Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 1/3 nk. 3-4
  • Okoki kozala mpenza na esengo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okoki kozala mpenza na esengo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Masolo mosusu
  • Mpo na kozala na esengo
    Lamuká!—2018
  • Esengo na baoyo basalelaka “Nzambe ya esengo”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Kosalela Jéhovah ezali bolamu ya solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Ndenge ya kozwa esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 1/3 nk. 3-4

Okoki kozala mpenza na esengo?

GEORGE azalaki kopesa moto nyonso mbote na mwa kosɛka. Mpo na ye, bomoi ezalaki likabo ya motuya mingi oyo tosengeli kosepela na yango. Azalaki na esengo mpe azalaki na makanisi ya kolɛmba nzoto te ata ntango akómaki kotungisama na mikakatano ya bobange. Tii na liwa na ye, George ayebanaki lokola moto ya esengo. Yo mpe ozalaka moto ya esengo lokola George? Omonaka mokolo nyonso ya sika lokola likabo oyo osengeli kosepela na yango? To, soki okanisi kaka mokolo oyo ekoya okómaka mawamawa to omitungisaka? Ezali na likambo moko oyo ezali kozangisa yo esengo?

Kozala na esengo elimboli komiyoka ntango nyonso malamu. Esengo yango emonanaka ntango moto azali kosepela to azali na nsai mpe na mposa ya kotikala na ezaleli yango. Esengo ya lolenge yango ezalaka mpenza?

Lelo oyo, bato mingi bakanisaka ete mpo na kozala na esengo, esengeli kaka kozala na bozwi mingi. Bamilio ya bato bazali koboma nzoto mpo na kokóma bazwi. Mpo na yango, mingi bazali kobebisa boyokani na bango na bato mosusu mpe bazali kobosana makambo mosusu ya ntina ya bomoi. Lokola kaka nsɛlɛlɛ na ndako na bango, bato yango basalaka makambo nyonso nokinoki, bazalaka na ntango te ya kofanda mpe kokanisa to ya kolekisa elongo na bato mosusu. Yango wana, lisolo moko oyo ebimaki na zulunalo Los Angeles Times emonisaki ete “bato oyo bazali konyokwama na makanisi bazali se kokóma mingi; ezala bilenge bakómi konyokwama na makanisi. . . . Bankisi mpo na kosilisa maladi ya makanisi ezali kati na bankisi oyo ezali kotɛkama mingi koleka. Bamilio ya bato bazali komela bangi to bazali komipesa na komela masanga mpo na koluka kosilisa mikakatano na bango. Bamosusu bakómaka lokola na ligboma ya kosombasomba biloko ntango bazali konyokwama na makanisi. Zulunalo moko (The Guardian) oyo ebimaka na Angleterre elobi ete ankɛtɛ moko emonisi ete “basi nde balekaka komipesa na kosombasomba biloko ntango bazali konyokwama na makanisi. Bazalaki mbala misato koleka mibali na kosombasomba biloko ntango bazali konyokwama na makanisi.”

Nzokande, bolamu ya solosolo batɛkisaka yango te; moto akoki kozwa yango na komipesa na molangwa te, na komela bankisi te, na bangi te, to mpe na mbongo oyo abombisi na banki te. Bolamu basombaka yango na mbongo te; ezali ofele. Epai wapi tokoki kozwa likabo yango ya motuya? Tokolobela yango na lisolo oyo elandi.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto