Tosalaka nyonso oyo tokoki kosala!
“SALÁ nyonso oyo okoki kosala.” Ndeko moko oyo azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova apesaki misionɛrɛ moko toli wana oyo ebongi mpenza. Kasi mpo na nini kopesa toli ya ndenge wana na mosakoli oyo amesaná na mosala yango? Bamisionɛrɛ mingi bazali bato ya molende, baoyo mokolo na mokolo batungisamaka na mwa banyama mikemike, bamonaka banyoka, bayokaka molunge, babɛlaka, mpe bakutanaka na mikakatano ndenge na ndenge, boye te?
Bamisionɛrɛ ya Batatoli ya Yehova bazali mibali mpe basi lokola bato nyonso, baklisto oyo bazali komonisa bolingo makasi mpo na Yehova mpe mpo na baninga na bango bato, bolingo oyo ezali kotinda bango bákende kosakola na bamboka mopaya. Bazali kosala makasi mpo na kosalela Yehova na makoki na bango nyonso, bazali kotya elikya epai na ye mpo na kozwa makasi.—Baefese 6:10.
Mpo na koyeba makambo mingi ya mosala ya misionɛrɛ, tósala lokola ete tozali kolekisa mokolo moko na ndako moko ya bamisionɛrɛ na Afrika ya Wɛsti.
Tosali mosala ya misionɛrɛ mokolo moko
Tozali na ngonga ya 7 ya ntɔngɔ. Tokómi na ndako ya bamisionɛrɛ na ntango oyo batalelaka mokapo ya mokolo. Bamisionɛrɛ zomi oyo bazali wana, bayambi biso na esengo mpenza mpe babongiseli biso esika na mesa mpo tómɛla tii elongo na bango. Ntango tobandi kosolola na bango mpo tóyebana malamu, misionɛrɛ moko oyo aumeli bambula mingi na mboka oyo batindi ye mpo na mosala ya kosakola, abandi kobɛtela biso lisolo moko ya kosɛkisa oyo akutanaki na yango na mosala ya kosakola. Kasi lisolo na biso ekatani ntango ndeko oyo asengeli kokamba likita mokolo wana azwi maloba mpo na koyebisa biso ete ntango ekoki mpo na kotalela mokapo ya mokolo. Lisolo yango ekosalema na Lifalanse. Atako tolobaka lokota yango te, na kotala kaka ndenge oyo bazali koloba, tozali komona polele ete bamisionɛrɛ yango bazali kosala makasi mpo na koloba malamu lokota oyo bato balobaka na esika oyo batindi bango.
Nsima ya kotalela mokapo ya mokolo, libondeli moko ya mozindo esalemi, mpe na nsima, ntango ya komɛla tii ekoki. Ntango tozali kotya pɔtɔpɔtɔ na basaani na biso, misionɛrɛ oyo afandi pembeni na biso alendisi biso tóbakisa bitabe mosusu na pɔtɔpɔtɔ yango. Toyebisi ye ete tolingaka mpenza bitabe te, kasi ye alobi na biso ete soki tomeki bitabe ya mboka wana, tokolinga yango. Mbala moko, tokatikati bitabe na likoló ya pɔtɔpɔtɔ na biso. Tomoni mpenza ete alobaki solo! Bitabe yango ezali kitoko, sukali lokola crème! Bayebisi biso mpe ete mampa oyo tozali komona na mesa bakendaki kosomba yango ntɔngɔntɔngɔ na butiki moko na ngámbo mosusu ya balabala.
Nsima ya komɛla tii, tokozala elongo na bamisionɛrɛ mibale, mwasi moko na mobali na ye; na lisolo oyo tokobenga bango Ben na Karen. Toyokaki nsango ete ekólo oyo ya Afrika ya Wɛsti ezali mboka moko oyo ezali kobota mbuma mingi, mpe sikoyo tolingi komona yango biso moko na miso.
Ntango tokómi na esika oyo bazelaka bisi, tokuti mwa bato mosusu bazali kozela. Mosika te, bamisionɛrɛ oyo tozali na bango elongo babandi kosolola na mwasi moko mpe mwana na ye ya mobali lisolo moko ya Biblia. Lokola toyebi koloba Lifalanse te, totɛlɛmi kaka wana pembeni mpe tozali kosɛka moke! Ntango kaka mwasi yango azwi bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuka!, bisi ekómi mpe moto na moto aweli komata na bisi! Ntango tozali kobundana mpo na komata na bisi, ebele ya bato bazali kopusapusa biso na nsima. Tozali koningananingana ntango tozali koluka kokende kofanda na nsima. Ntango bisi ebandi kotambola, tosimbi bibende makasi mpo tóningananingana te. Mbala na mbala, bisi ezali kotɛlɛma na bisika oyo etɛlɛmaka, mpe bato mosusu bazali se kokɔta. Tozali kosɛkisa moke bato oyo tozali na bango na kati ya bisi, bango mpe bazali kosɛkisa biso. Tozali na mposa ya kosolola na bango kasi monɔkɔ oyo bango balobaka biso toyebi koloba yango te!
Ntango bisi ezali kokende, tozali kotala libándá mpe tozali komona ndenge oyo bato bazali kobanda misala na bango. Tomoni basi mibale bazali kotambola elongo, bamemi mikumba na mitó na bango. Moko na bango amemi bidɔ monene ya mai. Na esika moko, pembeni ya balabala, moto moko atandi elamba mpe atandi mwa biloko ya mikemike mpo abanda kotɛkisa yango. Bipai nyonso bato bazali kotɛkisa to kosomba biloko ndenge na ndenge.
Mbala moko, Ben oyo afandi pembeni na ngai, abandi koyoka ete eloko moko ezali koswa ye na lokolo. Ekoki kozala nini? Bisi etondi mpenza, kasi eloko yango ezali kaka koswa ye. Asali ndenge nyonso mpo atala na nse. Amoni na sakosi moko oyo ezali pembeni ya makolo na ye, libata moko ya bomoi, oyo na ntango mosusu ezali kobimisa motó na yango mpe ezali koswa ye! Ben alobi na ngai ete mbala mosusu nkolo ya libata amemi yango na zando mpo na kotɛkisa yango.
Ntango tokómi na kartye oyo tosengeli kosakola, tosepeli ntango bayebisi biso ete kartye yango ezali mpenza na makambo ya Afrika. Ntango tokómi na ndako ya liboso, Ben abɛti mabɔkɔ makasi mpenza mpo na koyebisa mokóló-ndako ete bapaya bayei kotala ye. Ezali lolenge wana nde bato ya kuna “babɛtaka ko-ko-ko.” Elenge mobali moko abimi mpe alobi ete azali na mosala, kasi alobi na biso tózongela ye nsima.
Na ndako oyo elandi, tokuti mwasi moko oyo azali koloba lokota moko oyo Ben ayokaka te. Abengi mwana na ye ya mobali mpe asɛngi ye abongolela ye makambo oyo Ben azali koloba. Ntango Ben asilisi, mwasi yango andimi kozwa mwa buku moko, mpe mwana na ye alobi ete akolimbolela ye yango. Na ndako ya misato, tokuti bilenge mibali ebele bafandi libándá. Mibale kati na bango batɛlɛmi mbala moko na bakiti na bango mpo na kotikela bapaya bisika ya kofanda. Tosololi na bango malamu na likambo etali kosalela ekulusu na losambo. Toyokani ete tokozongela bango mpo na kosolola lisusu na pɔsɔ ekoya. Sikoyo, ntango ekoki mpo tózongela elenge mobali oyo tokutanaki na ye na ndako ya liboso. Asilaki koyoka masolo na biso na bilenge oyo bafandaki na balabala. Azali na mituna mingi ya kotuna mpo na Biblia mpe asɛngi ayekola Biblia. Nsima ya kotala programɛ na ye, Ben andimi kozonga na pɔsɔ ekolanda, kaka na ngonga yango. Ntango tozali kozonga na ndako ya bamisionɛrɛ mpo na kolya na midi, Ben na Karen bayebisi biso ete basengeli kobongisa malamumalamu programɛ na bango ya koyekola na bato Biblia, mpamba te ezali mpasi te mpo na kobanda koyekola Biblia na bato ebele koleka oyo bakoki mpenza kotambwisa.
Topesi bango longonya na ndenge bazali koloba Lifalanse malamu. Ben alobi ete ye na Karen basili kosala mbula motoba na mosala ya misionɛrɛ, mpe bakómi mpenza komesana na lokota ya Lifalanse. Balobi na biso ete koyekola lokota ya sika ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te, kasi molende na bango ezwaki mbano.
Na ngonga ya 12:30, bamisionɛrɛ nyonso bafandi na mesa mpo na kolya na midi. Balobi na biso ete mokolo na mokolo, misionɛrɛ moko azali na mokumba ya kolamba tii ya ntɔngɔ mpe biloko ya midi, mpe na nsima, kosukola basaani. Lelo, misionɛrɛ moko alambi supu moko ya kitoko mpenza ya nsoso bakalingi, na mbálá bakalingi, tomate mpe ndunda mobesu pembeni; wana ezali lobɔkɔ na ye mpenza!
Ben na Karen bakosala nini na nsima ya midi? Bayebisi biso ete na mboka wana mobimba, bato bakimaka moi kobanda ngonga ya 1 tii ngonga ya 3 nsima ya midi; yango wana, mbala mingi bamisionɛrɛ balekisaka ntango yango na koyekola to na kolala mwa moke. Tokamwi te ntango Karen ayebisi biso ete bamisionɛrɛ ya sika baumelaka te na komesana na bomoi wana!
Nsima ya kolala mwa moke, tozongi na mosala ya kosakola. Tokei kotala moto oyo asepelaki ntango Ben asololaki na ye mbala ya liboso; asili komeka kozongela ye mbala na mbala, kasi azali kozwa ye te; lelo mpe tokuti ye te, kasi ntango Ben abɛti mabɔkɔ, bilenge mibali mibale babimi na ndako. Bayebisi biso ete nkolo ndako ayebisaki bango ete Ben akoleka, mpe alobaki na bango básɛnga ye mokanda Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Totikeli bango buku yango. Na nsima, tomati na bisi oyo ekomema biso na esika oyo Karen akoyekola Biblia na mwasi moko oyo asepelaki.
Ntango tozali koleka na babalabala oyo etondi na bato, Karen ayebisi biso ete akutanaki na mwasi yango mokolo moko, ntango bango mibale bamataki na taxi moko elongo na bato mosusu. Karen apesaki mwasi yango trakte atánga ntango bazalaki na kati ya taksi. Mwasi yango atángaki trakte mpe nsima asɛngaki trakte mosusu. Atángaki trakte ya mibale mpe esepelisaki ye mingi. Ntango bakómaki na esika oyo basengelaki kokita, Karen ayokanaki na mwasi yango mpo akende kotala ye na ndako na ye mpe koyekola na ye Biblia na lisalisi ya mwa buku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? Lelo, Karen akoyekola na ye liteya ya mitano ya mwa buku yango.
Tosukisi mokolo oyo tolekisi na mosala ya kosakola, kasi tozali naino na mwa mituna mosusu mpo na mosala ya misionɛrɛ. Bamisionɛrɛ oyo bayambi biso balobi na biso ete ntango tokozonga na ndako, bakolambela biso mwa bilei ya kilo mingi te mpe bakopesa biyano na mituna na biso.
Lolenge oyo bamesanaka na bomoi ya misionɛrɛ
Ntango tozali kolya makei oyo bakalingi, na mampa, na fromage, bazali koyebisa biso makambo mingi mosusu ya bomoi ya misionɛrɛ. Mokolo ya mosala moko ezalaka mingimingi mokolo oyo bamisionɛrɛ bapemaka to basalaka makambo na bango moko. Bamisionɛrɛ mingi balekisaka bangonga mosusu ya mokolo yango na kokomela mabota na bango mpe baninga na bango mikanda. Bazalaka na mposa mingi ya koyoka bansango ya bamboka na bango mpe basepelaka mingi kotinda mpe kozwa mikanda.
Lokola bamisionɛrɛ bafandaka mpe basalaka na ndako moko, ezali mpenza na ntina ete básololaka malamu, bázalaka elongo na baninga na bango bamisionɛrɛ mpe básololaka makambo ya elimo. Mpo na yango, longola programɛ ya moto na moto mpo na koyekola Biblia, mokolo nyonso ya mosala moko, bamisionɛrɛ nyonso bayekolaka Biblia elongo na lisalisi ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Ben alobi ete ntango bamisionɛrɛ oyo bauti bikólo ndenge na ndenge bafandi esika moko, ekoki kozanga te ete makanisi na bango ekesene na mwa makambo ya mikemike, kasi ebongiseli ya elimo ya boyekoli ya libota esalisaka bango na kobatela kimya mpe bomoko. Amonisi ete yango mpe esalisaka mokomoko na bango na komimona te ete aleki basusu.
Komikitisa ezali mpe na ntina mingi. Batindaka bamisionɛrɛ mpo básalela basusu, kasi mpo bato básalela bango te. Bamisionɛrɛ yango bamonisi biso ete kati na makambo oyo ezalaka pɛtɛɛ te mpo na koloba yango, ezala na monɔkɔ nini, ezali koloba “limbisá ngai,” mingimingi ntango moto asengeli kosɛnga ete bálimbisa ye mpo na likambo oyo alobaki to asalaki na nko te. Ben akundweli biso ndakisa ya Abigaili na kati ya Biblia, ye asɛngaki bolimbisi mpo na mabe oyo mobali na ye asalaki, mpe yango esalaki ete likama monene ekómela bango te. (1 Samwele 25:23-28) Koyeba ‘kozalana na kimya’ ezali likambo ya ntina mingi mpo na kozala misionɛrɛ malamu.—2 Bakolinti 13:11.
Mbala moko na sanza, bamisionɛrɛ basalaka likita mpo na kolobela libota na bango, mpe babongisaka lisusu programɛ ya misala ya ndako na bango. Na nsima, biso nyonso tolei mwa eloko mpo na kosepelisa monɔkɔ. Tomoni yango mpenza ebongiseli moko malamu mpe kitoko.
Nsima ya kolya na mpokwa, totamboli moke mpo na kotala ndako ya bamisionɛrɛ. Tomoni ete, atako ndako yango ezali ya mindɔndɔ te, bamisionɛrɛ bazali kopesana mabɔkɔ mpo na kobatela yango pɛto. Ezali na frigo, na masini ya kosukola bilamba mpe na resho. Karen ayebisi biso ete na bikólo ya moi makasi, lokola na ekólo wana ya Afrika ya Wɛsti, bokoki mpe kozala na masini ya kopesa malili na ndako. Esika malamu ya kofanda, biloko malamu ya kolya, mpe makambo oyo bokoki kosala mpe oyo bokoki kosala te mpo na komibatela nzoto, nyonso wana esalisaka bamisionɛrɛ na kozala ntango nyonso na nzoto kolɔngɔnɔ mpe kobota mbuma na mosala na bango.
Bazali kotya makanisi na makambo ya malamu
Tokamwi na makambo nyonso oyo tomoni. Ekoki nde kozala ete mosala ya misionɛrɛ ezali mpo na biso? Ndenge nini tokoki koyeba yango? Bamisionɛrɛ oyo bayambi biso bayebisi biso mwa makambo oyo tokoki kokanisa malamu likoló na yango.
Liboso, bayebisi biso ete mosala ya misionɛrɛ moklisto ezali te ya kokende kotambolatambola mpo na kotala bamboka. Bazali nde koluka bato ya mitema sembo oyo balingi koyeba bilaka kitoko ya Nzambe. Bamisionɛrɛ balekisaka ngonga soki 140 na sanza na mosala ya kosakola. Na bongo, esɛngaka ete bálinga mpenza mosala ya kosakola.
‘Bongo banyoka, miselekete mpe banyama mosusu ya mikemike?’ Atako bamisionɛrɛ mingi bakoki kokutana na banyama yango na mboka oyo batindi bango mpo na kosakola, Ben ayebisi ete bamisionɛrɛ bamesanaka na banyama yango. Abakisi ete esika mokomoko oyo batindi misionɛrɛ mpo na kosakola ezali na makambo na yango ya kitoko, mpe nsima ya mwa ntango, bamisionɛrɛ batyaka makanisi na bango na makambo malamu ya mosala na bango. Nsima ya mwa ntango, makambo oyo liboso ekokaki komonana lokola “ekeseni,” bamesanaka na yango mpe ntango mosusu kutu basepelaka na yango. Misionɛrɛ moko oyo alekisaki bambula ebele na Afrika ya Wɛsti liboso ete makambo mosusu esɛngisa ye azonga na mboka na ye, alobaki ete mpasi oyo ayokaki mpo na kotika esika oyo batindaki ye mpo na kosakola, eleki mpasi oyo ayokaki mpo na kotika mboka na ye bambula mingi liboso. Mboka oyo batindaki ye na mosala ya misionɛrɛ ekómaki mpenza mboka na ye.
Ozali pene mpo na kosala yango?
Ben na Karen bayebisi makambo mingi oyo ezali kotinda biso tókanisa kosala mosala ya misionɛrɛ. Ezali mpe bongo mpo na yo? Osilá kokanisa kosala lokola misionɛrɛ na mboka mopaya? Soki ɛɛ, mbala mosusu ezali mpasi te okóma misionɛrɛ, ndenge okokaki kokanisa yango. Moko ya makambo ya ntina oyo esɛngami ezali kolinga mosala ya ntango nyonso mpe kosepela na mosala ya kosalisa bato. Yebá ete bamisionɛrɛ bazali bato ya ndenge mosusu te, kasi bazali kaka mibali mpe basi lokola bato nyonso. Bazali kosala nyonso oyo ekoki na bango mpo na kokokisa mosala moko ya ntina mingi.
[Bililingi na lokasa 27]
Mokolo nyonso ebandaka na kotalela mokapo ya Biblia
[Bililingi na lokasa 29]
Bililingi ya Afrika
[Elilingi na lokasa 29]
Bomoi ya misionɛrɛ ekoki kozala bomoi ya esengo