‘Ayikaki mpiko kino nsuka’
NA KASƐTI video moko ya 1993, kasɛti video oyo balakisaka bandeko oyo bakɔti sika na biro monene ya Batatoli ya Yehova, Lyman Swingle apesaki makanisi na ye mpo na oyo etali mosala ya Yehova; alobaki boye: “Malamu kokufa na sapato na yo na makolo!”a
Ndeko Swingle, oyo azalaki na mbula 90, asalaki likambo oyo ye moko alendisaki basusu básala. ‘Ayikaki mpiko kino nsuka.’ (Matai 24:13) Na mokolo ya misato, mwa 7 Marsi, atako azalaki kobɛla, akɔtaki na likita ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova, mpo azalaki moko kati na Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Na mokolo ya mibale ya pɔsɔ oyo elandaki, mpasi na ye ekómaki makasi, mpe na mokolo ya 14 Marsi, na ngonga ya 4:26 ya ntɔngɔ, monganga na ye alobaki ete akufi.
Lyman Swingle abandaki mosala na ye na biro monene ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn (New York) mokolo ya 5 Aprili 1930. Asalaki kuna pene na mbula 71. Na ebandeli, batindaki ye na esika oyo bakangisaka mikanda (atelier de reliure), na nsima asalaki na ndako oyo banyataka mikanda; apesaki mpe mabɔkɔ na mosala ya kosala mai ya mikanda (encre). Ndeko Swingle alekisaki mbula 25 na departema oyo ebimisaka mai ya mikanda. Asalaki mpe mbula 20 na departema ya bokomi, oyo ezali na biro monene. Na boumeli ya mbula 17 oyo esukisi bomoi na ye, asalaki na biro oyo etalaka makambo ya kobomba mosolo.
Lyman azalaki mosakoli ya molende ya Bokonzi ya Nzambe. Ntango ayaki sika na Brooklyn, ye na Arthur Worsley, moninga na ye oyo bazalaki kolala esika moko, bazalaki kozwa masuwa ya Batatoli ya Yehova, mpe kokende kopesa litatoli epai ya bato oyo bazalaki kofanda pembenipembeni ya ebale Hudson. Bazalaki na masini ya komatisa mongongo mpe bazalaki kolekisa bawikɛnde mingi na koyebisa nsango ya Bokonzi epai ya bato yango oyo bafandaki pembeni ya mai.
Ndeko Swingle abotamaki na mwa 6 Novɛmbɛ 1910, na engumba Lincoln, na etúká ya Nebraska (États-Unis). Kasi mwa moke na nsima, libota na bango ekendaki kofanda na engumba Salt Lake, na etúká ya Utah. Kuna, na 1913, baboti na ye bakómaki Bayekoli ya Biblia, nkombo oyo Batatoli ya Yehova bayebanaki na yango na ntango wana. Na boumeli ya bambula mingi, libota na bango ezalaki koyamba bandeko oyo bazalaki kouta na biro monene ya Brooklyn mpo na koya kosala masukulu, mpe bandeko yango bakómaki bandakisa mpo na Lyman. Na 1923, ntango azalaki na mbula 12, azwaki batisimo mpo na kolakisa ete amipesi epai ya Nzambe.
Nsima ya kosala mbula 26 na Brooklyn lokola monzemba, ayaki kobala Crystal Zircher na mwa 8 Yuni 1956, libala oyo ememelaki bango matomba mingi mpenza. Balinganaki makasi, mpe bazalaki ntango nyonso kobima elongo; bazalaki mpe kobima elongo na mosala ya kosakola, tii na liwa ya Crystal na 1998. Mbula soki misato liboso akufa, Crystal abɛlaki maladi oyo babengi apoplexie, oyo ekómisaki ye ebɔsɔnɔ makasi mpenza. Ndenge oyo Lyman azalaki kosalisa mwasi na ye mokolo na mokolo, mingimingi ndenge azalaki kotindika velo na ye ya bibɔsɔnɔ na mopanzi ya babalabala ya kartye oyo ezalaki pene, wana Crystal azalaki kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! epai ya baleki-nzela, emonisaki epai ya bato oyo bazalaki komona bango ete azalaki mpenza kolinga mwasi na ye.
Ndeko Swingle azalaki mobali ya sembo mpe moto ya esengo, oyo ayebaki kofanda na bato mpe bato oyo bayebaki ye balingaki ye. Ndenge moko na baboti na ye, ye mpe azalaki na elikya ya kokende kofanda elongo na Yesu Klisto na Bokonzi ya likoló, elikya oyo Biblia epesi, mpe oyo tondimi solo ete sikoyo ekokisami mpo na ye.—1 Batesaloniki 4:15-18; Emoniseli 14:13.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Yango elimboli kokufa na kati ya mosala na yo.
[Elilingi na lokasa 31]
Ndeko Swingle asalaki na departema oyo ebimisaka mai ya mikanda na boumeli ya mbula soki 25
[Elilingi na lokasa 31]
Lyman na Crystal bazalaki ntango nyonso elongo