Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 15/8 lok. 32
  • Diplome mpo na mosala ya malamu mingi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Diplome mpo na mosala ya malamu mingi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 15/8 lok. 32

Diplome mpo na mosala ya malamu mingi

NA RÉPUBLIQUE DÉMOCRATIQUE DU CONGO, lisangá moko ya bapanzi-nsango (Association des journalistes congolais et africains pour le développement), na mokuse AJOCAD, epesaka diplome mpo na mosala ya malamu mingi lokola “mbano epai ya bato to masangá oyo ezali kopesa mabɔkɔ mpo ekólo [Congo] ekende liboso.”

Na mokolo ya 17 Novɛmbɛ 2000, bapesaki lisangá ya Batatoli ya Yehova diplome yango “mpo na mateya oyo ezali na mikanda na bango, mateya yango ezali mpe kosunga bana ya Congo bákolisa mayele na bango mpe bábongisa bomoi na bango.”

Na lisolo na yango oyo elobelaki likambo yango, zulunalo Le Phare, oyo ebimaka na Kinshasa, elobaki boye: “Ezali mwa mpasi na komona mwana ya Congo oyo asimbá naino te bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! to mikanda mosusu ya Batatoli ya Yehova. Bazulunalo yango [elobelaka] makambo nyonso ya bomoi.” Lisolo yango elobaki mpe ete mikanda yango elakisaka “lolenge ya kolonga mikakatano ya ntango na biso” mpe ezali komonisa “ntina mpenza ya makambo mazali kobima na mokili.” Lamuká! “ekɔtaka na makambo ya politiki te mpe ekumisaka mposo moko te.” Lisusu, bazulunalo yango elendisaka bato “na kondima ete mosika te Mozalisi akokokisa elaka na ye ya kosala mokili ya sika ya kimya.”

Lokola AJOCAD emonisi yango, bana ya Congo mingi bazwi litomba na mikanda ya Batatoli ya Yehova. Mikanda yango ebimaka na minɔkɔ ebele; nsango na yango ya elikya ekoki mpe kosalisa yo.

Talá awa na nse mpo na koyeba ndenge oyo okoki kozwa yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto