Lingomba mpe Leta na Byzance
MOTO oyo asalaki lingomba ya boklisto amonisaki polele ete bayekoli na ye bakokesana mpenza na bato ya mokili oyo bapesi Nzambe mokɔngɔ. Yesu alobaki na bayekoli na ye boye: “Soki bozalaki bato ya mokili, mbɛlɛ bamokili balingaki bato na bango mpenza. Nde awa ezali bino na mokili te, kasi nasili kopona bino longwa na mokili, bongo bamokili bazali koyina bino.” (Yoane 15:19) Yesu alobaki na Pilata, mokonzi ya politiki na ntango wana, ete: “Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te.”—Yoane 18:36.
Mpo na kokokisa mokumba na bango ya kosakola “tii na esika eleki mosika na mabele,” baklisto basengelaki kotya makanisi na bango na makambo ya mokili te. (Misala 1:8, NW) Baklisto ya ekeke ya liboso balandaki ndakisa ya Yesu, bazalaki kokɔta na makambo ya politiki te. (Yoane 6:15) Bato nyonso bazalaki komona ete baklisto ya sembo bazalaki kondima kokóma bakonzi ya politiki te to bakonzi ya Leta te. Kasi, na nsima makambo ebongwanaki.
“Bato ya mokili”
Mwa moke na nsima ya ntango oyo ata ntoma moko azalaki lisusu na bomoi te, bakonzi ya mangomba babandaki kokóma na makanisi mosusu na oyo etali boyokani na bango na mokili. Bakómaki kokanisa “bokonzi” moko oyo esuki kaka te kozala na kati ya mokili, kasi mpe oyo ezali ya mokili. Soki tomeki kotalela ndenge oyo lingomba ekɔtaki mpenza na makambo ya politiki na ntango ya Empire byzantin—Bokonzi ya Loma ya Ɛsti, oyo mboka-mokonzi na yango ezalaki Byzance (lelo oyo Istanbul)—ekoteya biso makambo mingi.
Na mboka oyo losambo ezalaki na esika monene na kati ya bomoi ya bato, Lingomba ya Empire byzantin ezalaki na nguya mingi mpenza; bakonzi na yango bazalaki kofanda na engumba Byzance. Moto moko ya mayele na masolo ya kala ya mangomba, nkombo na ye Panayotis Christou, alobaki mokolo mosusu ete: “Bato ya Empire byzantin bazalaki kotalela bokonzi na bango awa na mabele lokola elilingi ya Bokonzi ya Nzambe.” Kasi, baampɛrɛrɛ bazalaki ntango mosusu kondima likanisi yango te. Yango wana, na bantango mosusu, matata ezalaki kati na lingomba mpe Leta. Diksionɛrɛ moko (The Oxford Dictionary of Byzantium) elobi boye: “Baepiskɔpɔ ya Constantinople [to Byzance] bazalaki komonisa bizaleli ya ndenge na ndenge: na bantango mosusu bazalaki kotosa mokonzi oyo azali na nguya mingi . . . , na bantango mosusu bazalaki kosala elongo na ampɛrɛrɛ . . . , mpe na bantango mosusu bazalaki kotɛmɛla mpenza makanisi ya ampɛrɛrɛ.”
Mokonzi-Monene (patriarche) ya lingomba ya Constantinople, mokonzi oyo azali likoló ya bakonzi nyonso ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse, akómaki moto monene. Ye nde azalaki kotya ampɛrɛrɛ na kiti ya bokonzi; yango wana azalaki kokanisa ete ampɛrɛrɛ abatelaka mpenza Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse. Mokonzi-Monene azalaki mpe na bozwi mingi, mpamba te biloko nyonso ya lingomba ezalaki na mabɔkɔ na ye. Azalaki na nguya mingi mpamba te azalaki mokonzi ya ebele ya basango mpe lisusu azalaki mpenza mokonzi monene na miso ya bandimi.
Mbala mingi, Mokonzi-Monene azalaki na likoki ya kotɛmɛla ampɛrɛrɛ. Lokola azalaki na bokonzi na nkombo ya Nzambe, akokaki kosɛngisa na makasi ete ampɛrɛrɛ alanda oyo ye alobi; mpo na yango, akokaki kobangisa ye ete akolongola ye na lingomba, to mpe akokaki kosalela mayele mosusu mpo na kolongola ampɛrɛrɛ.
Lokola na bamboka mosusu Leta ezalaki makasi mpenza te ndenge ezalaki na mboka-mokonzi, baepiskɔpɔ bakómaki bato minene na bingumba oyo bazalaki; mbala mingi bazalaki na bokonzi ndenge moko na baguvɛrnɛrɛ ya bitúká mpe lisusu, bazalaki kopesa makanisi na bango mpo na kopona baguvɛrnɛrɛ yango. Baepiskɔpɔ bakómaki kotya miso na makambo oyo ezalaki kosambisama na tribinale mpe na makambo mosusu, mbala nyonso oyo likambo etalelaki lingomba mpe ntango mosusu, ata na makambo oyo etalaki lingomba te. Moko na bantina ezali ete basango bazalaki ebele mpenza mpe bango nyonso bazalaki na nse ya bokonzi ya baepiskɔpɔ.
Makambo ya politiki mpe kofuta avoka mpo na kozwa ebonga na lingomba
Ndenge makambo oyo touti kolobela emonisi yango, bakonzi ya lingomba bamikɔtisaki mpenza na makambo ya politiki. Lisusu, lingomba ezalaki kosalela mbongo mingi mpamba te bakonzi ya lingomba bazalaki ebele mpe lisusu, mpo na misala na bango ya kosunga babola. Mingi kati na bakonzi minene ya lingomba bazalaki na bomoi lokola bato ya mbongo. Lokola lingomba ekómaki na nguya mpe na bozwi, babosanaki ndai ya bobola mpe kozala na bomoi ya bato bamipesi mobimba na Nzambe. Basango na baepiskɔpɔ mosusu bazalaki kofuta avoka mpo bákoka kopona bango. Kobanda na nse kino na bakonzi minene ya lingomba, bakómaki kofuta avoka mingi mpo na kozwa esika na lingomba. Bato ya mbongo mingi bazalaki kosunga bakonzi mosusu ya lingomba oyo bazalaki koluka ete ampɛrɛrɛ apesa bango esika na kati ya lingomba.
Bazalaki mpe kofuta avoka epai ya bakonzi mosusu ya lingomba mpo na kosomba mitema na bango. Ntango Mokonzi-Mwasi Zoé (azalaki na bomoi soki na mobu 978 tii 1050 na ntango na biso [T.B.]) abomisaki mobali na ye Romain III, mpe alingaki kobala makango na ye oyo na nsima akómaki Ampɛrɛrɛ Michel IV, abengisaki mbangumbangu Mokonzi-Monene Alexis na ndako ya mokonzi. Ntango mokonzi-monene ya lingomba akómaki na ndako ya mokonzi, Zoé ayebisaki ye nsango ya liwa ya Romain, mpe asɛngaki ye ete abenisa libala na ye na makango na ye. Alexis azalaki na mokakatano mpo na kosala molulu yango mpamba te na mpokwa na yango nde ezalaki mokolo ya fɛti ya lingomba oyo babengaka Mokolo ya Mitano Mosantu. Kasi, andimaki ebele ya makabo oyo mokonzi-mwasi apesaki ye mpe akokisaki mposa na ye.
Kotosa ampɛrɛrɛ na makambo nyonso
Na bantango mosusu, na Empire byzantin, ezalaki ampɛrɛrɛ nde azalaki kopona mokonzi-monene ya lingomba ya Constantinople. Na bantango wana, moto moko te akokaki kokóma mokonzi-monene ya lingomba to kotikala wana soki ampɛrɛrɛ alingi yango te.
Mbala libwa mobimba, Ampɛrɛrɛ Andronic II (1260-1332) alongolaki bakonzi-minene ya lingomba mpe azalaki kotya bamosusu. Mbala mingi oyo azalaki kosala bongo, ezalaki mpo na kotya moto oyo akobanda kotosa mpenza ampɛrɛrɛ na makambo nyonso. Mokanda moko (The Byzantines) elobi ete, mokonzi-monene moko alakaki ampɛrɛrɛ na mokanda ete “akosala likambo nyonso oyo ye akosɛnga, ata soki ekobuka mibeko, mpe akosala makasi ete asala bobele makambo oyo ekosepelisa ye.” Mbala mibale baampɛrɛrɛ balukaki kotya na makasi moto moko kati na libota ya mokonzi ete azala mokonzi-monene ya lingomba. Ampɛrɛrɛ Romain I atyaki mwana na ye Théophylacte, oyo azalaki na mbula 16 mpamba, mokonzi-monene ya lingomba.
Soki mokonzi-monene ya lingomba asepelisi ye te, ampɛrɛrɛ akokaki kosɛngisa ye ete alongwa to mpe akokaki kotinda lisangani ya baepiskɔpɔ ete bálongola ye. Buku moko (Byzantium) elobi ete: “Ntango bambula ezalaki koleka, bakonzi ya Leta ya Empire byzantin mpe ata ampɛrɛrɛ ye moko [bamikosaki] mpenza na likambo etali kopona baepiskɔpɔ.”
Ampɛrɛrɛ, elongo na mokonzi-monene ya lingomba, bazalaki kokamba mpe makita minene ya baepiskɔpɔ. Ye nde azalaki kotambwisa makambo ntango bazali kopesana makanisi, azalaki koyebisa oyo esengeli kozala bindimeli ya lingomba, mpe azalaki kotyana ntembe na baepiskɔpɔ, ata mpe na bapɛngwi, baoyo azalaki kosukisa bango na likambo moko: azalaki koboma bango na kokakisáká bango na nzete. Lisusu, soki likita ya baepiskɔpɔ ebimisi mobeko moko ya lingomba, ampɛrɛrɛ asengelaki naino kondima yango mpe ye nde azalaki kosala ete bato bátosa yango. Moto oyo atɛmɛli ye azalaki kokwea na makambo mingi mbala moko: ya liboso atɛmɛli mokonzi; ya mibale, azali monguna ya lingomba mpe ya Nzambe. Na ekeke ya motoba, mokonzi-monene moko ya lingomba alobaki ete: “Eloko moko te ekoki kosalema na lingomba soki ezali na boyokani te na mokano mpe na mibeko ya ampɛrɛrɛ.” Mbala mingi, baepiskɔpɔ oyo bazalaki na ampɛrɛrɛ, bazalaki na makambo lokola kaka bakonzi na bango, bazalaki kotɛmɛla ata likambo moko te: bato ya maloba ya sukali, bato ya bindimandima, bakokaki kobendama na maloba to na mayele mabe.
Na ndakisa, ntango Ignace, mokonzi-monene ya lingomba (soki 799-878 T.B.) aboyaki kopesa ministre-mokonzi kominyo, ministre-mokonzi azongiselaki ye mabe oyo asalaki ye. Bardas afundaki Ignace ete bafandelaki mokonzi likita mpo na kosala ye mabe. Bakangaki mokonzi-monene ya lingomba mpe babenganaki ye na mboka. Na esika na ye, ministre-mokonzi abongisaki makambo mpo bápona Photius, oyo azalaki ata sango te, mpe nsima ya mikolo motoba, alekaki bakonzi nyonso mpe akómaki mokonzi-monene ya lingomba. Photius azalaki na makoki mpo na kozala mokonzi-monene ya lingomba? Balobaka ete Photius “azalaki na mposa makasi ya bokonzi, azalaki moto ya lolendo, mpe ya politiki, azalaki na mayele mabe ya kosakana te.”
Mateya na makambo ya politiki
Mbala mingi, mpo na kotɛmɛla bakonzi ya politiki, bazalaki kobombama nsima ya makambo ya lingomba, ezalaki kokóma kowelana kati na makambo ya lingomba mpe lipɛngwi; yango wana, mbala mingi ampɛrɛrɛ azalaki kokanisa epai oyo yango ekoki komema makambo ya politiki, kasi azalaki komibanzabanza te na koluka kokɔtisa mateya ya sika. Mingimingi, ampɛrɛrɛ azalaki na lotomo ya kotinda bato bátosa bindimeli na ye na makasi, mpe ya kosɛnga ete lingomba endima oyo ye alingi.
Na ndakisa, Ampɛrɛrɛ Héraclius (575-641 T.B.) asalaki makasi mpo na kosilisa ntembe oyo ebimaki na ntina ya bomoto ya Klisto, oyo elingaki kokabola mboka na ye na ntango oyo ezalaki lisusu na makasi te. Mpo na kokata likambo na mokuse, abimisaki liteya ya sika oyo babengi monothélisme.a Na nsima, mpo ete bitúká ya sudi ya ampire etosa ye, Héraclius aponaki Cyrus moto ya Phasis azala mokonzi-monene ya sika ya lingomba na engumba ya Alexandrie mpo alandaki liteya oyo ampɛrɛrɛ andimaki. Ampɛrɛrɛ akómisaki Cyrus mokonzi-monene ya lingomba mpe moyangeli ya Ezipito mpe azalaki na bokonzi likoló ya bakonzi oyo atyaki na bamboka. Cyrus anyokolaki bato mwa moke mpo ete lingomba ya Ezipito endima liteya yango.
Mbuma mabe
Makambo nyonso wana eyokani ata moke te na makanisi mpe na maloba oyo Yesu alobaki na kati ya libondeli ete bayekoli na ye basengeli kozala “bato ya mokili te.”—Yoane 17:14-16.
Bakonzi ya mangomba oyo bazalaki komikumisa ete bazali baklisto, ezala na Empire byzantin to na nsima babuki mbuma mabe na ndenge bamikɔtisaki na makambo ya politiki mpe na bitumba ya mokili oyo. Mwa lisolo yango ezali komonisa yo nini? Nzambe na Yesu Klisto bandimaki bakonzi ya lingomba ya Empire byzantin?—Yakobo 4:4.
Bakonzi ya mangomba oyo balingá lokumu mpe bamakango na bango, elingi koloba bato ya politiki, babatelaki lingomba ya solo ya boklisto te. Ndenge oyo lingomba ebalanaki na politiki ebebisaki losambo ya pɛto oyo Yesu ateyaki. Tózwa liteya na makambo ya kala mpe tózala “bato ya mokili te.”
[Maloba na nse ya lokasa]
a Monothélisme ezali liteya oyo elobaka ete atako Klisto azali na lolenge mibale, ya Nzambe mpe ya moto, kasi azali na mokano moko.
[Etanda/Elilingi na lokasa 10]
“LOKOLA NZAMBE OYO AZALI KOKATISA MALƐMBƐ NA LIKOLÓ”
Makambo oyo esalemaki na ntango ya mokonzi-monene ya lingomba Michel Cérulaire (soki 1000-1059) ezali komonisa mokumba oyo mokonzi ya lingomba akoki kozala na yango na makambo ya Leta mpe mposa ya esika ya lokumu oyo bazalaki na yango. Nsima ya kokóma mokonzi-monene ya lingomba, Cérulaire alingaki kosuka wana te. Balobaka ete azalaki moto ya lofundo mingi mpenza, azalaki na lolendo, mpe azalaki na makambo makasi. Azalaki na makambo lokola nzambe oyo azali kokatisa malɛmbɛ na likoló.
Mpo na koluka komitombola, Cérulaire akabwanaki na pápa ya Loma na mobu 1054 mpe asɛngisaki ampɛrɛrɛ andima bokabwani wana. Lokola alongaki, Cérulaire azwaki ebongiseli ya kotya Michel VI na bokonzi mpe asalisaki ye mpo akóma makasi. Mbula moko na nsima, Cérulaire alongolaki ampɛrɛrɛ yango na makasi mpe atyaki Comnène (soki 1005-1061) na bokonzi.
Kowelana kati na mokonzi-monene ya lingomba mpe ampɛrɛrɛ ekómaki makasi. Lokola ayebaki ete bato bakozala nsima na ye, Cérulaire azalaki kokanela, kosɛngisa makambo na makasi mpe kosalela mobulu. Moto moko ya mayele na istware oyo azalaki na bomoi na eleko moko na ye alobaki boye: “Asakolaki kokwea ya ampɛrɛrɛ na maloba oyo ezali na lokumu ata moke te, alobaki ete: ‘Ngai moto natombolaki yo, yo bolole oyo; mpe nakosukisa yo.’ ” Kasi, Isaac Comnène akangisaki ye, akɔtisaki ye bolɔkɔ mpe abenganaki ye mosika na Imbros.
Bandakisa ya ndenge wana ezali komonisa mikakatano oyo mokonzi-monene ya lingomba ya Constantinople akokaki kobimisa mpe ndenge oyo akokaki kotɛmɛla ampɛrɛrɛ. Mbala mingi, ampɛrɛrɛ asengelaki kokebaka na bato wana, mpo bayebaki makambo mingi ya politiki, mpe bakokaki ata kotɛmɛla ampɛrɛrɛ mpe basoda.
Karte/Bililingi na lokasa 9]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Bonene ya Empire byzantin
Ravenne
Loma
MAKEDONIA
Constantinople
Mer noire
Nicée
Efese
Antiokia
Yelusaleme
Alexandrie
Mai Monene ya Méditerranée
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Karte: Mountain High Maps® Copyright © 1997 Digital Wisdom, Inc.
[Bililingi na lokasa 10, 11]
Comnène
Romanus I (na lobɔkɔ ya mwasi)
Michel IV
Mokonzi-Mwasi Zoé Zoe
Romain I (na lobɔkɔ ya mwasi)
[Eutelo ya bafɔtɔs]
Comnène, Romain III, mpe Michel IV: Na ndingisa ya Classical Numismatic Group, Inc.; Mokonzi-Mwasi Zoé: Hagia Sophia; Romain I: Na ndingisa ya Harlan J. Berk, Ltd.
[Elilingi na lokasa 12]
Photius
[Elilingi na lokasa 12]
Héraclius na mwana na ye ya mobali
[Eutelo ya bafɔtɔs]
Héraclius na mwana ya mobali: Na ndingisa ya Harlan J. Berk, Ltd.; Mayemi, nkasa 8-12: Euti na buku L’Art Byzantin III Ravenne et Pompose