Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 15/8 lok. 31
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Masolo mosusu
  • Yobo ayikaki mpiko​—⁠Biso mpe toyika mpiko!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mokanda ya Biblia nimero 18—Yobo
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Yobo akumisaki nkombo ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Ndakisa ya moto oyo andimaki básembola ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 15/8 lok. 31

Mituna ya batángi

Bampasi ya Yobo eumelaki ntango boni?

Bato mosusu bakanisaka ete bampasi ya Yobo eumelaki bambula ebele, nzokande mokanda ya Yobo ezali komonisa te ete eumelaki mpenza mingi.

Ekoki mpenza kozala ete ebandeli ya bampasi ya Yobo, elingi koloba kokufela bana mpe kobungisa biloko na ye, esalemaki na mwa ntango moke. Tozali kotánga boye: “Mokolo moko bana na ye [Yobo] babali mpe bana na ye basi bazalaki kolya mpe komɛla vinyo kati na ndako ya nkulutu na bango.” (Biso nde totɛngisi makomi.) Bansango elandanaki epai ya Yobo ete abungisi bangɔmbɛ na ye, bampunda na ye, bampate na ye, bakamela na ye, mpe basaleli na ye oyo bazalaki kobatela banyama wana. Ekoki mpenza kozala ete nsima ya makambo wana, mbala moko, Yobo azwaki nsango ya liwa ya bana na ye oyo “bazalaki kolya mpe komɛla vinyo kati na ndako ya nkulutu na bango.” Ekoki kozala ete makambo nyonso wana esalemaki kaka na mokolo moko.​—Yobo 1:13-19.

Bampasi ya Yobo oyo elandaki eumelaki mwa mingi. Satana akendaki epai ya Yehova mpe alobaki ete Yobo akotika bosembo na ye soki ye moko ayoki mpenza bampasi na nzoto. Na nsima, Yobo azwaki “bibimba mabe longwa na matambe na makolo na ye kino epai na likoló na motó na ye.” Esengelaki mwa ntango mpo maladi wana epanzana na nzoto na ye mobimba. Na ntembe te esengelaki mpe mwa ntango mpo babɔndisi ya lokuta oyo bakendaki kotala ye báyoka nsango ya “mabe nyonso” oyo ezwaki ye.​—Yobo 2:3-11.

Elifaza autaki na Temani na mokili ya Edome, mpe Sofala autaki na nɔrdi-wɛsti ya Arabie; elingi koloba ete bamboka na bango ezalaki mpenza mosika te na Usa, mboka oyo Yobo azalaki kofanda, oyo ntango mosusu ezalaki na nɔrdi ya Arabie. Kasi Biledada, ye azalaki moto ya Suhu, mpe lelo oyo, bato bakanisaka ete bato ya mboka yango bazalaki kofanda pembeni ya Ebale Pelata. Soki Biledada azalaki na mboka na ye na ntango wana, boye esengelaki koleka bapɔsɔ to basanza liboso ete ayoka nsango ya makambo oyo ekómelaki Yobo mpe asala mobembo tii na Usa. Ya solo, ekoki mpe kozala ete bango misato bazalaki mosika te na mboka ya Yobo ntango bampasi na ye ebandaki. Ata soki ezalaki ndenge nini, toyebi ete ntango baninga wana misato ya Yobo bakómaki, “bafandaki na ye elongo na mabele mikolo nsambo mpe butu nsambo” mpe balobaki ata liloba moko te.​—Yobo 2:12, 13.

Na nsima nde eteni ya nsuka ya bampasi ya Yobo elandaki; mikapo mingi ya mokanda ya Yobo elobeli makambo na yango. Ezalaki na ntembe oyo babɔndisi na ye ya lokuta bazalaki kotya mpe ebele ya maloba oyo bazalaki kosopa, mpe mbala mingi Yobo azalaki kopesa bango eyano. Ntango basilisaki, elenge Elihu apamelaki bango, mpe Yehova, longwa na likoló, asembolaki Yobo.​—Yobo 32:1-6; 38:1; 40:1-6; 42:1.

Na bongo, ekoki kozala ete bampasi nyonso ya Yobo tii na ndenge esukaki, ezwaki mwa basanza, mbala mosusu mbula mobimba ekokaki te. Mbala mosusu omonaka ete bampasi ya makasi emonanaka lokola ete eumelaka mpenza. Kasi, tóbosana te ete esilaka, se ndenge bampasi ya Yobo esilaki. Ata soki bampasi oyo tozali na yango ezali koumela, tóbosana te ete Nzambe akotika biso te, ndenge maloba oyo mapemami emonisi yango ete: “Mpo atako bolɔzi yango ezali ya ntango mokuse mpe ya pɛpɛlɛ, yango ezali komemela biso nkembo oyo kilo na yango ezali se kokamwisa mpe ezali ya seko.” (2 Bakolinti 4:17, NW ) Ntoma Petelo akomaki ete: “Soki bonyokwami mwa moke, na nsima Nzambe ya boboto monene nyonso, oyo abengaki bino na nkembo na ye ya seko na bomoko na Klisto, akosilisa kobongisa bino, akokómisa bino ngwi, akokómisa bino makasi.”​—1 Petelo 5:10, NW.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto