Omonaka ete bato bakaniselaka yo mabe?
ANTONIO akómaki komitungisa mingi. Na mbalakaka mpe mpo na ntina oyo ye ayebaki te, Leonardo, moninga na ye ya motema, akómaki malilimalili epai na ye.a Ntango mosusu azalaki kondima mbote ya Antonio te, mpe soki bakutani, bazalaki kosolola lisusu malamu te. Antonio akómaki kokanisa ete, ntango mosusu, asalaki to alobaki likambo moko oyo moninga na ye akangi ntina na yango malamu te. Kasi, likambo yango nini?
Kozwela moto makanisi mabe ezali likambo oyo esalemaka mingi. Mbala mingi ezalaka mpo na makambo mikemike mpe ezalaka mpasi te mpo na kobongisa yango. Makambo mosusu nde etungisaka mingi, mingimingi soki moto azali kosala makasi mpo bátika kozwela ye makanisi mabe, kasi ezali kosila te. Mpo na nini moto azwelaka mozalani na ye makanisi mabe? Moto oyo bazali kozwela makanisi mabe amiyokaka ndenge nini na motema na ye? Okoki kosala nini soki bato mosusu bazali kokanga ntina malamu te na likambo moko oyo osali? Osengeli nde komitungisa mpo na makanisi oyo bato mosusu bazali na yango mpo na yo?
Likambo oyo ekoki kozanga te
Lokola bato mosusu bazali na likoki te ya koyeba makanisi mpe mikano oyo tozali na yango na motema, ata ndɛlɛ ekozala kaka na moto oyo akokanga ntina malamu te ya maloba na biso to likambo moko oyo tosali. Makambo ezali mingi oyo ekoki kosala ete bázwela biso makanisi mabe. Mbala mosusu, likambo mobimba ekoki kozala mpo makanisi na biso ezalaki polele te. Bato mosusu bakoki kozala na mikakatano mpo na koyoka biso malamu mpo na makɛlɛlɛ na esika oyo tozali to mpo na makambo mosusu oyo ekoki kobenda likebi na bango.
Bizaleli mosusu mpe ekoki kosala ete bato mosusu bakanisela moto mabe. Na ndakisa, bakoki kokanisela moto ya nsɔninsɔni ete azali malilimalili, alingaka kosololisa bato te to azali na lofundo. Makambo oyo moto akutaná na yango ekoki kosala ete moto akanisa naino malamu te liboso ya makambo mosusu. Lokola mimeseno mpe minɔkɔ ya bato ekeseni, mwa kwɔkɔsɔ mpo na koyokana malamu ekoki kozanga te. Soki tobakisi songisongi mpe matɔngi, ekómaka mpe ete makambo oyo elobami to esalami, bato mosusu bakangi ntina na yango ndenge mosusu. Makambo oyo nyonso etungisaka moto oyo amoni ete bakaniseli ye mabe.
Na ndakisa, Anna alobaki na ndenge ya mabe te ete moninga na ye ayebani mingi; kasi moninga yango azalaki wana te. Bakendaki kobɛtɛla moninga yango lisolo, kasi balobaki mpenza makambo nyonso ndenge elekaki te; nsima na yango, Anna akamwaki mpenza mpe alɛmbaki nzoto ntango moninga na ye wana alobelaki ye liboso ya bato ebele ete azalaki nde koyokela ye zuwa mpo moninga moko ya mobali azalaki kolinga ye mingi. Bazwaki maloba ya Anna na ndenge ya mabe, mpe nyonso oyo asalaki mpo na komonisa moninga na ye ete alobaki na ndenge ya mabe te ezalaki kaka mpamba. Likambo oyo epesaki mpasi mingi, mpe elekaki ntango mingi liboso ete Anna amonisa moninga na ye ndenge mpenza likambo ezalaki mpe bayokana lisusu malamu.
Ndenge oyo bato mosusu bamonaka yo etalelaka mingimingi ndenge oyo bakanga ntina ya makanisi na yo. Yango wana, esalaka mpasi soki makanisi na yo bato bakangi ntina na yango malamu te. Moto moko te asepelaka bádefisa ye makanisi oyo azalaki na yango te ntango asali likambo moko. Likambo yango ekoki kotungisa yo mpe okomona ete ntina moko ezali te oyo bakoki kozwela yo makanisi mabe. Okoki komona ete makanisi yango ezali na motó na makolo te, ezali se mpo na kozwa yo na mabe to ezali ya lokuta, mpe yango ekoki kosala yo mpasi na motema, mingimingi soki makanisi ya bato oyo bazali koloba yango ezali na ntina mingi na miso na yo.
Atako lolenge oyo bato bazali kokanisa mpo na yo ekoki kosepelisa yo te, kasi ebongi komemya makanisi ya bato mosusu. Ezali ezaleli ya baklisto te soki toboyi kotya likebi na makanisi ya bato mosusu; lisusu, tólingaka te ete maloba to misala na biso ebɛtisa bamosusu libaku. (Matai 7:12; 1 Bakolinti 8:12) Yango wana, ntango mosusu, ekosɛnga ete osala milende mpo na kosembola makanisi ya mabe oyo moto moko azali na yango mpo na yo. Kasi, soki ozali kolekisa ndelo na koluka ete bato bándima yo, ekobotela yo mbuma mabe, okosilisa nzoto na yo kilo mpe okomona lokola nde bato nyonso balingi yo te. Valɛrɛ na yo ya solosolo etaleli te makanisi oyo bamosusu bazali na yango mpo na yo.
Epai mosusu, makambo ya mabe oyo bato balobi mpo na yo ekoki kozala ya solo. Yango mpe ekoki kosala yo mpasi, kasi soki yo moko ondimaka mabunga na yo na bosembo mpenza, maloba ya bato wana ekoki kozala na litomba mpo na yo, ekolendisa yo osala mbongwana oyo esengeli.
Kokanisela moto mabe ebotaka mbuma ya malamu te
Kokanisela moto mosusu mabe ekoki kobimisa mbuma mabe to te. Na ndakisa, soki oyoki moto moko azali kosolola na mongongo makasi na kati ya restora, okoki kokanisa ete azali moto oyo atalelaka mingimingi bato mosusu koleka ye moko to okoki kokanisa ete azali moto oyo alingaka komilakisa. Mbala mosusu ozali komikosa. Ekoki kozala ete moto oyo azali kosolola na ye ayokaka malamu te. Ekoki kozala omoni motekisi moko na magazini ete azali moto mabe; kasi, ekoki kozala ete azali koyoka nzoto malamu te. Atako makambo ya ndenge wana ememaka biso na kozwela moto makanisi mabe, kasi ekobimisa mpenza mbuma ya mabe mingi te to oyo ekoumela te. Kasi, ntango mosusu, soki bazweli moto makanisi mabe, ekoki komema likama. Talá makambo mibale oyo elekaki na Yisalaele ya kala.
Ntango Nahasa, mokonzi na Amona, akufaki, Davidi atindaki bantoma mpo na kobɔndisa mwana na ye Hanunu oyo akómaki mokonzi na esika ya tata na ye. Kasi, mobembo wana ya bantoma etalelamaki na lolenge ya mabe , mpamba te bakaniselaki ete batindami mpo na konɔnga mboka ya Amona; yango etindaki Hanunu na kosambwisa bantoma wana mpe na nsima, na kobundisa Yisalaele. Nsuka na yango ezalaki ete bato soki 47 000 bakufaki; nyonso wana kaka mpo makanisi ya malamu etalelamaki na ndenge ya mabe.—1 Ntango 19:1-19.
Bambula ebele liboso ya likambo oyo touti kolobela, kaka na Yisalaele, likambo mosusu ya kokanisela bato mosusu mabe esukisamaki ndenge mosusu. Bato ya libota ya Lubene, libota ya Gada mpe ndambo ya libota ya Manase batongaki etumbelo moko monene pembeni ya Ebale Yaladene. Mabota mosusu ya Yisalaele etalelaki likambo yango lokola kozanga bosembo, ete mabota yango etombokelaki Yehova. Yango wana, bayanganaki mpo na kobundisa bango. Kasi, liboso na yango, batindaki bantoma epai ya mabota wana mpo na komonisa bango nkanda oyo bazalaki na yango mpo na likambo oyo basalaki oyo, mpo na bango, emonisaki ete bazali lisusu sembo epai ya Yehova te. Likambo oyo mabota mosusu esalaki ezalaki malamu, mpamba te mabota oyo etongaki etumbelo wana bamonisaki bango ete bazalaki na likanisi ya kotika losambo ya Yehova te. Etumbelo wana etongamaki mpo ezala lokola monima, mpo na komonisa bosembo na bango epai ya Yehova. Makanisi mabe oyo bazwelaki bango ekokaki komema na kotangisa makila ebele, kasi mpo ete bazalaki na mayele likambo mabe motindo wana esalemaki te.—Yosua 22:10-34.
Sembolá makambo na bolingo
Tokoki kozwa liteya monene soki tokokanisi masolo mibale oyo touti kolobela. Emonani polele ete kosembola likambo nde ezali likambo oyo ebongi kosala. Na lisolo ya nsuka, toyebi te bato boni balingaki kokufa kasi babikaki kaka mpo ngambo nyonso mibale basololaki? Na makambo mingi, soki okangi ntina malamu te ya mikano oyo etindi moto asala likambo moko, ekozala kaka te ete moto akokufa, kasi boninga ekoki kokufa. Yango wana, soki omoni lokola ete moto moko asali yo mabe, osengeli komituna soki okangi ntina ya makambo ndenge ezali mpenza, to ozali nde kozwela ye makanisi mabe? Nini etindaki ye na kosala bongo? Tuná ye. Ozali komona ete bazali kozwela yo makanisi mabe? Lobá yango. Kotika te ete lolendo epekisa yo osolola na moto yango.
Yesu amonisaki ntina malamu oyo esengeli kotinda biso na kosolola na mozalani na biso mpo na kolongola makanisi mabe, alobaki ete: “Soki okoyeisa likabo na yo na etumbelo mpe okokanisa wana ete ndeko na yo azali na yo na likambo, tiká likabo na yo kuna ete obongisa likambo na ndeko na yo, mpe na nsima ozonga mpo na kopesa likabo na yo.” (Matai 5:23, 24) Yango wana, likambo oyo ebongi kosala ezali nde kokutana na moto yango, na esika ya bino mibale kaka, kozanga kokɔtisa bato mosusu. Moto oyo asalelaki yo mabe akomona malamu te soki ayoki komilelalela na yo mpo na mbala ya liboso na monɔkɔ ya moto mosusu. (Masese 17:9) Mposa na yo esengeli kozala ya kozongisa kimya, na elimo ya bolingo. Na kimya mpenza, monisá polele, na maloba ya pɛtɛɛ mpe ya kozokisa te ndenge likambo ezali. Limbolá ndenge ozali komiyoka mpo na likambo yango. Na nsima, yoká makanisi na ye malamu. Kozala motema mɔ́tɔmɔ́tɔ te mpo na kokanisela ye mabe. Zalá na motema ya kondima ye soki amonisi ete azalaki na makanisi ya mabe te. Kobosana te, bolingo “ekondimaka nyonso.”—1 Bakolinti 13:7.
Ya solo, ata soki bosololi mpe makambo nyonso ekómi polele, okoki kotikala na mpasi na motema to na makambo mosusu ya mabe oyo ekoumela mpo ete esila. Okoki kosala nini? Soki esengeli bongo, kosɛnga bolimbisi na motema moko ebongi mpenza mpe kosala eloko nyonso oyo ekoki kosalama mpo na kobongisa likambo yango. Na makambo nyonso ya ndenge yango, moto oyo bazokisi ye asengeli kolanda toli oyo ya Makomami: “Soki moto moko azali na moto mosusu likambo, bóyikanaka mpiko, bólimbisanaka. [Lokola Yehova, NW] alimbisi bino, bino mpe bobele bongo. Nde likoló na oyo nyonso, bómilatisa bolingo oyo ezali ekanganeli ekoki mpenza.”—Bakolose 3:13, 14; 1 Petelo 4:8.
Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, kozwela basusu makanisi mabe mpe mpasi na motema ekozala kaka. Moto nyonso akoki kosala libunga to akoki koloba likambo oyo ekomonana ete ezali malamu te to ete ezali ya boboto te. Biblia elobi boye: “Mpo ete biso nyonso tokokweaka na makambo mingi. Soki moto akokweaka na liloba na ye te, ye moto [ya kokoka, NW] mpe ayebi kopekisa nzoto na ye mobimba.” (Yakobo 3:2) Lokola Yehova Nzambe ayebi likambo yango malamu, apesi biso malako oyo: “Yoká nkanda noki na [elimo, NW] na yo te, zambi nkanda ekoumela na motema ya bazoba. Yokamelá maloba nyonso malobami te ete moombo na yo moko atyola yo te; zambi motema na yo eyebi ete yo moko osili kotyola bamosusu mbala mingi.”—Mosakoli 7:9, 21, 22.
“Yehova akomekaka mitema”
Okosala nini soki emonani ete okokoka te kosembola makanisi ya mabe oyo moto mosusu azweli yo? Kolɛmba te. Kotika te kokolisa mpe komonisa bizaleli ya boklisto na ndenge nyonso oyo okokoka. Na esika oyo esengeli kobongisa, sɛngá Yehova asunga yo. Ezali bato te nde bayebi motuya na yo ya solosolo. Kaka Yehova nde “akomekaka mitema” na ndenge oyo ebongi mpenza. (Masese 21:2) Ata Yesu, bato bamonaki ye mpamba mpe batyolaki ye, kasi yango ebongolaki te lolenge oyo Yehova azalaki kotalela ye. (Yisaya 53:3) Ata soki bato mosusu bakoki kotalela yo na ndenge oyo ozali mpenza te, okoki ‘kozipola motema na yo’ epai ya Yehova na elikya ete akoyokela yo, “mpo ete [Yehova] akotalaka lokola ekotalaka moto te; moto akomonaka lolenge na libanda nde [Yehova] akotalaka kati na motema.” (Nzembo 62:8; 1 Samwele 16:7) Soki otiki te kosala oyo ezali malamu, baoyo bazwelaki yo makanisi mabe bakoki komona ete basalaki libunga mpe bakoki kobongola makanisi na bango.—Bagalatia 6:9; 2 Timote 2:15.
Ozali koyeba lisusu Antonio oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo? Asalaki makasi mpo na kolanda toli ya Makomami mpe asololaki na moninga na ye Leonardo; atunaki ye soki asalaki likambo nini oyo ezokisaki ye. Esukaki ndenge nini? Leonardo atikalaki monɔkɔ polele. Alobaki ete Antonio asalaki ye likambo moko ya mabe te mpe andimisaki ye ete alingaki soki moke te kozala malilimalili epai na ye. Soki emonanaki ete azalaki malilimalili, ekoki kozala mpo azalaki kokanisa makambo mosusu. Leonardo asɛngaki bolimbisi na ndenge oyo, atako ayebaki yango te, azokisaki moninga na ye mpe apesaki ye matɔndi na ndenge ayaki kosolola na ye likambo yango. Alobaki lisusu ete banda mokolo yango, akobanda kozala na bokɛngi mpo apesa bato mosusu makanisi ya ndenge wana te. Makambo nyonso ezongaki na molɔngɔ kati na bango mpe baninga yango mibale bazongelaki ndenge oyo bazalaki liboso.
Moto moko te asepelaka ete bakanisela ye mabe. Kasi, soki osali nyonso oyo okoki mpo na kosembola makambo mpe soki osaleli mitinda ya Makomami lokola bolingo mpe kolimbisa, na ntembe te yo mpe okobuka mbuma ya malamu.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Topesi bango bankombo mosusu.
[Bililingi na lokasa 23]
Kosembola makambo na bolingo mpe na elimo ya kolimbisa ekoki kobota mbuma ya malamu