Batatoli ya Yehova bazali kokende liboso na kondima makasi!
Lapolo ya likita ya nsuka ya mbula
NA MIKOLO oyo bato bazali na elimo ya kozanga kondima mpe ya ntembe, Batatoli ya Yehova bayebani lokola baklisto oyo bazali na kondima makasi. Yango emonisamaki polele na likita ya nsuka ya mbula ya Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania, oyo esalemaki na mokolo ya pɔsɔ, mwa 7 Ɔkɔtɔbɛ 2000, na Ndako ya Mayangani ya Batatoli ya Yehova na engumba Jersey, na etúká ya New Jersey.a
Na maloba na ye ya ebandeli, prezida ya likita yango, Ndeko John Barr, moko kati na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova, alobaki boye: “Kati na bamiliare ya bato oyo bazali na mabele mobimba, biso toyebi mpe tondimi ete Yesu Klisto, Mwana molingami ya Yehova, asili kofanda na kiti ya bokonzi na makoló, azali koyangela katikati na banguna na ye.” Kondima makasi yango emonanaki mpenza polele na balapolo motoba oyo euti na mokili mobimba.
Mateya ya solo ya Biblia ezali kolonga bikelakela na Haïti
Bato mingi bamipesi na bikelakela na Haïti. Ndeko John Norman, mokambi ya Komite ya Filiale, alobaki boye: “Mbala mingi, bato basalelaka losambo ya bankɔkɔ mpo na komibatela.” Monganga moko oyo azalaki kosambela bankɔkɔ azalaki lisusu kondima mpenza losambo yango te na ntango akatanaki lokolo na likama. Amitunaki boye: ‘Ndenge nini yango ekoki kokómela ngai soki mpenza bilimo ebatelaka ngai?’ Lokola ebele ya bato mosusu, Batatoli ya Yehova bateyaki moto yango solo ya Biblia mpe basalisaki ye na kotika bikelakela. Lokola motuya ya bato oyo bayaki na Ekaniseli ya liwa ya Klisto na mokolo ya 19 Aprili 2000 elekaki motuya ya basakoli ya Bokonzi na ekólo yango mbala minei, yango emonisi ete basakoli bakokóma lisusu mingi na ekólo yango.
Bazali kosala na molende na teritware monene ya Corée
Na Corée, kati na Batatoli ya Yehova ntuku minei likolo ya mokama, bazali na mosala ya ntango nyonso. Ndeko Milton Hamilton, mokambi ya Komite ya Filiale, alobaki boye: “Teritware na biso ezali na bato koleka milio 47, kasi lokola limpinga ya basakoli ezali monene, bakoki kosakola teritware mobimba na sanza soki moko.” Ata na masangá ya lokota ya bikela basakoli bazali kokóma mingi. Na zongazonga moko ya lokota ya bikela, bazali kotambwisa boyekoli ya Biblia 800. Elingi koloba mosakoli moko azali koyekola na moto moko. Likambo ya mawa ezali ete bazali kotya bandeko na biso ya bilenge na bolɔkɔ mpo baboyaka kokɔta na makambo ya mokili. Baklisto yango ya sembo bazali koyokana malamu na bakonzi ya bolɔkɔ, oyo mbala mingi bapesaka bango misala oyo esɛngaka kopesa na moto oyo bakoki kotyela motema.
Bazali kokokisa bamposa oyo bokoli ezali kosɛnga na Mexique
Basakoli ya Bokonzi 533 665 bapesaki lapolo ya mosala ya kosakola na Mexique na sanza ya Augusto 2000. Motuya ya bato oyo bayanganaki na Ekaniseli eleki motuya ya basakoli mbala misato. Ndeko Robert Tracy, mokambi ya Komite ya Filiale, alobaki boye: “Mokano na biso mpo na mbula oyo ezali ya kotonga Bandako ya Bokonzi mosusu 240.” Abakisaki ete: “Kasi tozali na mposa ya Bandako ya Bokonzi ebele koleka.”
Bilenge Batatoli ya Yehova na Mexique bazali kopesa ndakisa malamu. Ntango atalaki elenge moko, sango moko alobaki boye: “Nakosepela soki nazali ata na moto moko kaka lokola ye na kati ya baoyo balandaka ngai. Nasepelaka na bato yango mpo bazalaka na mposa makasi mpe na mayele ya kosalela Biblia. Balongisaka Nzambe, atako ntango yango ekoki kotya bomoi na bango na likama.”
Bazali sembo na kati ya yikiyiki na Sierra Leone
Banda na Aprili 1991, ntango bitumba ya bana-mboka ebandaki na Sierra Leone, bankóto ya bato basili kokufa, kozoka mpota minene, to kokatana mabɔkɔ to makolo. Ndeko Bill Cowan, mokambi ya Komite ya Filiale, alobaki boye: “Etumba mpe minyoko ebongoli mpenza makanisi ya bato mingi. Bato mingi oyo bazalaki koboya koyoka nsango na biso bazali lelo oyo koyoka yango na likebi mpenza. Bato bakómi koya bango moko na Ndako ya Bokonzi mpe kokɔta na makita mpo na mbala ya liboso. Mbala mingi, bato batɛlɛmisaka bandeko na balabala mpe basɛngaka báyekola Biblia.” Atako yikiyiki ezali naino na ekólo yango, mosala ya kosakola Bokonzi ezali kobota mbuma na Sierra Leone.
Programɛ monene ya botongi na Afrika ya Sudi
Ya solo, mposa ya kotonga bankóto mingi ya Bandako ya Bokonzi ezali na teritware ya filiale ya Afrika ya Sudi. Bankama ya Bandako ya Bokonzi esili kotongama. Ndeko John Kikot, moko kati na basangani ya Komite ya Filiale, alobaki boye: “Na esika ya koyangana na libandauli (hangar) to na nse ya nzete lokola ezalaki liboso, bandeko na biso bakoki sikoyo koyangana na esika ya malamu oyo ezali na bakiti ya kitoko. Atako ebele ya Bandako ya Bokonzi yango etongami na lolenge ya mindɔndɔ te, ebendaka ntango nyonso likebi ya bato koleka bandako mosusu ya mboka na bango. Na bisika mosusu, emonanaki ete nsima ya kotonga Ndako ya Bokonzi, lisangá ekolaki mbala mibale koleka mbula eleki.”
Libota ya sika ya Batatoli na Ukraine
Na boumeli ya mbula ya mosala ya 2000, basakoli bakómaki 112 720 na ekólo yango. Kati na bango, koleka 50 000 bayekolaki solo ya Biblia na boumeli ya mbula mitano oyo euti koleka. Ndeko John Didur, mokambi ya Komite ya Filiale alobaki ete: “Ya solo, Yehova abimisi libota ya sika ya bilenge Batatoli mpo na kosakola nkombo na ye!” Abakisaki lisusu ete: “Na mbula mibale oyo euti koleka, tokabolaki bazulunalo koleka milio 50, mpe motuya yango ekokani na oyo ya bato bafandi na ekólo. Sanza na sanza, tozwaka mikanda soki ya nkóto moko ya bato oyo basepelaka na mateya na biso mpe balukaka koyeba makambo mingi.”
Makambo mosusu oyo ebendaki likebi mingi na likita yango
Daniel Sydlik, moko kati na Lisangani ya Mikóló-Bakambi asalaki lisukulu moko oyo ebendaki likebi ya moto nyonso. Lisolo “Lisangani ya Mikóló-Bakambi ekeseni na lisangani oyo esalemi na kolanda mibeko ya Leta.” Lisolo moko ebimi na zulunalo oyo, elobeli mingimingi likambo yango.
Ndeko Teodore Jaracz, moko kati na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, asalaki lisukulu moko oyo ekoki kotinda na kokanisa, na motó ya likambo “Bakɛngɛli na basaleli na misala baponamaka na ndenge ya Teokrasi.” Moko na masolo oyo ebimi na zulunalo oyo elobeli likambo yango.
Likita ya nsuka ya mbula ezalaki mpe na lisukulu oyo esimbaki mpenza motema, yango esalemaki na Ndeko David Splane, moko kati na Lisangani ya Mikóló-Bakambi; yango elobelaki mokapo ya mobu mpo na 2001. Mokapo yango oyo euti na maloba ya ntoma Paulo, elobi boye: “Bózala bato oyo bakoki mpenza mpe bazali na kondima makasi na mokano mobimba ya Nzambe.” (Bakolose 4:12, NW) Batatoli ya Yehova na mokili mobimba, bazali na ekateli ya kosala bongo lokola basakolaka na bosembo mpenza nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na mabele mobimba.—Matai 24:14.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bato mosusu balandaki likita yango na nzela ya video mpe na telefone na bandako mosusu, mpe bato nyonso oyo balandaki likita yango bazalaki 13 082.