Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 1/7 lok. 32
  • Bakoki kobosana yango te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bakoki kobosana yango te
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 1/7 lok. 32

Bakoki kobosana yango te

MBULA na mbula, na bikólo oyo bafandaka, Batatoli ya Yehova bayanganaka elongo, na mayangani ya mike mpe ya minene. Basalaka yango mpo na kozwa mateya mpe kozala esika moko; nyonso wana elendisaka bango na elimo. Kasi makambo mosusu oyo elekaka na mayangani na bango ekoki mpe kotikala libela na makanisi ya bato oyo bayaka kotala bango.

Na ndakisa, na sanza ya Yuli 1999, bankóto ya Batatoli ya Mozambique oyo bayanganaki mikolo misato na liyangani ya etúká “Liloba ya esakweli ya Nzambe,” balendisamaki mpenza. Mpo na bato mingi oyo bazalaki wana, ezalaki mbala na bango ya liboso ya koyangana na liyangani motindo wana. Maloba oyo bayokaki uta na ebaelo ekamwisaki bango mpenza; lisusu, bakamwaki mpo na makambo oyo bamonaki zingazinga na bango.

Mwasi moko oyo ayanganaki na Ndako ya Mayangani na Maputo alobaki boye: “Na bomoi na ngai mobimba, namoná naino te esika kitoko boye! Batwalɛti ezalaki na sabuni mpe talatala, mpe ezalaki mpenza pɛto. Kimya ezalaki mpenza na esika yango; okoyoka ata moke te makɛlɛlɛ ya bana bazali kobunda. Moto moko te azalaki kotindikatindika baninga! Namonaki bilenge oyo bazalaki na esengo, oyo bazali kosolola masolo ya kolendisa. Likambo mosusu oyo ekamwisaki ngai ezali oyo: moto nyonso alataki malamu. Mbala ya nsima, nakoya na bana na ngai mpe nakondimisa mobali na ngai ete tosengeli koyangana na liyangani oyo.”

Ya solo, bato bamonaka ezaleli ya kolongobana, bosembo, mpe bopɛto ya nzoto ya Batatoli ya Yehova. Mpo na nini Batatoli bakeseni na bato mosusu? Ezali mpo ete bamekaka mpenza kosalela makambo oyo bayekolaka na kati ya Biblia. Olingi komona likambo yango na miso na yo moko? Na mbula oyo, mpo na nini te koyangana elongo na bango na mayangani minene oyo bakosala na mboka na bino to mpe kokende na makita oyo basalaka pɔsɔ na pɔsɔ na Ndako na bango ya Bokonzi oyo ezali na kartye na bino?

[Elilingi na lokasa 32]

ZAMBIE

[Elilingi na lokasa 32]

KENYA

[Elilingi na lokasa 32]

MOZAMBIQUE

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto