Bazali kokumisa Nzambe na bangomba ya Philippines
Soki okanisaka ete Philippines ezali bisanga, omikosaka te. Kasi ezali mpe ekólo ya bangomba milaimilai. Mpo na Batatoli ya Yehova, kosakola na bingumba mpe na bisika ya nse ezali mpasi mingi te mpe bazali kobuka mbuma mingi. Kasi kosakola na bangomba, ezali likambo mosusu.
MAKAMBO oyo ezali na bangomba kitoko ya ekólo yango ekeseni mpenza na makambo oyo ezali na mabongo ya mai, na bisanga mikemike ya mabangamabanga, na banganda ya babomi-mbisi, mpe lisusu na bingumba oyo etondaka na makɛlɛlɛ oyo ezali na bisika ya ngombangomba te. Kosakola “nsango malamu” ya Bokonzi ya Nzambe na bangomba ezali mpe mokakatano monene.—Matai 24:14.
Bisanga ya Philippines ezalaka na esika moko oyo bitando minene ya mabele ekutaná. Na bisanga ya minene, mabele esalá milɔngɔ ya bangomba ya milaimilai. Bisanga koleka 7 100 ya ekólo Philippines ezalaka na wɛsti ya esika babengi Ceinture de feu du Pacifique. Yango wana bangomba oyo ebimisaka mɔ́tɔ ezali mingi, ezali yango mpe esalaki ete bangomba ezala mingi kuna. Bato oyo bafandaka likoló ya bangomba yango ya milaimilai bakutanaka mpenza te na bato mosusu. Kobuta na bamboka na bango ezali mpenza mpasi, mpamba te banzela ya malamu mpo na mituka ezali mpenza te.
Atako mikakatano wana ezali, Batatoli ya Yehova bayebi ete basengeli kokutana na “bato ya lolenge nyonso.” (1 Timote 2:4, NW) Yango wana, Batatoli bakokisaki maloba ya Yisaya 42:11, 12 (NW) ete: “Tiká ete bafandi ya libanga báganga na esengo. Na nsɔngɛ ya bangomba, tiká ete bato báganga makasi. Tiká bápesa Yehova lokumu, mpe na bisanga tiká básakola masanzoli na ye.”
Banda babandaki kosala molende ya kosakola epai ya bato oyo bafandaka na bangomba, ekokisi sikoyo mbula koleka 50. Na nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, bamisionɛrɛ basalisaki mpo mosala ya kosakola ekende liboso. Bato mingi bandimaki mateya ya solo ya Biblia mpe na nsima, babandaki kopalanganisa solo yango na bamboka mosusu ya mosika mpenza oyo ezali likoló ya bangomba. Mosala yango ebotaki mbuma ya malamu mpenza. Na ndakisa, basakoli ya nsango malamu koleka 6 000 bazali na bangomba oyo babengi Cordillière centrale, na nɔrdi ya esanga ya Luzon. Mingi bazali bato ya mboka yango, sangisa mpe Baibaloi, Baifugao, Baigorot mpe Bakalinga.
Atako bongo, ezali naino na bisika mosusu ya likoló ya bangomba oyo ezali mpasi mpenza mpo na kokóma kuna. Kasi Batatoli babosani te bato oyo bafandaka kuna. Ndenge nini bakutanaki na bamosusu, mpe ebotaki mbuma nini?
Kondima ya solo ezwi esika ya bonkɔkɔ
Na esanga ya Luzon na nɔrdi, na bangomba ya etúká ya Abra, Batinggi bafandaka kuna. Nkombo yango euti ntango mosusu na liloba ya lokota ya Malay ya kala tinggi oyo elimboli “ngomba.” Nkombo yango ebongi mpenza! Bato oyo bafandaka kuna nkombo na bango Baitneg, lokota na bango mpe babengi yango Itneg. Basambelaka nzambe moko nkombo na ye Kabunian, mpe bazali na biyambayamba mingi. Na ndakisa, soki moto oyo azali kokana kokende epai moko asali likise, bakanisaka ete ezali libabe mpe esengeli azela mwa bangonga tii libabe yango ekosila.
Na mobu 1572, bato ya Espagne bakɔtisaki Lingomba ya Katolike na ekólo yango, kasi balongaki te koteya Batinggi boklisto ya solosolo. Ata baoyo bakómaki Bakatolike bazalaki kaka kosambela Kabunian mpe batikaki te kosalela mimeseno ya bonkɔkɔ na bango. Boyebi ya sikisiki ya Biblia ekómaki epai ya bato yango na bambula ya 1930, ntango Batatoli ya Yehova babandaki kopalanganisa nsango ya Bokonzi na bangomba yango. Kobanda ntango wana, Batinggi mingi ya sembo bazali kokumisa Yehova “likoló ya bangomba.”
Na ndakisa, Lingbaoan azalaki liboso nkumu ya lokumu mingi na bamboka oyo ezali kuna. Mimeseno ya Batinggi ekɔtelaki ye mpenza. Alobi boye: “Namipesaki mpenza na makambo ya bonkɔkɔ na biso. Soki babomi moto moko, tozalaki kobina mpe kobɛta ngonga nsima ya kokunda ye. Tozalaki mpe kopesa mbeka ya banyama. Tozalaki kosambela Kabunian, mpe nayebaki Nzambe ya Biblia te.” Lingbaoan azalaki kosala makambo nyonso wana atako azalaki Mokatolike.
Baministre ya Batatoli ya Yehova bakendeki kosakola na bamboka wana. Bakutanaki na Lingbaoan mpe balendisaki ye atángaka Biblia. Alobi boye: “Biblia nde endimisaki ngai ete Yehova azali Nzambe ya solo.” Na nsima, Motatoli moko ayekolaki na ye Biblia, mpe Lingbaoan azwaki ekateli ya kosalela Nzambe ya solo. Atikaki makambo na ye ya kala, azalaki mpe lisusu mokonzi ya mboka te, likambo yango kutu epesaki sango ya mboka wana mpe baninga na ye ya kala nkanda. Kasi, Lingbaoan azalaki na ekateli ya kolanda kosalela mateya ya solo ya Biblia. Lelo oyo, azali nkulutu na lisangá.
Mikolo nsambo mpe butu motoba
Atako nsango malamu ezali kosakolama mbala na mbala na bisika mosusu ya Abra, ezali mpe na bisika mosusu oyo ezali mosika mpenza mpe litatoli epesamaka mpenza te. Eleki mwa mikolo, basakoli basalaki makasi mpo na kokutana na bato ya bisika mosusu na etúká yango. Batatoli 35 bakendeki kosakola na Tineg, na etúká ya Abra, esika oyo banda bayokaki nsango malamu mpo na mbala ya nsuka eleki mbula 27 .
Batambolaki mikolo nsambo na makolo mpo na kokóma na Tineg. Kanisá naino mpasi oyo bamonaki mpo bákende kosakola nsango malamu epai ya bato oyo bayoká yango mpenza te: bakatisaki bagbagba ya nsinga oyo ezali kokende epai kozonga epai likoló na mai, bakatisaki mpe bibale ya mozindo mpe bamataki bangomba na mikumba na bango! Na mikolo motoba oyo batambolaki, balalaki na libándá butu minei likoló ya bangomba.
Atako Batatoli oyo bazalaki kosala mobembo yango bamemaki ndambo ya bilei, bakokaki te komema bilei mpo na mikolo nyonso oyo basengelaki kolekisa kuna. Kasi, yango ezalaki mokakatano te, mpamba te bato oyo bazalaki kokutana na bango bazalaki na esengo mingi ya kopesa bango biloko ya kolya soki Batatoli bapesi bango mikanda. Batatoli bazwaki ebele ya makei, nsoso, mbisi mpe mboloko. Atako bakutanaki na mwa mikakatano, Batatoli yango balobaki boye: “Mpasi nyonso oyo tomonaki tozwelaki yango mbano ya malamu: toyokaki esengo mingi mpenza.”
Na mikolo nsambo oyo mobembo eumelaki, baministre yango basakolaki na bamboka mike zomi, batikaki babuku 60, bazulunalo 186, mwa babuku 50 mpe batrakte ebele. Balakisaki ndenge ya koyekola Biblia na bituluku ya bato 74. Na engumba Tineg, bakonzi ya mboka na bato mosusu ya lokumu basɛngaki ete likita moko ya lisangá esalema, mpe bato 78 bayanganaki. Bayangani mingi bazalaki balakisi mpe bapolisi. Tozali na elikya ete Batinggi mosusu ebele bakosangana na baoyo bazali ‘koganga’ mpe kokumisa Yehova likoló ya bangomba.
Eloko moko oyo eleki wolo na malamu
Mwa mosika na sudi ya Philippines, ezali na mwa bisanga epai bato ya Espagne bamonaki wolo. Yango wana ezwaki nkombo Mindoro, ebengeli mokuse ya maloba ya Espagnol mina de oro, oyo elimboli “esika ya kotimola wolo.” Kasi, eloko oyo eleki wolo na malamu ezali komonana sikoyo na bisanga yango: bato oyo balingi kosalela Yehova, Nzambe ya solo.
Bato soki 125 000 oyo bazalaka kuna, babengaka bango Bamangyan, bafandaka na kati mpenza ya zamba ya Mindoro. Bazalaka na bomoi moko ezangi mindɔndɔ, mingimingi bakutanaka mpenza na bato ya bisika mosusu te, mpe bazalaka na lokota na bango moko. Mingi basambelaka bilimo mpe banzambe ebele, mpe babangaka bilima.
Na bantango mosusu, soki bazangi biloko ya kolya to biloko mosusu ya ntina, Bamangyan mosusu bakitaka na bamboka oyo ezali pembeni ya ebale mpo na koluka mosala. Ezali likambo oyo Pailing asalaki, oyo azali Mobatangan, mwa etuluku ya Mangyan. Abɔkwamaki na mboka na bango na kati ya zamba likoló ya bangomba mpe azalaki kosalela bonkɔkɔ mpe makambo nyonso ya Babatangan. Bato balataka kaka lingbanda. Mpo ete bilanga ebota malamu, Babatangan babomaka nsoso mpe batangisaka makila na yango na mai, wana bazali kobondela.
Pailing atiká makambo wana nyonso. Mpo na nini? Ntango akitaki na bamboka ya nse, bazwaki ye na mosala na mabota ya Batatoli ya Yehova. Libota moko elakisaki Pailing mateya ya solo ya Biblia. Andimaki nsango malamu mpe asepelaki mingi koyekola mokano ya Nzambe mpo na bato mpe mabele. Bakɔtisaki ye na eteyelo ya ebandeli mpe bazalaki koyekola na ye Biblia. Pailing abatisamaki mpe akómaki Motatoli ya Yehova ntango akómaki na mbula 24. Ntango akokisaki mbula 30, akómaki na kelasi ya mibale na eteyelo ya ntei (secondaire) mpe eteyelo ekómaki teritware na ye mpo na kosakola. Lelo oyo babengaka ye Rolando (nkombo moko ya bato ya bamboka ya nse).
Soki okutani na Rolando, okomona ye ministre moko oyo alati malamu mpe azali na elongi efungwamá; azali mosakoli ya ntango nyonso mpe mosaleli ya misala na lisangá moko ya Mindoro. Eleki mwa mikolo, Rolando azongaki na mboka na ye kuna na bangomba. Akendaki kuna te mpo na kozongela mimeseno ya bonkɔkɔ na bango, kasi mpo na kosakola makambo ya solo ya Biblia oyo epesaka bato bomoi.
Bazalaki na mposa makasi ya Ndako ya Bokonzi
Esanga ya Mindanao ezali na sudi ya ekólo, na etúká ya Bukidnon, oyo elimboli “bato ya bangomba” na lokota ya Cebuano. Ezali esika ya bangomba, mabwaku, bibale, na bangomba ya patatalu. Lokola milona ebimaka malamu na mabele yango, balonaka mananasi, masangu, kafe, loso mpe bitabe. Batalaandig na Bahigaonon bafandaka kuna. Bato yango mpe basengeli báyeba Yehova. Eleki mwa mikolo, penepene na engumba ya Talakag, likambo moko ya esengo elekaki oyo epesaki nzela ete bato báyoka nsango ya Yehova.
Batatoli oyo bakendeki na bangomba bamonaki ete malili ezali na bisika yango, kasi bayambaki bango na esengo. Bato ya mboka yango balobaki ete bandimelaka Nzambe mozwi-na-nguya-nyonso, Tata, kasi bayebaki nkombo na ye te. Lokola bazalaka mingimingi na kati ya zamba, ezalaki mbala na bango ya liboso bákutana na Batatoli ya Yehova. Batatoli balakisaki bango nkombo ya Nzambe mpe mokano na ye ya malamu oyo etali Bokonzi. Bato yango basepelaki mingi, yango wana esengelaki Batatoli bázonga lisusu na mboka na bango.
Na nsima, bakendeki kotala bango mbala na mbala. Yango wana, bato ya mboka bapesaki lopango moko mpo bátonga “ndako” ya Batatoli ya Yehova. Batatoli bandimaki na esengo mpenza. Lopango yango ezalaki likoló ya ngomba oyo eleki molai na esika wana, mpe soki ozali na lopango yango okomona nzela kuna na nse. Batongaki ndako na mabaya, babambu mpe na mandalala. Basilisaki kotonga yango nsima ya sanza misato na mikolo zomi. Libaya oyo bakomá “Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova” ezalaki komonana malamu liboso ya ndako. Talá likambo: Ndako ya Bokonzi etongamaki liboso kutu lisangá esalema!
Kobanda ntango wana, nkulutu moko oyo azali mpe mobongisi-nzela, elongo na mosaleli na misala moko bakendá kofanda kuna. Elongo na Batatoli ya zingazinga, basalaki makasi mpo na kosala lisangá moko kuna. Yango esalemaki na sanza ya Augusto 1998. Lisangá moko ya moke bayanganaka na Ndako ya Bokonzi yango mpe bazali kosalisa bato ya bangomba báyekola mateya ya solo ya Biblia.
Ya solo, Yehova asaleli mpenza basaleli na ye ya bolingo malamu na Philippines mpo na kopalanganisa solo ya Bokonzi tii na bisika oyo ezalaka mpasi mpo na kokóma. Ezali kotinda biso tókanisa maloba ya Yisaya 52:7 ete: “Kitoko boni likoló ya ngomba ezali makolo na ye oyo akoyeisa nsango malamu.”
[Karte na lokasa 11]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
ABRA
MINDORO
BUKIDNON
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Globe: Mountain High Maps® Copyright © 1997 Digital Wisdom, Inc.
[Bililingi na lokasa 10]
Kosakola na bangomba esɛngaka kotambola na makolo bangonga mingi na bisika ya ngombangomba
[Elilingi na lokasa 10]
Batisimo na mongala moko likoló ya bangomba