Ezali foti na yo to ezali nde makila na yo?
BATO ya siansi bamipesi mpenza na boyekoli mpo na koluka koyeba soki makila nde esalaka ete bato mosusu bázala baombo ya masanga, bato mosusu básangisaka nzoto mibali na mibali to basi na basi, mibali mosusu bálingaka basi kilikili mpe basi mosusu básalaka kindumba, basusu bázala bato ya mobulu to mpe na bizaleli mosusu ya mabe; bazali ata mpe koluka koyeba soki mabe ezalaka na makila bongo esalaka ete tókufaka. Soki emonani ete makambo ya mabe oyo tosalaka ezali foti na biso te kasi ezali nde makila na biso, yango ekoki kokitisa biso motema? Toyebi malamu ete moto alingaka kopesa foti na moto mosusu to na eloko mosusu mpo na mabunga na ye.
Bato ya siansi bazali koloba ete soki emonani ete mabe ezali nde na makila, na nzela ya mayele oyo bazali kobenga génie génétique, bakoki kobongisa makambo mosusu na kati ya nzoto, mpe na ndenge yango, bakoki kosilisa bizaleli ya mabe epai ya moto. Lokola bato ya siansi bayebi sikoyo ndenge oyo biloko mikemike (gène) oyo ezali na kati ya baselile ya nzoto mobimba etongani, elikya na bango ekómi lisusu makasi mpenza ete bakoki kolonga.
Kasi, mpo bákoka kosala makambo yango, esengeli liboso emonana solo ete soki tosalaka masumu mpe mabunga, mabe ezali na makila na biso. Yango wana, motuna ezali kotunama boye: bato ya siansi bazwi bilembeteli oyo ezali komonisa mpenza ete foti ezali na makila na biso? Eyano na motuna oyo ekobongola mpenza ndenge oyo tomitalelaka mpe ndenge oyo totalelaka bomoi na biso mpo na mikolo ezali koya. Kasi, liboso ya kotalela makambo oyo emonani, soki tozongi naino na ebandeli, ekofungola biso miso.
Ndenge oyo lisumu ebandaki
Bato mingi bayebi to mpe basilá koyoka lisolo ya mobali na mwasi ya liboso, Adama na Eva, mpe ndenge basalaki lisumu ntango bazalaki na elanga ya Edene. Bakelaki nde bango na mbeba na kati ya makila, bongo yango esalaki ete nsukansuka bákwea na lisumu mpe bázanga botosi?
Mozalisi na bango, Yehova Nzambe, ye oyo misala na ye nyonso ezali ya kokoka, akelaki bango nsima ya kokela biloko mosusu nyonso mpe alobaki ete bazalaki “malamu mingi.” (Genese 1:31; Deteronome 32:4, NW) Likambo mosusu oyo emonisi ete asepelaki na mosala na ye ezali ete apambolaki mobali na mwasi ya liboso mpe alobaki na bango ete bábotana, bátondisa mokili, mpe bázala bakonzi ya bikelamu nyonso oyo asalaki awa na mabele. Soki Nzambe ayebaka ete bato oyo akelaki bazalaki na mbeba, tokanisi te ete alingaki kopambola bango mpe kopesa bango mokumba wana.—Genese 1:28.
Na ntina etali ndenge oyo Nzambe akelaki mobali na mwasi ya liboso, Biblia elobi na biso boye: “Nzambe azalisaki moto na elilingi na ye mpenza, na elilingi ya Nzambe azalisaki ye; azalisaki bango mobali mpe mwasi.” (Genese 1:27) Yango elingi koloba te ete bakelaki bato na nzoto lokola ya Nzambe, mpamba te “Nzambe azali Elimo.” (Yoane 4:24, NW) Kasi, elingi koloba ete bato bazwaki bizaleli lokola oyo ya Nzambe, bakisa mpe lisosoli. (Baloma 2:14, 15) Bazalaki mpe na bonsomi ya kopona, bakokaki kotalela likambo nyonso mpe kopona nzela oyo bakolanda.
Atako bongo, Nzambe apesaki mpe baboti na biso ya liboso malako. Bayebisaki bango ete bakosuka mabe soki basali lisumu. (Genese 2:17) Tozali komona ete ntango oyo esengelaki ete Adama apona nzela nini asengeli kolanda, ye aponaki kosala oyo amonaki malamu to oyo ezalaki na litomba na ntango wana. Asalaki mabe lokola mwasi na ye, na esika akanisa boyokani na ye na Mozalisi na ye mpe mbuma oyo likambo oyo asalaki esengelaki kobota na nsima. Na nsima, alukaki kutu kopesa Yehova foti, alobaki ete mwasi oyo Yehova apesaki ye nde akosaki ye.—Genese 3:6, 12; 1 Timote 2:14.
Nyonso ezali kokóma polele na makanisi na biso soki totaleli likambo oyo Nzambe asalaki nsima ya lisumu ya Adama na Eva. Nzambe alukaki te kobongisa ‘mbeba’ oyo mbala mosusu ezalaki na kati ya makila na bango. Asalaki nde likambo oyo alobaki ete ekokómela bango soki basali lisumu, mpe nsukansuka bakufaki. (Genese 3:17-19) Lisolo oyo ezali kosalisa biso tóyeba ntina oyo bato bazalaka na bizaleli oyo toyebi mpe tomonaka.a
Makambo oyo ezali komonisa ete foti ezali na makila te
Bato ya siansi babandá kala mosala monene ya koluka koyeba soki ezali ba gène nde ezalaka na mbeba oyo epesaka bato maladi mosusu mpe bizaleli mosusu ya mabe mpe balukaka ndenge oyo bakoki kobongisa yango. Bituluku motoba ya bato ya mayele balekisaki mbula zomi na koyekola mpe na nsima bayaki komona gène oyo epesaka maladi ya Huntington; atako bongo, bayebi naino te ndenge nini gène yango epesaka maladi yango. Lisolo moko oyo elobelaki mosala yango oyo bato wana ya mayele basalaki ebimaki na zulunalo moko (Scientific American) mpe ezalaki na maloba ya Evan Balaban, moto ya mayele na bioloji na iniversite ya Harvard; ye alobaki ete ekozala “mpasi koleka mpenza mpo na komona ba gène oyo etindaka bato bázala na bizaleli ya mabe.”
Bato ya mayele balongi te komonisa na makambo oyo bazali koyekola ete ezaleli mokomoko ya mabe epai ya moto eutaka na gène. Na ndakisa, lisolo moko ebimaki na zulunalo moko (Psychology Today) elobelaki makambo mingi oyo bato ya mayele bayekoli mpo na koyeba soki ezali na gène oyo esalaka ete moto anyokwama na makanisi, lisolo yango elobaki boye: “Balapolo nyonso oyo tosangisi na ntina na bamaladi ya minene ya motó ezali komonisa ete tokoki mpenza koloba te ete bamaladi yango eutaka nde na mbeba oyo ezali na makila.” Lisolo yango epesi ndakisa moko: “Na kati ya bato ya Amerika oyo babotamaki liboso ya 1905, bato oyo bazalaki konyokwama makasi na makanisi ntango bakómaki na mbula 75 bazalaki moto moko na kati ya bato 100. Nzokande, na kati ya bato ya Amerika oyo babotamaki mbula 50 nsima, bato 6 na kati ya bato 100 bazalaki konyokwama na makanisi ntango bakokisi mbula 24!” Yango wana lapolo yango esukisi na komonisa ete kaka makambo oyo ezali koleka na mokili to oyo ezali na nzoto ya moto te nde ekoki komema mbongwana monene ndenge wana nsima ya mwa ntango moke bongo.
Makambo yango mpe makambo mosusu mingi oyo bato ya mayele bayekoli ezali komonisa nini? Emonisi ete atako tokoki kozala na bizaleli mosusu mpo na makila na biso, ntembe ezali te ete ezali mpe na makambo mosusu oyo esalaka ete tózala na bizaleli boye to boye. Na kati na makambo yango, oyo eleki monene ezali nde makambo oyo tozali komona mokolo na mokolo na bisika oyo tofandi; na bisika yango makambo mingi ebongwani mpenza na mikolo na biso. Mpo na makambo oyo bilenge bazali komona lelo oyo na nzela ya masano, mokanda moko (Boys Will Be Boys) elobi ete bana bakoki kokóma na bizaleli malamu te ntango bazali “kolekisa ntango mingi na kotala televizyo mpe bafilme oyo ezali kolakisa ndenge oyo bazali kobɛta bato, bazali koboma bato na masasi, bazali kozokisa bato to koboma bango na mbeli, bazali kobimisa bango misɔpɔ, bazali kokata bango bitenibiteni, bazali kosasa bango, ntango bana bazali koyoka miziki oyo ezali kokumisa makambo lokola: kosangisa na basi nzoto na makasi, komiboma, komɛla bangi, komɛla masanga ya makasi mpe koboya makanisi ya basusu.”
Ezali polele ete Satana, “mokóló ya mokili oyo,” asali makambo oyo ezali kosepelisa bamposa ya bato oyo eleki mpenza mabe. Moto moko te akoki koloba ete makambo yango oyo tomonaka na bisika oyo tofandi esalaka biso eloko moko te.—Yoane 12:31; Baefese 6:12; Emoniseli 12:9, 12.
Ntina mpenza oyo bato bazali na mikakatano
Ndenge tosili komona yango, mikakatano ya bato ebandaki ntango mwasi na mobali ya liboso basalaki lisumu. Yango ebimisaki nini? Atako bana ya Adama bazali na foti moko te na lisumu na ye, kasi babotamaka na makambo oyo batikelá bango: lisumu, kozanga kokoka mpe liwa. Biblia elobi boye: “Na bongo, mabe ekɔtaki na mokili mpo na moto moko, mpe kufa ekɔtaki mpo na mabe. Kufa mpe epalangani epai ya bato nyonso mpo ete bato nyonso basali mabe.”—Baloma 5:12.
Kozanga kokoka ezalaka mokakatano monene mpo na moto. Kasi, yango elingi koloba te ete azali na foti te mpo na misala na ye. Biblia emonisi ete Yehova akosepela na bato oyo bazali na kondima na bibongiseli oyo asali mpo bato bázwa bomoi mpe bazali kotosa mitinda ya Nzambe na bomoi na bango. Na motema-boboto mpe na mawa na ye, Yehova asalaki ebongiseli moko mpo na kobikisa bato; na maloba mosusu, mpo na kosomba lisusu eloko oyo Adama abungisaki. Ebongiseli yango ezali mbeka oyo Yesu Klisto, Mwana na ye ya kokoka, apesaki mpo na kobikisa bato; ye moko alobaki boye: “Nzambe alingaki mokili na motindo boye ete apesi Mwana [mobotami-se-moko] na ye ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi ete azala na bomoi ya seko.”—Yoane 3:16; 1 Bakolinti 15:21, 22.
Ntoma Paulo azalaki na botɔndi mingi mpo na ebongiseli yango. Alobaki boye: “Ngai moto ya mawa mingi! Nani akolongola ngai na nzoto oyo ya kufa? Bobele Nzambe mpo na Yesu Klisto, Nkolo na biso.” (Baloma 7:24, 25) Paulo ayebaki ete soki bolɛmbu ememi ye na kosala lisumu, akoki kosɛnga Nzambe bolimbisi na lisalisi ya mbeka oyo Yesu Klisto apesaki mpo na kobikisa biso.b
Se ndenge esalemaki na ekeke ya liboso, lelo oyo mpe ebele ya bato oyo bazalaki liboso na bomoi ya mabe to oyo bakanisaki ete bakoki kobongwana te, bayekoli mateya ya solo ya Biblia, babongwani mpe babongi sikoyo mpo na kozwa mapamboli ya Nzambe. Ezalaki pɛtɛɛ te mpo bákoka kobongwana, mpe mingi bazali naino kobunda etumba mpo na kolonga bamposa ya mabe. Kasi lokola Nzambe azali kosunga bango, bazali sembo mpe bazali kosalela ye na esengo. (Bafilipi 4:13) Tótalela ndakisa ya moto moko oyo asalaki mbongwana ya kokamwa mpo na kosepelisa Nzambe.
Lisolo ya moto moko oyo ezali kolendisa
“Ntango nazalaki elenge, nazalaki kotánga na mbola [internat]; kuna, nakómaki kosangisa nzoto na baninga na ngai mibali, atako nazalaki komimona te ete nasepelaka kosangisa nzoto kaka na mibali. Baboti na ngai bakabwaná, mpe nazalaki na mposa ya bolingo ya baboti, kasi bamoniselaki ngai yango te. Ntango nasilisaki kelasi, nakɔtaki na mosala ya soda mpo na mwa ntango lokola mibeko ya Leta esɛngi yango. Ndako oyo nazalaki kolala ekanganaki na bandako ya mibali oyo basangisaka nzoto mibali na mibali. Nakómaki kosepela na makambo na bango, mpe tokómaki baninga. Nsima ya mbula mobimba oyo nalekisaki elongo na bango, nakómaki kokanisa ete ngai mpe nazali moto oyo alingaka kosangisa nzoto kaka na mibali, nazalaki koloba ete ‘ezali ndenge na ngai, nakoki kobongola yango te.’
“Nakómaki koyekola ndenge ya koloba ya mibali oyo basangisaka nzoto na mibali mpe nakómaki kokɔta na banganda na bango; kuna, bangi na masanga ya makasi ezalaki mpambampamba. Atako ezalaki komonana lokola bomoi ya bisengo mpe ya malamu, ezalaki mpenza bomoi ya mbindo. Na motema na ngai nazalaki komona ete makambo yango ebongi te mpe nasengeli kotika.
“Na mwa engumba moko, namonaki Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova mpe na ntango yango bazalaki na makita. Nakɔtaki mpe nalandaki lisukulu oyo ezalaki koloba ndenge oyo bomoi ekozala na kati ya Paladiso. Na nsima, nakutanaki na Batatoli mosusu mpe babengisaki ngai na liyangani moko. Nakendaki mpe kuna namonaki likambo oyo namoná naino te: mabota oyo ezali na esengo mpe bazali kosambela Nzambe elongo. Nakómaki koyekola Biblia na Batatoli.
“Atako ezalaki etumba mpo na ngai, nabandaki kosalela makambo oyo nazalaki koyekola na Biblia. Natikaki misala ya mbindo. Nsima ya koyekola sanza 14, namipesaki na Yehova mpe nazwaki batisimo. Mpo na mbala ya liboso na bomoi na ngai, nazwaki baninga ya solosolo. Nasalisi mpe bato mosusu báyeba mateya ya solo ya Biblia, mpe sikoyo nazali mosaleli na misala na lisangá. Yehova apamboli ngai mpenza.”
Ezali mpe foti na biso
Soki tolobi ete makambo nyonso ya mabe oyo tosalaka euti na mbeba oyo ezali na makila na biso, tokobongisa eloko moko te. Zulunalo moko (Psychology Today) elobi ete na esika esalisa biso na kolonga to kosilisa mikakatano na biso “ekoki koteya biso tómimonaka ete tozali na makoki te ya kosilisa mikakatano mingi oyo tozali na yango. Na esika ekitisa mikakatano yango, emonani ete ezali kobakisa yango nde kobakisa.”
Ya solo, tosengeli kobundisa makambo ya mabe, na mposa na biso ya kosala masumu mpe milende oyo Satana azali kosala mpo na komema biso tótika kotosa Nzambe. (1 Petelo 5:8) Toboyi te ete tokoki mpe kobendama ata na ezaleli nini mpo na makila na biso. Kasi, lisalisi ezali. Baklisto ya solo bazali kozwa lisungi ya nguya mingi oyo ezali kouta epai ya Yehova, Yesu Klisto, elimo santu ya Nzambe, Liloba na ye Biblia, mpe na lisangá ya boklisto.—1 Timote 6:11, 12; 1 Yoane 2:1.
Liboso ete bana ya Yisalaele bákɔta na Mokili ya Ndaka, Mose ayebisaki bango lisusu mokumba na bango liboso ya Nzambe, alobaki boye: “Natii bomoi na liwa liboso na yo, lipamboli na elakeli mabe; mpe osengeli kopona bomoi mpo okoka kotikala na bomoi, yo na bakitani na yo; mpo na yango osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo, koyoka mongongo na ye mpe kokangama na ye.” (Deteronome 30:19, 20, NW) Lelo oyo mpe ndenge moko, moto na moto asengeli kozwa ekateli na likambo etali kosalela Nzambe mpe kokokisa masɛngami na ye. Yo moko nde okopona.—Bagalatia 6:7, 8.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá Lamuká! ya 22 Sɛtɛmbɛ 1996, nkasa 3-7 (ebimeli ya Lifalanse).
b Talá buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko, nkasa 62-69, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Bililingi na lokasa 9]
Adama na Eva bazalaki na mbeba na makila na bango oyo nsukansuka esengelaki kotinda bango na kosala lisumu?
[Bililingi na lokasa 10]
Moto na moto asengeli kondima mbuma oyo bikateli na ye ekobota?
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Momɛli-bangi: Godo-Foto
[Elilingi na lokasa 11]
Bato ya mayele balongi te komonisa ete bizaleli ya bato eutaka nde na makila
[Elilingi na lokasa 12]
Kotosa maloba ya Biblia ekoki kosalisa bato ya sembo na kobongwana