Likambo oyo eleki ntina kati na makambo nyonso oyo eleká
LIKAMBO yango ezali liwa ya Yesu Klisto. Mpo na nini ezali na ntina mingi mpenza? Mpo na makambo mingi.
Lokola Yesu atikalaki sembo tii na liwa, yango emonisaki ete moto akoki kotikala sembo epai ya Nzambe.
Liwa ya Klisto epesaki bato mosusu libaku ya kokóma bayangeli esika moko na ye na likoló. Efungolaki mpe nzela mpo ebele ya bato bázwa bomoi ya seko na paladiso awa na mabele.
Na mpokwa wana liboso akufa, Yesu asalelaki limpa oyo batyá levire te na vinyo ya motane lokola bilembo ya nzoto na ye oyo apesaki yango mbeka na bolingo mpenza. Na nsima ayebisaki mpe bayekoli na ye ete: “Bósalaka boye mpo na kokanisa ngai.” (Luka 22:19, NW) Okokanisa likambo yango ya ntina mingi?
Batatoli ya Yehova bazali na esengo ya kobengisa yo oyangana na bango elongo mpo na kokanisa liwa ya Yesu. Na mbula oyo, Ekaniseli yango ekosalema nsima ya kolala ya moi na mokolo ya minei, 28 Marsi 2002. Okoki koyangana na Ndako ya Bokonzi oyo ezali pene na esika ofandi. Tuná Batatoli ya Yehova ya esika ofandi mpo na koyeba esika nini mpe ngonga nini Ekaniseli yango ekosalema.