Batisimo ya Clovis—Lingomba ya Katolike ekokisi mbula 1 500 na France
“NA NKOMBO ya Pápa, bum! Wana ezali maloba oyo bakutaki nzela moko na bɔmbi oyo ebongisamaki malamumalamu te, na kati ya ndako-nzambe moko na ekólo France, esika Pápa Jean-Paul II asengelaki kokɔta, na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1996. Nyonso wana emonisaki ndenge bato mosusu baboyaki makasi mpenza ete Pápa aya mpo na mbala ya mitano na France. Atako bongo, na mbula wana, bato soki 200 000 bayaki na Reims, engumba moko ya France, mpo na kosangana na Pápa na molulu ya kokanisa mbula 1 500 oyo esili koleka banda mokolo oyo Clovis, mokonzi ya Ba-Franc, abongwanaki mpo na kokóma mondimi ya Lingomba ya Katolike. Mokonzi yango oyo batisimo na ye ebengamaki batisimo ya ekólo France, azalaki nani? Mpe mpo na nini molulu yango ebimisaki ntembe motindo wana?
Bokonzi oyo ezalaki kokende mokemoke na nsuka na yango
Clovis abotamaki soki na mobu 466 ya ntango na biso (T.B.). Azalaki mwana ya Childéric Ier, mokonzi ya Ba-Franc Salien. Na mobu 358 T.B., ntango Baloma balongaki etuluka yango ya Ba-Germain, bapesaki bango ndingisa ya kofanda na esika oyo ezali lelo ekólo Belgique, kasi basengelaki kobatela mboka yango mpe bato mosusu basengelaki kokóma basoda ya Loma. Lokola bakómaki komesana mingi na Ba-Gallo-Romain, oyo bazalaki bakóló-mboka, yango esalaki ete mokemoke Ba-Franc wana bámekola mimeseno ya Baloma. Childéric Ier azalaki na ngámbo ya Baloma mpe bazalaki kobundisa bituluka mosusu ya Ba-Germain, na ndakisa Ba-Wisigoth na Ba-Saxon, oyo bazalaki kobundisa Baloma. Yango esalaki ete Ba-Gallo-Romain básepela na ye mingi.
Etúká ya Loma oyo babengi Gaule ebandaki longwa na Ebale Rhin na nɔrdi, tii na bangomba ya Pyrénées na sudi. Aetius, mokonzi ya basoda ya Loma akufaki na mobu 454 T.B.; nsima ya liwa na ye, etúká yango ezalaki lisusu te na moto ya koyangela yango. Longola yango, yikiyiki monene na makambo ya politiki ekɔtaki na etúká yango ntango Romulus Augustulus, amperɛrɛ ya nsuka oyo ayangelaki Loma, alongolamaki na kiti ya bokonzi na mobu 476 T.B. mpe ntango eteni ya wɛsti ya Ampire ya Loma ekweaki. Yango wana, etúká ya Gaule ekómaki se lokola mbuma oyo eteli na nzete, oyo ezalaki kozela kaka moko ya bituluka oyo efandaki na mabele na yango ebuka yango. Na yango, ezali likambo ya kokamwa te soki nsima kaka ya kozwa ebonga ya tata na ye, Clovis abandaki koluka koyeisa monene mboka oyo azalaki koyangela. Na mobu 486 T.B., na nsima ya etumba moko oyo esalemaki pene na engumba Soissons, alongaki mokonzi ya nsuka oyo atyamaki na Baloma mpo na koyangela Gaule. Na yango, akómaki mokonzi ya bamboka nyonso oyo ezalaki katikati ya Ebale Somme na nɔrdi mpe Ebale Loire, na Gaule ya ntei mpe ya wɛsti.
Moto oyo akómaki mokonzi
Na bituluka nyonso ya Ba-Germain, kaka Ba-Franc nde batikalaki bapakano. Kasi, libala oyo Clovis asalaki na Clotilde, mwana ya mokonzi ya Burgondie, ebongolaki mpenza bomoi na ye. Lokola Clotilde azalaki mokatolike ya molende, azalaki kosala nyonso mpo ete mobali na ye abongwana, akóma mpe mokatolike. Lisolo moko ya makambo ya kala, oyo Grégoire de Tours akomaki na ekeke ya motoba T.B., emonisi ete ezalaki na mobu 496 T.B., na ntango oyo Clovis azalaki kobunda na Ba-Alaman na mboka Tolbiac (lelo Zülpich, na Allemagne), nde Clovis alakaki ete akobongwana soki Nzambe oyo Clotilde azalaki kosambela asalisi ye alonga etumba. Atako etikalaki moke mpenza mpo bálonga basoda ya Clovis, mbala moko makambo ebongwanaki: mokonzi ya Ba-Alaman abomamaki mpe basoda na ye bayaki komitika bango moko. Na makanisi ya Clovis, ezalaki Nzambe ya Clotilde nde asalisaki ye alonga etumba yango. Ndenge elobamaka banda kala, Santu Remi abatisaki Clovis na ndako-nzambe ya engumba Reims, na mokolo ya 25 Desɛmbɛ 496 T.B. Kasi, bato mosusu balobaka ete batisimo yango esalemaki nde na nsima, na mobu 498 to 499 T.B.
Milende oyo Clovis asalaki mpo na kobɔtɔla bokonzi ya Burgondie oyo ezalaki na sudi-ɛsti elongaki te. Kasi etumba oyo abundisaki Ba-Wisigoth ebotelaki ye mbuma malamu. Na mobu 507 T.B., nsima ya kolonga bango na engumba Vouillé, oyo ezali pene na engumba Poitiers, abɔtɔlaki bamboka nyonso ya Gaule ya sudi-wɛsti. Mpo na komonisa ete asepelaki na ndenge Clovis alongaki etumba yango, Anastase, amperɛrɛ ya Ampire ya Loma ya Ɛsti , apesaki ye titre ya consul mpo na kokumisa ye. Na ndenge yango, Clovis akómaki na lokumu koleka bakonzi nyonso ya wɛsti; lisusu, na miso ya Ba-Gallo-Romain, boyangeli na ye eyokanaki sikoyo na mibeko.
Lokola bamboka nyonso ya Ba-Franc oyo ezalaki na ɛsti, pembenipembeni ya Ebale Rhin, ezalaki na nse ya boyangeli na ye, Clovis akómisaki Paris mboka-mokonzi ya bokonzi na ye. Mwa bambula liboso ya liwa na ye, akómaki lisusu makasi na bokonzi na ye ntango abimisaki buku moko ya mibeko oyo babengi Lex Salica mpe asalisaki likita moko ya bakonzi ya lingomba na engumba Orléans mpo ete bámonisa boyokani oyo esengeli kozala kati na Lingomba mpe Leta. Ntango akufaki, na mokolo ya 27 Novɛmbɛ 511 T.B., azalaki koyangela ye moko eteni monene mpenza ya etúká ya Gaule.
Buku moko (The New Encyclopædia Britannica) elobi ete kobongwana ya Clovis mpo akóma mondimi ya Lingomba ya Katolike ezalaki “ntango moko ya ntina mingi na lisolo ya Mpoto ya wɛsti.” Mpo na nini kobongwana ya mokonzi wana mopakano ezalaki na ntina mingi? Ezalaki na ntina mpo Clovis aponaki Lingomba ya Katolike oyo ezalaki na boyokani ata moke te na oyo ya Arius.
Ntembe oyo Arius abimisaki
Soki na mobu 320 T.B., Arius, sango moko ya engumba Alexandrie na ekólo Egypte, abandaki kopalanganisa makanisi ya sika mpo na liteya ya Bosato (Trinité). Arius aboyaki kondima likanisi oyo emonisi ete Mwana azali ndenge moko na Tata. Mpo na ye, Mwana akoki te kozala Nzambe to kozala ndenge moko na Tata, mpamba te Mwana azali na ebandeli. (Bakolose 1:15) Mpo na oyo etali elimo santu, Arius azalaki kondima ete elimo santu ezali moto, kasi yango ezali na nse ya Tata mpe ya Mwana. Liteya yango, oyo endimamaki na bato mingi, ebimisaki botɛmɛli makasi na kati ya lingomba. Na mobu 325 T.B., na likita ya bakonzi ya lingomba oyo esalemaki na engumba Nicée, bazwaki ekateli ya kotinda Arius na mboka mosusu mpe bakweisaki mateya na ye.a
Kasi, yango esukisaki ntembe yango te. Ntembe mpo na endimeli yango eumelaki lisusu mbula soki 60. Baamperɛrɛ oyo balandanaki na boumeli ya bambula nyonso wana bazalaki kotalela ndenge moko te ngámbo mibale oyo ezalaki kowelana na ntembe yango; okomona moko amitii na ngámbo oyo, kasi oyo akoya na nsima akomitya na ngámbo wana mosusu, mpe bongo na bongo. Nsukansuka, na mobu 392 T.B., Amperɛrɛ Théodose Ier akómisaki Lingomba ya Katolike, oyo ezalaki kokangama kaka na lolenge ya kala ya kolimbola liteya ya Bosato, lingomba ya Leta na kati ya Ampire ya Loma. Kaka na ntango yango, Ulfilas, ye azalaki Mo-Germain mpe episkɔpɔ, asalaki ete Ba-Goth bákóma na lingomba ya Arius. Bituluka mosusu ya Ba-Germain eumelaki te mpo na kondima lingomba wana, oyo ezalaki mpe komitalela lokola “lingomba ya boklisto.”b
Na ntango ya Clovis, Lingomba ya Katolike na etúká ya Gaule ezalaki na mikakatano mingi. Mpo na koluka ndenge ya kolimwisa Lingomba ya Katolike, Ba-Wisigoth oyo bazalaki kolanda mateya ya Arius baboyaki ete soki episkɔpɔ moko akufi, bátya episkɔpɔ mosusu na esika na ye. Longola yango, kokabwana ya bapápa oyo esalemaki mbala mibale ekɔtisaki matata mingi na kati ya lingomba: na Loma, basango ya ngámbo mibale oyo ezalaki kotɛmɛlana bazalaki kobomana. Bandimi mosusu ya Lingomba ya Katolike oyo bazalaki kokoma babuku bakómisaki mobulungano wana makasi lisusu: babimisaki likanisi ete mokili ekosuka na mobu 500 T.B. Yango wana, lokola Clovis, mokonzi ya Ba-Franc, elombe ya bitumba, akómaki mondimi ya Lingomba ya Katolike, emonanaki lokola likambo moko ya malamu oyo ezalaki komonisa elembo ya koya ya “mbula nkóto ya sika ya basantu.”
Kasi nini mpenza etindaki Clovis abongwana? Atako ntango mosusu mposa ya makambo ya elimo nde etindaki ye, ntembe ezali te ete na makanisi na ye azalaki mpe na mikano ya politiki. Ndenge Clovis aponaki Lingomba ya Katolike esalaki ete Ba-Gallo-Romain, oyo bazalaki ebele mpenza na bamboka oyo azalaki koyangela, oyo mpe bazalaki bandimi ya Lingomba ya Katolike, básepela na ye; lisusu, yango esalaki ete bakonzi ya lingomba, oyo bazalaki mpenza na bokonzi likoló ya bato, bápesa ye mabɔkɔ. Yango esalaki ete atika mosika mpenza na nsima na ye baoyo nyonso bazalaki kowela na ye bokonzi. Buku moko (The New Encyclopædia Britannica) emonisi ete “etumba oyo azalaki kobunda mpo na kozwa etúká ya Gaule ekómaki nde etumba mpo na kolongola etúká yango na boombo ya bapɛngwi oyo balandaki Lingomba ya Arius, bato oyo bazalaki koyina bango.”
Clovis azalaki mpenza nani?
Mwa mikolo liboso ya molulu oyo esalemaki na 1996 mpo na kokanisa batisimo ya Clovis, Gérard Defois, oyo azali episkɔpɔ-mokonzi ya engumba Reims, alobaki ete Clovis azali mpenza “moto oyo akanisaki malamu mpe asalelaki bososoli liboso ete abongwana.” Kasi, Ernest Lavisse, moto ya France mpe moto ya mayele na masolo ya kala, alobaki ete: “Kobongwana ya Clovis ebongolaki bomoto na ye ata moke te; mateya ya Baevanzile oyo elendisaka bizaleli malamu, lokola boboto mpe kimya, esimbaki motema na ye te.” Moto mosusu ya mayele na masolo ya kala alobaki ete: “Na esika ya kosɛnga ete Odin [nzambe moko ya bato ya Mpoto ya Nɔrdi] asalisa ye, akómaki nde kosɛnga yango epai ya Klisto, kasi atikalaki kaka ndenge azalaki liboso.” Se ndenge oyo Constantin asalaki nsima ya kobongwana na ye na lingomba ya boklisto, Clovis akómaki koboma baoyo nyonso bazalaki kolula ebonga na ye mpamba te alingaki te ete moto mosusu awela na ye bokonzi. Asilisaki “bandeko na ye nyonso, ezala ata bandeko ya mosika mpenza.”
Nsima ya liwa ya Clovis, na esika ete masapo oyo esalemaki mpo na ye emonisa ete azalaki mobundi bitumba moko oyo azalaki koyokela banguna na ye mawa te, yango ebongisamaki malamu mpenza mpo na komonisa ete azalaki mosantu. Bato mingi balobaka ete lisolo ya Grégoire de Tours, oyo akomaki mbula soki monkama nsima ya makambo oyo yango ezali kolobela, ekomamaki mpenza mpo na komonisa ete Clovis akokani, na makambo mingi, na Constantin, amperɛrɛ ya liboso ya Loma oyo andimaki “lingomba ya boklisto.” Ntango Grégoire alobi na lisolo na ye ete Clovis azalaki na mbula 30 mokolo ya batisimo na ye, emonani ete Grégoire azalaki nde komeka kokokanisa Clovis na Klisto.—Luka 3:23.
Na ekeke ya libwa, Hincmar, episkɔpɔ ya engumba Reims, alandaki mpe lokolo ya Grégoire. Lokola na ntango wana, bandako-nzambe ya minene ezalaki kowelana mpo na kobenda bandimi ya bamboka mosika mpo báya kotala yango lokola bisika mosantu, ekoki kozala ete lisolo ya bomoi oyo Hincmar akomaki mpo na Santu Remi, episkɔpɔ oyo azalaká liboso na ye, ekomamaki mpo na kobakisa lokumu mpe bozwi ya ndako-nzambe na ye. Na lisolo yango, akomaki ete ebenga ya mpɛmbɛ eutaki na likoló mpe ememaki mwa molangi moko ya mafuta oyo basalelaki mpo na kopakola Clovis na ntango ya batisimo na ye; emonani polele ete alingaki nde kokokanisa ye na Yesu oyo apakolamaki na elimo santu. (Matai 3:16) Na lolenge yango, Hincmar amonisaki boyokani oyo ezalaki kati ya Clovis, engumba Reims, mpe bokonzi ya Ba-Franc mpe amonisaki mpenza ete Clovis azalaki solo mopakolami ya Nkolo.c
Molulu oyo ebimisaki ntembe
Mokolo moko, Charles de Gaulle, oyo azalaki prezida ya France, alobaki ete: “Mpo na ngai, lisolo ya France ebandaki nde na Clovis, oyo aponamaki mokonzi ya France na Ba-Franc, esika nkombo France euti.” Kasi, bato nyonso bandimaka te ete ezali bongo. Molulu oyo esalemaki mpo na kokanisa mbula ya 1 500 ya batisimo ya Clovis ebimisaki ntembe. Lokola na France, banda 1905, mibeko ezwamaki mpo na komonisa polele ete Lingomba na Leta ezali biloko mibale ekeseni, bato mingi bamonaki mabe ndenge Leta apesaki mabɔkɔ na molulu wana oyo, mpo na bango, ezali nde molulu ya lingomba. Ntango bakonzi ya engumba Reims bayebisaki bibongiseli oyo bazwaki mpo na kopesa mbongo oyo ekosɛngama mpo na kotonga ebaelo oyo Pápa akosalela na boumeli ya mikolo oyo akolekisa na engumba na bango, lisangá moko ya bana-mboka efundaki bakonzi yango na tribinale mpe tribinale ekweisaki ekateli wana oyo bakonzi yango bazwaki mpamba te ekateli yango eyokanaki te na mibeko ya France. Bamosusu bamonaki lokola ete lingomba ezalaki koluka lisusu kondimisa na makasi bokonzi na yango likoló ya ekólo France na makambo etali bizaleli malamu mpe boyangeli ya ekólo. Likambo mosusu oyo eyaki kobimisa mindɔndɔ koleka na ntango ya molulu yango, ezalaki ndenge oyo bato ya parti Front National, mpe bituluku ya Bakatolike oyo batingamaka kaka na bindimeli ya kala ya lingomba, bamikumisaki ete bango nde balandaka mpenza lokolo ya Clovis.
Bamosusu balobaki mabe mpo na molulu yango na kotalela makambo ndenge emonisami mpenza na masolo ya kala. Balobaki ete ezali te batisimo ya Clovis nde esalaki ete bato ya France bákóma bandimi ya Lingomba ya Katolike; mpamba te, liboso kutu ya batisimo yango, lingomba yango esilaki kopikama makasi epai ya Ba-Gallo-Romain. Balobaki mpe ete France ekómaki mpenza ekólo na mokolo ya batisimo na ye te. Mpo na bango, France ekómaki mpenzampenza ekólo na ntango oyo bokonzi ya Charlemagne ekabwanaki na mobu 843 T.B.; na bongo, mpo na bango, mokonzi ya liboso ya France ezalaki nde Charles le Chauve, kasi Clovis te.
Lingomba ya Katolike ekokisi mbula 1 500
Na boumeli ya mbula koleka 1 500 France etalelamaki lokola “mwana-mwasi ya liboso ya Lingomba [ya Katolike]”; kasi, lelo oyo, Lingomba ya Katolike ezali ndenge nini na France? Tii na 1938, France ezalaki ekólo ya liboso oyo ezalaki na bato ebele oyo bazwaki batisimo na Lingomba ya Katolike. Sikoyo ezali na esika ya motoba, nsima ya bikólo lokola Philippines mpe États-Unis. Mpe atako Bakatolike bazali soki milio 45 na France, bobele milio 6 nde bakendaka Misa mbala na mbala. Ankɛtɛ moko oyo eutaki kosalema epai ya Bakatolike ya ekólo France emonisi ete mingi na bango (65%) “balandaka te mateya ya lingomba na bango na makambo etali kosangisa nzoto,” mpe mpo na bamosusu kati na bango (5%), Yesu “azali na ntina moko te.” Mbuma mabe ndenge wana nde etindaki Pápa, ntango akendaki na France na 1980, atuna motuna oyo: “France, otii bilaka ya batisimo na yo wapi?”
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛmbɛ 1984, lokasa 24 (na Lifalanse).
b Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Mai 1994, nkasa 8-9.
c Nkombo Louis euti nde na Clovis, nkombo oyo bakonzi 19 ya France (kati na bango Louis XVII mpe Louis-Philippe) oyo bayaki nsima na ye bazwaki.
[Karte na lokasa 27]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
BA-SAXON
Ebale Rhin
Ebale Somme
Soissons
Reims
Paris
GAULE
Ebale Loire
Vouillé
Poitiers
PYRÉNÉES
BA-WISIGOTH
Loma
[Elilingi na lokasa 26]
Batisimo ya Clovis, ndenge bamonisi yango na mokanda moko ya ekeke ya 14
[Eutelo ya bafɔtɔ]
© Cliché Bibliothèque nationale de France, Paris
[Elilingi na lokasa 28]
Ekeko ya batisimo ya Clovis (oyo ezali na katikati) na libándá ya ndako-nzambe ya engumba Reims, na France
[Elilingi na lokasa 29]
Mobembo oyo Pápa Jean Paul II asalaki na France mpo na kokanisa batisimo ya Clovis ebimisaki ntembe