Mituna ya batángi
Ezali malamu kobondela kozanga kosalela maloba lokola “na nkombo na Yesu”?
Biblia ezali komonisa ete baklisto basengeli kobondela Yehova na nkombo na Yesu. Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Moto moko te akoya epai na Tata soki na nzela na ngai te.” Abakisaki boye: “Nyonso oyo bokosɛnga na nkombo na ngai, ngai nakosala yango, ete Tata akumisama mpo na Mwana. Soki bokosɛnga eloko moko na nkombo na ngai, ngai nakosala yango.”—Yoane 14:6, 13, 14, NW.
Buku moko emonisi ete Yesu azali na esika oyo ekokani na mosusu te, elobi boye: “Tosengeli kosambela kaka Nzambe, na nzela ya Yesu lokola Moyokanisi. Yango wana, makambo nyonso oyo tozali kosɛnga basantu to baanzelu ezali na ntina te mpe ezali nde kofinga Nzambe. Ata soki ekelamu yango ezali na lokumu nini, kosambela yango ezali kaka losambo ya bikeko mpe mibeko mosantu ya Nzambe epekisi yango.”–Cyclopedia of Biblical, Theological, and Ecclesiastical Literature.
Tokoloba nini soki moto moko, na nsima ya kokutana na likambo moko ya malamu mpenza alobi ete: “Natɔndi yo mingi Yehova” kozanga kobakisa “na nkombo ya Yesu”? Yango ezali mabe? Ezali mpenza bongo te. Na ndakisa, soki moklisto moko akutani na likama moko ya mbalakaka mpe agangi: “Yehova salisá ngai!” Nzambe akoboya te kosalisa mosaleli na ye kaka mpo alobi te ete “na nkombo ya Yesu.”
Kasi, tosengeli koyeba ete koloba, ata na Nzambe, elimbolaka kaka kobondela te. Na ndakisa, ntango Yehova akatelaki Kaina etumbu mpo abomaki ndeko na ye Abele, Kaina alobaki ete: “Etumbu na ngai eleki ngai. Talá obimisi ngai lelo epai na mokili oyo, nakobombama na elongi na yo [mosika]. Nakozala mpe mokimi mpe motamboli na mokili, mpe soki nani akomona ngai akoboma ngai.” (Genese 4:13, 14) Atako Kaina alobaki na Yehova bongo, mpasi oyo amonisaki na maloba yango ezalaki nde komilela mpo na mbuma mabe ya lisumu na ye.
Biblia eyebisi biso boye: “Nzambe akotɛmɛlaka bato ya lolendo, nde akopesaka basɔkɛmi ngɔlu.” Moto oyo azali koloba na Oyo-Aleki-Likoló lokola nde azali koloba na moto azali komonisa mpenza kozanga komikitisa. (Yakobo 4:7; Nzembo 47:2; Emoniseli 14:7) Ezali mpe kozanga limemya soki toyebi oyo Liloba ya Nzambe elobi mpo na mokumba ya Yesu kasi tozali kosambela kozanga komonisa ete tondimi Yesu Klisto.—Luka 1:32, 33.
Yango elingi koloba te ete Yehova asɛngaka ete tózala na lolenge moko oyo ebongisami mpo na kobondela ye. Likambo eleki ntina ezali nde motema ya moto. (1 Samwele 16:7) Na ekeke ya liboso ya ntango na biso (T.B.), Koloneli, mokonzi moko ya basoda ya Loma ‘abondelaki Nzambe ntango nyonso.’ Koloneli, azalaki mopakano mpe akatamaki ngenga te, azalaki moto oyo amipesi na Yehova te. Atako azalaki kosambela na nkombo ya Yesu te, mabondeli na ye ‘esilaki kobuta liboso na Nzambe lokola ekaniseli.’ Mpo na nini? Mpo ete “Ye oyo [atalaka] mitema ya bato,” amonaki ete Koloneli azalaki “moto ya kosambela mpe ya kobanga Nzambe.” (Misala 10:2, 4; Masese 17:3) Na nsima ya kozwa boyebi ya “Yesu ya Nasalete,” Koloneli azwaki elimo santu mpe akómaki moyekoli ya Yesu mpe azwaki batisimo.—Misala 10:30-48.
Na mokuse, ezali moto te nde aponaka mabondeli oyo Nzambe ayokaka. Soki na libaku moko moklisto abondeli Nzambe mpe abosani kosalela maloba lokola “na nkombo ya Yesu,” ntina ezali te ya kokanisa ete asali mabe. Yehova ayebi malamu bolɛmbu na biso mpe azali na mposa ya kosalisa biso. (Nzembo 103:12-14) Tokoki kozala na elikya ete soki tokondimela “Mwana ya Nzambe . . . , soki tokolɔmba eloko nini kati na mokano na ye, ye akoyoka biso.” (1 Yoane 5:13, 14) Kasi, mingimingi ntango bazali kosala libondeli na nkombo ya bato ebele, baklisto ya solo basengeli komonisa ete bandimi mokumba oyo Yesu azali na yango mpo na kokokisa mokano ya Yehova, ndenge oyo Makomami emonisi yango. Mpe na botosi nyonso, basalaka makasi ete bákumisa Yesu; mpo na yango, babondelaka Nzambe na nkombo ya Yesu.