lisangá tii na ntango moko oyo ebongi.

Kasi, na ntango wana esengeli komonisa polele epai ya baoyo bayebi likambo yango ntango nini mpe na lolenge nini bakoyebisa yango. Soki bayebi ntango oyo bakoyebisa bato nyonso likambo yango, yango ekosalisa bango bábomba sɛkɛlɛ.​—Masese 25:9.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto