Mai ya bomoi ezali kotiyola na bangomba ya Andes
Bangomba ya Andes ekatisi ekólo Pérou banda na nɔrdi tii na sudi mpe na monene, ebandi na bokula ya ekólo yango na mbu tii na katikati na yango; yango wana, mboka yango ezali na bilongi mibale: na wɛsti, kobanda na bokula ya mbu, mabele ezali polele mpe ekauká, na ɛsti nde ezali na bazamba mpe bisobe. Kati na bato milio 27 oyo bafandaka na Pérou, koleka milio 9, bafandaka na bangomba wana. Bamosusu bafandaka likoló mpenza ya bangomba mpe bamosusu bafandaka na mabwaku mpe bisika oyo ekitá epai milona ebotaka malamu, kaka na bangomba yango.
KOMATA Bangomba ya Andes ezali mpasi mingi. Yango wana, bamilio ya bato oyo bafandaka kuna bazali lokola bato bakabwaná na mokili, makambo mingi oyo elekaka na bisika mosusu ya mokili bayebaka yango te.
Bato batongá bamboka mikemike pembenipembeni ya mingala mpo na bilanga mpe mpo na komɛlisa bibwele lokola lama, alpaga, vigogne na bampate. Kasi, ezali mpe na mai mosusu oyo ezali kotiyola na Bangomba ya Andes; ezali mai ya elimo oyo ezali kouta epai ya Yehova, “liziba ya mai ya bomoi.” (Yilimia 2:13) Nzambe azali kotinda Batatoli na ye mpo na kosalisa bato ya bamboka ya Bangomba ya Andes báyeba ye mpenza mpe báyeba mikano na ye.—Yisaya 12:3; Yoane 17:3.
Lokola Nzambe alingi ete ‘bato ya mitindo nyonso bábika mpe bákóma na boyebi mpenza ya solo,’ baministre ya nsango malamu bazali kosala nyonso mpo na kokóma na bisika wana mpe komemela bato nsango ya bomoi oyo ezali na kati ya Biblia. (1 Timote 2:4, NW) Nsango ya Biblia engɛngisaka bato mpe ezali nsango ya lokumu. Nsango yango elongoli bato ya mitema sembo oyo bafandi na bamboka wana na boombo ya biyambayamba, ya bonkɔkɔ mpe ya kobanga bato oyo bakufá, bilimu mabe mpe bilima. Likambo oyo eleki malamu ezali ete nsango yango ezali kopesa bango elikya kitoko ya bomoi ya seko na paladiso awa na mabele.
Molende oyo bazali kosala
Basakoli ya nsango malamu oyo bakendaka koteya na bamboka wana bamesanaka na makambo mingi ya sika. Mpo nsango na bango esimba mitema ya bato, bateyi ya Biblia basengeli koyeba monɔkɔ ya Quechua to ya Aymara, minɔkɔ mibale oyo bato ya bamboka wana balobaka.
Ezali mpasi mingi mpo na kokóma na bamboka oyo ezali na Bangomba ya Andes. Na bisika mingi banzela ya bingbunduka ekómá te. Mituka oyo ekendaka kuna ezali bimbambala, bambula ebebisá banzela mpe lisusu, bangomba na mabwaku ezali mingi. Batatoli basalaka ndenge nini mpo na kokutana na bato mpe kosakwela bango nsango ya Bokonzi?
Basakoli ya mpiko ya nsango malamu bandimaki etumba wana mpe balobaki lokola mosakoli Yisaya ete: “Ngai oyo! Tindá ngai!” (Yisaya 6:8) Bazalaki kosalela mituka misato oyo ezali lokola bandako ya kolala mpo na kokende na nɔrdi, na ntei mpe na sudi. Babongisi-nzela ya molende bazalaki komema ebele ya bakartɔ etondá na Babiblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia mpe balonaki mateya ya solo ya Biblia na mitema ya bato oyo bafandaka kuna, bato yango batondá boboto, bazali bayambi-bapaya mpe bazali na mitema sembo.
Mabunu ya banzela wana ya bangomba ezali makama mpenza. Mpo na koleka mabunu mosusu, esɛngaka ntango mosusu motuka elanda banzela ya kokatakata. Mokolo mosusu, misionɛrɛ moko afandaki na kiti ya nsuka na kati ya bisi moko, ntango abwakaki miso libándá, amonaki ete pine moko ya nsima ezalaki na esika mpenza oyo lobwaku moko ya mɛtrɛ 190 ebandi! Akangaki miso tii ntango bisi elekaki esika wana.
Banzela mosusu ebebá mpenza mpe ezali mikemike. Mokolo mosusu, motuka na bango moko oyo ezali lokola ndako ya kolala ezalaki kokita na ngomba na mwa nzela moko moke; mbala moko, liboso na yango, motuka mosusu ya monene ezalaki komata. Esengelaki ete motuka oyo ezalaki kokita ezonga nsima tii na likoló ya ngomba, na esika oyo mituka yango mibale ekokaki kolekana moko pembeni ya mosusu, pene etutana.
Atako bongo, milende nyonso wana ezali kobota mbuma malamu. Okosepela koyeba makambo mosusu na milende yango oyo bandeko bazali kosala?
Mosala ya “kosopa” mai na Laki Titicaca
Laki Titicaca ezali likoló mpenza ya Bangomba ya Andes, na mɛtrɛ 3 800 likoló ya nivo ya mai monene. Na mokili mobimba, yango ezali etima ya mai oyo ezali na esika oyo eleki likoló mpe masuwa ekoki kotambola kati na yango. Mingala koleka 25 esopanaka na Laki Titicaca mpe mingi na yango euti na bansongɛ ya bangomba oyo ezipami na mbula-mpɛmbɛ, bansongɛ mosusu ezali na likoló mpenza, na mɛtrɛ 6 400 likoló ya nivo ya mai monene. Lokola bisika yango ezali likoló mingi, malili ezalaka makasi; bapaya oyo bakendaka kuna, ntango mosusu makila etangaka bango na zolo to mpe bayokaka mposa ya kosanza.
Eleki mwa ntango, etuluku moko ya babongisi-nzela oyo balobaka monɔkɔ ya Quechua mpe ya Aymara bakendaki na bisanga mibale ya Laki Titicaca: Amantani mpe Taquile. Bamemaki diapozitive mpo na kolakisa bililingi oyo ezali kolobela lisolo oyo motó ya likambo elobi ete “Tótala malamumalamu mangomba”; bililingi yango ezali komonisa na bosembo mpenza lokuta ya mangomba ya boklisto. Bato basepelaki na yango mingi. Mobali moko ayambaki bandeko mpe apesaki bango shambre moko monene na ndako na ye epai bazalaki kolala mpe koteya bato Biblia.
Bato 100 bayanganaki na likita ya liboso oyo basalaki na Amantani; na Taquile, bazalaki bato 140. Lisolo oyo ezalaki kolimbola bililingi yango ezalaki na monɔkɔ ya Quechua. Mobali moko na mwasi na ye oyo bazalaki liboso kofanda na esanga yango te balobaki boye: “Batatoli ya Yehova, ntango ekokaki mpenza mpo bókanisa biso. Tozalaki kobondela mpo bókoka koya.”
Longola bisanga mibale wana ya minene, nsango malamu esakolami mpe na bisanga mosusu soki 40 ya mikemike oyo etepaka likoló ya mai ya Laki Titicaca. Bisanga “etepaka” likoló ya mai? Ɛɛ, bisanga yango ezali nde bitando ya mingendu (roseaux) oyo ekolaka na bisika oyo ezali mozindo mingi te na kati ya laki. Mingendu yango ebotaka na mabele ya kati ya mai mpe ebimaka libándá ya mai. Mpo bato ya mboka bákómisa etando moko ya mingendu esanga, bakangisaka nkekele oyo ebimá libándá ya mai, bakopikola yango te kuna na nse ya mai, kasi bakolíngalínga yango mpo etandama likoló ya mai. Na nsima, mpo bisika yango ezala makasi, bakobakisa pɔtɔpɔtɔ mpe nkekele mosusu oyo bakatá. Bato bafandaka na mwa bandako ya ndɛlɛ likoló ya bisika wana.
Batatoli ya Yehova basombaki bwato moko mpo na kokende kosakola nsango malamu epai ya bato oyo bafandi na bisanga ya Laki Titicaca. Bwato yango ekoki komema bato 16. Soki basɛmi na esanga moko oyo etepaka likoló ya mai, Batatoli batambolaka likoló ya bisika yango oyo ezali na nkekele mpo na kokende ndako na ndako. Balobaka ete mbala mingi bayokaka lokola mwa kodenda na nse ya makolo na bango. Bato oyo babangaka mai bakoki kotambola na bisika yango te!
Bato oyo balobaka lokota ya Aymara bafandaka na bamboka mikemike pembenipembeni ya mai mpe na bisika oyo ezali lokola bisanga kasi ekangani na mokili. Mpo na kokóma kuna, kokende na bwato ezali malamu koleka kokende na nzela ya mabele. Basalelaka babwato wana mpo na komemela pene na bato 400 000 oyo bafandi kuna, nsango malamu. Babwato yango ekozala na mosala mingi mpo na ntango molai lisusu.
Bazali kosalisa bato oyo bazali na mposa ya mai ya elimo
Flavio azalaki kofanda na mboka Santa Lucia, pene na Juliaca, na Bangomba ya Andes. Na Lingomba ya Évangelique, bateyaki ye ete bato mabe bakendaka konyokwama na mɔ́tɔ ya lifelo. Na boumeli ya bambula ebele azalaki kobanga etumbu ya seko na kati ya mɔ́tɔ ya lifelo. Mbala mingi, azalaki komituna ndenge nini Nzambe ya bolingo akoki konyokola bato na mɔ́tɔ libela na libela. Ntango Tito, Motatoli ya Yehova moko oyo azali mobongisi-nzela akendaki na mboka wana, akutanaki na Flavio.
Motuna ya liboso oyo Flavio atunaki ezalaki oyo: “Lingomba na bino eteyaka ete bato banyokwamaka na mɔ́tɔ ya lifelo?” Tito apesaki ye eyano ete likambo ya ndenge wana ezali mpenza mabe na miso ya Mozalisi mpe ezali kofingisa nkombo ya Yehova, Nzambe ya bolingo. Tito alakisaki Flavio, na kati ya Biblia na ye moko, ete bato oyo bakufá bayebaka eloko moko te mpe bazelaka lisekwa awa na mabele ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mokili. (Mosakoli 9:5; Yoane 5:28, 29) Mateya yango efungolaki Flavio miso. Mbala moko andimaki koyekola Biblia mpe eumelaki te, azwaki batisimo.
Bato ya mboka moko oyo bazali na botɔndi mingi
Kanisá esengo oyo okoki kozala na yango soki okei koteya nsango ya Makomami epai ya bato ya mboka oyo bamoná naino Biblia te to kosakola na bamboka ya bato oyo bayoká naino nkombo ya Batatoli ya Yehova te to nsango malamu oyo bamemelaka bato. Yango nde likambo oyo bandeko basi misato oyo bazali babongisi-nzela basalaki. Rosa, Alicia na Cecilia, basakolaki na Izcuchaca mpe na Conayca, bamboka oyo ezali likoló ya bangomba, na mɛtrɛ 3 600 likoló ya nivo ya mai monene, na ntei ya Pérou.
Ntango bakómaki na mboka ya liboso, bazalaki na esika ya kolala te. Basololaki na mokonzi ya bapolisi na mboka yango, mpe balimbolelaki ye ntina oyo bakendaki na mboka yango. Nini esalemaki? Apesaki bango esika ya kolala na biro ya bapolisi. Mokolo oyo elandaki, babongisi-nzela yango bazwaki bisika ya malamu epai bazalaki kobongisa makambo na bango nyonso liboso ya kokende kosakola.
Eumelaki te, mokolo ya Ekaniseli ya liwa ya Klisto ekokaki. Babongisi-nzela bakutanaki na bato nyonso na bandako na bango na mboka Izcuchaca, bakabolaki Babiblia ebele mpe babandaki koyekola Biblia na bato mwa mingi. Liboso ya Ekaniseli, bakabolaki bapapye mpo na kobengisa bato na likita yango, balimbolelaki bango ntina ya likita yango mpe ntina ya limpa mpe vinyo oyo basalelaka na Ekaniseli. Babengisaki bandeko mibali mpo na kosalisa bango mpo na likita wana mpe moko na bango asalaki lisukulu ya Ekaniseli. Ezalaki mpenza esengo na komona bato 50 ya mwa mboka yango na likita wana ya ntina mingi! Mpo na mbala ya liboso, bakangaki ntina ya Elambo ya Mpokwa ya Nkolo. Bazalaki mpe na esengo ya kosimba Biblia na mabɔkɔ na bango!
Bakitisi bato mikumba ya kilo mingi
Komemela bato oyo bazali na boombo ya mangomba ya lokuta mateya ya solo ya Biblia, oyo ezali lokola mai ya mpiɔ mpo na kokitisa bango mitema, epesaka esengo. Pisac ezalaki mboka monene na bokonzi ya Inca na ntango ya kala. Bato mingi oyo bafandi kuna bateyaki bango lifelo ya mɔ́tɔ, liteya oyo euti na Biblia te. Basango na bango bayebisaka bango ete mpo bákɔta na lola, esengeli ete basango bábondela mpo na bango.
Yango wana, bato wana bazali na mposa ya mateya ya solo ya Biblia mpo ezali lokola mai ya mpiɔ oyo ezali kokitisa bango motema. Ntango azalaki kosakola ndako na ndako, Santiago, Motatoli ya Yehova moko oyo azali mobongisi-nzela, alimbwelaki moto moko ete bato ya sembo bakozwa bomoi ya seko na paladiso awa na mabele. (Nzembo 37:11) Santiago atángelaki mobali yango na kati ya Biblia ete bato oyo bakufá bakosekwa mpe ete bato bakoyekola banzela ya sembo ya Yehova mpe akopesa bango elikya ya bomoi ya seko. (Yisaya 11:9) Liboso na yango, moto yango azalaki mondimi ya molende na Lingomba ya Katolike, amipesaki na makambo ya bilimu mabe mpe alingaki komɛla masanga mingi. Kobanda wana, akómaki na elikya oyo euti mpenza na Biblia mpe na bomoi na ye akómaki na mokano ete akozala na bomoi na Paladiso. Atumbaki biloko nyonso oyo azalaki kosalela mpo na koyokana na bilimu mabe mpe atikaki kolangwa masanga. Afandisaki libota na ye mobimba esika moko mpe andimaki koyekola Biblia. Na nsima, bato nyonso ya libota na ye bamipesaki na Yehova Nzambe mpe bazwaki batisimo.
Bazali koyamba bato na esengo
Bato oyo bafandaka na bangomba bazali mpenza bayambi-bapaya. Atako bazali na bandako mikemike mpe bazali na biloko mingi te, bakabelaka bapaya eloko nyonso oyo bamonani na yango. Soki moto ayekoli naino mitinda ya Biblia te, apesaka mopaya oyo ayei kotala ye nkasa ya coca mpo atafunaka yango ntango bazali kosolola. Kasi, soki akómi Motatoli, akoki kopesa mopaya lutu ya sukali; yango ezali na valɛrɛ moko na nkasa ya coca na bitúká wana oyo ezali mosika mpenza.
Ndeko moko asɛngaki na misionɛrɛ moko bábima na ye mpo na kozongela bato oyo basepelaki. Nsima ya kobuta ngomba moko molai, bakómaki na ndako ya liboso; babɛtaki mabɔkɔ mpo na koyebisa nkolo-ndako ete bapaya bayei kotala ye. Babengaki bango bákɔta na ndako yango ya ndɛlɛ oyo esengeli kongunzama mpo na kokɔta. Bakɔtaki mpe batɛlɛmaki na katikati ya ndako oyo nse na yango ezali kaka mabele mpe ezalaki na mwa libulu moko oyo mama ya ndako atimolaki, atii bolangiti na kati na yango mpe afandisi mwana na ye. Mwana akoki kobima na libulu te, azali se kosɛka mpe kosala mwa makɛlɛlɛ na ntango mikóló bazali kosolola. Basololaki malamu mpe bayebisaki ye bolamu oyo Bokonzi ya Nzambe ekomema; na nsima, mwasi yango abimisaki bido moko monene ya masanga ya sukali oyo basalaka na mboka na bango. Na nsima, bandeko yango bakobaki nzela na bango, bakitaki lisusu ngomba mpo na kokende kotala bato mosusu.
Bazali kobuka mbuma mingi
Lelo oyo, na etúká yango ezali na bituluku soki monkama ya bato koleka nkóto moko oyo bazali koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Bandeko oyo bazali kozwa badiplome na Eteyelo mpo na kobongisa basungi na engumba-mokonzi Lima, bazali kotinda bango kuna mpo na kosalisa bituluku yango ekóma masangá. Nsango malamu ya Bokonzi ezali kolongola bato ya mitema sembo na boombo ya mangomba ya lokuta mpe ya biyambayamba oyo ezalaki kokanga bango banda kala! (Yoane 8:32) Bazali komemela bango mateya ya solo oyo ezali lokola mai oyo ezali kosilisa bango mposa ya mai.
[Elilingi na lokasa 10]
Bazali kosakola na bisanga oyo etepaka na kati ya Laki Titicaca