“Oyo ekoki kosala yo mpasi”
OSILÁ koyoka maloba oyo? Ntango mosusu ezalaki monganga to lifulume nde alobaki yango liboso apesa yo nkisi moko boye.
Tokanisi te ete oboyaki nkisi yango kaka mpo ekosala yo mpasi. Kasi okangaki motema ntango oyokaki mpasi kaka mpo okoka kozonga nzoto kolɔngɔnɔ. Na ntango oyo moto azali na maladi makasi, akoki kobika soki andimi básalisa ye na nkisi oyo ekosala ye mpasi; to mpe, akoki kokufa soki aboyi yango.
Tozalaka ntango nyonso te na mposa ya lisalisi ya monganga; kasi lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tozalaka na mposa ya disiplini to kosembolama ata oyo ntango mosusu esalaka biso mpasi. (Yilimia 10:23) Biblia elobeli lolenge oyo bana bazalaka na mposa ya disipilini, boye: “Bozoba ekangami na motema ya mwana mobali; fimbo nde ekobengana yango mosika na ye.”—Masese 22:15, NW.
Awa, fimbo ezali elembo ya bokonzi ya baboti. Ya solo, bana mingi balingaka disiplini te. Soki disiplini yango esɛngi kopesa bango etumbu, basepelaka na yango te. Kasi, baboti ya mayele mpe ya bolingo bayebi ete atako likambo yango ekoyokisa mwana mpasi, batalelaka mpenzampenza bolamu oyo yango ekobimisa. Baboti oyo bazali baklisto bayebi ete maloba ya Biblia oyo ezali solo: “ Ya solo, disipilini nyonso epesaka esengo te ntango bapesi yango, kasi epesaka nde mpasi; nzokande na nsima, ekopesa na baoyo bazwaki yango mbuma ya kimya, elingi koloba bosembo.”—Baebele 12:11, NW; Masese 13:24.
Ya solo, ezali kaka bana te nde bazalaka na mposa ya disiplini; mikóló mpe bazalaka na mposa na yango. Biblia ezali koloba na mikóló maloba oyo: “Simbá disiplini, kotika yango te. Batelá yango, mpamba te ezali bomoi na yo.” (Masese 4:13, NW) Ɛɛ, moto ya mayele, azala elenge to mokóló, akokangama na disiplini oyo euti na Biblia, Liloba ya Nzambe, mpamba te, nsima ya mikolo, yango ekobatela bomoi na ye.