Na Kenya bazali koluka baoyo babongi
KENYA ezali ekólo moko kitoko mingi. Ezali na bazamba ya malamu, bitando minene ya mabele patatalu, bisobe esika molunge ezalaka makasi, ngomba milai oyo nsɔngɛ na yango izipami na mbula-mpɛmbɛ; nyonso wana epesaka bonzenga na ekólo yango. Ezali mpe na mitindo ya nyama ya zamba koleka milio moko; ezala kánga (rhinocéros), nyama oyo ezali lisusu mingi te na mokili, ezali kuna. Na bisobe ya ekólo yango tokoki mpe kokuta bitonga minene ya badikala (girafes).
Ezali mpe na ebele ya bandɛkɛ lokola mpongo, ndɛkɛ makasi mpe epumbwaka likoló mpenza, mpe bandɛkɛ mosusu ya langi ndenge na ndenge na nzembo na yango ya kitoko. Tobosani mpe te banzoku na bankosi. Ya solo, soki moto atamboli na Kenya, akoki kobosana te oyo miso na ye ekomona mpe oyo matoi na ye ekoyoka.
Nzokande, ezali na lolaka mosusu oyo ezali koyokana na ekólo yango mobimba. Ezali bongo lolaka ya bankóto ya mingongo oyo ezali koyebisa nsango ya elikya. (Yisaya 52:7) Bato ya bituluka mpe minɔkɔ koleka 40 bazali koyoka mingongo yango. Yango wana, Kenya ezali mpe ekólo kitoko na elimo.
Bato mingi ya Kenya balingi kosambela mpe baboyaka kosolola makambo ya Nzambe te. Atako bongo, kozwa bato ya kosolola na bango ekómi mokakatano mpamba te na Kenya, lokola mpe na bamboka mosusu, makambo mingi ezali kobongwana.
Mikakatano ya kozwa mbongo ezali kotinda bato mingi na kobongola mimeseno na bango. Basi, oyo kala bazalaki kosala misala ya ndako, bazali lelo kosala na babiro to mpe bazali kofanda na babalabala, epai bazali kotɛka mbuma, ndunda, mbisi, mpe bikɔlɔ. Mibali bazali kosala bangonga mingi mpo na kokokisa bamposa ya mabota na bango. Okomona mpe bana bazali kotambola na babalabala bazali kotɛka nguba oyo bakalingá mpe maki oyo batɔkisá. Nyonso wana esali ete bato moke bázalaka na ndako na moi. Likambo yango etindaki basakoli ya nsango malamu na kobongola lolenge na bango ya kosala.
Bapesaki Batatoli ya Yehova malako ete bálukaka bato oyo bazalaka na bandako na bango na moi te mpo babimaka, bakendaka na misala na bango ya mokolo na mokolo; bakisa mpe baninga, bandeko, bato ya mombongo, mpe baninga ya mosala. Bandeko balandaki malako yango, bakómaki kosolola na bato na bisika nyonso oyo bakokaki kokuta bango. (Matai 10:11) Molende yango mpo na kokolisa mosala ebotaki mbuma? Ɛɛ! Tótalela mwa bandakisa.
Bandeko nde bazalani na biso ya liboso
Nairobi, engumba-mokonzi ya Kenya, ezali na bato soki milio misato. Na ɛsti ya engumba yango, mobali moko azalaki kofanda kuna, ye azaláká mokonzi ya basoda, azalaki kolinga Batatoli ya Yehova te; mpe atako yango ezalaki kopesa ye nkanda, mwana na ye moko azalaki Motatoli ya Yehova. Na eleko moko, mobali yango asalaki mobembo ya kilomɛtrɛ 160 mpo na kokende kotala mwana na ye na engumba Nakuru, na etúká ya Rift Valley. Ntango azalaki kuna, mwana na ye apesaki ye buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Andimaki likabo yango mpe na nsima azongaki epai na ye.
Ntango akómaki epai na ye, apesaki mwasi na ye buku yango, mpe mwasi na ye abandaki kotánga yango, kozanga koyeba ete ezali mokanda ya Batatoli ya Yehova. Mokemoke, mateya ya solo ya Biblia ebandaki kosimba motema na ye, mpe asololaki makambo yango na mobali na ye. Lokola alukaki koyeba makambo yango malamu, mobali mpe abandaki kotánga buku yango. Ntango bayebaki bato oyo babimisaki buku yango, bamonaki ete makambo oyo bayebisaki bango mpo na Batatoli ya Yehova ezalaki solo te. Balukaki Batatoli na mboka wana, mpe babandaki koyekola Biblia. Ntango bango moko batángaki buku yango, basosolaki ete ebongi te ete moklisto amelaka makaya to atɛkaka yango. (Matai 22:39; 2 Bakɔlinti 7:1) Kozanga kokakatana, babwakaki makaya nyonso oyo ezalaki na magazini na bango. Nsima ya mwa basanza, bakokisaki masɛngami mpo na kokóma basakoli oyo bazwi naino batisimo te, mpe mosika te babatisamaki na liyangani ya etúká.
Eloko ya motuya na kati ya ekunde
Na zingazinga ya engumba-mokonzi, mwa bamboka mikemike ebele ezali kosalema mpe etondi na bankóto ya bato. Kuna okokuta milɔngɔ ya bandako ya mabele, ya mabaya, ya biteni ya bibende, to ya manzanza. Soki misala ezali te na baizini mpe na bakompanyi, bato balukaka na ndenge na bango moko. Bato ya misala oyo babengaka Jua kali (na Swahili: “moi makasi”) basalaka na moi makasi, basalaka basandale ya bapine, miinda ya nsinga na manzanza. Bamosusu bakendaka kolɔkɔta bapapye, manzanza mpe milangi oyo babwakaka na bisika oyo batumbaka biloko to na bikunde mpo na kobongisa yango.
Eloko moko ya motuya ekoki kozala na kati ya ekunde? Ɛɛ! Ndeko moko alobi boye: “Mokolo moko, namonaki engambe mobali moko, alati bilamba ya salite, akangi elongi, asimbi saki monene ya plastiki oyo etondaki na zulunalo ya kala, azali kotambola na libándá ya Ndako ya Mayangani. Ayebisaki ngai ete nkombo na ye William mpe atunaki boye: ‘Ozali na banimero ya sika ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli?’ Nakakatanaki mpenza mpe namitunaki soki alingi kosala na yango nini. Ntango nalakisaki ye zulunalo mitano, atalaki mokomoko na yango mpe alobaki ete: ‘Nakozwa yango nyonso.’ Nakamwaki mpe nakendaki na ndako, nayaki na buku Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis.a Nalakisaki ye elilingi ya paladiso mpe lolenge toyekolaka Biblia na bato kozanga ete báfuta. Nsima nalobaki na ye ete: ‘William, okanisi boni soki oyei lobi mpo tóbanda koyekola?’ Asalaki ndenge nalobaki, ayaki!
“Ayaki na makita mpo na mbala ya liboso mokolo moko ya lomingo. Mokolo yango, ngai nde nazalaki kosala lisukulu. Ntango William akɔtaki, atalaki bato oyo bafandi, amonaki ngai na ebaelo, abimaki mbangu na libándá. Ntango natunaki ye na nsima mpo na nini asalaki bongo, alobaki na mwa nsɔni ete: ‘Bato balekaki pɛto. Nayokaki nsɔni.’
“Lokola boyekoli na biso na William ezalaki kokenda liboso, mateya ya solo ya Biblia ebandaki kobongola bomoi na ye. Asukolaki nzoto na ye, akataki nsuki, alataki bilamba ya pɛto mpe engomami malamu; mpe mosika te akómaki koya na makita nyonso. Ntango buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko ebimaki, tokómaki koyekola na yango. Asalaki masolo mibale na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpe akómaki mosakoli oyo azwi naino batisimo te. Nayokaki esengo mingi mpenza ntango nayambaki ye lokola ndeko na ngai ya elimo mokolo azwaki batisimo na liyangani ya mokolo moko.”
Epai wapi William ayebaki mpo na mbala ya liboso valɛrɛ ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli? ‘Nakutaki mwa bazulunalo na kati ya bapapye oyo babwakaka na ekunde.’ Ya solo, azwaki eloko moko ya motuya na lolenge wana ya kokamwa.
Litatoli na esika ya mosala.
Tolukaka ntango nyonso mabaku ya kopesa litatoli ya libaku malamu na esika na biso ya mosala? James azali nkulutu na lisangá moko ya Nairobi, ye ayokaki mateya ya solo ya Biblia mpo na mbala ya liboso na litatoli ya libaku malamu. Na ngala na ye, amesanaki na kosalela lolenge yango ya koteya bamosusu. Na ndakisa, mokolo moko James amonaki moninga na ye ya mosala ayei na biro na makarɔ bakomi “Yesu azali Mobikisi.” Lokola moyekoli Filipo asalaki, James atunaki moninga na ye ya mosala ete: “Oyebi mpenza ndimbola ya maloba oyo?” (Misala 8:30) Motuna wana ememaki bango na lisolo moko malamu. Babandaki koyekola Biblia, mpe na nsima moto yango azwaki batisimo. James alongaki nde kosalisa bamosusu? Tóyoka ye moko aloba:
“Ngai na Tom tozalaki kosala na kompanyi moko. Tozalaki mbala mingi kozwa bisi ya mosala elongo. Mokolo mosusu na ntɔngɔ, tofandaki esika moko. Nazalaki kotánga buku na biso moko, mpe nasimbaki yango na ndenge ete ekoka kobenda likebi ya Tom. Se ndenge nakanisaki, likebi na ye ebendamaki, mpe natikelaki ye buku na ngai. Asepelaki mingi na makambo oyo atángaki mpe andimaki koyekola Biblia. Lelo oyo, ye na mwasi na ye bazali basaleli ya Yehova oyo bazwi batisimo.”
James alobi lisusu boye: “Na kompanyi na biso, mbala mingi na ntango ya kolya na bopemi ya midi tozalaka na masolo ya malamu. Ezalaki na masolo yango nde, mokolo moko nakutanaki na Ephraïm, mpe mokolo mosusu nakutanaki na Walter. Bango mibale bayebaki ete nazali Motatoli ya Yehova. Ephraïm alingaki koyeba mpo na nini bato balingaka Batatoli ya Yehova te. Walter atunaki mituna mpo na koyeba bokeseni oyo ezali na kati ya Batatoli ya Yehova mpe mangomba mosusu. Bango mibale basepelaki na biyano oyo euti na Makomami oyo napesaki bango mpe bandimaki tóyekolaka. Ephraïm akolaki noki. Na nsima, ye na mwasi na ye bamipesaki na Yehova. Lelo oyo azali nkulutu, mpe mwasi na ye mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Nzokande Walter, akutanaki na botɛmɛli makasi mpe atikaki koyekola. Kasi mpo na molende na ngai, azongelaki koyekola. Ye mpe azali lelo oyo nkulutu.” Na nyonso, bato 11 bakómaki baklisto ya solo mpo James alekisaki te mabaku malamu ya kopesa litatoli na esika ya mosala.
Nsuka ya likambo ya kokamwa
Moto moko akufaki na mwa mboka moko pene ya Libeke ya Victoria, mpe baninga na bandeko na ye bakendaki na lilaka. Na kati na bango, ezalaki na mobange moko oyo azali Motatoli ya Yehova. Asololaki na mwasi moko oyo azali molakisi, mpe nkombo na ye Dolly, alimbolelaki ye epai wapi moto akendaka soki akufi mpe ayebisaki ye mokano ya Yehova ya kolongola liwa mpo na libela. Lokola amonaki ete molakisi yango asepelaki, alobaki na ye ete: “Ntango okozonga epai na yo, misionɛrɛ na biso moko akoya kotala yo mpo na koteya yo Biblia.’’
Dolly afandaka na engumba ya misato oyo eleki monene na Kenya. Na ntango wana, ezalaki kaka na bamisionɛrɛ minei ya Batatoli ya Yehova oyo bazalaki kosala kuna. Ndeko mobange wana akomelaki ata moko ya bamisionɛrɛ yango mokanda te mpo na kokutana na Dolly. Azalaki se na elikya ete makambo ekoleka na lolenge wana. Esalemaki mpe bongo. Mwa moke na nsima, ndeko mwasi moko misionɛrɛ akutanaki na Dolly mpe abandaki boyekoli na ye. Lelo oyo, Dolly asili kozwa batisimo, mwana na ye ya mwasi akomisi nkombo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, bana na ye mibale ya mibali basili mpe kozwa batisimo. Kutu, azwaki esengo ya kokɔta na Eteyelo mpo na babongisi-nzela.
Lisungi mpo na ebele ya bato oyo bazali koya na ebongiseli
Lokola bandeko balendisamaki mingi mpo bápesaka litatoli ya libaku malamu, yango epesaki nzela na bankóto mosusu ya bato ete báyoka nsango malamu na Kenya. Basakoli koleka 15 000 bazali lelo oyo na mosala yango ya ntina mingi, mpe bato koleka 41 000 bayanganaki na Ekaniseli ya liwa ya Klisto na mbula eleki. Na bisika nyonso na Kenya, mbala mingi motuya ya baoyo bayanganaka na makita ezalaka mbala mibale koleka motuya ya basakoli. Yango ebimisaki mposa ya Bandako ya Bokonzi mosusu.
Bandako ya Bokonzi ezali kotongama, ezala na bingumba minene to mpe na bamboka oyo ezali mosika. Moko ya bisika yango ezali mboka Samburu oyo ezali na kilomɛtrɛ soki 320 na nɔrdi-ɛsti ya Nairobi. Na 1934, bapesaki engumba yango nkombo Maralal, yango elimboli na lokota ya Samburu “kongɛnga,” mpamba te ndako ya liboso ya nsamba ya manzanza oyo etongamaki kuna ezalaki kongɛnga na moi. Mbula 62 na nsima, ndako mosusu oyo ezali na nsamba ya manzanza etongamaki na Maralal. Yango mpe “engɛngaka” mpamba te ezali esika ya losambo ya solo na mboka yango.
Basakoli 15 basalaki molende makasi mpo na kotonga Ndako ya Bokonzi ya liboso na mboka yango ya Kenya atako ezali mosika mpenza. Lokola bazalaki na mbongo mingi te, bandeko basalelaki biloko oyo batongaka na yango ndako na mboka. Basalaki bifelo ya mabele ya motane mpe bakangisaki yango makasi na banzete oyo bapikaki na mabele. Basangisaki mputulu ya makala na nyɛi ya ngɔmbɛ mpo na kosala pɔtɔpɔtɔ moko makasi oyo bapakolaki na bifelo, mpo eumela bambula ebele.
Mpo na kozwa banzete ya kotonga ndako yango, bandeko bazwaki ndingisa ya kokata banzete. Kasi zamba ezalaki mosika, soki na kilomɛtrɛ 10. Bandeko bazalaki kokende na makolo tii na zamba, kokata banzete, kolongola bitape mpe komema yango na esika oyo bazalaki kotonga ndako. Mokolo moko, ntango bandeko bazalaki kouta na zamba, bapolisi batɛlɛmisaki bango mpe balobaki ete mokanda oyo epesaki bango ndingisa ya kokata banzete ezalaki na valɛrɛ te. Bapolisi bayebisaki ndeko moko oyo azalaki mobongisi-nzela monene ete bakangi ye mpo bakati banzete. Ndeko mwasi moko ya mboka wana, oyo ayebanaki malamu na mboka yango, ezala mpe na bapolisi, alobaki na mongongo makasi ete: “Soki bokangi ndeko na biso, bokokanga mpe biso nyonso; mpo biso nyonso tokataki banzete!” Mokonzi ya bapolisi atikaki bango nyonso bákende.
Banyama ya mabe ezalaki na zamba yango; yango wana kotambola kuna ezalaki likama. Mokolo moko, ndeko mwasi moko akataki nzete. Ntango ekweaki, amonaki nyama moko epumbwi likoló mpe ekimi. Ntango amonaki kaka langi motane na yango, akanisaki ete ezalaki mbuli; kasi na nsima, ntango amonaki bilembo ya makolo oyo etikaki, ayebaki ete ezalaki nde nkosi! Atako makama nyonso wana, bandeko basilisaki Ndako ya Bokonzi yango, mpe ezali lelo esika ya “kongɛnga” oyo ezali kokumisa Yehova.
Mokolo ya 1 Febwali 1963, ezalaki mokolo ya ntina mingi na lisolo ya Teokrasi na Kenya. Mokolo yango, biro ya filiale ya liboso efungwamaki, oyo ezalaki kaka ndako moko ya mɛtrɛ nsambo na molai mpe mɛtrɛ minei na monene. Mokolo ya 25 Ɔkɔtɔbɛ 1997, likambo mosusu ya monene esalemaki na lisolo ya Teokrasi na Kenya: mokolo ya bofungoli Betele ya sika, oyo bonene na yango ezali ya mɛtrɛ-kare 7 800. Esengelaki mbula misato ya mosala mpo na kosilisa yango. Basali ya bolingo malamu oyo bautaki na mikili 25, babongolaki zamba ya hectare misato na ndambo, bakómisaki yango esika kitoko mpo na biro ya sika, epai bandeko 80 ya libota ya Betele bazali kosala.
Ebongi mpenza tósepela na oyo Yehova asali mpo na libota na ye. Tozali kozongisela ye botɔndi na ndenge asalisaki basaleli na ye mpo báfungola mitema na bango mpe bázala na molende na mosala ya koluka, na Kenya, baoyo babongi, likambo yango esali ete mboka wana ezala mboka kitoko na elimo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.