Salelá Nzambe na elimo ya komipesa
NTOMA Paulo akomaki boye: “Na esengo nyonso, nakopesa mpe nakomipesa mobimba mpo na milimo na bino.” (2 Bakolinti 12:15, NW) Maloba yango emonisi yo makanisi nini mpe ezaleli nini oyo basaleli ya Yehova basengeli kozala na yango? Molimboli moko ya Biblia alobi ete ntango Paulo akomelaki baklisto ya Kolinti maloba yango, alingaki mpenza koloba boye: “Nandimi kopesa makasi na ngai, ntango na ngai, bomoi na ngai mpe biloko nyonso oyo nazali na yango mpo na bolamu na bino, lokola tata andimaka kosala mpo na bana na ye.” Paulo amibongisaki mpo na ‘komipesa mobimba,’ to mpo na “kolɛmba mpe kosilisa makasi na ye nyonso” soki mosala na ye lokola ministre moklisto esɛngaki ye asala yango.
Lisusu, Paulo asalaki yango “na esengo nyonso.” Bible de Jérusalem elobi ete azalaki ‘mpenza na mposa’ ya kosala yango. Ezali boni mpo na yo? Ondimaka kopesa ntango na yo, makasi na yo, makoki na yo mpe bozwi na yo mpo na kosalela Yehova Nzambe mpe kosala mpo na bolamu ya bato mosusu, ata soki ntango mosusu yango ‘ekolɛmbisa yo mpe ekosilisa makasi na yo’? Okosala yango “na esengo nyonso”?
Baboyi mpenza kosalela Nzambe
Bato mingi basukaka kaka na kokakatana te, kasi baboyaka na motema moko kosalela Nzambe. Bazali na botɔndi te, balingaka kaka kosala makambo na bango moko mpe na ndenge bango moko balingi to mpe bazali batomboki. Satana amemaki Adama na Eva na makanisi ya ndenge wana. Akosaki bango ete ‘bakozala lokola Nzambe, bakoyeba malamu mpe mabe,’ elingi koloba, bakokata bango moko oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe. (Genese 3:1-5) Baoyo bazali na elimo motindo yango lelo oyo, bakanisaka ete basengeli kozala mpenza na bonsomi ya kosala nyonso oyo balingi, basengeli ata moke te kotosa Nzambe to Nzambe asengeli kotalela makambo na bango te. (Nzembo 81:11, 12) Bato yango balingaka kosalela biloko nyonso oyo bazali na yango kaka mpo na koluka matomba na bango moko.—Masese 18:1.
Mbala mosusu ozali na makanisi mabe wana te. Na ntembe te, osepelaka mpenza na likabo ya bomoi oyo ozali na yango lelo oyo mpe na elikya kitoko ya kozala na bomoi ya seko na paladiso awa na mabele. (Nzembo 37:10, 11; Emoniseli 21:1-4) Mbala mosusu ozali mpenza na botɔndi epai ya Yehova mpo na bolamu nyonso oyo azali kosalela yo. Kasi biso nyonso tosengeli kokeba mpamba te, Satana akoki kobebisa makanisi na biso mpe tokosalela Nzambe mosala oyo ezali kosepelisa ye lisusu te. (2 Bakolinti 11:3) Ndenge nini yango ekoki kosalema?
Esengeli kosala na elimo ya komipesa
Yehova alingaka tósalela ye na komipesa mpe na motema mobimba. Atindikaka biso na makasi te ete tósala mokano na ye. Satana nde asalaka nyonso mpo na kotindika bato na makasi ete básala mokano na ye. Ya solo, ntango Biblia ezali kolobela kosalela Nzambe, ezali kosalela maloba lokola mokumba, mibeko, masɛngami mpe bongo na bongo. (Mosakoli 12:13; Luka 1:6) Kasi, eloko ya liboso oyo esengeli kotinda biso na kosalela Nzambe ezali mpo tolingaka ye.—Exode 35:21; Deteronome 11:1.
Paulo ayebaki ete ata amipesi na mosala ya Nzambe ndenge nini, nyonso wana ekozala mpamba soki ‘azangi bolingo.’ (1 Bakolinti 13:1-3) Ntango bakomi ya Biblia bazali kobenga baklisto baombo ya Nzambe, yango elingi koloba te ete baklisto bazali mpenza na boombo ya nsɔni oyo bazali kotinda bango makambo na makasi. (Baloma 12:11; Bakolose 3:24) Elingi nde koloba ete balingaka kotosa mpamba te balingi Nzambe na Mwana na ye Yesu Klisto na motema na bango mobimba.—Matai 22:37; 2 Bakolinti 5:14; 1 Yoane 4:10, 11.
Mosala oyo tozali kosalela Nzambe esengeli mpe komonisa ete tolingaka mpenza bato. Paulo akomelaki bandeko ya lisangá ya Tesaloniki ete: “Tokómi [na boboto, NW] kati na bino [lokola] mama oyo azali kobɔkɔla bana na ye mpenza.” (1 Batesaloniki 2:7) Na mikili mingi lelo oyo, mibeko ya Leta esɛngisaka bamama bábatela bana na bango. Kasi, okanisi ete soki bamama mingi babatelaka bana na bango ezali kaka mpo mibeko esɛngi yango? Te. Basalaka yango mpo balingaka bana na bango. Kutu mama oyo azali kobɔkɔla bana na ye amipesaka mpenza na esengo mpo na bango! Lokola Paulo azalaki mpe na “bolingo” ya ndenge yango mpo na bandeko oyo azalaki kosalela, ‘asepelaki mingi’ (‘azalaki na mposa ya,’ Boyokani ya Sika) kosalela bomoi na ye mpo na kosalisa bango. (1 Batesaloniki 2:8) Bolingo nde etindaka biso tólanda ndakisa ya Paulo.—Matai 22:39.
Tokoloba nini mpo na kosalela Nzambe na mitema mibale?
Ya solo, tosengeli kotika te ete bolingo na biso moko eleka bolingo mpo na Nzambe mpe mpo na bazalani na biso. Soki tosali bongo te, tokoki kokwea na likambo ya kosalela Nzambe na mitema mibale. Tokoki kobanda kokóma na mawa to koyoka nkanda ete tozali te kosala oyo tolingi na kati ya bomoi na biso. Likambo yango ekómelaki Bayisalaele mosusu oyo balingaki lisusu Nzambe te kasi bazalaki kaka kosalela ye mpo mibeko ezalaki kosɛnga bongo. Esukaki ndenge nini? ‘Balɛmbaki’ kosalela Nzambe.—Malaki 1:13.
Mbeka nyonso oyo tozali kopesa Nzambe esengeli kozala ya “malamu,” ezala na mbeba te, esengeli kozala “oyo eleki malamu.” (Levitike 22:17-20; Exode 23:19, NW) Nzokande, na ntango ya Malaki bato bazalaki kopesa mbeka ya banyama oyo bango moko bazalaki kosepela na yango te na esika bápesa Yehova nde banyama na bango oyo eleki malamu. Yehova asalaki nini? Yehova ayebisaki banganga ete: “Ekokabela bino banyama bakufi miso mpo na mbeka, [bozali koloba ete] ezali mabe te? Mpe ekokabela bino banyama batɛngumi mpe na malali, ezali mabe te? Bópesa yango likabo epai na mokóló-na-mokili. Akosepela nde na yo? Akoyamba nde elongi na yo? . . . Bozali koyeisa yango ebotolami mpe banyama batɛngumi mpe na malali; bozali koyeisa mbeka na bino bongo. . . . Nayamba nde yango na lobɔkɔ na bino?”—Malaki 1:8, 13.
Ndenge nini yango ekoki mpe kokómela moko kati na biso? Bambeka na biso ekoki ‘kolɛmbisa’ biso soki tozali te kosala makambo na motema mpe na elimo ya komipesa. (Exode 35:5, 21, 22; Levitike 1:3; Nzembo 54:6; Baebele 13:15, 16) Na ndakisa, topesaka Yehova kaka mwa ntango oyo etikali, nsima ya kosala makambo na biso moko?
Yehova alingaki mpenza kosepela soki mokonzi ya libota moko to Molevi moko ya molende asɛngisi Moyisalaele moko na makasi ete apona nyama na ye oyo eleki malamu mpo na kopesa mbeka, nzokande ye moko asepeli kosala yango te? (Yisaya 29:13; Matai 15:7, 8) Yehova aboyaki bambeka wana mpe nsukansuka, aboyaki bato oyo bazalaki kopesa yango.—Hosea 4:6; Matai 21:43.
Sepelá kosala mokano ya Nzambe
Mpo na kosalela Nzambe mosala oyo ekosepelisa ye, tosengeli kolanda ndakisa ya Yesu Klisto. Ye alobaki boye: “Nakolukaka mokano na ngai moko te kasi mokano na ye oyo atindi ngai.” (Yoane 5:30) Yesu azalaki kosepela mingi kosalela Nzambe na komipesa. Yesu akokisaki maloba oyo Davidi asakolaki ete: “Nasepeli kosala [mokano na yo, NW], ɛ Nzambe na ngai.”—Nzembo 40:8.
Atako Yesu azalaki kosepela kosala mokano ya Yehova, makambo ezalaki ntango nyonso pɛtɛɛ te. Talá likambo oyo esalemaki liboso bákanga ye, básambisa ye mpe báboma ye. Ntango azalaki na elanga ya Getesemane, Yesu azalaki na “mawa” mingi mpe azalaki “komitungisa” mingi. Azalaki na nsɔmɔ mingi, yango wana, ntango azalaki kobondela, ‘motoki na ye ekomaki lokola matanga ya makila mpe ezalaki kotanga na mabele.’—Matai 26:38, NW; Luka 22:44, Boyokani ya Sika.
Mpo na nini Yesu atungisamaki bongo? Na ntembe te, ezali te mpo azalaki koluka bolamu na ye moko to azalaki kosala mokano ya Nzambe na mitema mibale. Ayebaki ete akokufa mpe akimaki yango te, yango wana aboyaki likambo oyo Petelo alobaki ete: “Soki moke te, Nkolo! Oyo ekokómela yo te.” (Matai 16:21-23) Yesu azalaki nde komitungisa mpamba te liwa oyo asengelaki kokufa lokola mobomi ya bato elingaki kobebisa lokumu ya Yehova mpe nkombo na Ye mosantu. Yesu ayebaki ete ntango Tata na ye akomona liwa ya nsɔmɔ oyo bakoboma mwana na ye ya bolingo, ekosala ye mpasi mingi.
Yesu mpe ayebaki ete akómaki pene na ntango moko ya ntina mpenza na kotalela ndenge oyo mokano ya Yehova ezali kokokisama. Soki akangami na mibeko ya Nzambe ekomonisa polele ete Adama mpe akokaki kotikala sembo. Bosembo ya Yesu elingaki komonisa polele ete Satana abukaki lokuta ntango alobaki ete bato bakoki te kosalela Nzambe na bosembo mpe na komipesa soki bamekami. Na nsuka, Yehova akotinda Yesu aboma Satana mpe akosilisa bampasi nyonso oyo botomboki na ye ebimisaki.—Genese 3:15.
Yesu azalaki mpenza na mokumba monene! Nkombo ya Tata na ye, kimya ya molɔ́ngɔ́ mobimba mpe lobiko ya bato ya mokili mobimba, nyonso wana etalaki bosembo na ye. Lokola ayebaki yango, abondelaki boye: “Tata na ngai, soko ekoki, tiká ete kɔpɔ oyo elongwa na ngai. Kasi lokola elingi ngai te nde lokola elingi yo.” (Matai 26:39) Ata na ntango ya mpasi makasi mpenza, Yesu atikaki te ete mposa na ye ezwa esika ya mokano ya Tata na ye.
‘Elimo ezali na mposa nde nzoto ezali na bolɛmbu’
Lokola Yesu atungisamaki mingi ntango azalaki kosalela Yehova, biso mpe tokoki kolikya ete lokola tozali basaleli ya Nzambe, Satana akotika te kobimisela biso mikakatano to kobenda biso tósala oyo ye alingi. (Yoane 15:20; 1 Petelo 5:8) Longola yango, tozali bato ya kozanga kokoka. Yango wana, ata soki tozali kosalela Nzambe na motema na biso mobimba, ekozala pɛtɛɛ te mpo tósala yango. Yesu amonaki ndenge oyo bantoma na ye bazalaki kobunda mpo na kokokisa makambo nyonso azalaki kosɛnga bango. Yango wana alobaki ete: “[Elimo, NW] ezali na mposa nde nzoto ezali na bolɛmbu.” (Matai 26:41) Ye azalaki na bolɛmbu te mpamba te azalaki moto ya kokoka. Nzokande, ayebaki ete bayekoli na ye bazalaki na nzoto oyo ezali na bolɛmbu, elingi koloba kozanga kokoka oyo bazwaki epai ya Adama, moto ya kozanga kokoka. Yesu ayebaki ete lokola babotami na ezaleli ya kozanga kokoka mpe bazali na nzoto ya bolɛmbu, basengeli kobunda mpo na kosala nyonso oyo balingaki kosala na mosala ya Yehova.
Yango wana, mbala mosusu tokoki komiyoka lokola ntoma Paulo ayokaki mawa ntango ezaleli ya kozanga kokoka ezalaki kopekisa ye ete asalela Nzambe mingi. Paulo alobaki boye: “Mpo ete, ata nazali kokana malamu, nayebi kosala yango te.” (Baloma 7:18) Biso mpe tomonaka ete tokokaka te kosala makambo nyonso ya malamu oyo tokanaka. (Baloma 7:19) Ezali te ete tozali koboya kosala yango. Kasi ezali kaka mpo tozali na nzoto oyo ezangi kokoka, yango nde ebebisaka milende na biso ata soki milende yango ezali malamu ndenge nini.
Kasi tólɛmba nzoto te. Soki na motema na biso, tondimi kosala nyonso ekoki na biso, na ntembe te, Nzambe akondima mosala na biso. (2 Bakolinti 8:12) Tiká ‘tósala nyonso oyo ekoki na biso’ mpo tólanda elimo ya Klisto oyo andimaki kosala mokano ya Nzambe na motema na ye mobimba. (2 Timote 2:15; Bafilipi 2:5-7; 1 Petelo 4:1, 2) Yehova akopesa biso mbano mpe akosunga biso soki tozali na elimo ya komipesa ndenge wana. Akopesa biso “nguya oyo eleki nguya ya bato” mpo na kozipa bolɛmbu na biso. (2 Bakolinti 4:7-10, NW) Lokola Paulo, na lisalisi ya Yehova, biso mpe ‘na esengo, tokopesa mpe tokomipesa mobimba’ na mosala na Ye ya ntina mingi.
[Elilingi na lokasa 21]
Paulo andimaki kosalela Nzambe na makoki na ye nyonso
[Elilingi na lokasa 23]
Ata na ntango ya mpasi makasi, Yesu asalaki mokano ya Tata na ye