Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 1/3 lok. 31
  • Ndenge nini okoki kobika na nsuka ya mokili oyo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge nini okoki kobika na nsuka ya mokili oyo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 1/3 lok. 31

Ndenge nini okoki kobika na nsuka ya mokili oyo?

BIBLIA elobi ete mokolo oyo ebongiseli ya makambo ya ntango oyo ekosuka ekozala “mokolo ya nkanda, mokolo ya mpasi mpe mikakatano; mokolo ya molili mpe ya kozanga pole; mokolo ya mapata mpe molili tuu.” (Sefania 1:15) Na ntembe te, moto moko te akoki kozala na mposa ya komona mokolo ya ndenge wana! Kasi, ntoma Petelo ayebisaki baninga na ye baklisto ete bálanda ‘kozela mpe kobatela ntango nyonso na makanisi kozala ya mokolo ya Yehova, mpo na yango lokola makoló ekozala na mɔ́tɔ, ekonyangwa mpe biloko ya makoló ekonyangwa mpo na mɔ́tɔ makasi! Kasi ezali na makoló ya sika mpe na mabele ya sika oyo tozali kozela engebene elaka na ye, mpe na kati na yango boyengebene ekofanda.’​—⁠2 Petelo 3:​12, 13, NW.

Petelo azalaki kolobela te kobomama ya makoló na mabele ya solosolo. “Makoló” oyo Petelo alobeli ezali elilingi ya baguvɛrnɛma mabe ya ntango oyo, mpe “mabele” ezali elilingi ya bato nyonso oyo batosaka Nzambe te. Mabele ekobomama te na “mokolo ya Yehova” kasi ‘bato ya masumu [oyo bafandi kati] na yango’ nde bakobomama. (Yisaya 13:⁠9) Ekozala nde mokolo ya lobiko mpo na baoyo ‘bazali kokimela mpe bazali kolela na ntina na makambo ya mbindo nyonso’ oyo bato mabe bazali kosala lelo.​—⁠Ezekiele 9:⁠4.

Na bongo, ndenge nini moto akoki kobika na “mokolo monene mpe ya nsɔmɔ ya Yehova”? “Liloba ya [Yehova]” oyo ayebisaki mosakoli moko, epesi eyano na motuna yango: “Moto na moto oyo akobelela nkombo ya [Yehova] akobika.” (Yoele 1:1; 2:​31, 32) Batatoli ya Yehova bakozala na esengo ya kosalisa yo mpo oyeba soki kobelela nkombo ya Yehova elimboli nini.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto