Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 1/4 nk. 3-4
  • Kondima esengeli nde kosimbama na makanisi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kondima esengeli nde kosimbama na makanisi?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Masolo mosusu
  • Kondima ná likoki ya kokanisa ezali na boyokani?
    Lamuká!—2011
  • Mpo na nini tozali na mposa na boyebi ya solo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Lingomba
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Ezali mabe kolongwa na lingomba na yo?
    Lamuká!—2009
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 1/4 nk. 3-4

Kondima esengeli nde kosimbama na makanisi?

Mokambi ya eteyelo moko ya teoloji na États-Unis akomaki boye: “Ebele ya bato oyo balingaka kosambela bakɔtaka na mangomba mpo baboyaka mindɔndɔ ya kosalela makanisi na bango. Bato yango ‘bandimaka’ kaka nyonso oyo bateyaka bango.”

YANGO elingi koloba ete bato mingi oyo balobaka ete bazali bandimi bakanisaka naino te mpo na nini bandimaka mateya ya mangomba na bango to mpe soki makambo yango elongobani mpenza. Yango wana, ezali likambo ya kokamwa te na komona ete ebele ya bato balingaka kosolola makambo ya losambo te.

Mimeseno lokola kofukamela bililingi mpe kozongela mabondeli oyo bakangi na motó, elendisaka bango te na kokanisa. Mpo na ebele ya bato, kosambela elimboli kaka makambo wana, na bandako-nzambe mineneminene, na maninisa na yango oyo ezali na batalatala ya ngɛlingɛli, na miziki kitoko oyo babɛtaka na misa. Atako na mangomba mosusu balobaka ete bateyaka makambo oyo euti na Biblia, kasi mateya lokola ‘ndimelá Yesu mpe okobika,’ elendisaka mpenza bato te na koyekola Biblia. Bato mosusu bamipesaka kaka na mosala ya kosalisa babola mpe na makambo ya politiki na nkombo ya Klisto mpe mateya na ye. Nyonso wana eboti mbuma nini?

Mokomi moko ya makambo ya mangomba alobaki boye, mpo na makambo ndenge ezali na Amerika ya Nɔrdi: “Mateya ya boklisto . . . ezali likolólikoló, [mpe] lingomba ezali koteya bandimi na yango eloko moko te ya malonga oyo ekoki kolendisa kondima na bango.” Kutu, moto moko oyo asalaka baankɛtɛ mpo na koyeba makanisi ya bato, alobaki ete États-Unis ezali “ekólo ya bato oyo bayebi Biblia te.” Soki totali malamu, makambo ezali se ndenge moko na mikili mosusu oyo baklisto bazali mingi. Ata mpe mangomba oyo elandaka mateya ya Klisto te, mingi elendisaka bato te na kokanisa; elendisaka nde bato na koyemba, kozongela mabondeli oyo bakangá na motó mpe na mitindo ndenge na ndenge ya komema makanisi mosika (méditation) oyo ezali na boyokani na bikelakela; kasi elendisaka mpenza te kokanisa malamu mpe na bozindo.

Kasi, kaka bato yango oyo batalelaka mpenza te soki mateya ya mangomba na bango elongobani to soki ezali solo, soki ekómi na makambo mosusu, batalelaka yango malamumalamu mpenza. Ekamwisaka yo te na komona ndenge oyo moto azwaka ntango ya kotalela makambo nyonso malamumalamu liboso asomba eloko lokola motuka, oyo lobilobi ekokufa mpe bakobwaka yango; kasi mpo na lingomba na ye, azali koloba kaka ete: ‘Lokola baboti na ngai bamonaki yango malamu, ezali mpe malamu mpo na ngai’?

Soki tolingi mpenza kosepelisa Nzambe, omoni te ete tosengeli kotalela malamumalamu soki bindimeli na biso ezali solo? Ntoma Paulo alobaki ete bato mosusu ya ntango na ye oyo balingaki kosambela bazalaki na “molende mpo na Nzambe; kasi na ndenge ya boyebi ya solosolo te.” (Baloma 10:​2, NW) Tokoki kokokanisa bato yango na moto oyo apakolaka langi oyo bazwi ye na mosala mpe azali kosala molende mpo na kopakola langi na ndako moko, kasi azali kosalela langi oyo ebongi te mpo alandi te ndenge nkolo-ndako alingi. Moto yango akoki kosepela na mosala oyo asali, kasi tokanisi ete nkolo-ndako akondima yango?

Losambo ya solo oyo Nzambe andimaka esengeli kozala ndenge nini? Biblia epesi eyano oyo: “Yango ezali malamu mpe ebongi na miso ya Nzambe, Mobikisi na biso, oyo alingi ete bato ya lolenge nyonso bábika mpe báyeba solo malamumalamu.” (1 Timote 2:​3, 4, NW) Bato mosusu bakoki kokanisa ete boyebi ya ndenge wana ezali ata na lingomba moko te na kati ya ebele ya mangomba oyo ezali lelo oyo. Kasi, tókanisa naino: soki Nzambe alingi ete bato báyeba solo malamumalamu, akobombela bango yango? Biblia eteyi likanisi wana te, mpamba te yango elobi boye: “Soki okoluka [Nzambe], akomimonisa epai na yo.”​—⁠1 Ntango 28:​9, NW.

Ndenge nini Nzambe amimonisaka na bato oyo balukaka ye mpenza? Lisolo oyo elandi ekopesa eyano na motuna yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto